Kokende na mokili ya bozwi mingi: makámá na yango mazali nini?
TALA makambo oyo mazali kosalema mbala na mbala kati na ba biro ya bantoma to ba ambassadeurs ya mikili ya bozwi oyo bazali kosala na mikili ya bobólá: kati na salle d’attente oyo etondi, bato bazali kosolola mbangumbangu. Atako lisoló yango ya ntina mingi ezali mokuse, ekosala ete moto azwa visa mpo na kokende na mokili ya bozwi epai na Mpótó. Bato mingi bazali kokanisa ete kuna nde bakokóma na bozwi. Elenge moko ya Afrique occidentale azalaki komilela ete: “Nazali kosala mingi uta mibu minei, kasi nazali kokoka kosomba ata poste radio te. Soki nazalaki na Angleterre to na Etats-Unis, mbele lelo oyo nazali na vuatire mpe na ndako na ngai.”
Tozali kokanga ntina oyo ebele na bafandi na mikili ya bobólá, to oyo ezali na bozwi mingi te, bazali na mayoki motindo oyo. Bazali na mpasi mpo na kozwa mosala mpe lifuta na bango ezali moke mingi. Kokita na motuya ya mosolo ezali kopesa nzela te ete bato babómba mwa mbongo. Ezali mpasi mpo na kozwa ndako ya kofutela mpe yango ekosengaka ntalo oyo eleki makoki ya bato yango. Bato bazali kolata bobele bilamba ya tombola bwaka. Ebele bazali konyokwama mpo na mpasi ya makambo na nkita.
Mpótó emonani mpenza lokola ete ezali kitoko mpo na bozwi na yango. Lokola oyo elobaki elenge moko ya Sierra Leone, “bamoko na bato oyo bazali kokende na mikili ya mpoto bazali kozonga mpe bazali koyebisa biso makambo oyo mazali kobenda biso moko ete tokende na mikili yango. Bazali koloba ete esengeli kosala mingi, kasi okoki kozwa mbongo mingi oyo okoki kokokisa na yango bamposa na yo, nkutu okoki mpe kosomba mwa biloko ya motuya, na ndakisa vuatire. Soki moto moko azongi na mboka na ye na mbongo pene na badolare nkóto mibale, akoki na yango kobongisa bomoi na ye mpe kobala.”
Yango ekoki kokamwisa biso te lelo na komona ete bamoko na basaleli na Nzambe bakómi mpe na makanisi motindo wana. Ndeko mwasi moko ya Afrike alobaki ete: “Biso, bilenge oyo tozali kati na lisangá na Nzambe, toyokaka bansango ya bato mosusu oyo basili kokende na mpótó mpe bazali na bomoi malamu. Mbala mosusu namitunaka ete: ‘Bongo ngai? Mpo na nini nasengeli kofanda awa kati na mpasi boye? Nasengeli kokende to ebongi malamu ete nafanda bobele awa?’”
Bino baoyo bofandi na mikili ya bobólá, bozali ntango mosusu komituna soki bokoki te kozala na bomoi malamu na kotikáká mboka na bino. Kokende na mokili mosusu ezali likambo moke te; ekosengaka makambo mingi mpe komibongisa malamu. Ekosengela mbala mosusu koyekola monoko ya sika, koyekola misala misusu, komesena na makambo ya sika, kondima lolenge mabe oyo bakotalelaka bapaya mpe koyekola lolenge na bomoi ya sika. Ezali solo ete baklisto mingi basili kolónga yango mpe bakómaki lisungi monene kati na masangá ya bamboka bakei kofanda, na kozaláká ndakisa malamu kati na molongó ya basakoli, ya ba pionniers, bankulutu to basaleli ya misala.
Kasi banso balóngaki bongo te. Bopusi mpe masenginya oyo mauti na likambo oyo ete kokende na mboka mopaya, esili komema bamosusu kino kobeba na elimo. Emonani bongo ete liboso ya kokende na mboka mopaya, esengeli kokanisa malamumalamu mpe kotya yango kati na mabondeli. Na Masese 3:5, 6 (MN) Biblia epesi toli oyo ete: “Talela Jéhovah na motema na yo mobimba, mpe ndima bososoli na yo moko te. Talela ye kati na banzela na yo nyonso, mpe ye akotambolisa yo.” Ee, okolinga kondimisama ete ozali kosala na boyokani elongo na mokano ya Jéhovah. (Yakobo 4:13-15) Nkutu Yesu apesaki toli malamu mpo na kosalisa yo kati na likambo yango, wana alendisaki bayoki na ye na “kotanga motuya.” (Luka 14:28) Yango esengi makambo mingi koleka botaleli mpamba ya makambo matali mosolo. Esengi kotalela makambo nini makoki kobima na elimo na yo likoló na kokende na mboka mosusu.
Bomoi na mikili ya Mpótó
Liboso na kokende na epai nini, osengeli kozala na makanisi ya sikisiki, makanisi ya solo na makambo oyo okokutana na yango na ntango okokóma. Sala makasi ete okende kotala naino liboso mpo na mwa ntango mpe komona yo moko makambo ya bomoi mazali kuna. Soki te, okondima bilobabiloba mpamba. Biblia ezali kokundwela biso ete: “Moto na zoba akondimaka maloba nyonso, nde moto na mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.”—Masese 14:15.
Bamoko bazwi nsango ya mikili ya Occident bobele na ba filime to na nzela na télévizyó. Bazali kokanisa ete na mikili yango, bato banso bazali bazwi, bazali na ba vuatire ya sika mpe bazali na ndako kitoko. Makambo mazali lolenge mosusu. Mikili mingi ya bozwi mizali na motuya monene ya bobólá, ya bato bazangi ndako mpe ya bato bazangi mosala. Mpe kati na baoyo bazali mpenza babóla, mingi ezali bato oyo bauti kala mingi te na mikili misusu. Mosangani moko ya ambassade ya Etats-Unis na mboka moko ya bobólá, alobi ete: “Bato batalelaka te mpasi oyo ezali mpo na kokende kofanda na Amerike. Bamoko bazali kotindela bandeko na bango mikanda ete basili kokóma na bozwi; na ndakisa basili kosomba ba vuatire mibale mpe ndako, nzokande bazali mpenza na bomoi malamu te.”
Makambo mazali bobele lolenge moko na mikili misusu. M. Sahr Sorie, molakisi na Afrique occidentale, afandaki mpe asalaki kelasi na ye na Londres. Alobi ete: “Soki ozali Afriké, ezali mpasi mpo na kokende kofanda na Angleterre. Ndambo monene ya bato oyo bakendeki kofanda kuna bazali na bomoi ya mpasi. Bazali na bilongi ya mawa. Bamosusu bazali na mikakatano mpo na kozwa 20 pence oyo esengeli mpo na kotelefoné. Mbala mingi bafandaka bato mingi kati na mwa ndako moko oyo ezali bobele na mwa radiateur moko moke mpo na kopesa bango molungé. Bazali kozwa se misala oyo mizali na lifuti moke, mpe na yango lisusu bazali na mosolo mingi te mpo na kokokisa mikumba na bango na ntina etali mosolo. Baoyo bazali kotika Afrike mpo na kokima bobólá bazali mbala mingi komimona kati na ezalela moko ya mpasi koleka kati na ba quartiers ya bobólá na Mpótó.”
Kofanda kati na mokili mosusu elimboli mpasi na ntina na mosolo mpe kozanga nkaka yango ekoki kobebisa elimo ya moto. (Matai 13:22) Ezali solo ete Biblia ezali kokumisa kozala na milende kati na mosala. (Masese 10:4; 13:4) Kasi kati na baoyo bazali kokende kofanda na mboka mopaya, mingi basengisami na kondima misala mibale mpo na kokokisa mikano na bango oyo mitali mosolo, to bobele mpo na kozwa mosolo mokokoma kino na nsuka ya sanza mosusu. Na bongo ezali kotikala bobele mwa ntango moke, to mpe eloko moko te mpo na kosambela Nzambe. Na bongo makita na boklisto, boyekoli na Biblia mpe mosala na kosakola ekotalelama na bopotu. Na mawa nyonso, maloba oyo na Yesu Klisto mamonani bongo solo: “Bokoki kosalela Nzambe mpe misolo te lokola baombo.”—Matai 6:24, MN.
Bopusi na ntina etali bizaleli
Osengeli mpe kotalela bizaleli oyo bizali komonana kati na mokili epai kuna olingi kokende kofanda. Biblia ezali koyebisa biso ete Lota aponaki kofanda kati na distrike ya Yordani. Na kotalela mpenza bozwi ya mosuni, ekateli na ye emonanaki ya mayele, mpamba te “Yordani ezalaki na mai mingi . . . , lokola na elanga na Jéhovah.” (Genese 13:10) Nzokande, bato ya sika oyo bafandaki pene na Lota bazalaki “basali minene na masumu liboso na Jéhovah,” bato babebisami na pite! (Genese 13:13, MN) Emonanaki ete “na ntina na makambo oyo azalaki komona mpe koyoka ntango afandaki kati na bango, moyengebene wana anyokwamaki na molimo na ye mokolo na mokolo na ntina na bizaleli na bango ya kotyola mibeko.”—2 Petelo 2:8, MN.
Motindo moko mpe, kokende Mpoto na mikolo na biso ekoki kotya yo, bakisa mpe libota na yo, liboso na masenginya makasi koleka oyo ozalaki kokutana na yango na mboka na yo na ntina na bizaleli. Mbala mosusu mibangé bakopesamela lokumu te lokola bazalaki kozwa yango liboso. Mbala mosusu limemya epai na baboti ekolendisama te. Ekoki kosalema ete bato bazanga kosepela na bazalani na bango ya pene. mikakatano wana mikozala na bopusi nini likoló na yo mpe libota na yo? Ezali na likambo oyo nde osengeli kotalela malamumalamu kati na libondeli.
Kosolola na baboti na nzela na mikanda
Baboti mosusu bamonaki malamu kotika bana na bango na mboka mpe kokende bango moko na mokili mosusu. Mposa na bango ezali ete babengisa libota na bango ntango bakozwa esika ya kofanda, to mpe kozonga na mosolo mingi na mboka na bango. Kosala motindo wana ezali nzela na mayele?
Makomami mazali kosenga baboti ete bakokisa bamposa ya mosuni ya libota na bango mpe, mbala mosusu tata to mama akomona nzela mosusu te, bobele ete akende kosala na mboka mosusu mpo na kolonga yango. (1 Timote 5:8) Nzokande, Biblia ezali mpe kosenga epai na baboti ete basenzela mpo na bamposa ya elimo ya mabota na bango. Liloba na Nzambe elobi ete: “Bino batata mpe boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bobokola bango na mateya mpe na mpamela na Jéhovah.”—Baefese 6:4.
Tata moko akoki mpenza kosala yango soki azali mosika na libota na ye na boumeli ya basanza mingi to mibu mingi? Mpenza te. Na bongo esengeli na yo kotalela malamu soki matomba na mosuni eleki mpenza makámá oyo makoki kobima likoló na bana na yo mpo ete yo ozali te. Epai mosusu, bapaya bazali komona ete bazali konduka mosolo mpambampamba te lokola ezalaki bango kokanisa yango. Soki mopaya azali na mosolo mingi te mpo na kobengisa libota na ye, bokabwani ekoki kobendana mbula mingi. Ezalela wana ekoki na nsima kobota makama minene kati na bizaleli. (1 Bakolinti 7:1-5) Ezali mawa na komona ete, kati na bampasi, bamosusu basili kokwea na pité.
Tozala na elikya kati na bibongiseli ya Nzambe
Lokola makambo na nkita mazali kobeba kati na mokili, ezali malamu na komikundola lisusu ete basaleli na Nzambe basengeli kobanga te ete bakotikama. Yesu alobaki: “Boye, bomitungisa te mpo na koloba ete: ‘Tokolya nini?’ Soko ete: ‘Tokomela nini?’ Soko ete: ‘Tokolata nini?’ Bapakano bakolukaka biloko yango nyonso. Mpamba te Tata na bino na likoló ayebi ete bozali na bosenga na yango nyonso. Bolukaka nde liboso bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye mpe biloko oyo nyonso bikobakisama na bino.’’—Matai 6:31-33.
Ba Témoins de Jéhovah bazali lelo kosalela matomba ya Bokonzi na kosakola na molende nsango malamu. (Matai 24:14; 28:19, 2) Kati na mikili mingi ya bobólá, mposa na basakoli ya Bokonzi ezali monene. Mposa na bankulutu mpe ya basaleli na misala oyo bakembi na elimo ezali monene. Mingi basili kopona kotikala na mboka na bango ya kobotama na esika ete bakende na mokili moko ya bozwi mingi epai kuna mposa ezali mingi te kati na masangá. Totala ndenge nini makambo matambolaki mpo na bamosusu.
Alethia, oyo afandi na Afrique occidentale, azali pionnier kati na mboka na ye ya kobotama uta mibu 30. Alobi ete: “Nazalaki na makoki ya kokende kofanda na mboka mopaya. Soki nakendaki te, ezali mpo ete nalingi kofanda elongo na bato ya mboka na ngai mpe elongo na bandeko na ngai. Nazali na esengo ya kosalisa bango na koyeba solo mpo ete tokoka kosalela Jéhovah elonga. Nazangi eloko moko te lokola natikali awa, mpe nazali na mawa mpo na eloko moko te.”
Winifred azali mpe kofanda na Afrike. Na mboka na ye, nivo ya bomoi ezali na nse mpenza koleka bamboka nyonso ya mokili. Kasi nsima na mibu 42 oyo alekisi kati na mosala ya pionnier, alobi ete: “Ezalaka ntango nyonso petee te mpo na kozwa mosolo. Satana azali koluka kobebisa makambo, kasi Jéhovah azali ntango nyonso kobatela ngai mpe azali kokokisa bamposa na ngai.”
Na kala, Abrahame “andimaki na motema mobimba ete Nzambe akoki kosala yango esili ye kolaka.” (Baloma 4:21) Yo mpe ondimisami motindo moko ete Jéhovah azali na likoki ya kokokisa elaka na ye mpe kosenzela na meko oyo yo ozali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso kati na bomoi na yo? Ondimi maloba ya mokomi na Nzembo oyo akomaki ete: “Mobeko na monoko [na Nzambe] ezali malamu mpo na ngai koleka nkoto-nkoto na wolo mpe na palata”? (Nzembo 119:72) To ekoki kozala malamu ete osalela mingi lisusu toli na ntoma Paulo? Kati na 1 Timote 6:8, akomaki ete: “Awa ezali biso na biloko na kolya mpe na bilamba na kolata, ebongi na biso bongo.” Ekoki kozala ete mayele esengi kopona lolenge mosusu na bomoi te, kasi nde kobongisa malamu oyo tozali na yango sikawa?
Kati na mikili mingi, makambo na nkita mazali ntina na mikakatano minene mpo na baklisto. Na bongo soki libota moko, nsima na kotalela makambo nyonso masengisami, bazwi ekateli ya kokende kofanda na mboka mosusu, ntina ya kotonga bango ezali te. (Bagalatia 6:5) Baoyo batikali bakolanda kobondela Jéhovah ete asalisa bango na kolonga mikakatano oyo biloko na ntango oyo ezali kobimisa, kosepeláká bongo na mapamboli na elimo oyo Nzambe azali kopesa bango. Omikundola ete mosika te, ntango Bokonzi na Nzambe ekotya boyangeli na yango, bokesene na mpasi ya mokili na lelo ekolongolama. Na bongo ekozala lokola mokomi na nzembo akomaki yango ete: “[Jéhovah,] okozipola loboko na yo mpe okosilisa mposa na [biloko]nyonso na bomoi.”—Nzembo 145:16.