‘Esengo na baoyo nyonso bazali kozela Jéhovah’
LISOLÓ YA DOMENICK PICCONE
Nabotami na mobu 1929 mpe nayokaki solo ya Biblia uta bomwana na ngai. Nazali komikundola ete ba Témoins de bazalaki koyangana epai na biso liboso ete bakenda kosakola na bitumba oyo bitondaki na bakatolike mingi na etúká ya Pennsylvanie, epai kuna bazalaki kokanga bango mbala na mbala. Nazwaki batisimo na mobu 1941, na assemblée ya ba Témoins de Jéhovah oyo esalemaki na engumba Saint Louise, na ekólo Missouri. Na nsima, nakómaki na etamboli mabe.
Nakómaki kotambola elongo na bilenge ya kartyé oyo bazalaki na etamboli mabe; nakómaki komɛla makayá mpe kosana masano na balabala. Likambo ya esengo mpenza, baboti na ngai bamonaki ete bazalaki lisusu na bopusi mingi te likoló na ngai, nde bazwaki ekateli ya kokende kofanda na kartyé mosusu. Yango esepelisaki ngai te, mpamba te nabungisaki baninga na ngai nyonso ya kartyé. Kasi, soki nakanisi sikawa, nazali mpenza na botɔndi mingi mpo na tata na ngaí. Andimaki kobimisa misolo mingi mpo na kolongola ngai na esika wana. Nzokande, liboso akokaki kokende mosala na makolo, kasi asengelaki sikawa kosala mobémbo molai na bus. Likoló na kolongwa na esika wana nde nazongelaki bomoi ya teokratike.
Mbótó ya elimo ya misionere elónami
Pene na mbula nyonso, tozalaki kokenda na New York, mpo na kotala lolenge bazalaki kopesa mapɔlɔmi epai na bana ya kelasi ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower. Komona lolenge oyo bamisionere wana bazalaki kotindama na bisika bikeseni ya mokili, yango elónaki kati na motema na ngai, mposa ya kolanda matambé na bango. Na yango, wana esilisaki ngai kelasi, na 1947, nabandaki mosala ya pionnier permanent.
Kati na lisangá na biso, ezalaki na elenge pionnier moko ya mwasi, Elsa Schwarz, oyo azalaki mpenza na molende kati na mosala ya kosakola. Baboti na ye balendisaki ye ntango nyonso ete akóma misionere; bino moko bosili koyeba likambo oyo lisalemaki na nsima. Tobalanaki na 1951. Ezalaki biso kokóba na mosala na biso ya pionnier na mboka Pennsylvanie, tosalaki demande ya kokɔta na Eteyelo ya Galaad. Na 1953, tobyangamaki mpo na kokɔta na kelasi ya 23 na Eteyelo ya Galaad. Nsima na sanza mitano ya mateya mingi mapesamaki, tozwaki mapɔlɔmi na assemblée moko esalemaki na engumba Toronto, na Canada, mpe bayebisaki biso epai totindamaki: na Espanye.
Mikakatano na Espanye
Ezalaki biso komibongisa mpo na kokenda, na 1955, ngai mpe Elsa tomitunaki mituna mingi. Espanye! Lolenge nini makambo masengelaki kosalema? Général mokonzi Francisco Franco, mokonzi mabe mokatolike, azalaki koyangela, mpe mosala ya ba Témoins de Jéhovah mopekisamaki na mboka wana. Lolenge nini tosengelaki kosala mosala kati ezalela motindo wana?
Tozwaki nsango na biro monene ya la Société na Brooklyn ete, bakangaki Frederic Franz, oyo azalaki vice-président ya la Société Watch Tower na ntango wana, mpe Alvaro Berecochea, misionere oyo azali moto ya mboka Argentine, elongo na ntalo monene ya ba Témoins mosusu. Assemblée moko ebongisamaki na nkuku na zamba ya engumba Barcelone. Kasi bapolisié bayebaki mwango ya koyangana wana mpe bakangaki bayangani mingi.a
Bayebisaki biso ete mbala mosusu tokozwa moto te mpo na koyamba biso na ntango tokokóma na engumba Barcelone. Tozwaki malako oyo ete: “Boluka esika hôtel ezali, mpe botinda adresse na la Société na New York.” Kati na elimo na biso, tokanisaki maloba oyo na Yisaya ete: “Esengo na baoyo nyonso bazali kozela [Jéhovah]! Mpe matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete: ‘Oyo ezali nzela, tambola na yango.’” (Yisaya 30:18, 21) Tosengelaki bobele kozela Jéhovah mpe kolanda litambwisi ya lisangá na ye.
Topesanaki mbote na baboti na biso mpe baninga na biso baoyo bayaki na New York mpo na kotombela biso mobémbo malamu, mpe nsima mwa moke, Saturnia, masuwa oyo tomataki, etyólaki ebale Hudson mpo na kolanda mai monene Atlantique. Ezalaki mbala ya nsuka oyo namonaki tata na ngai. Akufaki nsima na mbula mibale na maladi moko eumelaki, wana ezalaki ngai na mokili mosusu.
Na nsuka, tokómaki na libóngo ya Barcelone. Mbula ezalaki konɔka, kasi ntango kolekaki douane, na mosika, tomonaki bilongi bizalaki “kongɛnga.” Alvaro Berecochea elongo na bandeko mosusu ya Espanye, bayaki koyamba biso. Tosepelaki mingi mpenza na koyoka ete bandeko na biso babimisamaki na boloko.
Esengelaki na biso koyekola monoko ya Espagnol. Na eleko wana, bamisionere basengelaki koyekola minoko ya bapaya bobele bongo na bongo, mokanda ya koyekola mozalaki te mpe molakisi azalaki te. Balakisaki biso ata mbala moko te. Tosengeli kokokisa ngonga ya mosala ya kosakola mpe tozalaki koyekola monoko yango na ntango oyo tozalaki kosakola.
Mosala ya kosakola na nsé na bonyokoli ya katolike
Na ntango wana, na Espanye, lisangá ya Jéhovah lizalaki naino na ebandeli na yango Na 1955, ezalaki na basakoli 366 kati na teritware wana ezalaki na bamilio 28 ya bafandi Ezalaki bobele na masangá zomi na etando ya mboka mobimba Ezalela wana eumelaki nde ntango molai? Na ntango mwasi na ngai mpe ngai tobandaki kosakola ndako na ndako, toyaki komona ete Espanye ezali mpenza paradis mpo na baoyo bazalaki kosakola nsango malamu. Bato bazalaki na mposa ya solo.
Kasi ndenge nini mosala ya kosakola mozalaki kosalema nzokande yango epekisamaki? Tozalaki mpenza kosakola te na ndako nyonso. Na engumba Barcelone, bato bafandi na ebele na bandako minene oyo ezali na mikili minei to mitano, mpe tozwaki lilako ya kobanda na likoló mpo na kokita mokemoke na nsé. Na mokili to étage moko, tozalaki kobɛta bobele eteni na ndako moko, mpe mbala mosusu tozalaki kotika mikili misusu. Na bongo, bapolisié bazalaki na mpasi mpo na kozwa biso soki moto moko afundaki biso.
Makita mazalaki kosalema kati na bandako ya bandeko, mpe lisangá mokomoko ezalaki na bituluku misato to minei ya boyekoli ya mokanda. Yango epesaki nzela na mokɛngɛli ya lisangá na kokende mbala moko na sanza mpo na kotala etuluku moko na moko. Motambwisi ya boyekoli ya mokanda azalaki na mokumba ya kotambwisa makita nyonso, oyo mabongisamaki mbala mibale na poso mpo na bituluku ya mike bizalaki na bato 10 to 20.
Tomesenaki na bomoi ya sika. Na kala, ndako ya bamisionere ezalaki te na mboka Espanye. Ntango nyonso oyo likoki ezalaki, tofandaki epai na ba Témoins mosusu. Elsa ayekolaki kolámba na mbabula, ezalaki likambo moke te. Na nsima, tosombaki litúká moke ya pitoló: bokóli monene.
Tonyokwami mpe babéngani biso
Nsima na mwa ntango, toyokaki ete monyoko makasi mobandaki kobima na engumba Andalousie, epai kuna bakangaki pionnier special moko. Likambo ya mawa mpenza, amemaki mokanda moko mozalaki kati na yango na nkombo mpe ba adresses ya ba Témoins oyo bazalaki epai nyonso na mboka Espanye. Tolandaki sé kozwa nsango ya lolenge oyo bandeko na biso bazalaki kokangama na engumba moko nsima na mosusu. Bapolisié bakómaki pene na engumba Barcelone. Na nsuka, monyoko mokómaki na Barcelone.
Nsima na mwa basanza liboso, bapolisié bamemaki ngai na commissariat mpo na kosamba. Batikaki ngai nsima ya bangonga mingi, mpe nakanisaki ete likambo lisilaki bongo. Kasi ntoma ya mokili ya Etats—Unis akutanaki na ngai mpe alobaki na ngai ete ngai moko nalongwa na mboka wana, mpo ete nayokisama nsɔni te na ntango bakobengana ngai. Nsima mwa moke, bapolisié bayebisaki biso ete tozalaki bobele na mikolo zomi mpo ete tokende. Lokola tozalaki na ntango ya kokomela la Société Watch Tower te, tomitunaki soki tosengelaki kosala nini. Tomonaki malamu ete tokenda na teritware ya pene na Espanye epai tosengelaki kokóba mosala ya misionere: na Portugal, epai na Ouest.
Mokili mosusu, monoko mosusu
Na ntango tokómaki na engumba Lisbonne, na Juillet 1957, totindamaki na Porto, engumba oyo ezali na Nord ya kapitale. Bazalaki kotalela yango lokola kapitale ya mibale, mpe ezalaki na etúká eyebanaki mingi mpo na vinyo oyo ezalaki kosalema kuna. Lisang’á moko ya molende lizalaki koyangana na eteni na nsé na ndako moko monene oyo ezalaki na centre ville. Mosala ya kosakola epekisamaki mpe na Portugal, mpamba te mokili yango mozalaki na nsé na boyangeli mabe ya mokonzi Salazar. Atako bongo, makambo makeseneki mpenza na oyo ezalaki na Espanye. Makita mazalaki kosalema na bandako ya ba Témoins, oyo eyanganisaki bato 40 to 60. Eloko moko emonisaki te ete ba Témoins de Jéhovah bazalaki koyangana wana. Atako nayebaki naino koloba monoko ya portugais te, naponamaki lokola mokɛngɛli ya lisangá. Esengelaki na biso ete toyekola lisusu monoko ya sika.
Pene na mbula moko na nsima, totindamaki na engumba Lisbonne. Kuna, tozwaki ndako ya biso moko mpo na mbala ya yambo, ndako oyo ezalaki na eteni ya likoló mingi mpenza na engumba wana. Toponamaki mpo na kosala na circonscription: na Ekólo Portugal mobimba. Na ntango tokómaki na mboka wana, tokutaki bobele basakoli 305 mpe masangá mitano.
Mikakatano mibandi
Bakarte mosusu ya Portugal mpe ya mikili misusu oyo mizalaki na nsé na boyangeli ya mboka wana, ezali likomi oyo: “Moi mokolalaka te na etando ya Portugal.” Mpe yango ezalaki solo, mpo ete Portugal eyangelaki mikili mingi, mibale kati na yango ezali Mozambique mpe Angola, mikili ya Afrika. Na 1961, mikakatano mibandaki kobima na mikili wana miyangelamaki na Portugal, mpe Portugal ezwaki ekateli ya kobakisa nguya ya basodá na ye.
Bilenge ba Témoins basalaki nini na ntango baponamaki mpo na mosala ya sodá? Bamoko batikamaki likoló na kolongono na nzoto, kasi mingi bamonisaki ezaleli ya boklisto ya koboya kosangana na makambo ya mokili. Monyoko makasi mobandaki nokinoki. Filiale ya Portugal ezwaki rapport ete ba pionniers spéciaux bakangamaki mpe bapolisié oyo babengaki ete P.l.D.E. (Policia lnternacional e Defesa do Estado), babɛtaki bango mingi. Bamoko kati na biso bamisionere, babyangamaki na biro ya bapolisié mpo na kosamba. Mpe bayebisi babalani motoba ete basengelaki kolongwa na mboka nsima ya sanza moko. Biso banso tosengaki esambiselo mosusu.
Babalani mibalemibale ya bamisionere babengamaki na biro ya bapolisié mpo na kosolola elongo na directeur ya P.l.D.E. Mokɛngɛli ya filiale, Eric Britten, mpe mwasi na ye, Christina, nde basambisamaki liboso; Eric Beveridge mpe mwasi na ye, Hazel, balandaki mpe ngai na Elsa tosukisaki. Mokonzi ya bapolisié afundaki biso na lokutá ete tozalaki bato ya communisme mpe tolukaki kobebisa mikili ya Mpótó na mateya na biso ya koboya kosangana na makambo ya politike. Esambiselo oyo tosengaki ezwaki litomba te.
Tozalaki na mawa mpenza ya kotika bandeko 1 200, basi mpe mibali, baoyo bakutanaki na ntango na mpasi na nsé na boyangeli ya mokonzi mabe oyo azangaki mayele. Ndeko Beveridge mpe mwasi na ye bakendaki na Espanye, ndeko Britten mpe mwasi na ye bazongaki na Angleterre; bongo biso? Totindamaki na Maroc, epai lingomba ya musulman ezali makasi.
Mosala ya kosakola na Maroc
Tozelaki lisusu Jéhovah. Teritware ya sika, mimeseno ya sika mpe minoko ya sika. Arabe, Lifalansé mpe Espagnol ezalaki minoko oyo miyebanaki mpenza na Bokonzi ya Maroc, epai kuna ezalaki na ba Témoins 234 baoyo bakabwanaki na masangá mwambe. Lingomba ya leta na mboka wana ezali lslam, mpe epekisamaki ete babongola musulman moko mpo na kokɔta na lingomba mosusu. Tosengelaki kosakola bobele epai na bato oyo bazalaki ba musulmans te, mingi ezalaki bato ya Mpótó.
Uta ntango bamisionere bakómaki na mboka wana na nsuka ya bambula 1950, bokóli bomonanaki. Kasi boyangeli ya Maroc ebandaki kobimisa mikakatano epai na bato ya Mpótó, likambo lisalaki ete bapaya mingi balongwa na mboka wana, kati na bango ba Témoins mpe bazalaki.
Lokola motuya ya bato oyo bazalaki ba musulmans te mozalaki kokita, tosengelaki koluka nzela ya koloba na takte epai na ba musulmans; yango esalaki ete bafunda biso epai na bapolisié. Lokola bafundaki biso mbala na mbala na engumba Tangar mpe na bingumba mosusu, na nsuka bayebisaki biso ete tosengelaki kolongwa na mboka wana nsima na sanza moko. Na sanza ya Mai 1969, babenganaki ngai na Elsa na mboka mosusu wana.
Mosala na boumeli ya ntango mokuse
Basɛngaki biso ete tozonga na Brooklyn, mpe nabyangamaki mpo na koyangana na likita moko ya bakɛngɛli ya filiale liye lisalemaki na elanga ya mobu wana. Na boumeli ya likita yango, bayebisaki ngai ete tokokende na mboka Salvador, na Amérique centrale, mpe nakosala lokola mokɛngɛli ya filiale na mboka wana. Bayebisaki ngai ete, lokola mosala na biso mondimamaki naino te epai na leta kati na mboka wana, nakolekisa mbula mitano te na esika yango, boumeli ya ntango oyo bakonzi bapesaka bamisionere.
Salvador! Oyo nde teritware kitoko! Ezalaki na basakoli 1 290, kati na bango ezalaki na ba pionniers 114 na sanza nyonso. Bato bazalaki kobanga Nzambe, balingaki Biblia mpe bazalaki bayambi bapaya. Pene na bandako nyonso endimaki koyoka biso. Nokinoki, tozwaki bayekoli mingi ya Biblia.
Na komonáká bokoli mpe mposa monene ya elimo ezali na mboka wana, tookaki mawa wana ekanisaki biso ete tokolongwa na mboka yango nsima na mbula mitano. Tozwaki bongo ekateli ya komeka koluka nzela ete mosala ya ba Témoins de Jéhovah mondimama na leta. Na Décembre 1971, tokɔtisaki dossier na biso epai na bakonzi ya leta, mpe le 26 Avril 1972 tozwaki esengo mingi na kotanga na zulunalo ya leta, Diario Oficial, ete leta andimaki lisɛngi na biso. Bamisionere basengelaki kokende lisusu te nsima na mbula mitano, kasi bakokaki kozwa lotómo ya kofanda libela na mboka wana.
Mimekamo mpe mapamboli
Na boumeli ya bambula oyo tolekisaki na mikili mingi epai totindamaki, tozwaki baninga mingi mpe tomonaki mbuma ya mosala na biso. Na engumba San Salvador, Elsa azalaki na boyokani malamu elongo na molakisa mwasi moko mpe mobali na ye oyo azali sodá. Moko kati na baninga ya molakisi yango mpe asepelaki na solo ya Biblia. Na ebandeli, mobali na ye azalaki kosepela na Biblia te; atako bongo, tokendaki kotala ye na ntango akɔtaki lopitalo, mpe ayambaki biso na boninga nyonso. Na nsima, ayekolaki Biblia, atikaki mosala ya sodá, mpe abandaki kosakola elongo na biso.
Bobele na ntango wana, mwasi moko ayaki mokolo mosusu na Salle du Royaume mpe atunaki Elsa soki ezalaki ye nde ayekolaki Biblia elongo na sodá wana ya kala. Nzokande azalaká makango na ye! Ye mpe abandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Na assemblée ya distrike, sodá wana ya kala, mwasi na ye, moninga ya mwasi na ye mpe makango na ye ya kala, bango nyonso bazwaki batisimo!
Bokóli na mboka Salvador
Mpo na bokóli makasi oyo bozalaki na mboka wana, ebele ya ba Salles du Royaume etongamaki, mpe ezali lelo na ba Témoins ya molende 18 000. Nzokande, bokóli wana bosalemaki kati na mikakatano. Na boumeli ya mbula motoba, bandeko bakokisaki mosala ya Jéhovah kati na etumba ya banamboka. Kasi babatelaki ezaleli na bango ya koboya kosangana na makambo ya mokili mpe batikala sembo epai na Bokonzi na Nzambe.
Soki tosangisi mbula oyo ngai mpe Elsa tosili kolekisa kati na mosala ya pionnier, nyonso esali mbula 85. Tomonaki ete soki tozeli Jéhovah mpe toyoki ‘liloba nsima na biso, ete: “Oyo ezali nzela. Tambola na yango,”’ tokolɛmba te. Tozalaki mpenza na bomoi kitoko mpe ya esengo na kosaleláká Jéhovɛh ntango nyonso.
Kati na nimero ekolanda
Bomoi na yo ya mikolo mizali koya, esilá kotangama?
Esengo na bato na bopɔlɔ
Kodefisana mbongo kati na baklisto
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa makanisis mosusu, tala Annuaire des Temoins de Jehovah 1978, pages 177-179.
[Elilingi na lokasa 24]
Assemblée esalemaki na zamba moko na Espanye, na mobu 1956
[Elilingi na lokasa 25]
Na Maroc, tosakolaki epai na bato oyo bazalaki ba musulmans te
[Elilingi na lokasa 26]
Filiale ya mboka Salvador, epai tozalaki sikawa