Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/6 lok. 7
  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Masolo oyo ekosalisa biso mingi na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo ya sika oyo ekobanda kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Ozali kosalela yango malamumalamu?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo ya sika mpo na kobanda koyekola na bato Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/6 lok. 7

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

NA bankasa mibale oyo elandi, lisoló lizali na motó na likambo “Yesu asilisi mosala oyo Nzambe apesaki ye” ezali eteni ya nsuka na lisoló na Yesu oyo tobimisaki mbala na mbala kozanga kolekisa kati na banimero mingi ya Mosenzeli, ekoki bongo mibu mitano, uta na le 1er Janvier 1986.

Tokanisi ete lisoló yango ya Masengeli esili kosalisa yo ete ‘otalela Yesu,’ engebene toli ya ntóma Paulo, mpe ete ‘oyoka ye,’ lokola Nzambe asengi yango. (Baebele 12:2, 3; Matai 17:5) Na boumeli ya mibu, bato mingi bakomelaki biso mpo na koyebisa biso ete yango ezalaki bongo mpo na bango. Motangi moko akomaki ete, “lokola soko nde nazalaki wana koyoka ye mpe komona makambo mazalaki ye kosala. Na lisalisi ya masoló oyo, nalingi ye lisusu koleka.”

Mosusu alobaki ete: “Emonani ete nimero moko na moko ezali na likanisi moko oyo nayebaki yango te ntango nazalaki kotanga lisoló kati na Biblia. Na kotangáká lisoló moko na moko, nazwaki esengo ya kobómba kati na boongo na ngai makambo ndenge na ndenge ya bomoi na Yesu kati na molongó na yango na kotalela ntango oyo moko na moko esalemaki.” Ebele na balangi mosusu bayebisaki mpe botondi na bango lokola basili koyeba epai wapi mpe ntango nini Yesu ateyaki to asalaki likambo boye na boye na boumeli ya mosala na ye.

Moespanyole moko ya mwasi alobaki ete: “Nasili kobómba masoló nyonso uta ebandeli. Ezali mpenza kopesa mayele, ezala epai na mikóló mpe epai na bana lokola. Nazali na mibu 44, mpe nazalaka na esengo mingi wana ezali ngai kotanga masoló yango. Nazali komimona lokola ete nazali wana na ntango lisoló moko na moko ezali kosalema.”

Mama ya libota moko ya Amerike akomaki ete: “Lokola masoló mazali mokuse mpe ekomami na elobeli ya petee, mobali na ngai asanganaki na boyekoli na biso ya libota. Mwana na ngai ya mobali ya mibu mwambe asengaki ngai ete nakomela bino mokanda ya botondi, mpo ete tata na ye azali sikawa koyekola Biblia. Atuni soki, ntango masolo yango makosila, ete bokoki kosangisa yango te kati na mokanda moko mpo ete yango ekoka kosalisa baninga na ye ya mike.”

Mbala mosusu ozali na liyoki motindo moko lokola motangi oyo ayebisaki mawa na ye na maloba oyo ete: “Nazali kooka mpasi na motema soki nakanisi ete mosika te masoló yango makosila; mpamba te tosili kokóma na mikolo ya nsuka ya bomoi na Klisto. Nakozanga bankasa mibale oyo ezali kati na Mosenzeli.” Tozali kolikya ete okosepela na botangi ya eteni na nsuka ya lisoló “Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto