Bilenge—Yehova akobosana mosala na bino te!
“Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.”—BAEBELE 6:10.
1. Ndenge nini mokanda ya Baebele ná mokanda ya Malaki ezali komonisa ete Yehova azalaka na botɔndi mpo na mosala na yo?
OSILÁ kosalela moninga moko likambo ya malamu, kasi apesi yo botɔndi te? Soki osaleli moto moko boboto, bongo na nsima amoni yango mpamba to atali ata kotala te, ekoki kosala yo motema mpasi mpenza. Kasi, Yehova asalaka bongo te ntango tozali kosalela ye na motema na biso mobimba! Biblia elobi ete: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.” (Baebele 6:10) Kanisá naino oyo maloba yango ekoki kolimbola. Yehova akomona ete azangi boyengebene to asali mabe soki atali mpamba makambo oyo osalaki mpe ozali kosala na mosala na ye. Azali Nzambe oyo amonisaka mpenza botɔndi!—Malaki 3:10.
2. Nini ezali komonisa ete kosalela Yehova ezali mpenza libaku malamu?
2 Ozali na libaku malamu ya kosambela mpe kosalela Nzambe yango oyo azali na botɔndi. Lokola yo mpe ozali na kati ya bato soki milio motoba oyo bazali kosambela Yehova, nzokande na mokili mobimba bato bazali soki miliare motoba, elakisi ete ozali na libaku malamu mpenza. Lisusu, lokola ozali koyoka mpe kondima nsango malamu, elakisi ete miso ya Yehova ezalaka epai na yo. Kutu, Yesu alobaki ete: “Moto moko akoki koya epai na ngai te soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” (Yoane 6:44) Ya solo, Yehova asalisaka moto mokomoko ete azwa matomba na mbeka ya Klisto.
Zalá na botɔndi mpo na libaku malamu oyo ozali na yango
3. Ndenge nini bana ya Kola bamonisaki botɔndi na bango mpo na libaku malamu ya kosalela Yehova?
3 Ndenge tolobaki yango na lisolo oyo eleki, ozali na libaku monene ya kosepelisa motema ya Yehova. (Masese 27:11) Ezali likambo oyo osengeli kotalela yango bongobongo te. Na kopemama na elimo, bana ya Kola basalaki nzembo moko oyo bamonisaki botɔndi na bango mpo na libaku malamu ya kosalela Yehova. Tozali kotánga boye: “Mokolo moko na kati ya lopango na yo ezali malamu mingi koleka mikolo nkóto na esika mosusu. Naponi kotɛlɛma na ekɔtelo ya ndako ya Nzambe na ngai na esika natambolaka na bahema ya bato mabe.”—Nzembo 84:10, NW.
4. (a) Mpo na nini bilenge mosusu bakoki komona ete kosambela Yehova ezali nkaka? (b) Na ndenge nini Yehova amonisaka ete atyelaka basaleli na ye miso mpo na kopesa bango mbano?
4 Yo mpe omonaka bongo mpo na libaku malamu ya kosalela Tata na yo ya likoló? Ya solo, ntango mosusu ekoki komonana ete kosambela Yehova epekisaka yo makambo mosusu. Ezali solo ete kotosa mitinda ya Biblia esɛngaka komipimela makambo mosusu. Kasi, likambo nyonso oyo Yehova asɛngaka ezali se mpo na bolamu na yo. (Nzembo 1:1-3) Lisusu, Yehova amonaka milende oyo osalaka mpe asepelaka na bosembo na yo. Paulo akomaki ete Yehova “akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Yehova alukaka mabaku ya kopesa yo mbano. Mosakoli moko ya sembo na Yisalaele ya kala alobaki boye: “Miso ya [Yehova] ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.”—2 Ntango 16:9.
5. (a) Wapi lolenge moko oyo eleki malamu ya komonisa ete motema na yo mobimba ezali epai ya Yehova? (b) Mpo na nini koyebisa bato mosusu makambo oyo ondimaka ekoki komonana ete ezali mpasi?
5 Lolenge moko eleki malamu oyo okoki komonisa ete motema na yo mobimba ezali epai ya Yehova ezali ya koyebisa bato mosusu makambo na ye. Osí ozwá libaku ya koyebisa baninga na yo ya kelasi mateya ya lingomba na yo? Na ebandeli okoki komona ete ezali mpasi mpenza mpo osala yango mpe ata likanisi mpamba ya kosala yango ekoki kobangisa mwa moke. Ntango mosusu okomituna: ‘Bongo soki basɛki ngai? Soki bazweli ngai makanisi ete nazali na lingomba moko ya molili?’ Yesu alobaki ete moto nyonso te akondima koyoka nsango ya Bokonzi. (Yoane 15:20) Kasi, yango elingi koloba te ete bakobanda se kosɛka yo to koboya yo bomoi na yo mobimba. Kutu, ebele ya bilenge Batatoli bayokaki basololaki na baninga na bango mpe baninga yango bakómá kopesa bango limemya mingi mpo bamonisaki ete bazali kotosa mateya ya lingomba oyo bandimaka.
“Yehova akosalisa yo”
6, 7. (a) Ndenge nini elenge mwasi moko ya mbula 17 azwaki libaku ya kopesa baninga na ye ya kelasi litatoli? (b) Lisolo ya Jennifer eteyi yo nini?
6 Kasi ndenge nini okoki kozwa mpiko ya kolobela mateya oyo yo ondimaka? Ebongi kozwa ekateli ya kozala sembo mpe komibomba te ntango bato batuni yo lingomba na yo. Talá ndakisa ya Jennifer, elenge moko ya mbula 17. Ye alobi boye: “Ezalaki na ntango ya kolya na midi na eteyelo. Bana basi oyo tofandaki na bango mesa moko bazalaki kosolola makambo ya Nzambe, mpe moko na bango atunaki ngai soki nasambelaka na lingomba nini.” Jennifer ayokaki nsɔni mpo na kopesa eyano? Ye moko alobi ete: “Nayokaki nsɔni, mpamba te nayebaki te soki bakoloba na ngai nini na nsima.” Jennifer asalaki nini? Alobi ete: “Nayebisaki bango ete nazali Motatoli ya Yehova. Liboso, namonaki lokola ete bakamwaki. Nakanisi bazalaki kokanisa ete Batatoli ya Yehova bazali bato ya makambo ya ndenge mosusu. Yango wana babandaki kotuna ngai mituna, mpe nalimbwelaki bango makambo oyo bazalaki kokanisa ndenge mosusu. Banda mokolo wana, bamosusu kati na bango bazalaki mbala na mbala koya kotuna ngai mituna.”
7 Jennifer ayokaki nde mawa na ndenge ayebisaki bango mateya ya lingomba na ye? Te! Alobi ete: “Ntango ngonga ya kolya esilaki, nazalaki na esengo mpo na oyo nasalaki. Bana basi yango bayebi sikoyo Batatoli ya Yehova malamu.” Jennifer apesaka kaka toli moko: “Soki ozali kobanga kopesa baninga na yo ya kelasi to balakisi na yo litatoli, salá mbala moko libondeli. Yehova akosalisa yo. Okozala na esengo ete ozwaki libaku ya kopesa litatoli mpe olekisaki yango te.”—1 Petelo 3:15.
8. (a) Ndenge nini libondeli esalisaki Nehemia ntango likambo moko ya mbalakaka ekómelaki ye? (b) Wapi mwa makambo oyo okoki kokutana na yango na kelasi oyo ekoki kosɛnga ete osala libondeli mokuse na nse ya motema epai ya Yehova?
8 Tósimba ete Jennifer apesi toli ya ‘kobondela mbala moko’ Yehova na ntango ozwi libaku ya kolobela mateya ya lingomba na yo. Nehemia, mosali na mesa ya Alatazelezese, mokonzi ya Perse, asalaki mpenza bongo ntango akutanaki na likambo moko ya mbalakaka. Elongi ya Nehemia ezalaki kofunda ete azali na esengo te mpamba te azwaki nsango ete Bayuda bazali na mpasi mpe ete lopango ná bikuke ya Yelusaleme ebongisamaki naino te. Mokonzi amonaki ete Nehemia azali mawamawa, yango wana atunaki ye soki likambo nini ezali kotungisa ye. Liboso Nehemia apesa eyano, asalaki libondeli mpo na kozwa mayele. Na nsima, azwaki mpiko mpe asɛngaki nzela ya kokende na Yelusaleme mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga mboka oyo ebebaki. Alatazelezese apesaki Nehemia nzela. (Nehemia 2:1-8) Likambo yango eteyi yo nini? Soki ozali koyoka nsɔni ntango ozwi libaku ya koloba mateya ya lingomba na yo, salelá libaku malamu ozali na yango ya kobondela na nse ya motema. Petelo akomaki ete: ‘Bóbwaka mitungisi na bino nyonso likoló na [Yehova], mpamba te ye atyelaka bino likebi.’—1 Petelo 5:7; Nzembo 55:22.
“Bómibongisa ntango nyonso mpo na koloba”
9. Nini esalisaki Leah, elenge ya mbula 13, akabola buku Mituna oyo bilenge batunaka 23?
9 Tótalela ndakisa mosusu. Leah, elenge ya mbula 13, azalaki kotánga buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongia na ntango ya kolya na bopemi ya midi. Alobi boye: “Bana mosusu bazalaki kotala ngai mpe mwa moke na nsima bayaki ebele pembeni na ngai mpo na kobwaka liso na buku. Babandaki kotuna ngai soki buku yango ezali kolobela makambo nini.” Ntango babimaki na kelasi, bana basi minei basɛngaki Leah buku Mituna oyo bilenge batunaka. Bana basi yango bakómaki kolakisa bana mosusu buku yango, bango mpe basɛngaki Leah amemela bango buku yango. Na mwa bapɔsɔ oyo elandaki, Leah akabolaki buku Mituna oyo bilenge batunaka 23 epai ya bana-kelasi na bango ná baninga na bango. Ezalaki pɛtɛɛ mpo Leah aloba ntango bana mosusu batunaki ye makambo oyo azalaki kotánga? Te! Ye moko alobi ete: “Na ebandeli nazalaki koyoka nsɔni. Kasi, nasalaki libondeli, mpe nayebaki ete Yehova akosalisa ngai.”
10, 11. Ndenge nini mwana mwasi moko ya Yisalaele asalisaki mokonzi moko ya basoda ya Sulia na koyeba Yehova, mpe mbongwana nini mokonzi yango asalaki?
10 Lisolo ya Leah ekoki kotinda biso tókanisa likambo oyo ekómelaki mwana mwasi moko ya Yisalaele oyo bamemaki na boombo na Sulia. Namana, mokonzi moko ya basoda ya Sulia, azalaki na maladi ya maba. Ekoki kozala ete mwasi ya Namana nde abandaki lisolo oyo epesaki mwana yango nzela ya kolobela losambo na ye. Alobaki boye: “Soko nkolo na ngai azalaki liboso na mosakoli oyo azali na Samalia, mbɛlɛ ye akobikisa ye na [maba] na ye.”—2 Mikonzi 5:1-3.
11 Mpiko ya mwana mwasi wana esalisaki Namana na koyeba ete “Nzambe mosusu azali kati na mokili mobimba te bobele na Yisalaele.” Kutu, azwaki ekateli ete “akopesa mbeka ya kotumbama to mbeka ebomami epai na banzambe mosusu te bobele epai ya [Yehova].” (2 Mikonzi 5:15, 17) Na ntembe te Yehova apambolaki mpiko ya mwana mwasi wana. Akosala yango mpe mpo na bilenge ya lelo oyo. Leah amonaki yango. Nsima ya mikolo, baninga na ye mosusu ya kelasi bayebisaki ye ete buku Mituna oyo bilenge batunaka ezali kosalisa bango na kobongisa bizaleli na bango. Leah alobi ete: “Nazalaki na esengo mpamba te nayebaki ete nazalaki kosalisa bato mosusu báyeba Yehova mpe bábongola bomoi na bango.”
12. Ndenge nini okoki kozwa mpiko ya kolobela mateya ya lingomba na yo?
12 Yo mpe okoki kosala ndenge oyo Jennifer ná Leah basalaki. Landá toli ya Petelo, oyo akomaki ete lokola ozali moklisto, osengeli ‘komibongisa ntango nyonso mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni yo ntina ya elikya oyo ezali na kati na yo, kasi osalaka bongo na elimo ya boboto mpe na limemya makasi.’ (1 Petelo 3:15) Ndenge nini okoki kosala yango? Landá ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso oyo babondelaki Yehova asalisa bango mpo bákoka kosakola “na mpiko mpenza.” (Misala 4:29) Na nsima, zalá na mpiko mpo na koyebisa bato mosusu kondima na yo. Mbala mosusu yo moko okokamwa na matomba oyo okozwa. Na koleka, okosepelisa motema ya Yehova.
Bakasɛti-video mpe makambo mosusu
13. Bilenge mosusu basalelaki mabaku nini mpo na kopesa litatoli? (Talá bitanda na nkasa 20 mpe 21.)
13 Bilenge mingi basalelaki bakasɛti-video mpo na kolimbwela baninga na bango ya kelasi to balakisi na bango mateya ya lingomba na bango. Ntango mosusu, badevuare oyo bapesaki bango na kelasi epesaki bango mabaku ya kokumisa Yehova. Na ndakisa, na mateya ya istware, batindaki bilenge mibale Batatoli ya Yehova ya mbula 15 bákoma lisolo oyo ekolobela lingomba moko. Bango mibale basangisaki makanisi mpo na kokoma lisolo oyo elobelaki Batatoli ya Yehova, basalelaki buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu.b Basengelaki mpe koloba na boumeli ya miniti mitano mpo na kolimbola makambo oyo bakomaki. Na nsima, lokola molakisi ná bana-kelasi mosusu bazalaki na mituna ebele, babakiselaki bango miniti 20. Na bapɔsɔ oyo elandaki, baninga na bango ya kelasi bazalaki se kotuna bango mituna etali Batatoli ya Yehova!
14, 15. (a) Mpo na nini kobanga bato ezali motambo? (b) Mpo na nini osengeli kobanga te koyebisa bilenge mosusu bindimeli na yo?
14 Ndenge bandakisa oyo tolobeli emonisi yango, okoki kozwa mbano monene soki ozali koyebisa bato mateya oyo ondimaka lokola ozali Motatoli ya Yehova. Kotika te ete kobanga bato ezangisa yo libaku malamu mpe esengo ya kosalisa bato báyeba Yehova. Biblia elobi ete: “Kobanga bato ekoyeisa motambo; nde oyo akotalela [Yehova] akotombolama.”—Masese 29:25.
15 Kobosana te ete lokola ozali elenge moklisto, ozali na eloko moko oyo baninga na yo bazali na mposa na yango mpenza: ndenge ya kozala na bomoi ya malamu lelo mpe elaka ya bomoi ya seko na mikolo ezali koya. (1 Timote 4:8) Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete na États-Unis—ekólo oyo okoki kokanisa ete bato mingi basepelaka koyoka makambo ya Nzambe te to balandaka yango mpenza te—ankɛtɛ moko emonisaki ete soki batuni bilenge mibale, moko akoloba ete azwaka losambo na ye na lisɛki te; mpe soki batuni bilenge misato, moko kati na bango akoloba ete kondima ezali “eloko ya libosoliboso oyo atalelaka mpo na kosala makambo” na bomoi na ye. Na ntembe te, ezali se ndenge yango na mikili mosusu. Na yango, ekoki mpenza kozala ete baninga na yo ya kelasi bakosepela koyoka makambo ya Biblia oyo okoki koyebisa bango.
Elenge, pusaná penepene na Yehova
16. Longola koyebisa bato makambo ya Yehova, nini lisusu esɛngami mpo na kosepelisa ye?
16 Ya solo, kosepelisa motema ya Yehova elimboli kaka te koloba mpo na ye epai ya bato mosusu. Osengeli mpe kotosa mibeko na ye ya bizaleli malamu. Ntoma Yoane akomaki boye: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye; kutu bakomandema na ye ezali kilo te.” (1 Yoane 5:3) Okomona ete ezali mpenza bongo soki opusani penepene na Yehova. Ndenge nini okoki kosala yango?
17. Ndenge nini okoki kopusana penepene na Yehova?
17 Zwáká ntango ya kotánga Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia. Soki ozali komipesa mingi na koyekola makambo ya Yehova, okomona ete kotosa ye mpe koyebisa bato mosusu makambo na ye ekobanda kokóma pɛtɛɛ. Yesu alobaki ete: “Moto malamu abimisaka malamu na eloko ya motuya ya malamu ya motema na ye, . . . mpo uta na makambo oyo etondi na motema nde monɔkɔ na ye elobaka.” (Luka 6:45) Yango wana, tondisáká motema na yo na makambo ya malamu. Ekozala malamu soki omityeli mikano na likambo yango. Na ndakisa, okoki kotalela lisusu likambo ya kobongisa makita ya pɔsɔ oyo tozali kobanda. Na nsima, okoki komityela mokano ya kopesa biyano ya mikuse kasi oyo euti mpenza na motema. Ya solo, ezali na ntina ete osalelaka mpe makambo oyo ozali koyekola.—Bafilipi 4:9.
18. Ata soki batɛmɛli yo, okoki kozala na elikya nini?
18 Kosalela Yehova ememaka mapamboli ya libela. Ya solo, na bantango mosusu bakoki kotɛmɛla yo to kosɛka yo mpo ozali Motatoli ya Yehova. Kasi, kanisá lisusu Moize. Biblia elobi ete “azalaki kotala na likebi mpenza epai mbano ekofutama.” (Baebele 11:24-26) Yo mpe okoki kozala na elikya ete Yehova akopesa yo mbano mpo na milende oyo ozali kosala mpo na koyekola makambo na ye mpe koloba mpo na ye. Ɛɛ, ‘akobosana mosala na yo te mpe bolingo oyo omonisaki mpo na nkombo na ye.’—Baebele 6:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini okoki kondima ete mosala na yo ezali na motuya na miso ya Yehova?
• Mayele nini bilenge mosusu basalelaki mpo na kopesa litatoli na eteyelo?
• Ndenge nini okoki kozwa mpiko ya kopesa baninga na yo ya kelasi litatoli?
• Ndenge nini okoki kopusana penepene na Yehova?
[Etanda/Bililingi na lokasa 20]
Ata bana ya mike bazali kokumisa Yehova!
Ata bana bazali kopesa litatoli na eteyelo. Yoká bandakisa oyo.
Amber azali mwana mwasi ya mbula zomi mpe azali na kelasi ya mitano; mokolo moko na kelasi, bazalaki kotánga buku moko oyo elobeli ndenge oyo Banazi banyokolaki Bayuda na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Amber azwaki likanisi ya komemela molakisi na bango kasɛti-video Les triangles violets. Molakisi akamwaki na koyeba ete Banazi banyokolaki mpe Batatoli ya Yehova. Molakisi atalisaki bana-kelasi nyonso kasɛti yango.
Alexa, mwana mwasi ya mbula mwambe, akomelaki baninga na ye ya kelasi mokanda moko mpo na kolimbwela bango ntina oyo ye akokaki kozala na bango te na makambo oyo babongisaki mpo na kosepela fɛti ya Noele. Molakisi na bango asepelaki mingi na mokanda yango, asɛngaki Alexa atánga yango na mongongo makasi liboso ya baninga na ye ya kelasi mpe liboso ya bana ya bakelasi mosusu mibale! Na nsuka ya mokanda na ye, Alexa akomaki boye: “Bateyaka ngai ete natyolaka te bato oyo bandimaka makambo oyo ekeseni na oyo ngai nandimaka, natɔndi bino lokola bozali kotyola te ekateli na ngai ete nakosala fɛti ya Noele te.”
Ntango Eric akɔtaki kelasi ya liboso, amemaki Mokanda mpo na masolo ya Biblia na kelasi mpe asɛngaki nzela ya kolakisa yango baninga na ye ya kelasi. Molakisi na bango alobaki boye: “Ngai nazali na likanisi mosusu. Omoni boni soki otángeli baninga na yo lisolo moko?” Eric atángelaki bango. Na nsima, alobaki na bango ete oyo nyonso alingi kozwa mokanda ya ndenge wana atombola lobɔkɔ. Bana zomi na mwambe—na molakisi mpe—batombolaki mabɔkɔ! Eric azali komona sikoyo ete azali na teritware na ye mpo na kosakola.
Whitney, mwana mwasi ya mbula libwa, azali na botɔndi mpo na mwa buku Batatoli ya Yehova mpe kelasi.c Alobi boye: “Na bambula oyo eleki mama na ngai azalaki kopesa balakisi na ngai mwa buku yango, kasi na mbula oyo, ngai moko nde napesi yango molakisi na biso. Mpo na mwa buku yango, molakisi na biso aponaki ngai lokola ‘mwana kelasi ya malamu na pɔsɔ’ wana.”
[Maloba na nse ya lokasa]
c Mikanda nyonso oyo elobelami ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Bililingi na lokasa 21]
Makambo oyo bilenge mosusu basalaki mpo na kolobela kondima na bango
Ntango bapesaki bango devuare bákoma lisolo moko to bálobela likambo moko, basusu baponaki motó ya likambo oyo epesaki bango nzela ya kopesa litatoli
Bilenge mingi bapesaki balakisi na bango kasɛti-video to mokanda moko oyo elobeli likambo oyo bazalaki kolobela na kelasi
Bilenge mosusu, ntango bazalaki kotánga Biblia to mokanda moko oyo elimbolaka Biblia na ntango ya bopemi, bilenge mosusu bayaki penepene na bango mpe batunaki bango mituna
[Elilingi na lokasa 18]
Baoyo bayebi makambo mingi bakoki kolakisa bilenge kosalela Yehova