Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/10 nk. 24-29
  • Tokutanaki na makambo oyo tokanisaki yango te na mosala ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokutanaki na makambo oyo tokanisaki yango te na mosala ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Batindi ngai na mwa ndako ya moke
  • Ye oyo azwi mwasi ya malamu . . .
  • Likambo oyo tokanisaki yango te mpe oyo ebongolaki bomoi na biso
  • Mosala ya zongazonga na Angleterre ekokaki kolɛmbisa te
  • Likambo mosusu oyo tokanisaki yango te mpe oyo ebongolaki bomoi na biso
  • Teritware na biso ya liboso na mboka mopaya
  • Toyekoli mimeseno mosusu
  • Mokakatano oyo tokanisaki yango te
  • Nsukansuka, tozwi bonsomi.
  • Likambo mosusu elandaki oyo tokanisaki yango te
  • Mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto oyo tokanisaki yango te
  • ‘Esengo na baoyo nyonso bazali kozela Jéhovah’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Topesamelaki mayaka ya motuya monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • “Awa ezali biso na Mosala oyo . . . , Tozali kotika Te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Tomonaki boboto monene ya Nzambe na ndenge mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/10 nk. 24-29

Lisolo ya bomoi

Tokutanaki na makambo oyo tokanisaki yango te na mosala ya Yehova

YA ERIC MPE HAZEL BEVERIDGE

“Nakateli yo etumbu ya sanza motoba ya bolɔkɔ.” Nazalaki naino kokanisa maloba wana, ntango bamemaki ngai na bolɔkɔ ya Strangeways, na engumba ya Manchester, na ekólo Angleterre. Ezalaki na sanza ya Desɛmbɛ 1950, mpe nazalaki na mbula 19. Nautaki kokutana na komekama moko monene na bolenge na ngai​—naboyaki kokɔta na mosala ya soda.​—2 Bakolinti 10:3-5.

NAZALAKI mobongisi-nzela, mosakoli ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova, oyo elimbolaki ete nakokaki te kokɔta na mosala ya soda; kasi mibeko ya Leta ya ekólo Angleterre ezalaki kolinga biso te. Yango wana nakotaki bolɔkɔ. Mpe nakanisi tata na ngai nde moto alingaki ete nakɔta bolɔkɔ. Atako yango emonanaki polele te, ezalaki mpo na ye nde nakotaki bolɔkɔ.

Tata azalaki mokonzi ya bolɔkɔ, moto ya etúká ya Yorkshire; azalaki na makambo makasi. Lokola azalaki soda mpe mokonzi ya bolɔkɔ oyo amesanaki mingi na mosala na ye, azalaki koyina makasi Lingomba ya Katolike. Akutanaki na Batatoli mpo na mbala ya liboso na ebandeli ya bambula ya 1930, ntango abimaki na monɔkɔ ya ndako mpo na kobengana bango​—kasi azongaki na babuku na bango mosusu na mabɔkɔ! Na nsima asalaki abonema ya zulunalo Consolation (lelo oyo Lamuká!). Batatoli bazalaki koya kotala ye mbula na mbula mpo na kolendisa ye azongela kosala abonema. Ntango nazalaki na mbula soki 15, Batatoli bayaki lisusu mpo na kosolola na Tata, mpe ngai nazalaki wana mpe nazalaki na ngámbo ya Batatoli. Ezalaki na ntango wana nde nabandaki koyekola Biblia.

Ntango nakómaki na mbula 17, namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo na sanza ya Marsi 1949. Na nsima, kaka na mbula yango, nakutanaki na John mpe Michael Charuk, oyo bautaki kozwa badiplome na Gileadi, eteyelo ya bamisionɛrɛ, mpe bazalaki kokende na Nigéria. Mposa na bango ya mosala ya misionɛrɛ esepelisaki ngai mingi. Ezala ete bango moko bayebaki yango to te, bakonaki mposa yango na motema na ngai.

Ntango nazalaki koyekola Biblia, nazalaki lisusu na mposa ya kokɔta na iniversite te. Mbula moko nsima ya kolongwa na ndako mpo na kokende kosala na biro ya Douanes na Londres, nazalaki komona ntina ya komipesa na ngai te soki nakobaki kaka na mosala wana ya Leta. Ntango nalongwaki na mosala ya biro, moninga na ngai moko ya mosala oyo aumelaki mingi na mosala yango apesaki ngai longonya na ndenge natikaki oyo abengaki “mosala ya koboma elimo.”

Liboso na yango, nakutanaki na komekama mosusu: ndenge ya koyebisa tata na ngai ete nalingi kotika mosala ya Leta mpo na kokóma mosakoli ya ntango nyonso. Mokolo moko na mpokwa, ntango nakendaki konje na ndako, nayebisaki ye likambo yango. Nazelaki namona ndenge Tata akosilika na ngai. Nakamwaki mpenza ndenge alobaki kaka ete: “Osili kozwa ekateli na yo; mabe na malamu etali yo moko. Kasi soki okutani na mikakatano, koya epai na ngai te.” Na mwa kaye na ngai ya basuvenire, nakomaki ete na mwa 1 Yanuali 1950, “Nakoyebisa Tata likanisi na ngai ya kokóma mobongisi-nzela. Nakanisaki ata moke te ete akokaki kozala na makanisi malamu mpe kosunga ngai ndenge wana. Boboto na ye epesaki ngai mposa ya kolela na esengo.” Nalongwaki na mosala ya Leta mpe nandimaki kokende na esika oyo batindaki ngai mpo na kozala mobongisi-nzela.

Batindi ngai na mwa ndako ya moke

Na nsima, nakutanaki na komekama mosusu mpo na komipesa na ngai epai na Nzambe. Batindaki ngai lokola mobongisi-nzela, na etúká ya Lancashire mpe bayebisaki ngai ete nakofanda na mwa ndako ya moke elongo na Lloyd Griffiths, moninga moklisto oyo autaki na Pays de Galles. Ntango nakómaki na Bacup, engumba moko ya kimya, epai mbula ebɛtaka mingi, nazalaki kokanisa ete ndako yango ekozala soki ndenge nini. Eumelaki te, nalɛmbaki nzoto ntango namonaki ndako yango: ezalaki nde na nse ya mabele! Ndako yango ezalaki na bampoko mpe bampese oyo ezalaki kotambolatambola na butu. Etikalaki moke makanisi na ngai ebongwana mpe nazonga epai na biso. Kasi, nabondelaki na nse ya motema mpe nasɛngaki Nzambe apesa ngai makasi ya kolonga mokakatano yango. Mbala moko, motema na ngai ekitaki mpe nakómaki kotalela likambo yango na makanisi ya malamu. Ebongiseli ya Yehova nde etindaki ngai kuna. Esengelaki natyela Yehova motema mpo na kozwa lisungi. Nazali na botɔndi mingi ndenge nayikelaki mokakatano yango mpiko, mpo soki nalɛmbaka, yango elingaki kobongola bomoi na ngai mpo na libela!​—Yisaya 26:3, 4.

Sanza soki libwa liboso ete nakota bolɔkɔ mpo naboyaki kokende mosala ya soda, nasakolaki na Rossendale Valley, etúká oyo nkita na yango ekweaki makasi na ntango wana. Nsima ya kolekisa pɔsɔ mibale na bolɔkɔ ya Strangeways, batindaki ngai na bolɔkɔ ya Lewes, na sudi ya Angleterre. Nsukansuka, tokómaki Batatoli mitano na bolɔkɔ yango, mpe tozwaki likoki ya kosala Ekaniseli ya liwa ya Klisto na kati ya bolɔkɔ.

Tata ayaki kotala ngai mbala moko. Yango ezalaki mpenza komekama mpo na ye na kotalela lokumu oyo azalaki na yango. Bókanisa naino: moto oyo ayebani malamu, mokonzi ya bolɔkɔ ayei kotala mwana na ye na bolɔkɔ! Nakozala ntango nyonso na botɔndi mpo na likambo oyo asalaki. Nsukansuka, na Aprili 1951, nabimaki na bolɔkɔ.

Ntango nabimaki na bolɔkɔ ya Lewes, nakotaki na engbunduka mpe nakendaki na Cardiff, na Pays de Galles, epai oyo tata na ngai azalaki mokonzi ya bolɔkɔ. Nazalaki mwana ya liboso kati ya bana minei​—mibali misato mpe mwasi moko. Nasengelaki koluka mosala ya ndambo ya mokolo mpo na kokokisa bamposa na ngai ya mosuni mpe kotikala mobongisi-nzela. Nakendaki kosala na magazini moko ya bilamba, kasi mokano ya liboso na bomoi na ngai ezalaki mosala ya kosakola. Ezalaki na ntango wana nde mama atikaki biso. Yango ezalaki komekama monene mpo na Tata mpe mpo na biso bana, oyo tozalaki na mbula kobanda 8 tii 19. Ezalaki mawa ndenge baboti na biso babomaki libala na bango.

Ye oyo azwi mwasi ya malamu . . .

Babongisi-nzela bazalaki mingi na lisangá. Kati na bango ezalaki na ndeko mwasi moko oyo azalaki kouta mikolo nyonso na Rhondda Valley, esika oyo bazalaki kotimola charbon, mpe azalaki koya kosala mosala na ye mpe kosakola. Nkombo na ye ezalaki Hazel Green, mobongisi-nzela moko ya molende. Hazel ayebaki solo mwa bambula mingi liboso na ngai​—baboti na ye bazalaki kokende na makita ya Bayekoli ya Biblia (lelo oyo Batatoli ya Yehova) na bambula ya 1920. Kasi totiká ye moko abɛtela biso lisolo na ye.

“Nazalaki mpenza komipesa na koyekola Biblia te tii na 1944, ntango natángaki mwa buku La religion moissonne la tempête. Mama na ngai azwaki ngai mpe tokendaki na liyangani moko ya etúká na engumba Cardiff. Atako nazalaki mpenza na boyebi mingi ya Biblia te, natɛlɛmaki na esika ya bamagazini, nalati libaya na nkingo oyo ezalaki koyebisa ete lisukulu ya bato nyonso ekosalema. Nasalaki yango atako bakonzi ya mangomba mpe bato mosusu bazalaki kotungisa biso. Nazwaki batisimo na 1946 mpe nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na sanza ya Desɛmbɛ ya mbula yango. Na nsima, na 1951, elenge mobali moko oyo azalaki mobongisi-nzela, ayaki na Cardiff, autaki kobima na bolɔkɔ. Ezalaki Eric.

“Tozalaki kobima elongo na mosala ya kosakola. Tozalaki koyokana malamu. Tozalaki na mikano ndenge moko mpo na bomoi: kotombola matomba ya Bokonzi ya Nzambe. Yango wana tobalanaki na sanza ya Desɛmbɛ 1952. Atako biso mibale tozalaki babongisi-nzela mpe tozalaki na biloko mingi te, esalemaki ata mbala moko te ete tózanga bilɔkɔ ya ntina oyo tozalaki na yango mposa. Ntango mosusu, okomona ndeko moko Motatoli asombi biloko lokola confiture to sabuni, eleki mingi mpe akabeli biso ndambo, na ntango mpenza oyo tozali na mposa na yango! Tozalaki na botɔndi mingi mpo na makabo ya ndenge yango. Kasi makambo mosusu oyo tomizelaki na yango te ezalaki kozela biso.”

Likambo oyo tokanisaki yango te mpe oyo ebongolaki bomoi na biso

Na sanza ya Novɛmbɛ 1954, ngai na Hazel tozwaki eloko moko oyo tozalaki komizela na yango te​—mokanda eutaki na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Londres; kati na yango basɛngaki ngai nakóma mokɛngɛli-motamboli, elingi koloba nátalaka lisangá moko na pɔsɔ. Tokanisaki ete babosanaki, ezalaki ya biso te; yango wana toyebisaki ata moto moko te na lisangá. Kasi, natondisaki lokasa yango mpe nazongisaki yango, mpe tozelaki eyano. Nsima ya mwa mikolo, eyano eyaki ete: “Yaká na Londres mpo na koyekola ndenge ya kosala mosala yango”!

Na biro ya Londres, nandimaki te ete ngai, oyo nazalaki kaka na mbula 23, nakokaki kosala elongo na bandeko oyo nazalaki komona ete bazali mpenza bingambe na elimo​—Pryce Hughes, Emlyn Wynes, Ernie Beavor, Ernie Guiver, Bob Gough, Glynn Parr, Stan na Martin Woodburn mpe bamosusu, oyo mingi kati na bango basilá kokufa. Bapesaki ndakisa malamu ya molende mpe ya bosembo na Angleterre na bambula 1940 mpe 1950.

Mosala ya zongazonga na Angleterre ekokaki kolɛmbisa te

Nabandaki mosala ya mokɛngɛli-motamboli pene na eleko ya mpiɔ ya 1954-1955. Batindaki biso na Est-Anglie, etúka moko ya Anglerre epai mpiɔ ya mipɛpɛ ya mai monene ya nɔrdi ebɛtaka makasi. Na ntango wana, Batatoli bazalaki kaka 31 000 na Angleterre. Zongazonga wana ya liboso ezalaki mpasi mpo na biso lokola tozalaki naino koyekola mosala; ezalaki mpe ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na bandeko oyo tozalaki kotala. Lokola namesanaki naino na mosala yango te mpe nazalaki koloba mpe kosala makambo polelepolele ndenge bato ya Yorkshire bamesaná, mbala mingi nazalaki kozokisa bandeko mosusu. Nsima ya bambula, nayaki koyekola ete komonisela bato boboto eleki kosala makambo malamu, mpe bato bazali na ntina mingi koleka ndenge ya kosala makambo. Tii lelo oyo namekaka kaka kolanda ndakisa ya Yesu ya kokitisa basusu mitema, kasi ntango mosusu nalongaka mpenza te.​—Matai 11:28-30.

Nsima ya kolekisa sanza 18 na Est-Anglie, batindaki biso na zongazonga moko na nɔrdi-ɛsti ya Angleterre, na etúká ya Newcastle- upon- Tyne mpe na Northumberland. Nasepelaki mingi na bato ya etúká wana ya kitoko. Nazwaki litomba mingi ntango ndeko Don Ward, mokɛngɛli ya etúká oyo autaki na Seattle, na Washington (États-Unis), ayaki kotala biso. Azwaki diplome na kelasi ya mbala ya 20 ya Gileadi. Nazalaki koloba mbangumbangu soki nazali kosala lisukulu, kasi ateyaki ngai ndenge nini nakoki koloba malɛmbɛ, kopema moke ntango nazali koloba mpe koteya.

Likambo mosusu oyo tokanisaki yango te mpe oyo ebongolaki bomoi na biso

Na 1958, tozwaki mokanda moko oyo ebongolaki bomoi na biso. Babengaki biso na Eteyelo ya Gileadi, na South Lansing, na etúká ya New York (États-Unis). Totekaki mwa vuatire na biso mpe tozwaki mbongo ya kofuta tike mpo tókende na New York. Tokendaki naino na liyangani ya mikili mingi ya Batatoli ya Yehova na engumba New York. Na nsima, tokendaki na Peterborough, na etúká ya Ontario, tosalaki sanza motoba lokola babongisi-nzela liboso tókende na Eteyelo ya Gileadi.

Kati na balakisi ya eteyelo yango, ezalaki na Albert Schroeder, oyo azali sikoyo na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, mpe Maxwell Friend na Jack Redford, oyo basilá kokufa. Kozala kati na bayekoli 82 oyo bautaki na mikili 14 ezalaki mpenza likambo ya kolendisa. Mokemoke, tobandaki koyebana mimeseno. Kozala elongo na bayekoli oyo bautaki bamboka mosusu mpe bazalaki kobunda na Lingelesi, esalisaki biso na koyeba mokakatano oyo tokokutana na yango soki ekosɛnga ete tóyekola monɔkɔ mosusu. Nsima ya sanza mitano tosilisaki kelasi na biso mpe batindaki biso na mikili 27. Na nsima ekómaki mokolo ya kozwa badiplome, mpe kaka na mikolo yango tokendaki na engumba New York, kozela masuwa na biso, la Queen Elizabeth, mpo tozonga na Mpoto.

Teritware na biso ya liboso na mboka mopaya

Teritware nini batindaki biso? Portugal! Tokómaki na Lisbonne na sanza ya Novɛmbɛ 1959. Komesena na monɔkɔ mpe na makambo ya sika ezalaki momekano mpo na biso. Na 1959, Batatoli bazalaki kaka 643 na Portugal, ekólo oyo ezalaki na bato pene na milio 9. Kasi, mosala na biso ya kosakola endimamaki te na mibeko ya Leta. Atako tozalaki na Bandako ya Bokonzi, ezalaki ata na makomi na libándá te.

Nsima ya koyekola Portugais na lisalisi ya misionɛrɛ moko nkombo na ye Elsa Piccone, ngai na Hazel tobandaki kotala masangá mpe bituluku oyo ezalaki zingazinga ya bingumba Lisbonne, Faro, Evora, mpe Beja. Na nsima, na 1961, makambo ebandaki kobongwana. Nazalaki koyekola Biblia na elenge mobali moko nkombo na ye João Gonçalves Mateus. Azwaki ekateli ya koboya kokɔta na makambo ya politiki mpe na mosala ya soda. Mwa moke nsima, babengaki ngai na biro monene ya bapolisi mpo na kotuna ngai mituna. Likambo mosusu oyo namizelaki na yango te! Nsima ya mwa mikolo, bayebisaki biso ete bátikeli biso kaka mikolo 30 mpo tólongwa na Portugal! Ezalaki mpe ndenge moko mpo na baninga na biso bamisionɛrɛ Eric na Christina Britten mpe Domenick na Elsa Piccone.

Nasɛngaki ete nasolola lisusu na bapolisi mpe bapesaki biso nzela tókutana na mokonzi ya bapolisi ya makambo ya nkuku. Ayebisaki biso polele ntina oyo tosengelaki kolongwa na mboka na bango mpe ayebisaki biso nkombo ya​—João Gonçalves Mateus​—moto oyo nazalaki koyekola na ye Biblia! Alobaki ete Portugal ezali lokola Angleterre te, ekoki kotikela bato nzela te báboya mosala ya soda mpo na lisosoli na bango. Na bongo esengelaki tólongwa na Portugal mpe nazwaki lisusu nsango ya João te. Nsima ya mbula 26, oyo nde esengo nayokaki mokolo namonaki ye na mwasi mpe bana misato, ntango tokendaki na likita ya kofungola Betele ya sika ya Portugal! Mosala na biso na Portugal ezalaki mpamba te!​—1 Bakolinti 3:6-9.

Teritware nini batindaki biso na nsima? Tomizelaki na yango te! Espagne, ekólo oyo ezali kaka pene ya Portugal. Tozalaki na mai na miso na sanza ya Febwali 1962, ntango tokotaki engbunduka na Lisbonne mpo na kokende na Madrid.

Toyekoli mimeseno mosusu

Na Espagne, esengelaki tósakolaka mpe tósalaka makita na biso na kobombana. Ntango tozalaki kosakola, mbala mingi tozalaki te kokɔta na bandako mibale oyo elandani. Nsima ya kopesa litatoli na ndako moko, tozalaki kokende na balabala mosusu, na ndako mosusu. Yango esalaki ete bapolisi to basango bázwa biso te. Lingomba ya Katolike mpe lingomba ya politiki ya fasciste nde bazalaki koyangela mboka wana, mpe mosala na biso ya kosakola epekisamaki. Lokola tozalaki bapaya, mpo báyeba biso te, tozwaki bankombo ya bato ya Espagne. Nkombo na ngai ekómaki Pablo, mpe Hazel akómaki Juana.

Nsima ya kolekisa mwa basanza na Madrid, batindaki biso na mosala ya zongazonga na Barcelone. Totalaki masangá mingi na engumba yango, mpe mbala mingi tozalaki kolekisa pɔsɔ mibale to misato na lisangá moko. Tozalaki koumela mingi na lisangá moko mpamba te tosengelaki kotala etuluku mokomoko ya boyekoli ya mokanda lokola nde ezalaki lisangá, mpe yango ezalaki mbala mingi kosɛnga ete tótala bituluku mibale na pɔsɔ moko.

Mokakatano oyo tokanisaki yango te

Na 1963, basɛngaki biso tósala mosala ya mokɛngɛli ya etúka na Espagne. Mpo na kotala Batatoli pene ya 3 000, tosengelaki kotambola ekólo mobimba, kotala bazongazonga libwa oyo ezalaki na ekólo yango na ntango wana. Tobosanaka te mayangani mosusu ya etúká oyo tosalaki na kobombana, na zamba pene na engumba Seville, na ferme moko pene na engumba Gijon, mpe mosusu pembeni ya bibale pene ya Madrid, ya Barcelone mpe ya Logroño.

Tozwaki bibongiseli, ntango tozalaki kosakola ndako na ndako, nazalaki kotala na babalabala ya pembeni mpo na koyeba nzela ya kokima noki soki tokutani na mokakatano oyo ekosɛnga ete tókima. Mokolo mosusu, tozalaki kosakola na Madrid, ngai na Motatoli mosusu tozalaki na ndako moko ya etaze, mbala moko toyokaki bato bazali koganga na nse ya etaze oyo tozalaki. Ntango tokitaki, tomonaki ebele ya bilenge basi, oyo bazalaki bato ya etuluku moko ya Lingomba ya Katolike oyo babengi Hijas de María (Bana-basi ya Malia). Bazalaki kokebisa bato ya pembeni mpo bayoka biso te. Tokokaki kosolola na bango te mpe namonaki ete tosengelaki kolongwa wana nokinoki soki te bapolisi bakokanga biso. Yango wana, tokimaki noki mpenza!

Tolekisaki bambula ya esengo na Espagne. Tozalaki komeka kolendisa bandeko basi mpe mibali ya molende oyo bazalaki kuna, ezala mpe bandeko oyo bazalaki babongisi-nzela minene. Bazalaki na likama ya kokɔta bolɔkɔ mpe mbala mingi bazalaki kozanga biloko mingi mpo na kobima na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe mpo na kofungola masangá mpe kolendisa yango.

Na ntango yango, tozwaki mpe bansango mosusu ya mabe. Hazel alimboli ete: “Na 1964 mama na ngai, Motatoli ya sembo, akufaki. Ezalaki mpenza likambo ya mawa ya kobungisa ye kozanga ete tozwa ata likoki ya kopesena mbote ya nsuka. Wana ezali moko ya mikakatano ya mosala ya misionɛrɛ, oyo bandeko mosusu mingi mpe bakutaná na yango.”

Nsukansuka, tozwi bonsomi.

Nsima ya bambula mingi ya konyokwama, na sanza ya Yuli 1970, mosala na biso endimamaki na bakonzi ya Leta na ekólo Espagne. Ngai na Hazel totondaki na esengo ntango Bandako ya Bokonzi efungwamaki, ya liboso na Madrid mpe ya mibale na Lesseps, na etúká ya Barcelone. Bandako yango ezalaki ntango nyonso na makomi minene, oyo mbala mingi ezalaki kongɛnga. Tolingaki bato báyeba ete Leta andimaki Batatoli ya Yehova mpe tokokoba kosala mosala na biso na Espagne! Tii na ntango wana, na 1972, Batatoli bazalaki pene na 17000 na Espagne.

Na ntango yango, nazwaki bansango ya kolendisa oyo eutaki na Angleterre. Na 1969, Tata na ngai ayaki kotala biso na Espagne. Akamwaki mingi na lolenge oyo Batatoli ya Espagne bayambaki ye, yango wana ntango azongaki na Angleterre, abandaki koyekola Biblia. Na nsima, na 1971, nazwaki nsango ete Tata azwi batisimo! Ezalaki ntango ya esengo mingi mokolo tokendaki kotala ye lokola ndeko na biso moklisto mpe asalaki libondeli liboso ete tólya. Nazelaki mokolo yango banda mbula koleka 20. Ndeko na ngai Bob na mwasi na ye Iris, bakómaki mpe Batatoli na 1958. Mwana na bango, Phillip, azali sikoyo mokɛngɛli ya zongazonga na Espagne, elongo na mwasi na ye Jean. Tosepelaka mingi ntango tomonaka bango bazali kosala na ekólo wana kitoko.

Likambo mosusu elandaki oyo tokanisaki yango te

Na sanza ya Febwali 1980, ndeko moko oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ayaki na Espagne lokola mokɛngɛli ya zone. Likambo oyo namizelaki na yango te, asengaki abima na ngai na mosala ya kosakola. Nayebaki te nzokande azalaki koluka koyeba ngai malamu! Na nsima, na sanza ya Sɛtɛmbɛ, babengaki biso tokende kosala na biro monene na Brooklyn, na New York! Tokamwaki mpenza. Tondimaki kokende kuna, atako ezalaki mpasi mpo na kotika bandeko na biso ya Espagne. Tii na ntango wana, Batatoli bazalaki 48000 na ekólo yango.

Liboso tókende, ndeko moko akabelaki ngai montre. Na montre yango, akomaki mikapo mibale ya Biblia: “Lucas 16:10; Lucas 17:10.” Alobaki ete ezalaki mikapo oyo nasengelaki kokanisa yango ntango nyonso. Luka 16:10 emonisaka ete tosengeli kozala sembo na makambo ya mikemike; mpe Luka 17:10, elobaka ete “tozali baombo [mpamba, NW],” yango wana tozali na ntina moko te ya komikumisa. Ntango nyonso namonaka mpenza ete ezala likambo nini oyo tozali kosala na mosala ya Yehova, ezali kaka mokumba oyo tosengeli kokokisa lokola tozali baklisto oyo bamipesi.

Mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto oyo tokanisaki yango te

Na 1990, maladi ya motema ekómaki kotungisa ngai. Nsukansuka, esengaki ete bakɔtisa ngai masini moko na motema mpo efungola mosisa moko oyo ekangamaki. Na ntango wana, lokola nzoto na ngai elɛmbaki mingi, Hazel azalaki kosunga ngai na makambo mingi; azalaki komema basakosi mpe bavalizi oyo nazalaki lisusu kokoka kotombola te. Na nsima, na sanza ya Mai 2000, bakɔtisaki ngai masini moko babengi stimulateur na motema. Mpe yango ezali kosalisa ngai mingi!

Na mbula 50 oyo eleki, ngai na Hazel tomonaki ete lobɔkɔ ya Yehova ezali mokuse te mpe ete akokisaka mikano na ye na ntango oyo ye moko aponi, kasi na ntango oyo biso toponi te. (Yisaya 59:1; Habakuku 2:3) Na bomoi na biso tokutani na makambo mingi ya esengo oyo tokanisaki yango te, tokutanaki mpe na mwa makambo mosusu ya mawa, kasi na nyonso wana Yehova abatelaki biso. Awa na biro monene ya libota ya Yehova, tozali na libaku malamu ya kozala mikolo nyonso elongo na bandeko oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Mbala mingi namitunaka: ‘Ya solo mpenza tozali awa?’ Ezali mpenza ngɔlu ya Nzambe. (2 Bakolinti 12:9) Tozali kolikya ete Yehova akolanda kobatela biso na mayele mabe ya Satana mpe kobatela biso ete tomona mokolo oyo boyangeli na ye ya sembo ekoyangela mabele mobimba.​—Baefese 6:11-18; Emoniseli 21:1-4.

[Elilingi na lokasa 26]

Bolɔkɔ ya Strangeways, na Manchester, bolɔkɔ ya liboso oyo nakɔtaki ntango bakatelaki ngai etumbu ya bolɔkɔ

[Elilingi na lokasa 27]

Na mwa vuatire na biso, ntango tozalaki na mosala ya zongazonga na Angleterre

[Elilingi na lokasa 28]

Liyangani moko oyo tosalaki na kobombana, na Cercedilla, Madrid (Espagne), na 1962

[Elilingi na lokasa 29]

Na Brooklyn, na mesa oyo totyaka mikanda ya kokabola

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto