Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/2 nk. 4-7
  • Mpo na nini lingomba ezali eloko ya ntina mingi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini lingomba ezali eloko ya ntina mingi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Lingomba ya solo​—Osili komona yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mangomba nyonso mazali malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ndenge nini nakoki koyeba lingomba ya solo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Tosalela losambo na solo mpo na lobiko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/2 nk. 4-7

Mpo na nini lingomba ezali eloko ya ntina mingi?

“MOTO akobika bobele na limpa te.” (Matai 4:4) Mbala mingi tokotangaka maloba oyo mazali kokundola biso bamposa ya moto, oyo bato mingi bayebi yango te lelo. Maloba oyo mazali kolakisa ete tozali na mposa monene ya elimo oyo tosengeli komibanzabanza na yango. Ezali mpo na yango nde ye oyo abimisaki maloba yango alobaki lisusu ete: “Esengo na baoyo bazali komibanzabanza na mposa na bango ya elímo.”​—Matai 5:3, MN.

Ezali bobele lingomba nde ekoki kokokisa “bamposa na biso ya elimo.” Bobele lingomba nde ekoki koyanola na mituna ya ntina oyo tozali komituna mpo na ebandeli ya bomoi, ntina na yango mpe ndimbola na yango. Solo, ezali bobele lingomba​—kasi mangomba nyonso te—​nde ekoki kopesa ndimbola ya solo na bomoi na biso, na kopesáká yango motuya. Yesu alobaki epai na mwasi moko Mosamaria ete: “Basambeli na solo bakosambela Tata na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:23, MN) Mpo na kosambela ‘na solo,’ tokoki te komeka kolanda milulu to lolenge na kosala ya bankoko. Losambo motindo wana, mingimingi, ekopesaka na baoyo bazali kosalela yango bobele mayoki ya ntango moke, kasi ekotikaka bango mpenza na nzala kati na elimo.

Na ndakisa, tala maloba oyo malandi, ya Edwin Reischauer, ntóma to ambassadeur ya États-Unis kati na mokili ya Japon: “Mpo na bato mingi, lingomba ya Shinto mpe ya Buda ezali bindimeli ya solo te, kasi bobele mimeseno mpe biyokaneli (conventions).” Esengeli koyeba ete ebele na Bajaponé bakolandaka bobele yango. Kasi “mangomba ya sika” oyo matondi na Japon, mazali elembo ete lingomba na bonkoko ezali bobele kokokisa bamposa ya bato te.

“Mangomba ya sika” mamonani lokola ete mazali kobenda likebi ya bato likoló na mokambi moko oyo azali na bilimu mabe, kasi na Nzambe te. Batambwisi mingi ya mangomba bakolobaka ete bapemami na Nzambe. Kasi mateya na bango mazali mingimingi kosangisa mateya ya Buda, ya Shinto mpe bindimeli mosusu, nyonso ezali na makanisi mauti na mobandisi ya lingomba. Ekolobelaka elaka ya bomoi kitoko mpe oyo bakobengaka ete banguya ezangi ndimbola to makabo ya kobikisa. Kasi, tokoki mpenza koloba ete, mangomba wana mazali kolakisa na basangani na bango ete basambela “na elimo mpe na solo”? Ezali mpasi mpenza. Ya solo, mangomba mingi mazali lelo, makolimwa mikolo mizali koya. Ezalela na yango ya mpamba ezali kopusa bato te na kotalela yango lokola eloko ya ntina mingi.

Lingomba oyo litalelami lokola eloko na ntina

Nzokande ezali na lingomba oyo eumeli koleka mitindo na losambo nyonso. Ezali bongo lingomba oyo liteyami na Biblia. Kokomama na yango ebandaki esili koleka mwa bikeke 35, mpe makambo mosusu oyo makomami kati na mikapo na yango ya yambo, masalemaki koleka mibu nkóto liboso naino ete makomama.a Bobele ntina wana moko esengeli komema biso na kotatela lingomba oyo liteyami na Biblia lokola eloko ya ntina mingi.

Na ntina na Biblia, Encyclopédie américaine elobi ete: “Pole na yango ‘esili kobima na mabelé mobimba.’ Etalelami lelo lokola eloko ya motuya na nzela na bizaleli malamu mpe na lingomba, eloko na motuya oyo ebele na mateya makosilaka te, masengeli ntango nyonso sé kozala na ntina mingi na eleko nyonso kati na bomoi ya bato.” Soki Biblia ezali mpenza mokambi malamu oyo ekomemaka na lingomba ya solo, tosengeli te komizela ete yango ebimisama mingi mpenza, na motindo boye ete ekoka kozwama na bato nyonso oyo bazali koluka solo?

Ezali yango nde emonani na ntina na Biblia. Esili kobongolama na mobimba na yango to na ndambo na yango na minoko 1 928, kozaláká bongo mokanda moye mokabolami mingi mpenza kati na Lisoló na bato. Lisusu, yango esili komonana ete ebongi na kondima kotalela masoló ya makambo na kala mpe makambo matali sianse. Bokundoli ya biloko na kala mpe Lisoló ya makambo na kala ezali kolobela kokokana ya sikisiki ya bisakweli ya Biblia. Esangisami te soko na lolenge mosusu na bondoki, soko nkisi mpe te. Yango eyokani na oyo Biblia yango moko elobi ete epemami na Nzambe.b​—2 Timote 3:16.

“Mbuma” ya lingomba ya solo

Kasi, mangomba mingi makolobaka te ete mazali kolanda Biblia? Koswana, koyinana mpe bokosi ekomonanaka polele te epai na ebele na bato oyo bakomilobaka ete bazali baklisto? Ya solo, kasi yango ekoki kopusa moto te ete aboya Biblia. Yesu Klisto ye moko amonisaki ete bato mingi oyo bakomiloba baklisto bakoboyama na Nzambe. (Tala Matai 7:13, 14, 21-23.) Bongo, ndenge nini okoki koyeba baoyo bazali na lingomba ya solo, liteyami na Biblia? Yesu apesaki eyano: “Bokoyeba bango na mbuma na bango, Bakozwaka nde mbuma na vinyo epai na nzube, soko nde mbuma na misuke epai na matiti mabe? Bobele bongo, nzete malamu ekobotaka mbuma malamu nde nzete mabe ekobotaka mbuma mabe. Boye, bokoyeba bato yango na mbuma na bango.”​—Matai 7:16, 17, 20, MN.

Ee, lingomba ya solo lisengeli kozala bokasi bokopusaka na malamu, kobimisáká matomba ya esengo kati na basangani na yango. Na ndakisa, totalela naino likambo ya Akinori, Mojaponé oyo, engebene maloba na ye moko, akómaki “momonisi monene mpenza ya elimo na kowelana.” Akokisaki mikano oyo amityelaki: kozwa diplome na université moko ya lokumu mingi mpe kozwa mosala kati na kompanyi ya lokumu. Amonaki ntina te na kokótisa lingomba kati na bomoi na ye. Azalaki kokanisa ete “lingomba ezali malamu bobele epai na bato oyo bazali koluka lisungi kati na bomoi na bango.”

Makambo mazalaki kotambola malamu kino mokolo abelaki maladi ya konyokwama na makanisi, mpe abelaki makasi mpenza. Nkingo na ye ekangamaki, emeku ebándámi na lipeka ya loboko na ye ya mwasi. Kati na “baninga” oyo Akinori azalaki na bango na esika azalaki kosala, bobele moke nde balendisaki ye wana azalaki na mpasi. (Tala Masese 17:17.) Amipesaki mingi mpenza na masanga mpe akanaki kosukisa bomoi na ye na komiboma.

Nsima na mikolo, mwasi na ye akómaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Na lisoló moko, atangelaki mobali na ye mokapo ya Bagalatia 6:7, moye molobi ete: “Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango.” Kokamwáká na maloba wana, Akinori asanganaki elongo na mwasi na ye mpo na boyekoli na Biblia, mpe makambo oyo ayekolaki mabóngolaki makanisi na ye na ntina na bomoi. Wana bilikya ya avenire bizalaki sé komonana kitoko, mpasi oyo eutaki na konyokwama na makanisi ezalaki kolimwa. Lokola oyo elobi lisese moko na Biblia ete, “motema ya kimya mokoyeisela mosuni bomoi.” (Masese 14:30) Solo mpenza, lingomba ya solo likobotaka mbuma malamu.

Toshiro azali Mojaponé mosusu oyo akangaki ntina ete lingomba ya solo ezali bokasi bokopusaka na malamu. Atako azalaki kokanisa ete kozala na lingomba ezali na ntina mingi, kasi azalaki kosala eloko moko te. Likambo oyo azalaki na yango mposa ezali oyo ya kozwa ndako na ye moko. Kasi wana mokano yango mokokanaki, azwaki esengo oyo azalaki komizela na yango te. Lisusu, na kotaleláká zingazinga na ye na esika ya mosala, Toshiro amonaki ete makambo na kozanga bosembo mapalanganaki mpenza mpe bato bazalaki na boyokani malamu te kati na bango. Nyonso wana elembisaki ye mingi mpenza.

Mokolo moko, mwasi na ye asengaki na nkulutu moko ya lisangá ya ba Témoins de Jéhovah na epai bafandi ete ayaka kotala mobali na ye. Toshiro amonaki nokinoki ete mobali yango akesenaki na baninga na ye ya mosala. Ezalaki mpo na ntina nini? Azalaki kosala makasi na kosalela mitinda ya Biblia kati na bomoi na ye. Kosepeláká, Toshiro alingaki koyekola Biblia mpe andimaki kosalela lingomba ya Biblia kati na bomoi na ye.

Tosengi yo na koluka koyebana elongo na ba Témoins de Jéhovah, lokola Toshiro. “Mbuma” oyo bazali kobota emonisi ete bazali kosambela “na elimo mpe na solo.” Ba Témoins bazalaki kosala makasi na kotika ete mateya na Biblia mazala na mosala kati na bomoi na bango. Mpe, atako bazali naino mosika mpo na kokóma bato na kokoka, nzokande bazali komonisa na lisangá ete lingomba ya solo ezali bokasi monene ya elimo bokopusaka na malamu.

Bankóto na ba Témoins liboso bazalaki na esengo te kati na bomoi na bango. Kasi na kosaleláká mitinda ya Biblia, balongaki kosala mbongwana minene. Basili kozwa liziba ya bolamu na kolónáká oyo Biblia ebengi yango “mbuma ya elimo,” elingi koloba bizaleli oyo ete, bolingo, esengo, kimya, motema petee, bobóto, malamu, kondima, bopóló, komikanga motema.​—Bagalatia 5:22, 23.

Kosalela lingomba ya solo ekopesaka bolamu ya seko

Nkutu lingomba ya solo lisengeli nde kosala koleka likambo oyo ya kobongola bato to kosalisa bango na kolónga mikakatano na bango. Mpasi ya mokili, lokola kobebisama (ya mopepe, ya mai), etumba ya nikleere to kobebisama ya ezingelo na biso, ekoki komema etando na biso na libebi nyee. Mikakatano na makambo ya nkita ezali kobebisa bolamu mpe bomengo ya bamilió na bato. Lingomba moko te likotalelama lokola eloko na ntina mingi soko yango epesi elikya moko te likoló na kolimwa na makambo na mokili.

Lingomba ya Biblia lizali kopesa elikya motindo wana. Nzambe alaki mokili ya sika mpe ya boyengebene, mokokambama na bokonzi ya likoló. (Matai 6:9, 10; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:3, 4) Bokonzi yango bokozala nzela na kosilisa mpasi nyonso na bato. Mpe Biblia endimisi biso ete bolamu oyo bokopesama na Bokonzi yango awa na mabelé mobimba ekozala seko. Na yango, Biblia elobi ete: “Mokili mozali mpe kolongwa mpe mposa na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumela seko.” (1 Yoane 2:17) Ee, bomoi ya seko kati na bolamu ezali elikya ya moklisto nyonso. Kasi bobele baoyo bakotalela lingomba ya solo lokola eloko ya ntina mingi nde bakozwa bolamu oyo bokomemama na Bokonzi yango. Bongo, tosengi yo ete obanda boyekoli ya bozindo kati na Biblia.c (Yoane 17:3) Na kotikáká pole ya Liloba na Nzambe kokóta kati na bomoi na yo, okozwa esengo ya komona “bamposa na yo ya elimo” kokokisama mokemoke. Ya solo mpenza, bolamu ya seko bozali kozela yo, mpo ete okotalela lingomba​—lingomba ya solo—​lokola eloko ya ntina mingi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ndakisa tala na Genese 2:4; 5:1; 6:9.

b Mpo na kozwa makanisi mosusu, tala mokanda La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? oyo okoki kozwa yango epai na bakomi ya zulunalo oyo.

c Ba Témoins de Jéhovah bakozala na esengo ya kosalisa yo. Okoki koyekola Biblia na ndako na yo kozanga ete ofuta, na kosengáká yango epai na bakomi ya zulunalo oyo to na lisangá ya ba Témoins de Jéhovah na epai yo ofandi.

[Elilingi na lokasa 5]

Biblia ezali lelo na minoko koleka 1 900; yango eyokani na oyo mokanda yango mozali koloba ete mopemami na Nzambe

[Elilingi na lokasa 7]

Lingomba ya Biblia lizali kopesa elikya ya makambo ya kimya kati na mokili, na nsé na boyangeli na bokonzi ya likoló

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto