Losambo ya nzambe-mama lozali kino lelo oyo?
LOSAMBO ya nzambe-mama lozalaki na eleko ya baklisto ya liboso. Ntoma Paulo akutanaki na yango na Efese, na Asie Mineure. Lokola esalaki ye na Atɛne, engumba mosusu epai kuna bazalaki kosambela nzambe-mama, Paulo apesaki litatoli na ntina na “Nzambe oyo asalaki mokili,” Mozalisi na bombi, oyo azali na “motinda na wolo te, soko na paláta te to na libánga te, na eloko esalemi na maboko mpe na mayele na bato te.” Esepelisaki Baefese te, baoyo mingi na bango bazalaki kosambela nzambe-mama Alatɛmi. Baoyo bazalaki kotonga bandako-nzambe na paláta mpo na nzambe-mwasi wana, babimisaki yikiyiki. Mpe bangangi soko ngonga mibale, ete: “Alatɛmi ya Baefese azali Monene!”—Misala 17:24, 29; 19:26, 34.
Alatɛmi ya Efese
Bagreke bazakaki mpe kosambela Alatɛmi, kasi Alatɛmi yango akeseni na oyo asambelamaki na Efese. Alatɛmi ya Grese azalaki ngɔndɔ nzambe-mwasi ya bokila mpe na kobotisa basi. Nzokande Alatɛmi ya Efese azalaki nzambe-mwasi na kobota bana. Tempelo monene oyo esalemaki mpo na ye na Efese, etalelamaki lokola moko na bikolo sambo ya kitoko mingi na mokili mobimba. Ekeko na ye oyo etalelamaki lokola ete ekitaki longwa na likoló, emonisaki ye lokola moboti na bana mingi, ntolo etondi na milongó ya mabɛlɛ mingi oyo mazalaki lokola maki. Bandimbola ndenge na ndenge epesamaki mpo na motindo na mabɛlɛ yango, na ndakisa ete emonisaki lokola mayaka ya maki to mpe mabindi na ngombe mobali. Ata ndimbola nini epesami, emonani polele ete ezali elilingi ya kobota bana.
Ndimbola moko ya ntina, engebene mokanda Nouvelle Encyclopédie britannique (angl.), ekeko ya ebandeli ya nzambe-mwasi wana “esalemaki na wolo, na mabaya ya ntalo, na paláta mpe na mabángá ya moïndo.” Ekeko moko na lokumu ya Alatɛmi ya Efese, oyo esalemaki na ekeke ya mibale, emonisi ye na elongi, na maboko mpe na makolo ya moïndo.
Ekeko ya Alatɛmi etambwisamaki na molulu moko kati na balabala. Molimboli na Biblia R. Rackham akomaki ete: “Tempelo [ya Alatɛmil ezalaki na . . . bikeko na ye, bisika mosantu na ye, biloko na ye ya bulee, biloko na ye ya wolo mpe na paláta, oyo ezalaki komemama na engumba mpe kozongisama kati na molulu monene na ntango na bafeti minene. Bafɛti wana ezalaki kobenda ebele na bato longwa na Asie Mineure mobimba ete baya kokumisa yango. Bazalaki kosomba bikeko mike ya nzambe—mwasi wana mpe bazalaki kokumisa ye ete azalaki Monene, Mwasi oyo aleki basi nyonso, Mokonzi—mwasi, Ngɔndɔ, “ye oyo akoyokaka mabondeli mpe akondimaka yango.” Kati na likambo oyo, esengelaki milende mingi mpo na Paulo mpe baklisto ya liboso ete bakumisa “Nzambe oyo asalaki mokili” na esika na kokumisa banzambe-mibali mpe banzambe—basi oyo basalemaki na “wolo, to na paláta to mpe na libángá.”
Longwa na nzambe-mama kino “Mama na Nzambe”
Ezali epai na bankulutu na lisangá ya Efese nde Paulo asakolaki lipengwi. Ayebisaki bango ete bapengwi bakotelema mpo na kolakisa “mateya na kokosa.” (Misala 20:17, 28-30) Moko na makámá oyo mazalaki kobundisa lisangá ya Efese, ezalaki bozongi na losambo ya nzambe-mama. Bozongi wana bosalemaki solo?
Tala oyo tokoki kotanga kati na mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique (angl.), ete: “Mboka mosantu, Efese etalelamaki lokola esika oyo [ntomalyoane akundamaki. . . . Lisapo mosusu lisalemaki na Likita ya Efese (431), lityaki santu Yoane esika moko na Santu Ngɔndɔ Marie. Ndako-nzambe oyo kati na yango basalaki Likita wana ebengamaki ndako-nzambe ya Marie.” Mokanda mosusu ya katolike (Théo—Nouvelle Encyclopédie catholique) molobeli “lisapo lindimami” liye limonisi ete Marie akendeki elongo na Yoane na mboka Efese, epai kuna akendeki kokufa. Mpo na nini boyokani oyo bozali kati na Efese mpe Marie ezali na ntina mingi mpo na biso?
Totika ete mokanda Nouvelle Encyclopédie britannique ayanola: “Losambo ya mama na Nzambe lozwaki nguya na yango na ntango Lingomba na boklisto likómaki Lingomba ya Leta na nsé na boyangeli ya Kostanté mpe ete Bapakano mingi bakɔtaki kati na yango. Bobangi na bango na Nzambe mpe lisosoli na bango mpo na makambo na Nzambe, etongamaki mingi mpenza na losambo ya ‘mama monene’ mpe na ‘ngɔndɔ nzambe,’ losambo oyo louti longwa na mangomba minene ya Babilone mpe ya Asulia.” Ekokaki kozala na esika mosusu malamu koleka Efese mpo na “kokɔtisa” losambo ya nzambe-mama kati na “boklisto”?
Ezali bongo na Efese, na 431, nde epai likita lisangisaki mangomba nyonso, lisakolaki Marie ete azali “Théotokos,” liloba na greke ovo lilimboli “oyo aboti Nzambe,” to “Mama na Nzambe.” Mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique (angl.) molobi ete: “Na ntembe te, kosalelama ya liloba wana na Lingomba, ezalaki na ntina monene kati na bokóli ya liteya mpe na losambo ya Marie na bikeke bilandaki.”
Batiká ya Ndako-nzambe epai likita yango lisalemaki, “Ndako-nzambe ya Ngɔndɔ Marie,” ezali naino na mikolo na biso likoló na bitiká ya Efese na kala. Okoki mpe kokende kotala ndako—nzambe oyo, engebene lisapo, ezalaki ndako epai kuna Marie afandaki mpe akufaki wana. Na 1967, pape Paul VI akendeki kotala bandako-nzambe wana esalemaki mpo na losambo ya Marie na Efese.
Na yango, Efese ezali esika epai losambo na Bapakano ya nzambe-mama, motindo na oyo Paulo akutanaki na yango na ekeke ya liboso, ebongolamaki na losambo na molende mpo na Marie oyo akómisamaki “Mama na Nzambe.” Ezali libosoliboso na nzela na losambo ya Marie nde losambo ya nzambe—mama lozali kokóba kosalema kati na mikili oyo emibengaka ete ya boklisto.
Losambo ya nzambe-mama lozali kino lelo oyo
Mokanda Encyclopedia of Religion and Ethis motangi molimboli na Biblia W. Ramsay, oyo alimboli ete “na ekeke ya mitano, lokumu lopesamaki na Ngɔndɔ Marie na Efese, ezalaki lolenge [na sikal na losambo na Bapakano ya kala oyo ezalaki kosalema na Anatolia.” Tala oyo tozali kotanga kati na dictionnaire ya teoloji (New international Dictionary of New Testament Theology): “Atako ebimi nsima na K[ondimana ] na S[ika ], mateya ya katolike na ntina na ‘mama na Nzambe’ mpe ‘mokonzi—mwasi ya likoló,’ euti na motindo na losambo na kala ya Moyen-Orient. . . . Kati na losambo ya Marie, toyei kokuta lisusu ebele na makambo ya losambo oyo Bapakano bazalaki kosalela nzambe-mama.”
Makambo yango mazali bobele bokokani te, mpamba te ezali mingi mpenza mpe na sikisiki. Tokoki te kobosana bokokani oyo bozali kati na bikeko ya mama kino mwana, oyo ndambo emonisi Ngɔndɔ Marie, mpe mosusu emonisi bamoko na banzambe—basi ya Bapakano, lokola lsis. Ebele na bikeko mpe bililingi ya Ngɔndɔ moïndo oyo ezali kati na bandako-nzambe ya katolike na bipai binso na mokili, ekoki bobele kokundwela biso ekeko ya Alatɛmi. Théo —Nouvelle Encyclopédie catholique elobi na ntina na Bangɔndɔ yango moïndo, ete: “Kati na losambo ya bato banso, yango emonani lokola motindo oyo mosengelaki komema losambo ya Diane[alatɛmil . . . to Kubele (Cybèle) epai na losambo ya Marie.” Milulu ya Kotombwama na likoló, ya Ngɔndɔ Marie, ezwi mpe libandeli na yango kati na milulu mizalaki kosalema mpo na lokumu ya Kubele mpe Alatɛmi.
Ata bankombo oyo epesami na Marie ezali kokundwela biso banzambe-basi ya Bapakano. lstare akumisamaki lokola “Ngɔndɔ Mosantu,” “Mwasi monene” mpe “mama na motema mawa, ye oyo akoyokaka mabondeli.” lsis mpe Astarté babengamaki “Mokonzi-mwasi ya Likoló.” Kubele abengamaki na nkombo “Mama ya basantu nyonso.” Bankombo nyonso wana, elongo na mwa kokesena, epesameli Marie.
Vatican ll elendisaki losambo ya “Ngɔndɔ mosantu.” Pape Jean-Paul ll ayebani mingi mpo na limemya monene oyo azali na yango mpo na Marie. Na boumeli ya mibémbo milai, azali kolekisa libaku moko te mpo na kotala bisika mosantu ya Marie, na ndakisa lokola oyo ya Ngɔndɔ moïndo na mboka Setokwa (Czestochowa), na Pologne. Abondelaki Marie na ntina na mokili mobimba. Ezali bongo likambo ya kokamwa te na komona maloba oyo kati na lisoló “Nzambe-mama,” na mokanda Nouvelle Encyclopédie britannique, ete: “Nkombo yango epesamaki epai na bato mingi, lokola ‘Basi kitoko ya eleko na kala’ mpe na Ngɔndɔ Marie.”
Kasi soki losambo ya nzambe-mama lozali kino na mikolo na biso, ezali bobele te mpo na losambo oyo bakatolike bazali kopesa epai na Marie. Likambo na kokamwa, bakɔteli na lotomo mpe na mikumba ya basi, basili kobimisa mikanda mingi na ntina na losambo ya nzambe-mama. Bakanisi ete kati na mokili na biso ya mabe oyo moyangelami na mobali epai basi banyokolami mingi mpenza, losambo ya mwasi ezali nde komonisa ete bato bakómi pene na mokili mozangi mabe. Na lolenge emonani, bakanisi ete mokili mokozala esika kitoko na mikolo na biso mpe mingi mpenza soki ezalaki na nsé na bopusi ya basi.
Nzokande, losambo ya nzambe-mwasi lopesaki kimya na mokili ya kala te, mpe ekopesa mpe kimya te na mokili ya ntango oyo. Lisusu, bobele ebele na bato, bamilió na bato oyo basili kosangana na ba Témoins de Jéhovah nde bandimisami ete mabelé makobikisama te na nzela na Marie. Ezali mabe te ete bamemya ye mpe balinga ye mingi, mpamba te bango bazali kotalela ye lokola mwasi na sembo ya ekeke ya liboso, oyo azwaki libaku kitoko ya kobota Yesu mpe kobɔkɔla ye. Ata soko malɔmbo mosusu mazali solo, ba Témoins de Jéhovah bandimi te ete Lingomba ya Bonsomi ya Mwasi ekoki kosala mokili ya kimya. Mpo na yango, bazali kotya motema epai na Nzambe oyo Paulo asakolaki epai na bato ya Atɛne mpe epai na Baefese, ete “Nzambe oyo asalaki mokili mpe biloko nyonso bizali na yango.” (Misala 17:24; 19:11, 17, 20) Nzambe wana Mozwi-na-Nguya—Nyonso, oyo azali na nkombo Jéhovah, asili kolaka mokili ya sika, mokili kitoko epai kuna “boyengebene bokozala,” mpe tokoki kotya elikya nyonso na eleká oyo—2 Petelo 3:13.
Likanisi ya Biblia na ntina na etelemelo ya basi liboso na Nzambe mpe liboso na mibali, ekotalelama na masoló malandi kati na zulunalo oyo.
[Elilingi na lokasa 5]
ASITORETE nzambe-mwasi na pite mpe na bitumba na Kana
[Elilingi na lokasa 6]
ALATƐMI ya Efese nzambe-mwasi na kobota bana
[Elilingi na lokasa 7]
“MAMA NA NZAMBE” na boklisto ya lokutá
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Chartres Cathedral, France