Masolo ya sika oyo ekobanda kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli
Na mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza nyonso, tozalaki kosalela masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli “Yekolá na Liloba ya Nzambe” mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Kobanda na sanza ya Yanuali, tokobanda kosalela nde masolo “Biyano na mituna ya Biblia,” oyo ekobanda kobima na lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso. Tokoki kosalela lisolo “Biyano na mituna ya Biblia” na mosala ya kosakola kaka ndenge tozalaki kosalela “Yekolá na Liloba ya Nzambe.” (km 12/10 lok. 2) Mosala na biso ya Bokonzi ekokoba kobimisa makanisi mpo na ndenge ya kokabola bazulunalo, oyo tokoki kosalela na mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza.