Bilenge baklisto—bozala makasi kati na kondima
BASAKOLAKI ete “moto moko azanga te.” Bana ya kelasi nyonso na eteyelo moko na Japon basengelaki kozala na likita oyo eyanganisaki bato nyonso ya eteyelo kati na ndako ya makita. Elenge moklisto moko asengelaki te kosangana na makanisi mosusu malobami kati na loyembo ya bokumisi eteyelo to hymne. Akanisaki boye, “Bayebi ete, loyembo ya bokumisi eteyelo ekoyembama. Kasi na kokutana na mokakatano moko te. Lokola momeseno, na kofanda na nsuka mpenza.”
Nzokande, ntango elenge Témoin de Jéhovah akɔtaki na ndako ya makita, amonaki ete balakisi nyonso bafandaki na bisika ya nsuka ya molongo. Na bongo ayaki kofanda kaka liboso na bango. Ntango bayekoli mosusu batelemaki mpo na koyemba loyembo ya bokumisi eteyelo, ye atikalaki ya kofanda na limemya nyonso. Kasi balakisi basepelaki na yango te. Bamekaki kotelemisa ye na makasi Ozali komimona na ezalela ya motindo wana? Mbɛlɛ olingaki kosala nini?
Mpo na nini kondima ya makasi ezali na ntina
Lokola ekozala malamu soki bato batiki baklisto kimya mpe na nsomi ya kozala na bomoi na boyokani na lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia! Nzokande, mbala mingi baklisto basengeli kokutana na mikakatano ya mpasi. Yango esengeli kokamwisa biso te, mpamba te Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, alobaki: “Soko basili konyokola ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoane 15:20). Longola minyoko oyo bazali kokutana na yango, makambo mosusu makoki kobima oyo mazali kotya kondima ya basaleli na Nzambe na komekama.
Mbala mingi bilenge baklisto bazali na mposa ya kozala na kondima moko makasi mpo na kolonga mikakatano oyo bazali kokutana na yango na eteyelo. Atako bongo, bazali kokutana, na baninga ya kelasi oyo elobeli na bango ezali mabe to ezalela na bango ezali koyokisa Nzambe nsoni. Bakoki kozwa bopusi na bolingo ya ekolo oyo ezali kokola ntango nyonso mpe kotungisama makasi mpo na bokomisi nkombo na ekipe ya kobeta ndembo, kosangana na makambo ya politike to oyo ekoki kozala likámá mpo na elimo na bango. Balakisi mpe bayekoli mosusu bakoki komeka kopusa bango mpo ete babebisa bindimeli na bango. Bilenge baklisto basengeli kotya motema na bango na elimo ya Jéhovah mpo na komonisa kondima ya ntina oyo ekosalisa bango na koyanola mpo na kolongisa elikya na bango na kolobáká kozanga okakatana—Matai 10:19, 20; Bagalatia 5:22, 23.
‘Zala pene na koyanola’
Toli na ntóma Petelo ezali na ntina ezala mpo na bilenge baklisto to mpe mpo na bakolo. Akomaki ete: “[Boselingwa] mikolo nyonso mpo na kozongisa monoko na moto na moto oyo akotuna bino mpo na ntina na elikya ezali kati na bino, kasi bozongisa monoko yango na bopolo mpe limemya ya bozindo.” (1 Petelo 3:15) Esengeli kosala nini mpo na kozala pene na koyanola na motindo yango? Ya liboso, osengeli koyeba oyo Biblia ezali koteya. Mpo na kozwa etelemelo makasi na eteyelo na makambo lokola bolingo ya ekolo, politike, bangi to makambo matali mibali mpe basi, osengeli koyeba liboso ntina ya etelemeli yango ya boklisto mpe komipesa mpenza.
Na ndakisa, ntóma Paulo apesaki toli na baninga na ye baklisto ete: “Bomizimbisa te. Baninga mabe bakobebisaka bizaleli malamu. ” (1 Bakolinti 15:33) Ondimi likanisi yango? Lokola Paulo amonisaki yango, ezali mpasi te na komitika kozimbisama na ntango ezali likambo litali baninga oyo tozali kozala na bango mingi. Moto moko akoki komonana ete azali moto malamu. Kasi soki azali na mokano moko te elongo na yo mpo na mosala ya Jéhovah to mpe soki azali na kondima te na bilaka ya Biblia, azali moninga mabe. Mpo na nini? Mpo ete bomoi na ye esimbami na mikano mosusu, mpe biloko oyo bizali na ntina mingi mpo na moklisto bikoki kozala na litomba moke mpo na ye.
Likambo na kokamwa ezali wana te, mpo ete Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: ’‘Bazali bato na mokili te, lokola ngai mpe nazali moto na mokili te.” Ekoki kosalama te kozala moklisto ya solo mpe na mbala moko kozala moninga ya mokili oyo Satana azali nzambe na yango. (2 Bakolinti 4:4) Omoni na motindo nini, na komikabolaka na mokili, moklisto azali komibatela na bizaleli mabe mpe na kowelana oyo ezali kobebisa bomoi ya bato ebele lelo? Soki ee, na bongo okoki koyeba mpo na nini osengeli kokabwana na mokili, ata soki yango ekosenga ete osangana te na masano mosusu ya eteyelo.a
Ntina ya kozala na kondima makasi mpe kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso kati na bomoi emonisamaki na likambo ya elenge mwasi moko Témoin de Jéhovah. (Matai 6:33) Ntango bayebisaki dati ya bomeki ebongiseli oyo ezwamaki mpo na bopesi mapolomi, ayaki koyeba ete dati yango ekokani na oyo ya assemblée de circonscription oyo azalaki kokana kokende. Akómaki mokanda oyo na kati na yango alimbolaki na limemya nyonso mpo na nini akozala te na ebongiseli yango, mpe apesaki yango na molakisi na ye liboso na kokota na kelasi. Na nsuka na kelasi, molakisi asololaki na ye na pembeni mpe asengaki na ye alimbola lisusu mpo na nini akozala te na répétition. Elenge mwasi asololi: “Alingaki koyeba soki maloba oyo nazalaki kobimisa ezalaki ndenge moko. Alingaki mpe koyeba soki ezalaki makanisi na ngai moko, to makanisi ya mama na ngai. Komonaka ete ezalaki makanisi na ngai moko, aboyaki te.”
‘Zala pene na koyanola liboso na moto nyonso’
Mbala mingi bilenge baklisto bazali komona ete soki bamonisi polele etelemelo na bango epai na balakisi mpe na baninga mosusu liboso ete bakoma na momekano, masenginya ezalaka makasi mingi te ntango mikakatano mibimaki mpenza. Elenge mwasi moko moklisto Mojaponais asololaki ete, ntango azalaki na mibu 11, basengaki ete bana kelasi nyonso ya eteyelo na bango bayangana na feti ya Noël. Bayekoli ya bakelasi minene bamekaki kopusa ye na kosangana na feti yango, kasi ayaki te, mpe molakisi na ye akangaki ntina na ekateli na ye. Mpo na nini? Mpo ete, mwa moke liboso ya bozongi na kelasi, elenge mwasi moklisto mpe baboti na ye basololaki elongo na molakisi mpo na kolimbola etelemelo oyo ba Témoins de Jéhovah bazalaka na yango kati na bibongiseli bikeseni.
Ntango bazali koteya, bilenge baklisto mosusu bazali kobanga kokutana na baninga na bango ya kelasi to mpe balakisi na bango. Ozali na kobanga motindo yango? Soki ee, mpo na nini te kobanda liboso mpe koyebisa na baninga na yo ete ozali kosakola ndako na ndako? Limbola bango mpe mpo na nini ozali kosala yango. Témoin de Jéhovah moko ya mibu 14 alobaki ete: “Na eteyelo, bato nyonso bayebi ete nazali Témoin. Ya solo, bayebi yango malamu ata soki nakutani na baninga ntango nazali kati na mosala ya kosakola, nayokaka na ngai mabe te. Mingimingi bayokaka, mpe mbala mingi bazwaka mikanda.” Elenge moklisto moko ya mobali ya mibu 12 alimboli ete amizelaka kokutana na baninga na ye ya kelasi ntango azali na mosala ya kosakola. Na esika ya kobanga mpo na likanisi yango, azongelaka ntango nyonso makambo oyo azali kokana koloba soki ntango na yango ekoki. Na bongo azali pene na kolakisa bantina makasi ya kondima na ye.
Na biteyelo mingi, bazali koloba ete milulu oyo misalamaka na nsima na ngonga ya kelasi ezali likambo ya liponi ya moto ye moko. Nzokande, na misala, balakisi mpe bayekoli bazali kosala bopusi makasi likoló ya basusu mpo ete basangana na milulu motindo wana. Moklisto moko ya mwasi ya mibu 20 azwaki nzela ya malamu na kosukisa masenginya yango. Alobi ete, “Nasengaki mosala ya pionnier auxiliaire na boumeli ya kelasi na ngai ya secondaire. Bato nyonso bayebaki ete namipesaki mingi na misala na ngai ya boklisto na esika ya kosala makambo mosusu.” Leki na ye ya mwasi mpe alandaki ndakisa na ye. Na boumeli ya boyekoli na bango bilenge ba Témoins bazali kobanda mbala moko mosala ya pionnier auxiliaire kino kokoma pionnier permanent na nsuka ya boyekoli na bango, kokomaka bongo basakoli na Bokonzi ya ntango nyonso.
Kobebisa te mbano oyo ekoki kozwama na ezaleli na yo kitoko mpe na litatoli na yo ya molende. Na esika ete ofanda kimya, mpo na nini te kolakisa ete ozali na kondima makasi na kolobaka na limemya kasi na mpiko? Ezali yango nde elenge mwasi moko Moyisraele oyo amemamaki lokola moto na boloko mpe oyo asukaki na kokóma na ndako ya mokonzi monene na basoda ya sulya na nkombo Namana asalaki. (2 Mikonzi 5:2-4) Na likambo ya mwana mwasi oyo moke, nkombo ya Jéhovah ekumisamaki. Na komonisaka kondima ya lolenge wana, okoki, yo mpe, kokumisa Nzambe mpe mbala mosusu kosalisa bato mosusu na kozwa ekateli ya kokumisa nkombo ya Jéhovah na ngala na bango.
Likambo lizali ete biso tokoki te koangana mpe kotikala baklisto. Yesu alobaki: “Moto na moto oyo akoyambola ngai liboso na bato, ngai mpe na koyambola ye liboso na Tata na ngai na Likolo.” (Matai 10:32, 33) Kozala moyekoli na Yesu na kolakisaka, kondima makasi ezali mokumba monene, boye te?
Lisalisi libongisami mpo na yo
Mpo na kozwa ekateli makasi lokola Témoin de Jéhovah, ozali na mposa ya kozala na kondima makasi. Mpo na kozwa ekateli yango, osengeli koyekola Biblia mingi, koyangana na makita ya boklisto mpe kosangana na mosala ya kosakola. Soki omoni ete, atako bongo, eloko moko ezangi yo, osengeli kosala nini? Moyekoli Yakobo akomaki: “Soko moko na bino azangi mayele, asenga Nzambe oyo apesaka na bato nyonso na kopesa malamu, oyo mpe akopamelaka te.” (Yakobo 1:5) Yebisa na Jéhovah mitungisi na yo; akoki kopesa yo nguya ya kolonga mikakatano to minyoko oyo kondima na yo ezali kokutana na yango.
Elenge moklisto akoki kosala lisusu nini? Mokanda na Masese ezali kopesa biso toli oyo: “Yokamela tata na yo oyo aboti yo mpe tyola mama na yo te wana ekonuna ye.” (Masese 23:22) Ntoma Paulo abakisaki na ntina yango ntango alobaki ete: “Bino bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, mpo ekoki bongo kati na Nkolo.” (Bakolose 3:20) Baboti na yo baklisto bakoki kosalisa bino na kozala makasi kati na kondima. Yoka makanisi na bango. Na lisalisi na bango, luka kati na Makomami Mosantu mpe mikanda oyo mizali kolobela Biblia, batoli mpe masolo na basakoli. Na yango yo mpe baboti na yo bokozwa esengo, mpe yango ekosalisa bino na kolonga nsoni mpe kobanga.—2 Timote 1:7.
Zwa litomba na bibongiseli oyo Jéhovah azwi na nzela ya lisangá ya boklisto. Bongisa malamu makita. Solola na bankulutu mpe na baklisto mosusu oyo basili kolonga mikakatano ndenge moko na oyo ozali kokutana na yango sikawa. Salomo alobaki: “Moto na mayele akoyoka mpe akofulukisa mayele, moto na boyebi akozwa toli malamu.” (Masese 1:5) Na yango, zwa litomba na oyo bakolo bakoki kolakisa yo. Bilenge baklisto oyo bazali kolonga mikakatano mikokani na oyo ya yo bakoki mpe kosalisa yo.
Bosembo ezali komema mapamboli
Na kozaláká ntango nyonso na makasi kati na kondima, okosalela toli ya Paulo oyo ezali kolendisa na ‘kotelema ngwi, koninganaka te, kosalaka mosala na Nkolo ntango nyonso.’ (1 Bakolinti 15:58) Jéhovah ayebi bampasi na bino mpe azali komona yango. Asila kolendisa mingi oyo bazalaki na mitungisi ya ndenge moko na yo, akosalisa yo mpe; mokomi na Nzembo apesaki endimiseli na ntina yango na maloba oyo: “Kitisa mokumba na yo epai na Jéhovah mpe ye akokummba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.”—Nzembo 55:22.
Ntóma Petelo akómaki: “Kasi bozongisa monoko yango na bopolo mpe na limemya, mpo na lisosoli malamu ete na likambo lizali bango kotuka bino, baoyo bakotóngaka bizaleli na bino malamu kati na Klisto bayoka nsoni.” (1 Petelo 3:16) Soki oboyi kobuka mibeko mpe mitinda na sembo ya Jéhovah, okozala na lisosoli moko malamu, oyo ezali lipamboli mpenza ya bonzambe. Lisusu, okopesa ndakisa epai na bilenge oyo kondima na bango ezali na bolɛmbu. (1 Timote 4:15, 16) Etamboli na yo ekoki kolendisa bango na kosala milende mpo na kokoma makasi kati na kondima mpe bongo kokoma na makoki ya kolonga mimekano.
Okoki mpe kosalisa baoyo, liboso, bazalaki koloba mabe mpo na ezalela na yo ya boklisto. Omikundola maloba oyo matondi na elikya: “Na ntongo, kona mbóto na yo mpe na mpokwa pekisa loboko na yo te; mpo ete oyebi te soki nini ekokoma malamu to oyo to yango to soko nyonso mibale ekozala malamu.” (Mosakoli 11:6) Nani ayebi soki mbóto ya malamu oyo yo ozali kokona na komonisaka bosembo ekobimisa bambuma ya malamu?
Moko na mapomboli minene oyo okozwa ezali oyo ya kondimama na Jéhovah. Na nsima kondima makasi oyo yo okolakisa ekopesa yo bomoi ya seko. (Yoane 17:3; tala Yakobo 1:12.) Na kati na momekamo, bopemi moko te ya mwa ntango moke oyo ezwami na nzela na koangana Jéhovah ebongi mpo ete tobungisa likabo yango.
Nini ekomelaki elenge mobali oyo tolobelaki na ebandeli na lisolo oyo? Ayikaki mpiko na komekama makasi yango. Na nsuka na likita ya eteyelo, amekaki kolimbola na mayele etelemelo na ye epai na balakisi. Atako balakisi yango baboyaki koyoka ye, asepelisaki motema na Jéhovah. (Masese 27:11)Alandaki kolobela kondima na ye kino na nsuka ya boyekoli na ye. Na nsima akomaki pionnier. Tozali Kotombela ete mimekamo oyo bozali koyika na yango mpiko na bosembo, yango mpe, ekoma na nsuka moko ya malamu. Ekozala ndenge yango soki okomonisa kondima moko ya makasi.
Kobondela elimboli nini?
“Na Liebele, moboko ya liloba ya liboso oyo libongolami na libondeli ezali ‘kososola,’ mpe motindo oyo yango eyebani . . . elimboli na polele mpenza ‘komisosola.’” Ezali yango nde emonisami na mokanda ya mabondeli.(The Authorised Daily Prayer Book) Yango elakisi ete moko na mikumba ya libondeli ezali mpo na kosalisa moto na kotala soko akokisi mitinda na sembo mpe masengami na Nzambe.
Yango wana, elobami mpo na biso kati na Biblia ete, mabondeli na biso makoyokama malamu bobele soki tozali kosala mokano na Nzambe. “Jéhovah azali mosika na bato mabe, nde akoyokaka mabondeli na bayengebene.”—Masese 15:29; 1 Yoane 5:14.
Moto oyo akomisosolaka liboso na kobondela Jéhovah, akomimonisa mpenza na ezaleli ya komikitisa mpe na kobongola motema. Yango ezali komonisa motuya ya lisese oyo Yesu asalaki na ntina na Mofalisai na lolendo mpe mokɔngɔli na mpako oyo abongolaki motema, bango nyonso mibale bakendaki na tempelo mpo na kobondeli.—Luka 18:9-14.
Na bongo, ata soki tozali kobondela mpo na kotɔndo Jéhovah, mpo na kosanzola ye to mpo na kolɔmba ye, libondeli ezali ntango nyonso likambo oyo tosengeli komitalela malamu. Na motindo yango, libondeli likobɛlemisa biso na Jéhovah mpe likolendisa boyokani na biso elongo na ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na botaleli ya likambo yango mpe mitinda misusu ya Biblia, tala na mokanda Les jeunes s’ interrogent—Réponses pratiques, ebimisami na la the Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Etanda na lokasa 25]
LISALISI LIBONGISAMI MPO NA YO
◻ Yokamela bwanya ya baboti na yo.
◻ Zwa litomba na bibongiseli ya elimo oyo bikamatami na lisangá ya boklisto.
◻ Solola na bankulutu mpe na baklisto mosusu oyo mbala mosusu bakutanaki na mikakatano ndenge moko na yo.
◻ Solola na bilenge baklisto mosusu oyo bazali kolonga mimekano ya ndenge moko na oyo ozali kokutana na yango.