Mangomba mazali mpenza na ntina?
MANGOMBA mazali na ntina mpo na yo? Mbala mosusu ozali mosangani ya etuluku moko na losambo to ya Lingomba moko? Na boye, okokani na makambo mingi na bato oyo bazalaki na bomoi na mobu 1884, wana filozofe allemand Karl Marx akomaki: “Mangomba . . . mazali eloko na kolalisa bato mpongi.” Na eleko yango, pene na bato nyonso bazalaki kokende na ndakonzambe mpe mangomba mazalaki na bopusi makasi likoló na bomoi ya bato. Lelo oyo makambo masili mpenza kobongwana, na yango mangomba mazali na bopusi bobele moke to mazali na yango mpe te likoló na bomoi na ebele na bato. Soki okendaka ndakonzambe, ozali kati na eteni moke ya bato.
Nini etindaki mbongwana motindo wana? Karl Marx akolisaki liteya moko oyo ezali kotemela mangomba, liteya oyo ekomaki na bopusi makasi. Emonani ete, Karl Marx azalaki kotalela mangomba lokola epekiseli mpo na bokoli ya mokili na bato. Engebene motindo moko ya kokanisa oyo ezali kotika ata esika moke te mpo na Nzambe te mpo na mangomba, azalaki koloba ete bolukiluki ya biloko na mosuni nde ekokokisa bamposa ya bato. Ezali mpo na ntina yango nde alobaki ete: “Esengeli kolongola mangomba mpo na kopesa bolamu epai na bato.”
Makanisi to filozofi ya Marx likoló na bolukiluki ya bozwi na mosuni eyaki kokolisama na nsima na socialiste Friedrich Engels mpe na moyangeli koministe morusse Vladimir Lénine. Liteya yango ezwaki nkombo ya marxisme-léninisme. Kino kala mingi te, koleka ndambo moko likoló na misato na bato bazalaki naino na nse na biyangeli ya politiki oyo ezali kolanda na penepene to mwa moke likanisi wana ya kotemela kosambela Ebele na mibali mpe basi bazali naino na nse na makambo yango.
Nguya ya mangomba esili
Ezali bobele mpo na bokoli ya mateya ya koministe te nde mangomba mabungisaki bokonzi na yango likoló na bato. Sianse ezali mpe na mokumba kati na likambo yango. Na ndakisa, kopalangana ya liteya ya evolution esili komema ebele ya bato na kobeta ntembe ete mozalisi azali.Makambo mosusu masili mpe kokota na kokweisama ya mangomba.
Mokanda Encyclopédie britannique eyebisi “bandimbola oyo sianse epesi na makambo oyo liboso mazalaki kotalelama lokola mauti na nguya oyo eleki mayele na bato,” mpe “kolimwa na bopusi na mangomba likoló na misala lokola ya monganga, ya kolakisa, mpe ye kokembisa (art).” Bopusi yango ememaki na oyo babengi “sécularisation.” Liloba yango elimboli nini? Elimbolami lokola “kobungisama ya elimo ya mangomba kati na bato.” Mikili ya koministe mpe oyo ya koministe te misili kozwa bopusi ya sécularisation.
Soki mangomba masili kobungisa bopusi na yango, ezali bobele mpo na sécularisation to mpo na marxisme-léninisme te. Mangomba na boklisto ya mokili oyo mazali mpe na mokumba na likambo yango. Mpo na nini? Mpo ete, na boumeli ya bikeke mingi, basalelaki bokonzi na bango na lolenge ya mabe. Lisusu, esika ya koteya Biblia, bapalanganisaki mateya ya mitinda na bato mikweisami na Biblia mpe mitongami na makanisi na bato. Mpo na yango, bato na bango balɛmbaki na elimo na motindo boye ete bakokaki te kotelemela bopusi na elimo ya kotika makambo na lingomba.
Na koleka, mangomba bango moko bakokaki te kotelemela bokoli ya sécularisation. Na ekeke ya zomi na libwa bateyi ya Biblia ya boklisto ya mokili oyo babimisaki lolenge moko ya haute critique to motindo ya kotyola Biblia kino bato bakomaki kotalela yango lisusu lokola liloba lipemami na Nzambe te. Mangomba, ata ya katolike, bandimaki liteya ya évolution. Nzokande balobaka ete bandimaka kozalisama na biloko na Nzambe. Na yango, bandimi likanisi oyo ete nzoto na moto ekomaki bongo na kobongwana moke moke, kasi bobele molimo nde mozalisamaki na Nzambe, Na bamibu 1960, ba protesta babimisaki liteya ya teoloji ebengami “kufa ya Nzambe.” Ebele na bateyi bakangaki miso likoló na lolenge ya bomoi ya bolukiluki ya bozwi ya mosuni. Bandimaki makambo ya kosangisa nzoto liboso ya kobala mpe kosangisa nzoto mibali na mibali to mwasi na mwasi. Batéolojié katolike babimisaki liteya ya kosikolama, na kosangisa makambo ya lingomba ya katolike na makanisi ya botomboki ya marxisme.
Bozongi epai na makambo na nzambe
Kokweisama ya makambo na Nzambe eyangelaki, mingimingi na bamibu 1960 kino katikati na bamibu 1970. Na nsima makambo mabongwanaki lisusu. Emonanaki ete bozongi epai na mangomba ebandaki, kasi mpenzampenza epai na mangomba ya minene te. Na nsuka ya bamibu 1970 mpe na boumeli ya mibu 1980 na mokili mobimba, ebele un mangomba ya sika ebotamaki.
Mpo na nini kozongelama wana ya mangomba? Moyekoli moko na lolenge ya bomoi na bato Gilles Kepel, ye moto ya ekolo france alobaki ete “basangani ya mangomba oyo bateyami na motindo na bomoi oyo ekaboli mangomba na makambo mosusu ya bomoi na bato . . . bazali koloba ete likambo yango ememi bango na mwango ezangi ntina: bato bazali kobuka mbuma na lolendo mpe ya enzombo oyo balonaki na kolinga komitangola na Nzambe: mobulu, koboma libala, SIDA, komela bangi, komiboma.”
Na mikolo miuti koleka, kozongisama ya bosepeli na makambo na Nzambe esalemaki nokinoki kobanda likambo oyo limonani lokola kokwea ya marxisme-léninisme. Mpo na bato mingi liteya ya koboya ete Nzambe azali ekomaki mpenza lingomba. Kanisa mobulungano na baoyo batyaki motema na bango mobimba na yango! Mokomeli moko ya zulunalo Washington Post, afandi na mboka Moscou, ayebisaki maloba oyo ya recteur ya kala ya Ecole supéreure du parti communiste: “Mokili moko ekobikaka bobele na nkita mpe na mwango na yango ya komiyangela te, kasi lisusu na masapo mpe na mateya ya batata oyo batongaki yango. Ezali mpasi mingi mpo na etuluku nyonso ya bato na kososola ete masapo na bango ya ntina mazali na moboko kati na solo te, kasi botambwisi mateya na bango mpe na makanisi mpamba. Yango nde ezali sikawa epai na biso na ntina na Lénine mpe ya révolution.”
Kolobelaka na ntina na bituluku ya koministe mpe ya kapitaliste, moyekoli na etuluku na bato mpe filozofe moto ya France Edgar Morin andimaki likambo oyo: “Tomonaki bobele kokweisama ya mikolo kitoko milakami na basali te, kasi lisusu kokweisama ya bokoli ya mbalakaka mpe ya petee kati na bato bazangi kosambela, epai kuna sianse, bwanya, mpe boyangeli ya demokrasi ekokola na mbala moko. . . . Bokoli ata moko emonani te. Mikolo kitoko oyo tokanisaki misili kokwea.” Ebele na bato oyo batyaki motema na milende na bato ya kosala mokili moko kitoko kozanga kotalela Nzambe, batondi sikawa na liyoki ya kozanga.
Mposa ya kosambela ezongi makasi
Kofungwama ya miso na bato na mokili mobimba etindaki mwa bato na motema sembo na kondima ete bazali na mposa na makambo ya elimo. Bazali komona ntina ya kosambela. Nzokande balɛmbi na mangomba ya minene, mpe bazali kokakatana mpo na mangomba ya sika, lokola oyo bakobikisaka bato, bituluku balobaka bazali na elimo santu, bituluku bikobombaka sekele ya mateya na bango mpe basambeli ya Satana. Lisusu, nsomo ya komipesa na mangomba kozanga kotalela ebandi komonana. Na yango, tokoki koloba ete mwa bozongi epai na mangomba ezali kosalema. Kasi ezali yango nkembo ya malamu mpo na libota ya bato? Na bongo, mangomba nyonso mazali kokokisa bamposa ya elimo na bato?
[Elilingi na lokasa 3]
“Mangomba mazali kolela ya bikelamu ya mpasi, motema ya mokili mozangi motema, mazali mpo elimo ya mokili mozangi elimo. Mazali eloko na kolalisa bato mpongi”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Photo: New York Times, Berlin—33225115
[Elilingi na lokasa 4]
Vladimir Lénine (alakisami awa) mpe Karl Marx bazalaki kotalela mangomba lokola epekiseli mpo na bokoli ya libota na bato
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Musée d’Histoire Contemporaine—BDIC (Universitiés de Paris)
[Elilingi na lokasa 5]
Liteya ya marxiste-leniniste ebimisaki bilikya minene na mitema ya bamilió na bato
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Musée d’Histoire Contemporaine—BDIC (Universitiés de Paris)
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]
Cover photo: Garo Nalbandian