Totya motema na lobɔkɔ na kobikisa na Jéhovah
“Ɛ jéhovah, . . . zala lobɔkɔ na biso na ntɔngɔ nyonso, mpe lobiko na biso na ntango na mpasi.”—YISAYA 33:2, MN.
1. Na ndimbola nini Jéhovah ezali na lobɔkɔ un nguya?
LOBƆKO na Jéhovah ezali na nguya. Ya solo, loboko “Nzambe azali Elimo,” lobɔkɔ yango ezali ya mosuni te. (Yoane 4:24) Kati na Biblia, lobɔkɔ ezali elembo ya nguya. Ezali na lobɔkɔ na ye nde Nzambe akobikisaka libota na ye. Ee, ‘Nzambe azali koleisa etonga na ye lokola mobateli na mpate. Akoyanganisaka bana na mpate na lobɔkɔ na ye; akokumbaka Bango na ntolo na ye.’ (Yisaya 40:11; Nzembo 23: 1-4) Basaleli na Jéhovah bazali komiyoka na libateli kati na mabɔkɔ na ye na bolingo.—‘Tala Deteronome 3:24.
2. Mituna nini mizali kobenda likebi na biso?
2 Lolenge nini, na lobɔkɔ na ye, Jéhovah abikisaki basaleli na ye na ntango na kala mpe na mikolo na biso? Lisalisi nini Nzambe azali kopesa na lisangá oyo bango bazali kati na yango? Mpe mpo na nini basaleli na ye bakoki, kati na mpasi na bango nyonso, kotya motema na lobɔkɔ na kobikisa na Jéhovah?
Lobɔkɔ na kobikisa na Nzambe ezali kokokisa mosala na yango
3. Makomami mayebisi nini na ntina na kobikisama ya Bayisraele, baoyo bazalaki na boombo na Ezipito?
3 Mibu 3 500 sikawa, liboso na kobikisa Bayisraele, baoyo bazalaki na boombo na Ezipito, Nzambe alobaki epai na Moïse mosakoli na ye ete: “Lobela bato na Yisraele ete: ‘Ngai nazali Jéhovah, mpe nakobimisa bino na misala na Baezipito mpe nakobikisa bino na boombo na bango mpe nakosikola bino na lobɔkɔ losembolami mpe na bitumbu minene.”’ (Exode 6:6) Engebene maloba na ntoma Paulo, Nzambe abimisaki Bayisraele na Ezipito na “lobɔkɔ makasi.” (Misala 13:17) Na nsima, bana na Kola balobaki ete bolóngi mpo na kobotolama ya mokili na ndaká, eutaki na Nzambe: “Basangolaki mokili mpo na mbeli na bango te; mabɔkɔ na bango mpenza mabikisaki bango te, kasi litandu na yo na mobali mpe lobɔkɔ na yo mpe pole na elongi na yo, mpo ete yo osepelaki na bango.”—Nzembo 44:3.
4. Lolenge nini kotya motema un lobɔkɔ un kobikisa na Jéhovah ezwaki mbano na yango na ntango Baasulia babundisaki Yuda?
4 Na lobɔkɔ na ye, Jéhovah asalisaki lisusu basaleli na ye baoyo babundisamaki na Asulia. Na eleko wana, mosakoli Yisaya asalaki libondeli oyo ete: “Ɛ Jéhovah, yokela biso mawa. Zala lobɔkɔ na biso na ntɔngɔ nyonso, mpe zala lobiko na biso na ntango na mpasi.” (Yisaya 33:2, MN) Nzambe andimaki libondeli yango, mpamba te anzelu na ye abomaki basodá 185 000 na molako ya Baasulia; mpe Sanekeliba atikaki kobundisa Yelusaleme, “na nsoni na elongi na ye.” (2 Ntango 32:21; Yisaya 37:33-37) Ye oyo akotyaka motema na lobɔkɔ na kobikisa na Jéhovah, ntango nyonso akozwaka mbano.
5. Lobɔkɔ na nguya na Nzambe esalaki nini mpo un baklisto oyo banyokwamaki na Etumbu ya Liboso ya mokili mobimba?
5 Na Etumba ya Liboso va mokili mobimba, lobɔkɔ na nguya na Nzambe ebikisaki baklisto bapakolami baoyo banyokwamaki. Na 1918, banguna babundisaki esika oyo biro ya Collège central ezalaki, mpe baklisto oyo bazalaki na mikumba batyamaki na bolɔ́kɔ. Na bobangi ya bakonzi ya mokili, bapakolami bakómaki pene na kotika kosakola. Kasi, babondelaki mpo ete bazwa lisusu nguya mpe ete bapɛtolama na lisumu ya kotika kosala mosala mpe na mbindo oyo eutaki na bobangi. Nzambe andimaki libondeli yango na kosenzeláká ete baklisto oyo bakangamaki, babimisama na bolɔ́kɔ mpe, nsima na mwa ntango moke, tribinale elongolaki bifundeli nyonso bafundamaki na yango. Solo oyo eyebisamaki na assemblée ya mobu 1919 mpe kosopama ya elimo na nguya na Jéhovah, epesaki nzela ete bapakolami bazongela mosala na bango mpo na Nzambe na molende nyonso, mpo na kokokana ya nsuka ya Yoele 2: 28-32—Emoniseli 11:7-12.
Lisalisi kati na lisangá
6. Lolenge nini toyebi ete likoki ezali na koyika mpiko na ezalela moko ya mpasi kati na lisangá?
6 Lokola Nzambe akopesaka lisungi na ye epai na lisangá na ye mobimba, bobele bongo lobɔkɔ na ye lokosalisaka mosangani mokomoko ya lisangá wana. Ya solo, lokola bato banso bazangi kokoka. ezalela va kokoka ezali ata na lisangá moko te. (Baloma 5:12) Ekoki bongo kokóma ete basaleli mosusu na Jéhovah bazwa mikakatano likoló na basangani mosusu ya lisangá. Na ndakisa, Gaïus asalaki “mosala na sembo” na koyambáká bandeko oyo bazalaki kokende kotala lisangá, nzokande Diotelefe ayambaki bango te; mpe bobele yango te, kasi azalaki komeka kobimisa na lisangá, baoyo bazalaki na boyambi. (3 Yoane 5, 9, 10) Atako bongo, Jéhovah asalisaki Gaïus mpe bamosusu mpo ete balanda komonisa boyambi mpe kopesa bongo lisungi na mosala ya kosakola Bokonzi. Soki tokobondela Jéhovah na elikya nyonso, biso mpe tokoki kolanda kosala misala na sembo na kozeláká ete Nzambe abongisa likambo oyo lizali komeka kondima na biso.
7. Na ezalela nini basangani na sembo ya lisangá ya Kolinti bakangamaki na Nzambe?
7 Kanisa naino soki ozalaki na lisangá ya Kolinti na ekeke ya liboso. Na eleko moko, mikabwano mibebisaki bomoko na yango; bapesaki nzela na pité, likambo oyo lizalaki likámá mpo na elimo ya lisangá wana. (1 Bakolinti 1:10, 11; 5:1-5) Baklisto mosusu bazalaki kofunda basangani mosusu ya lisangá na tribinale to mpe koswana na makambo mingi. (1 Bakolinti 6:1-8; 8:1-13) Matáta, zuwa, nkanda mpe mobulu eyeisaki nkaká na bomoi. Bamoko bakómaki kino kobɛta ntembe mpo na bokonzi oyo Paulo azalaki na yango mpe kotyola ye mpo na makoki na ye ya molobi. (2 Bakolinti 10:10) Nzokande, na momekamo wana, basangani na sembo ya lisangá bakangamaki epai na Nzambe.
8, 9. Tosengeli kosala nini soki tokutani na ezalela moko ya mwasi kati na lisangá?
8 Tosengeli te kotika libota na Nzambe likoló na likambo moko ya mpasi oyo tokutani na yango. (Tala Yoane 6:66-69) Tozala na motema pɛtɛɛ bamoko epai na bamosusu, na Kososoláká ete esengeli ntango mingi mpo na bato mosusu ete balata “bomoto ya sika” mpe balakisa bizaleli lokola motema mawa, ezaleli na malamu, elimo ya komikitisa, bopɔlɔ mpe motema molai. Lisusu, basaleli na Nzambe bauti na bisika bikeseni; na yango, biso banso tosengeli komonisa bolingo mpe koyeba kolimbisa.—Bakolose 3:10-14.
9 Nsima na kolekisa bambula mingi kati na mosala ya Jéhovah, ndeko mobali moko alobaki ete: “Eloko oyo ezalaki na ntina mingi mpo na ngai, ezalaki bobele bokangani na ngai makasi na lisangá na Jéhovah oyo ezali komonana. Ngai moko nasosoli nokinoki ete ezali libunga monene na komipesa na makanisi na bato. Na ntango nakanisaki na likambo wana, nazwaki ekateli ete nakolongwa te na lisangá wana ya sembo. Lolenge nini mosusu tokoki kozwa ngolu mpe mapamboli na Jéhovah?” Yo moko ozali nde kosepela na libaku kitoko oyo ozali na yango mpo na kosalela Jéhovah mpe libota na ye ya esengo? (Nzembo 100:2) Soko ezali bongo, okopesa nzela na likambo moko te ete etangola yo na lisangá na Nzambe to ebebisa boyokani na yo elongo na Ye oyo lobɔkɔ na ye lokobikisaka baoyo nyonso balingi ye.
Lisalisi na ntango tomekami
10. (a) Lolenge nini libondeli likosalisaka basaleli na Nzambe na kolónga komekama? (b) Endimiseli nini Paulo apesi yango na 1 Bakolinti 10:13?
10 Bato na sembo oyo bazali na lisangá na Nzambe, bazali kozwa lisungi na Ye na ntango na mimekamo. Na yango, Jéhovah azali kosalisa biso ete totikala sembo epai na ye na ntango tomekami. Ya solo, esengeli na biso kobondela na boyokani na maloba na Yesu, ete: “Kendisa biso na komekama te, kasi bikisa biso na oyo mabe,” Satan le Diable. (Matai 6:9-13) Na maloba oyo tozali kosɛnga Nzambe ete, apesa biso makasi ete tokwea te wana botósi na biso botyami na komekama. Lisusu, Jéhovah akondima biso soki tokobondela ye ete apesa biso mayele makoki mpo na kolónga mimekamo na biso. (Yakobo 1:5-8) Basaleli na Nzambe bakoki kolikya na lisalisi na ye, mpamba te ntoma Paulo alobaki ete: “Komekama moko ekómeli bino te oyo ezangi epai na bato banso. Nzambe azali sembo; ye oyo akotika bino te ete bomekama na koleka nguya na bino, kasi na komekama, akobongisa ekimelo ete bokoka koyika mpiko.” (1 Bakolinti 10:13) Nani azali kobimisa komekama wana, mpe ekimelo nini Nzambe akobongisa yango?
11, 12. Bayisraele bakweaki kati na komekama nini, mpe lolenge nini tokoki kozwa liteya na makambo wana?
11 Komekama ekoutaka na likambo oyo likoki komema biso na kozanga sembo epai na Nzambe. Paulo alobaki ete: “Makambo oyo nyonso mazali elakiseli epai na biso ete tozala na mposa mabe te, lokola bango [Bayisraele] balingaki yango. Bozala basambeli na bikeko te lokola bamosusu na bango. Lokola ekomami ete: ‘Bato bafandaki kolya mpe komɛla mpe batɛlɛmaki mpo na kobina.’ Ekoki ete tosala makambo na pite te lokola bamosusu na bango basalaki pite mpe bakweaki bato nkɔto ntuku mibale na misato na mokolo moko. Ekoki te ete tomeka Jéhovah, lokola bamosusu na bango bamekaki ye mpe babomamaki na nyoka. Ekoki te ete toimaima lokola bamosusu na bango baimaimaki mpe babomamaki na mobebisi.”—1 Bakolinti 10:6-10.
12 Bayisraele bazalaki na mposa mabe wana bakweaki na komekama ya lokoso, na kolokɔtáká mpe na kolyáká bankánga oyo Nzambe apesaki na likamwisi. (Mituya 11:19, 20, 31-35) Mwa ntango na liboso, bamipesaki na losambo ya bikeko wana bamekamaki na kosambela ekeko ya mwana na ngombe, mpo ete Moïse azalaki te. (Exode 32:1-6) Mingi bakufaki mpo ete bakweaki na komekama ya kosala pite elongo na basi ya Moabe. (Mituya 25:1-9) Lokola Bayisraele bakweaki na komekama mpe baimaimaki mpo na kobomama ya batomboki: Kola, Datana, Abirama mpe bato mosusu oyo basanganaki na bango, 14 700 kati na bango babomamaki na etumbu oyo Nzambe apesaki. (Mituya 16:41-49) Tokoki kozwa liteya na makambo wana soki tokanisi ete moko na komekama yango elekaki makasi te liboso na Bayisraele. Mbɛlɛ batɛmɛlaki yango soki nde bandimelaki, soki bazalaki na botɔndi epai na Nzambe mpo na lolenge oyo abatelaki bango na bolingo nyonso mpe soki bayebaki ntina ya Mibeko. Lobɔkɔ na Jéhovah mbɛlɛ ebikisaki bango lokola akoki mpe kobikisa biso.
13, 14.Ekimelo nini Jéhovah azali Kobongisa mpo na basaleli na ye na ntango bakutani ma komekama?
13 Biso baklisto tozali kozwa komekama oyo ekómelaka bato banso. Nzokande, tokoki kotikala sembo epai na Nzambe na kobondeláká ye ete asalisa biso mpe na kosaláká milende mpo na kotɛmɛla komekama. Nzambe azali sembo, mpe akotika biso te ete tomekama na koleka nguya na biso. Soki biso moko tokotikala sembo epai na ye, ekozala mpasi te mpo na biso ete tosala mokano na ye. Akobongisa ekimelo na kokembisáká biso ete tokoka kotɛmɛla komekama. Na ndakisa, na ntango tonyokwami, tokoki komekama na kowangana kondima mpo na kolongwa na monyoko to na liwa. Kasi soki tozali kotya motema na lobɔkɔ na nguya na Jéhovah, komekama ekoleka makasi te kino Nzambe azanga kolendisa kondima na biso mpe apesa biso makasi ya kotikala sembo. Ntoma Paulo alobaki ete: “Bakokamolaka biso bipai binso nde tokobukanaka te; bakotungisaka biso nde tokotikaka elikya te; bakonyokolaka biso kasi ye akotikaka biso te; bakokweisaka biso na nsé nde tokobebaka te.”—2 Bakolinti 4:8, 9.
14 Jéhovah azali mpe kosunga bato na ye na kokundweláká bango makambo mosusu mpe na koteyáká bango na nzela na elimo na ye. Elimo na Nzambe ezali kosalisa biso na komikundola makanisi ya Biblia mpe na koyeba lolenge ya kosalela yango mpo na kotɛmɛla komekama.(Yoane 14:26) Basaleli na sembo na Jéhovah bayebi makambo oyo matalelami kati na komekama mpe bazali komitika te ete bapusama na mabe. Nzambe abongisi ekimelo na kosalisáká bango ete bayika mpiko kino na liwa kozanga ete bakwea na komekama. (Emoniseli 2:10) Longola lisalisi oyo azali kopesa epai na basaleli na ye na nzela na elimo na ye, Jéhovah azali kosalela baanzelu na ye mpo na kosunga lisangá na ye.—Baebele 1:14.
Lisalisi na makambo matali moto na moto
15. Lisalisi nini biso moko tokoki kozwa na Loyembo ya Salomo?
15 Baoyo bazali na lisangá ya Jéhovah bazali kozwa lisalisi na Ye kati na makambo matali bomoi na bango moko. Na ndakisa, moko na bango alingi mbala mosusu kobala mosaleli mosusu ya Jéhovah. (1 Bakolinti 7:39) Soki alóngi te, ekoki kozela ntina ete atalela likambo likómelaki Salomo, mokonzi na Yisraele. Alóngaki te na koloba na Sulamite, oyo alingaki nde kobala mobateli na mpate. Lisoló oyo mokonzi wana asalaki, ekoki kobéngama ete loyembo na mpasi ya bolingo na salomo. Mbala mosusu tookaki mpasi mpo, na libaku moko, milende oyo tosalaki mpo na kobelema epai na moto moko élongaki te; Kasi tomikundola ete Salomo alóngaki mpasi wana: biso mpe tokoki kosala bongo! Elimo na Nzambe ekoki kosalisa biso na komonisa ezaleli ya komikanga motema mpe bizaleli mosusu ya kobanga Nzambe. Liloba na Ye lizali kosalisa biso na kondima likambo wana likopesaka mpasi mingi: tokoki kolingama na bato banso te. (Loyembo ya salomo 2:7; 3:5) Nzokande, Loyembo ya Salomo lomonisi ete likoki ezali na kozwa moninga kati na kondima, oyo alingi bisi mingi. Likambo ya ntina mpenza, “loyembo na koleka nzembo nyonso” emonisi polele bolingo ezali na Mobateli na Mpate aleki malamu, Yesu Klisto, mpo na “mwasi na ye,” 144 000 bayekoli na ye bapakolami.—Loyembo ya Salomo 1:1; Emoniseli 14:1-4; 21:2, 9; Yoane 10:14.
16. Nini ekoki mpe kozala “bolozi kati na mosuni” epai na baklisto oyo basili kobala?
16 Atako baoyo bazali kobala kati na Nkolo bazali na “bolózi kati na nzoto na bango.” (1 Bakolinti 7:28) Mobali, mwasi mpe bana bakoki kobimisa mpasi mpe mitungisi. (1 Bakolinti 7:32-35) Maladi ekoki komema bozito mpe matáta. Na ntango na monyoko to na mikakatano kati na makambo na nkita, ekoki kozala mpasi mpo na tata ya libota na boklisto ete akokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye. Baboti mpe bana bakoki kokabwana likoló na bolɔ́kɔ, na monyoko mpe ata na kobomama. Nzokande, soki totii mpenza motema na lobɔkɔ na kobikisa na Jéhovah kati na mabaku nyonso wana, tokoki kotɛmɛla komekama ete towangana kondima na biso te.—Nzembo 145:14.
17. Mokakatano nini Nzambe apesaki nzela ete Yisaka mpe Rebeka bayikela yango mpiko kati libota na bango?
17 Mbala mosusu tozali koyika mpiko na mimekamo oyo misili koumela. Ntango mosusu, mwana mobali akoki kopesa mpasi epai na baboti na ye baklisto na kobaláká mwasi oyo azali mondimi te. Ezali yango nde ekómaki na libota ya Yisaka, tata na mabota mpe mwasi na ye Rebeka. Mwana na bango Esau, oyo na mibu 40, abalaki basi mibale Bahiti baoyo “batungisaki Yisaka mpe Rebeka.” Na boye ete “Rebeka alobaki ntango nyonso na Yisaka ete: ‘Nalɛmbi na bomoi na ntina na basi na Bahiti oyo. Soki nde Yakobo [mwana na bango mosusu ] akobala mwasi kati na Bahiti lokola baoyo wana, kati na mokili oyo, bomoi na ngai ekozala na ntina nini lisusu?’ ” (Genese 26:34, 35; 27:46) Emonani ete, likambo wana litungisaki molimo na Rebeka na boumeli ya bomoi na ye. (Tala 2 Petelo 2: 7, 8.) Nzokande, Jéhovah asungaki Yisaka mpe Rebeka na lobɔkɔ na ye, kosalisáká bango ete bayika mpiko na momekamo wana na kobateláká boyokani na bango malamu elongo na ye.
18. Momekamo nini charles Russell ayikelaki yango mpiko na lisalisi na Nzambe?
18 Ezali momekamo soki mosangani moko ya libota, oyo asili kozwa batisimo atiki mosala na ye mpo na Nzambe. (Tala 2 Timoté 2:15.) Nzokande, bamosusu basilá kobungisa babalani na bango kati na elimo, lokola yango ekómelaki charles Russell, prézidá wa yambo ya la Societé Watch Tower. Na 1897, mwasi na ye akatáki boyokani na ye nyonso elongo na la Société mpe atikaki ye, soko nsima ya mibu 18 ya libala na bango. Asɛngaki ete bakabwana na mobu 1903, mpe bakataki likambo na mobu 1908. Mpasi ya mobali wana emonanaki kati na mokanda oyo atindelaki mwasi yango mwa nsima na kokabwana na bango, ete: “Nabondeli Nkolo mpo na yo. . . . Nalingi te ete nalɛmbisa yo mpo na mpasi na ngai to nalamusa motema mawa na yo na koyebisáká lolenge nazali kooka mbala na mbala oyo namonaka bilamba na yo, to biloko na yo bizali kokundwela ngai lolenge oyo yo ozalaki: otondaki na bolingo, na motema mawa mpe na mposa ya kosalela bato, na mokuse, otóndaki na elimo na Klisto. . . . Nalɔmbi yo ete otalela likambo oyo nalingi koloba kati na libondeli. Yeba ete bonene ya mpasi na ngai euti te mpo ete nakofanda ngai moko na boumeli ya mikolo nyonso oyo mitikali na bomoi na ngai, molingami na ngai, kasi ezali mpo na kokwea na yo, mpo na kobunga na yo ya seko, lokola ezali ngai kokanisa.” Atako mpasi ya motema oyo azalaki na yango, Russell azwaki lisungi na Nzambe kino nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé. (Nzembo 116:12-15)Jéhovah azali ntango nyonso kosalisa basaleli na ye ya sembo.
Na mpasi nyonso
19. Tosengeli komikundola na likambo nini soki mpasi na biso ezali koumela?
19 Basaleli na Jéhovah bayebi ete ye azali “Nzambe na kobikisa,” oyo “akomemaka mikumba na biso mokolo na mokolo.” (Nzembo 68:19, 20) Na yango, biso tosili komipesa epai na ye mpe tozali kosala elongo na lisangá na ye awa na mabelé, tozanga elikya te wana ezali biso na mpasi oyo ezali koumela. Tomikundola ete ’’Nzambe azali ekimelo mpe nguya mpo na biso; akomonanaka mpenza na lisungi na ntango na mpasi.” (Nzembo 46:1) Elikya na biso epai na Nzambe ntango nyonso ekozwaka mbano. Davidi alobaki ete: “Nabengaki Jéhovah mpe ye ayanolaki ngai, mpe abikisaki ngai na nsɔmo na ngai nyonso. . . . Mobólá oyo abelelaki mpe Jéhovah ayokaki ye, abikisi ye kati na mpasi na ye nyonso.”—Nzembo 34:4-6.
20. Mituna nini tosengeli kotatela?
20 Ee, Tata na biso na likoló akobikisaka basaleli na ye kati na mpasi nyonso. Azali kosunga lisangá na ye ya mabelé, na kopesáká lisalisi na makambo matali lisangá mpe kati na makambo ya moto na moto. Ya solo, “Jéhovah akotika libota na ye te.” (Nzembo 94:14) Kasi na lisoló lilandi, tokotalela lolenge mosusu oyo Jéhovah azali kosalisa mokomoko katina basaleli na ye. Lolenge nini Jéhovah azali kosunga basaleli na ye oyo bazali maladi, banyokwami na makanisi, bakufeli moto oyo balingi mingi to na ntango batungisami mpo na mabungá basalaki? Lokola tokomona yango, katina makambo wana mpe, tozali na bantina ya kotya motema na lobɔkɔ na nguya na Jéhovah.
[Elilingi na lokasa 8, 9]
Nzambe abimisaki Bayisraele na Ezipito na “lobɔkɔ makasi”