‘Tókokisa mposa ya mabota na biso’—Lolenge nini kolónga ntembe yango kati na mikili ya bobólá
“SOKO moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.” Ezali ntoma Paulo nde alobaki bongo. (1 Timoté 5:8) Awa kobɔkɔla bana ekómi likambo ya mpasi mingi kati na mikili ya bozwi, na mikili ya bobólá ezali mokakatano monene mingi koleka.
Na ndakisa, na Afrika, bato mingi bazali na mokakatano na makambo ya nkita. Misala mizali mingi te, mpe soki ekoki komonana, ekoki kosɛnga ete mwasi na mobali básala mpo na kozwa mwa mosolo mokoki bobele mpo na bilei. Ekoki mpe kosɛnga ete batata ya mabota básala mibémbo milai mpo na koluka mosala, kotikáká bongo basi na bango mpe bana na bango na boumeli ya sanza mingi—to mibu mingi. Ekoki mpe kozala mpasi mpo na kozwa ndako ebongi. Mabota mingi ya Afrika mazali na basangani mingi; na bongo bakartyé etondi na bato mingi, mpe ezali kitoko te mpo na kotala na miso. Bisika yango ezangi bopɛto.
Lisusu, mimeseno, makambo ya kalakala ya bonkɔ́kɔ oyo mazali kolandana kino lelo, mpe makanisi oyo bato bazalaka na yango kuna makoki kotɛmɛla elimo ya Liloba ya Nzambe, Biblia. Tótalela ezaleli oyo bato mingi bazalaka na yango kuna na ntina na libala mpe kobota bana. Batata mosusu ya mabota bakanisi ete mokumba na bango ezali bobele ya kopesa mosolo ya kofutela ndako mpe mosolo ya kofuta kelasi mpo na bana. Basi na bango nde—mpe mbala mosusu ata bana oyo basili kokóla—bazali na mokumba ya kokokisa bamposa ya libota mpo na oyo etali bilei mpe bilamba.
Epai mosusu, mibali mosusu bazalaka na likanisi oyo ete “mbongo na ngai ezali ya ngai, kasi mbongo na yo mpe ezali ya ngai.” Yango epesaka mbala mingi motema mpasi epai na basi oyo basalaka mosala oyo bazwelaka na yango mosolo. Mwasi moko ya mboka Tanzanie amilelaki ete: “Mbongo nyonso esilaka na masanga, esalisaka biso te to mpe bana te. Biso nyonso tosanganaka na mosala, to mpe tosalaka mingi kútu koleka, kasi akamataka mbongo nyonso, koyebisáká biso ete ezali ya ye—ete efutami mpo na ye.”
Nzokande, baklisto batyaka Liloba ya Nzambe liboso ya bonkɔ́kɔ ya mboka to ya makanisi ya bato. Biblia ezali kopesa litambwisi likoló na makambo matali kobatela libota. Na ndakisa, elobi ete “bana bábombela baboti biloko te kasi baboti bábombela bana mpenza.” (2 Bakolinti 12:14) Na bongo, mibali oyo babangaka Nzambe mpe bazali na likoki ya kosala mosala bamonisaka te ezaleli ya goigoi na kotikáká epai na basi na bango mpe epai na bana na bango mokumba ya koleisa mpe kolatisa libota; mokumba oyo ezali mpenza ya batata ya mabota.—1 Bakolinti 11:3.
Ya solo, mosolo oyo mobali azali kozwa ekoki mbala mosusu kozala moke, mpe na yango akolónga te kokokisa mposa nyonso ya libota na ye. Kasi mwasi akoki kozala na mosala oyo epesaka ye mosolo, mpe mobali moklisto akoki te koyoka mabe mpo na yango. Nzokande, akotalela ye lokola “moninga” oyo abongi na limemya. (Malaki 2:14) Na yango, akotyola te mosolo oyo mwasi na ye azali kozwa na mpasi mpe akosalela yango te na bozoba nyonso kozanga komemya mayoki na ye. Nzokande, ye mpe mwasi na ye ‘bakosangisa makanisi’ mpe bakokata lolenge oyo mosolo na bango ekoki kosalelama mpo na bolamu ya libota mobimba. (Masese 13:10) Soki likoki lizali, mobali akoki mpe kotikela mwasi na ye mwa bonsomi mpo na oyo etali kosalela mosolo, lokola ezalaki epai na “mwasi na motema malamu” oyo alobelami kati na Biblia. (Masese 31:10, 11, 16) Kolanda toli ya Biblia kati na likambo wana ekólisaka bolamu mpe esengo kati na libota.
Lolenge nini kolónga mokakatano ya kozanga mosala
Tótalela naino likambo ya kozanga mosala. Wana misala mizali mingi te mpe lifuti lizali moke, batata mingi ya mabota na Afrika bakendaka koluka mosala mosika na mboka na bango—na bisika ya botimoli mabanga ya ntalo, na izíni, na bibokwelo bibwele, mpe na bilanga. Soki mobali moklisto azali kati na ezalela motindo oyo, akoki komitangola na baninga na ye ya losambo mpe akokutana na baninga mabe. (Masese 18:1; 1 Bakolinti 15:33) Atako libota na ye likosala makasi mpo na kokokisa oyo ekoki na bango kati na ezalela wana ya mpasi, kasi bakotungisama mpamba te tata na bango azali te mpo na kokamba bango na elimo to kosunga bango na mayoki. Likambo ya kobenda likebi ezali ete, mobembo ya ntango molai ekoki kobimisa lisusu mpasi oyo yango esengelaki kosilisa—mokakatano na ntina na mosolo.
Mama moko alobi ete: “Mobali na ngai akendaki kotimola wolo. Akanaki ete akozonga nsima ya sanza moko to soki akolekisa ekozala bobele sanza mibale. Nzokande, asalaki mbula mobimba! Atikaki ngai na mokumba ya kobokola bana motoba. Na nsima na sengelaki kofuta mosolo ya ndako. Lokola nazalaki kobɛla, nasengelaki kofuta mosolo na lopitalo. Tozalaki na mposa ya bilamba, mpe tosengelaki kolya mokolo na mokolo. Nazalaki na mosala te. Ezalaki mpasi. Likambo ya mpasi koleka ezalaki bongo kobatela bana na elimo—boyekoli ya libota, makita, mpe mosala ya kosakola. Na lisalisi ya Yehova, na lolenge moko to mosusu, tobikaki.”
Ata bamama mosusu mpe bamonaki ete basengelaki kotika mabota na bango mpo na ntango molai mpo na kokende koluka mosala. Basusu babikelaka na kosaláká mibémbo ya mombongo mpe bamonanaka mingi na ndako te. Bana oyo basili kokóma mikólo bapusami na makasi ete bákokisa mokumba ya baboti mpe basengeli kolamba, kosala misala ya ndako, ata mpe kopesa disipilini epai na balɛki na bango oyo bazali naino mike. Kosangana kati na misala ya elimo ekómi mpasi. Ee, bozito likoló na libota ekoki kozala monene mingi mpenza!
Ya solo, wana ezalela ya makambo ya nkita ezali mpasi, moboti akoki mbala mosusu kozala na likoki mosusu te bobele kokenda koluka mosala na mboka ya mosika. Na ntango ya kala, bana na Yakobo basengelaki kotika mabota na bango mpo na kokende kozwa bilei na Ezipito. (Genese 42:1-5) Wana ezalela ya makambo motindo yango emonani lelo oyo, batata ya mabota basengeli kotalela makambo mabe oyo matomba ya mosolo makoki kobimisa likoló na elimo mpe likoló na mayoki mpo na bokabwani ya ntango molai na mboka mosika mpo na kosala mosala. Mabota mingi maponaka koyika mpiko liboso na mikakatano ya nkita na esika ya kokabwana mpo na ntango molai. Babosanaka te maloba ya Paulo oyo mazwami kati na 1 Timoté 6:8: “Awa ezali biso na biloko ya kolya mpe bilamba na kolata, ebongi na biso bongo.”—Kokanisá na Masese 15:17.
Mbala mingi ezalaka na makambo mingi oyo makoki kosalelama na esika ete osala mobémbo. Na komonisáká elimo ya kosala eloko moko mpe ya mayele, basusu basili kosala misala na bango moko na kosaleláká bato misala mibongi.a (Kokanisá na Masese 31:24.) To tokoki kondima kosala misala ya mike, oyo bato mosusu batalelaka yango ete ezangi lokumu. (Baefese 4:28) Ntoma Paulo ye moko ‘asalaki mosala makasi’ ete azala bozito te likoló na basusu. (2 Batesaloniki 3:8) Lelo oyo mibali baklisto mpe bakoki kolanda ndakisa wana.
Makambo matali kokɔta kelasi
Mokakatano mosusu motaleli bongo kokɔta kelasi. Emonanaka mingi na bamboka mosusu ya mosika ete baboti batindaka bana na bango epai na bandeko ya mosuni mpo na boumeli ya mwa ntango molai mpo ete bákɔta kelasi ya malamu. Wana bakabwani na baboti na bango, bana motindo wana bazalaka na mokakatano mingi mpo na koyangana na makita to ya kosangana na mosala ya kosakola. Lokola bazangi kozwa disipilini oyo ebongi, nokinoki, bakozwama na baninga mabe. Na yango, mingi na bana motindo yango basili kotika nzela ya bomoi ya boklisto.
Ntembe ezali te ete kelasi ya mokili oyo ezali na matomba na yango. Kasi Biblia ezali kopesa motuya monene koleka na kolakisama na elimo, mpe Nzambe atye likoló na mapeka ya baboti mokumba ya kopesa kolakisama wana. (Deteronome 11:18, 19; Masese 3:13, 14) Nzokande, kotinda mwana mosika mpo na boumeli ya ntango molai ekokitisa milende ya baboti ya kobɔkɔla ye na “disipilini mpe na kolakisama na Yehova.”—Baefese 6:4, NW.b
Soki na esika bafandi kelasi ya malamu ezali te, baboti bakoki bobele kosala oyo ekoki na bango mpo na kolakisa bana na bango makoki ya moboko. “Molakisi monene” na biso, Yehova, azali mpe kosunga biso. (Yisaya 30:20) Masangá ya Batatoli ya Yehova na bisika bofandi esilá kosala mwa bibongiseli ya koteya. Masangá mingi mazali na eteyelo ya koyekola kotánga mpe kokoma. Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ezali mpe lisungi oyo ekoki kobongisa makoki ya mwana ya kotánga mpe koloba na polele nyonso.
Likanisi ya bokatikati mpo na oyo etali kobota bana
Kokokisa bamposa ya bana ezalaka mpasi mingi mpenza soki bazali mingi. Baboti na Afrika balobaka ete balingaka bana mingi; na yango, babotaka bana mingi! Atako bana bakoki kotalelama lokola eutelo ya bozwi na likambo litali nkita, baboti mingi bazali na likoki te ya koleisa libota oyo ezali na basangani mingi.
Ya solo, Biblia elobi ete “bana mibali bazali likabo na [Yehova].” (Nzembo 127:3) Nzokande, tóbosana te ete maloba oyo makomamaki na ntango oyo Yisalaele ezalaki na ezalela ya makambo malamu. Na nsima, nzala makasi mpe bitumba eyaki kosala ete kobota bana ezala likambo ya mpasi. (Bileli 2:11, 20; 4:10) Na kotalela ezalela ya makambo ya mpasi oyo ezali komonana kati na mikili ya bobóla, baklisto oyo bazali koyeba mikumba na bango basangeli kokanisa malamu soki bakoki mpenza koleisa, kolatisa, kopesa esika ya kolala, mpe kobokola bana boni. Nsima ya kotánga mituya, babalani mingi bazwaka ekateli ya kobuka bonkɔ́kɔ mpe kobota bana mingi te.c—Kokanisá na Luka 14:28.
Ntembe ezali te oyo ezali “ntango na mpasi.” (2 Timoté 3:1-5) Lokola ebongiseli oyo ezali kokenda mbangu na nsuka na yango, na ntembe te, mikakatano likoló na mabota oyo mazali kati na mikili ya bobóla mikobakisama. Nzokande, na kolandáká malamumalamu mitindá ya Liloba ya Nzambe, batata ya mabota bakoki kolónga na kokokisáká bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya mabota na bango, mpamba te Yehova apesi elaka oyo epai na baoyo basalelaka ye na bosembo nyonso ete: “Nakotika yo soko moke te, nakosabola yo mpe te.” (Baebele 13:5) Ee, ata kati na mikili ya bobólá, Baklisto bakoki kolónga ntembe ya kokokisa bamposa ya mabota na bango!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisoló “Lolenge nini kobanda misala ya sika kati na mikili ya bobóla” kati na nimero ya 22 Ɔkɔtɔ́bɛ 1994 (ebimeli ya Lifalansé) ya zulunalo na biso mosusu, Lamuká!
b Mpo na koyeba makambo mosusu; talá “Mituna ya batángi” kati na Mosenzeli 1 Novɛ́mbɛ 1983.
c Makambo mosusu oyo makoki kosunga mazwami kati na kolandáná ya masoló “Motuya ya bana—Likambo litali mokili mobimba,” oyo ebimaki kati na Lamuká ya Avril-Juin 1993.