Longwa na Mabelé-Mama kino banzambe-basi na kobota bana
OYEBI elilingi ya nzambe-mwasi oyo atyami na ezipeli ya zulunalo oyo? Ezali lsis, nzambe-mama na Ezipito ya kala. Mbala mosusu osilá komona bikeko motindo oyo na bandako ya bikeko ya kala (musées) to kati na mokanda oyo molobeli Lisoló ya bato na kala. Kanisa naino moke: okokumbamela nzambe-mwasi lsis mpo na kosambela ye?
Soki ozali kati na moko na mangomba oyo emitangaka ete ezali ya boklisto, mbala mosusu motuna oyo makosepelisa yo te. Na ntembe te okoloba ete osambelaka Mozalisi, Ye oyo abengami “Tatá wa bísó ozali o likoló.” (Matai 6:9, Biblia Liloba lya Nzambe) Mbala mosusu likanisi ya kokumbama liboso na nzambe-mama ezali kokamwisa yo, to mpe ezali kosepelisa yo soko moke te. Nzokande losambo wana lopalanganaki mingi mpenza na boumeli ya Lisoló mobimba ya bato, mpe mbala mosusu ekotungisama wana okoyeba banani bazali lelo kosambela nzambe-mama monene.
Liboso na kolobela likambo yango, esengeli naino kozonga nsima na kotaleláká kopalangana ya losambo ya nzambe-mama na ntango na kala. Emonani ete losambo wana ezali motindo na losambo ya mangomba na lokutá uta kalakala. Bakundoli na biloko na kala basili komonisa bikeko mpe bililingi ya banzambe-mama oyo bikundolamaki kati na bitika ya kala na Mpótó mobimba, mpe longwa mikili mizali pembeni na mai monene Méditerranée kino lnde.
Mabelé-Mama etalelamaki lokola liziba ya seko ya mitindo na bomoi nyonso, oyo akopesaka bomoi mpe kozwa yango nsima na ntango na liwa. Mpo na ntina wana, bato bazalaki kosambela ye mpe bazalaki kobanga ye. Liboso, ekanisamaki ete azalaki kobota na nzela na kosangisa nzoto te. Na nsima, lisapo liyebisi ete abotaki mwana mobali, Likoló, nzambe mobali, oyo Mabelé—Mama akómaki mwasi na ye. Babalani wana basengelaki kobota ebele na banzambe-mibali mpe banzambe—basi.
Ebandeli na yango na Babilone
Kati na losambo ya Babilone, lstare azalaki nzambe-mwasi na lokumu mingi, oyo ekokanaki na lnana, nzambe-mwasi ya mboka Sumer. Azalaki mpenza bongolàbongola; ye moko nzambe mwasi na bitumba mpe nzambe-mwasi na bolingo mpe na pité. Kati na mokanda Les religions de Babylonie et d’Assyrie (Mangomba ya Babilone mpe ya Asulia), Edouard Dhorme, Mofalansé oyo ayekoli makambo ya Asia, alobi na ntina na lstare ete: “Azali nzambe—mwasi, mwasi monene, mama na motema mawa, ye oyo akoyokaka mabondeli, ye oyo akolobaka na ntina na bato epai na banzambe—mibali oyo basiliki mpe akolóngaka kokitisa nkanda na bango. . . . Akumisami koleka banzambe nyonso, akómi nzambe-mwasi oyo aleki banzambe-basi nyonso, mokonzi-mwasi ya banzambe nyonso, nkolo moyangeli na banzambe nyonso longwa na likoló kino na nsé.”
Basambeli na lstare bakobengaka ye ete “Ngɔndɔ,” “Ngɔndɔ Mosantu” mpe “Ngɔndɔ Mama.” Mokanda ya lingomba ya Suméroassyrien mobéngami “Libondeli na bileli epai na lstare,” mozali na maloba oyo ete: “Nabeleli yo, ɛ Mokonzi Mwasi kati na basi nyonso, nzambe-mwasi na banzambe-basi banso, ɛ lstare, mokonzi-mwasi na bato banso. . . . Batempelo, bisika mosantu, bitika na bulee, bandako nzambe, nyonso ezali mpo na yo. . . . Epai wapi batii naino elilingi na yo te?. . . . Tala epai nazali, ɛ Mokonzi Mwasi; ndima mabondeli na ngai.”a
Losambo ya banzambe—mama lopalangani
Edouard Dhorme alobeli “kopalangana na losambo ya lstare.” Losambo wana lopalanganaki na Mésopotamie mobimba, kasi bazalaki lisusu kosambela ye to banzambe-basi oyo babengamaki na bankombo mosusu nde bakokanaki na ye, na Ezipito, na Fenisia, na Kanana, lisusu mpe na Anatolie (na Asie Mineure), na Grese mpe na ltalia.
Nzambe-mama na lokumu mingi oyo bazalaki kosambela na Ezipito ezali lsis. Mokomi na makambo na kala, H. G. Wells akomaki ete: “lsis azalaki kobenda ebele na bandimi oyo bazalaki kopesa ye mbeka ya bomoi na bango. Bililingi na ye bityamaki kati na tempelo; alataki motɔlé na Mokonzi-mwasi ya Likoló, mpe amemaki mwana na ye moke, Horus. Buji minene epelisamaki mpe ezalaki kotanga bobele liboso na ye, mpe bitánda na makomi ya botɔndi ebakisamaki zingazinga na bitumbelo na ye ya mbeka.” (Esquisse de l’Histoire universelle) Losambo ya lsis lopalanganaki mingi mpenza na Ezipito. Lokómaki kino na mikili mizali pembenipembeni na mai monene Méditerranée, mingi mpenza na Grese mpe na Roma, ekómaki nkutu na mikili misusu ya Mpótó epai moi mokolalaka mpe epai na likoló.
Na Fenisia mpe na Kanana, nzambe-mama asambelamaki na nkombo Asitorete to Astarté, oyo emonisamaki lokola mwasi ya Bála. Lolenge moko na lstare, nzambe-mwasi na Babilone oyo akokani na ye, Asitorete azalaki ye moko nzambe-mwasi na kobota bana mpe nzambe-mwasi ya bitumba. Na Ezipito, bamonaki makomi na kala epai kuna Astarté abengami mwasi na Likoló mpe mokonzi-mwasi ya makoló. Bayisraele basalaki milende mingi mpo na kobundisa bopusi mabe ya losambo ya nzambe-mwasi na kobota bana.
Na nord—ouest, na Anatolia, nzambe-mwasi oyo akokani na lstare ezalaki Kubele (Cybèle), oyo abengami Mama Monene na banzambe. Abengami lisusu Mozalisi na biloko binso, Mopesi na biloko binso, Mama na baoyo nyonso bazali na bolamu. Losambo na Kubele lopalanganaki liboso longwa Anatolia kino Grese mpe na nsima, ekómaki na Roma, epai kuna ekólaki kino na bikeke ya liboso ya ntango na biso. Losambo ya nzambe-mwasi na kobota bana esangisaki kati na yango, mabina makasi, banganga—nzambe bazalaki komibeta fimbo, baoyo balukaki kokóma banganga-nzambe bazalaki komikátakata binama na nzoto na bango ete bakóma mikubé, mpe milulu oyo na boumeli na yango nzambe-mwasi azalaki kotambola, na molato kolata bilamba kitoko.b
Na ebandeli, Bagreke bazalaki kosambela nzambe-mwasi moko, Mabelé—Mama, na nkombo Gaia. Kasi losambo na bango loyaki kokóma na banzambe-basi mingi oyo bauti na lstare: Aphrodite, nzambe-mwasi na kobota bana mpe ya bolingo; Athéna, nzambe-mwasi ya bitumba mpe Déméter, nzambe-mwasi ya bolóni.
Na Roma, Vénus azalaki nzambe-mwasi ya bolingo mpe na motindo yango, akokani na Afrodite ya Grese mpe na lstare ya Babilone. Nzokande, Baloma bazalaki lisusu kosambela nzambe-mwasi lsis, Gybèle mpe Minerve (Athéna ya Grese), baoyo na motindo moko to mosusu bazalaki bobele elilingi ya lstare ya Babilone, ye ndakisa ya ebandeli.
Emonani polele ete na boumeli na bambula mingi, losambo ya nzambe-mama lotemelaki losambo ya peto oyo lopesami epai na Mozalisi monene, Jéhovah. Losambo ya nzambe—mama monene losili kosuka to mpe lozali kino na mikolo na biso? Lisoló lilandi
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ancient Near Eastern Texts, ebimisi na James B. Pritchard, Princeton University Press, nkasa 383, 384.
b Nzambe—mwasi mosusu na kobota bana oyo asambelamaki na Asie Mineure ezalaki Alatɛmi ya Efese, oyo tokolobela lisusu un lisoló lilandi likoyanola na mituna oyo.
[Elilingi na lokasa 3]
lstare ya Babilone amonisami lokola monzóto
[Eutelo ya bafɔtɔ]
British Museum
[Elilingi na lokasa 4]
lSIS ya Baezipito amemi nzambe-mwana Horus’
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Musée ya Louvre