Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/10 nk. 4-7
  • Kino ntango nini Nzambe okomonisa lisusu motema molai?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kino ntango nini Nzambe okomonisa lisusu motema molai?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Nzambe azali na motema molai?
  • Ndakisa na motema molai na Nzambe
  • Mpo na nini Nzambe azali na motema molai na mikolo na biso
  • Likambo na boyangeli
  • Zwa litomba na motema molai na Nzambe kozanga koumela
  • Etikali lisusu ntango molai te!
  • Zwa litomba na motema molai na Nzambe kozanga koumela
  • Etikali lisusu ntango molai te!
  • Zwá liteya na motema molai ya Yehova mpe ya Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Tómekola motema molai ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Kobá kozala na motema molai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Ozalaka na motema pɛtɛɛ?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/10 nk. 4-7

Kino ntango nini Nzambe okomonisa lisusu motema molai?

SOKO mibu 3 000 esili koleka, moto na mayele akomaki ete: “Moto azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kookisa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Uta ntango oyo alobaki likambo oyo, makambo mazali sé kobeba. Uta kala, bato to bituluku ya bato basili kozwa bokonzi na makasi, bamoko nsima na bamosusu, mpe basili koyangela mpe konyokola bazalani na bango. Jéhovah Nzambe azali koyikela ezalela wana mpiko na motema molai nyonso.

Jéhovah amonisaki motema molai wana biyangeli bibomisaki bamilió na bato kati na bitumba mpe bipesaki nzela na bokeseni makasi kati na makambo na nkita. Na mikolo na biso, azali sé komonisa motema molai awa bato bazali kobebisa eboke ya ozone mpe mipepe mpe mai monene. Asengeli mpenza kooka mawa na komona kobebisama ya mabelé makobotaka mingi, zamba mpe banyama oyo ebebisami mingi.

Mpo na nini Nzambe azali na motema molai?

Ndakisa moko ya pɛtɛɛ ekoki kosalisa biso na koyanola. Kanisa mpo na lolenge oyo kompanyi moko ekotalela mosali oyo ntango nyonso akómaka na ngonga malamu te na mosala. Directeur asengeli kosala nini mpo na ye? Bosembo ekosɛngisa ete, alongola mosali yango na mosala bobele na ntango wana. Nzokande directeur akoki mpe kokanisa lisese oyo na Biblia ete: “Ye oyo akosilikaka noki te atondi na bososoli, nde moto na motema likoló akolakisaka bozoba.” (Masese 14:29, MN) Mbala mosusu bososoli bokopusa ye na kozela mpo na kozwa ekateli. Ekosɛnga mbala mosusu kolekisa ntango mpo ete moto oyo akokitana na esika wana, azwa formation mpo ete mosala mobeba lisusu te.

Mawa oyo azali na yango mpo na mosali oyo akosalaka na bopotu, ekomema ye mbala mosusu na kozela. Akoki mpe kokebisa ye mpo na kotala soki akobongwana. Mpo na nini te kosolola elongo na ye mpo na koyeba soki momeseno na ye ya koya na ntango malamu te euti na mokakatano moko mokoki kosilisama to mpe na ezaleli moko ekosila te? Ata soki directeur akomonisa motema molai, yango ekozala na ndelo. Mosali asengeli kobongwana, soki bongo te akolongwa na mosala. Wana ekozala mpenza sembo liboso na kompanyi mpe liboso na basali mosusu oyo bazali kotósa mibeko ya kompanyi.

Lolenge moko, awa ezali ye komona etamboli mabe ya bikelamu na ye, Jéhovah Nzambe azali komonisa motema molai mpo ete ntango epesa nzela na kosilisa makambo mosusu na bosembo. Lisusu, motema molai na ye epesi likoki na baoyo bazali na etamboli mabe ete babongwana na misala na bango mpe bazwa bolamu ya seko. Mpo na yango, Biblia esɛngi biso ete tótyola motema molai na Nzambe te. Elobi ete: “Botalela motema molai na Nkolo na biso lokola lobiko.”​—2 Petelo 3:15, MN.

Ndakisa na motema molai na Nzambe

Jéhovah Nzambe amonisaki motema molai liboso na mpela monene ya ntango na Noa. Mokili ya ntango wana motondaki na mobulu mpe na mabe. Na yango totangi ete: “Jéhovah amonaki ete mabe na bato makomaki mingi na mokili . . . Jéhovah alobaki ete: ‘Nakolongola longwa na mokili bato oyo nasalaki.”’ (Genese 6:5, 7) Na ntango wana, Jéhovah akanaki kosilisa mabe yango mpo na libela: kobomama ya bato mabe. Kasi asalaki yango mbala moko te. Mpo na nini?

Mpo ete bato banso bazalaki mabe te. Noa mpe libota na ye bazalaki sembo liboso na Nzambe. Na ntina na bango, Jéhovah azelaki na motema molai nyonso mpo na kopesa nzela na ndambo na bato wana na sembo ete bamibongisa mpo na lobiko na bango. Lisusu, ntango molai oyo azelaki esalisaki Noa ete azala “mosakoli na boyengebene,” mpe apesa bato mabe likoki ya kobongola etamboli na bango. Biblia elobi ete: “Motema molai na Nzambe mozalaki kozela na mikolo na Noa, naino masuwa mazalaki kotongama. Bato mingi te, bobele mwambe babikaki kati na yango likoló na mai.”​—2 Petelo 2:5; 1 Petelo 3:20.

Mpo na nini Nzambe azali na motema molai na mikolo na biso

Na mikolo na biso, makambo mazali motindo moko. Mokili motondi lisusu na mobulu. Lokola na mikolo na Noa, Nzambe asili kosambisa mokili oyo, engebene Biblia, ‘ebómbami mpo na mokolo na kosambisama mpe na kobebisama na bato mabe.’ (2 Petelo 3:7) Na ntango likambo yango likosalema, kobebisama na ezingelo, konyokolama na babólá mpe lolenge mabe ya kosalela bokonzi epusami na lokóso, ekozala lisusu te.

Na yango, mpo na nini Nzambe abomaki te bato mabe uta kala? Mpo ete esengeli kosilisa makambo mosusu mpe kotya bibongiseli ya ntina mingi Na yango, Jéhovah akómi pene na kosilisa mabe mingi oyo mpo na libela, mpo ete bato na sembo babikisama na boombo ya maladi mpe na liwa.

Ezali na mokano wana nde Je‘hovah azwaki ekateli ya kotinda Mobikisi oyo asengelaki kopesa mbeka ya’ lisiko mpo na masumu na biso. Na ntina na ye, Biblia elobi ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondimela ye abebisama te, kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Esengelaki bambula mingi mpo na kobongisela Yesu nzela ete aya kokaba bomoi na ye lokola mbeka mpo na bato. Na boumeli ya bambula nyonso wana, Nzambe amonisaki motema molai na bolingo nyonso. Bongo, esengelaki kozela te mpo na kosala ebongiseli motindo wana?

Esili koleka mibu 2 000 uta Yesu apesaki mbeka ya lisiko mpo na bato. Bongo, mpo na nini Nzambe azali komonisa lisusu motema molai? Ya yambo, mpo ete liwa na Yesu libandisaki mosala ya kolakisama. Bato basengeli koyeba ebongiseli yango etondi na bolingo mpe basengeli kopesamela likoki ya kondima to mpe koboya yango. Likambo yango lisɛngi ntango mingi, kasi ntango wana ezali na litomba. Tala oyo Biblia elobi mpo na yango: “Jéhovah akoumela na elaká na ye te, lokola bamosusu bakanisi ete azali koumela. Kasi azali nde na motema molai epai na bino, mpamba te alingi te ete bamosusu babebisama, nde alingi ete bato banso babongola mitema.”​—2 Petelo 3:9.

Likambo na boyangeli

Kosilisama ya likambo mosusu monene ezali kosɛnga ntango mingi. Ezali bongo likambo litali boyangeli bosengeli kotambwisa bato. Na ebandeli, moto azalaki na nsé na bokonzi ya Nzambe. Kasi na elanga ya Edene, bankoko na biso ya liboso baboyaki yango. Baponaki kozala na lipanda epai na Nzambe mpe balingaki komitambwisa bango moko. (Genese 3:1-5) Emonani ete moto azalisamaki te mpo na komitambwisa ye moko. Mosakoli Yilimia alobaki ete: “Ɛ Jéhovah, nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te. Ekoki na moto te ete atambwisa makolo na ye moko.”​—Yilimia 10:23; Masese 20:24.

Na yango, uta likambo ya boyangeli libimaki, na motema molai nyonso, Jéhovah alekisaki ntango mingi mpo na kosilisa yango. Ya solo, asili kopesa bambula mingi epai na bato ete bameka mitindo nyonso ya biyangeli. Ebimisi matomba nini? Emonani polele ete boyangeli moko te ya bato ekoki kosilisa monyoko, mabe to mpe makambo mosusu makopesaka mpasi.

Na kotalela Lisoló na bato, moto moko akoki nde koloba ete Nzambe azali sembo te awa eyebisi ye mokano na ye ya kolongola biyangeli nyonso ya bato mpo na kokitanya boyangeli mosusu oyo ye akotya na esika na yango? Te. Tozali na esengo uta sikawa mpo na kokokana ya elaká oyo na Biblia, ete: “Na mikolo ya mikonzi yango, Nzambe na lola akotelemisa bokonzi moko bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango bokopesama na bato mosusu te, ekobuka mpe ekosilisa bikonzi oyo nyonso mpe ekotikala lobiko na lobiko.”​—Danyele 2:44.

Mokonzi na likoló ya boyangeli wana ezali Yesu oyo asili kosekwa. Esengelaki ntango mingi mpo na kobongisa ye ete azwa etelemelo wana, bobele lolenge moko mpo na koponama ya bato oyo bakoyangela elongo na ye. Na boumeli ya ntango wana, Nzambe amonisaki motema molai.

Zwa litomba na motema molai na Nzambe kozanga koumela

Na mikili koleka 212, bamilió na bato bazali lelo kozwa litomba na motema molai na Nzambe. Mposa ya kotósa Nzambe mpe oyo ya kosalela bokonzi na ye ya likoló, epusi bango ete bazala na bomoko. Na ntango bayanganaka na ba Salles du Royaume na bango, bayekolaka bolamu oyo bouti na kosalelama ya mitinda na Biblia kati na bomoi na bango. Bakokɔtaka na mikabwano ya politike ya mokili oyo te, nzokande bazali kotósa biyangeli wana ya bato awa motema molai na Nzambe mopesi bango nzela ete bayangela.​—Matai 22:21; Baloma 13:1-5.

Lolenge oyo bato yango nyonso bazali kosalana elongo, emonisi ete Jéhovah akoki mpenza kosala ete bato oyo bazali na lotómo na bango, baoyo bazali koyekola kolinga ye mpe baoyo balingi kosalela ye, bafanda kati na kimya. Na ntembe te, osilá kokutana na bango, mpamba te bazali kolanda kokokisa mosala oyo Yesu abandaki, kosakolama ya nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe. Yesu asakolaki likambo likosukisa mosala yango: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

Etikali lisusu ntango molai te!

Bilembeteli ya polele bimonisi ete bibongiseli nyonso oyo bikopesa nzela na boyangeli na sembo na Nzambe ete etambwisa mabelé na mokolo na mokolo, bisili kozwama. Nsima na kolobela makambo na mpasi mauti na kokwea ya biyangeli ya bato, kokwea oyo biso banso tozali komona yango na ekeke oyo ya ntuku mibale, Yesu abakisaki ete: “Ekomona bino makambo oyo kobima, boyeba ete bokonzi na Nzambe bobɛlɛmi.”​—Luka 21:10, 11, 31.

Mosika te, Nzambe akolongola bato mabe na mabelé. Maloba na na mokomi na nzembo makokokana na polele mpenza ete: “Basali na mabe bakopikolama . . . Nsima na mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde akomonana te.” (Nzembo 37:9, 10) Okoki kokanisa na motindo mokozala mokili oyo mozangi mabe? Nani akokamba mabelé? Biblia eyanoli ete: “Mokonzi [Klisto Yesu oyo atyami mokonzi na makoló] akoyangela na boyengebene; mpe bankumu [bamonisi na ye ya sembo awa na mabelé], bakokamba bato na bosembo. Mosala na boyengebene ya solo ezali kimya mpo na libela. Bato na ngai bakofanda na esika na kimya, mpe na bifandelo na libateli, mpe na bisika na kopema.”​—Yisaya 32:1, 17, 18. MN.

Na yango, boyangeli na Nzambe na likoló ekolongola mabe manso mabimi mpo na ezaleli mabe ya bato mpe, ekobongisa libota na bato na kimya baoyo bazali kotya elikya epai na Ye. Biblia elobi ete: “Mbwa ya zamba akofanda elongo na mwana na mpate mpo na mwa ntango, mpe nkɔi akolala esika moko na mwana na ntaba, mpe mwana na ngombe, mpe mwana na nkɔsi, mpe nyama na mafuta, nyonso bakozala esika moko; mpe mwana moke akokamba bango . . . Bakoyokisana mpasi te kati na ngomba na ngai mosantu mpe bakobebisana te, mpamba te mabelé mobimba makotónda na boyebi ya Jéhovah lokola kotonda na mai monene.”​—Yisaya 11:6-9, MN.

Oyo nde litomba kitoko liuti na motema molai na Nzambe! Na yango, na esika na kopamela Nzambe mpo ete azeli uta kala, mpo na nini te kozwa litomba na motema molai na ye mpe kotosa Bokonzi na ye? Luká koyeba masɛngami nini oyo asili kotya kati na Biblia mpe yokanisa yango na bomoi na yo. Sangana elongo na baoyo bazali kotosa ye kati na bomoko. Bongo, motema molai na Nzambe mokomemela yo mapamboli ya seko.

ki ete: “Ɛ Jéhovah, nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te. Ekoki na moto te ete atambwisa makolo na ye moko.”​—Yilimia 10:23; Masese 20:24.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto