Yaká koyangana na assemblée ya distrike “baninga na bonsomi”!
Mikolo misato mibongisami mpenza malamu mpo na mateya na Biblia mizali kozela yo. Zala wana kobanda Vendredi na ntongo na 10h20, ntango assemblée ekobanda na miziki. Zwa litomba na diskur ya bofungoli assemblée, “Mpo na nini kotya likebi na biso na mobeko ya kokoka na bonsomi?” mpe discours-clé oyo ekosukisa programme ya Avant-midi “Bonsomi oyo Nzambe azali kopesa: ntina na yango nini, ndenge nini kosalela yango?”
Vendredi na après-midi, batoli ekokundola baklisto ntina ya kokokisa mosala na bango ya basaleli na Nzambe. Tala masoló mibale oyo makolimbolama: “Ozali kosala—misala mpamba to mosala na Jéhovah?” mpe “Libota na bonsomi, nde lizali na mokumba.” Drame moko ekosalama na bilamba oyo bizalaki kolatama kala ekolendisa biso na kosalela bonsomi na biso mpo na mosala na biso epai na Jéhovah. Ekolakisa biso lisusu makambo oyo makómelaki bato oyo bazalaki elongo na Esdras baoyo, na mobu 468 liboso na ntango na biso, bazongaki longwa Babylone kino Yelusaleme mpo na kokembisa tempelo na Nzambe.
Programme ya Samedi na ntongo ekozala na symposium, “Bonsomi mpe mokumba na kati na libota,” oyo ekabolami na biteni misato. Diskur “Tobatela bonsomi na biso mpo na kosalela Jéhovah” ekosalisa biso na komitalela malamumalamu. Ekolandama na diskur oyo ekolobela komipesa epai na Jehovah mpe batisimo na boklisto. Na après-midi, mingi bakosepela kolanda na likebi nyonso lisoló “Libala ezali nzela ya kozwa bolamu?” Programme yango ekosuka na likambo moko likopesa esengo monene epai na baninga nyonso na bonsomi.
Na ntembe te okolinga kozala wana na dimanche na ntongo mpo na koyoka symposium “Tozala balɔbi na bato,” ekabolami na masoló misato. Ekozongela eteni moko moko ya lisese na Yesu ya molubá to monyama mpe bambisi, mpe ekolimbola mokumba oyo tokoki kozwa mpo na kokokisama na yango. Programme ya ntongo ekosuka na masolo mibale ya ntina mingi, ete: “Tosenzela na ‘ntango ya nsuka”’ mpe “Nani akobika na ‘ntango na mpasi’? ” Kozanga te na après-midi mpo na kolanda diskur publike “Tokumisa mokili na bonsomi oyo molakami na Nzambe.” Liboso na koyoka diskur ya nsuka na móto mingi, tokolanda boyekoli ya Mosenzeli oyo ebongisami na póso wana. Memá ekzamplere na yo ya Mosenzeli.