Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/9 nk. 3-5
  • Losambo ezali na ntina nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Losambo ezali na ntina nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina oyo bato mingi batiká kosambela
  • Basambelaka na mikano ya mabe
  • ‘Nasala na yango nini?’
  • Tosikwami na losambo ya lokuta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tosalela losambo na solo mpo na lobiko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ndenge nini nakoki koyeba lingomba ya solo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Osengeli kopona lingomba biponela?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/9 nk. 3-5

Losambo ezali na ntina nini?

BATO mingi balobaka ete: “Esengeli kaka te nasambelaka mpo nazala moto malamu!” Bato mingi ya bosembo, ya motema mawa mpe oyo bamipesaka kilo, basambelaka te. Na ndakisa, atako bato mingi na Mpoto balobaka ete bandimaka Nzambe, mingi kati na bango bakendaka ndako-nzambe te.a Ata na Amerika ya Sudi, kaka Bakatolike moke (15 to 20%) nde bakendaka ndako-nzambe pɔsɔ na pɔsɔ.

Ntango mosusu yo mpe okanisaka lokola ebele ya bato mosusu ete losambo esalisaka moto te akóma na bomoi ya malamu. Kasi, ntango mosusu oyebi ete mwa bambula liboso, ntango bankɔkɔ na yo bazalaki naino bilenge, bato bazalaki kosambela mingi koleka lelo oyo. Mpo na nini bato balingi lisusu kosambela te? Okoki kozala moto malamu ata soki osambelaka te? Ezali na losambo oyo ekoki kopesa yo litomba?

Ntina oyo bato mingi batiká kosambela

Na boumeli ya bankama ya bambula, bato mingi na mangomba ya boklisto bazalaki kondima ete Nzambe alingaka bato bátosa ye. Bazalaki kokende na ndako-nzambe mpo na koluka kosepelisa Nzambe, ezala na nzela ya milulu oyo etambwisami na sango to na lisalisi ya pastɛrɛ to moteyi moko. Toboyi te, bato mingi bayebaki bokosi oyo ezalaki na kati ya mangomba. Bayebaki ete mangomba ebimisaki to epesaki mabɔkɔ na bitumba mingi; bayebaki mpe etamboli mabe ya bakonzi mingi ya mangomba. Kasi, mingi bayebaki ete losambo yango moko ezali mabe te. Bamosusu bazalaki kosepela na milulu, na mimeseno ya losambo mpe miziki; bamosusu bazalaki kosambela mpo na nsɔmɔ ya lifelo, liteya oyo ezali na kati ya Biblia te. Na nsima, makambo mingi eyaki kobongola makanisi ya bato mingi mpo na losambo.

Bato mingi bakómaki kondima liteya ya evolisyo. Bamosusu bakómaki kondima ete bomoi ebimaki kaka boye. Mangomba mingi ekokaki te komonisa bato ete Nzambe nde akelá bomoi. (Nzembo 36:9) Longolá yango, lokola mayele ya siansi ekolaki, minganga bayebaki makambo mingi; mituka, bamasuwa mpe bampɛpɔ ebimaki; babimisaki foni, telegrame, telefone mpe Internet, bato bakómaki kokanisa ete siansi ekoki kosilisa mikakatano nyonso. Lisusu, emonanaki lokola bato ya mayele oyo bayekolaka bomoi ya bato bakoki kotambwisa bato malamu koleka mangomba. Kasi, mangomba elongaki te komonisa bato ete kotosa mibeko ya Nzambe ezali bomoi oyo eleki malamu.​—Yakobo 1:25.

Ntango mangomba mingi emonaki bongo, ebongolaki lolenge na yango ya koteya. Basango mpe bapastɛrɛ batikaki koteya ete Nzambe asɛngaka bato bátosa ye. Kutu, mingi bakómaki koteya ete moto na moto nde asengeli kopona nini ezali malamu mpe nini ezali mabe mpo na ye. Mpo na kobenda bato, bamosusu bakómaki koteya ete Nzambe andimaka moto kaka ndenge azali. Mateya ya ndenge wana ezali kokundwela biso likambo oyo Biblia esakolaki: “Ekozala na eleko moko boye oyo bakokoka te mateya oyo epesaka litomba, kasi, na boyokani na bamposa na bango moko, bakomindukela bateyi mpo básalaka bango nyɔminyɔmi na matoi.”​—2 Timote 4:3.

Na esika mateya yango ebenda bato, ebenganaki nde bango. Bakómaki komituna: ‘Soki mangomba ezali kondima te ete Nzambe azali na likoki ya kokela mpe bwanya ya kobimisa mibeko, litomba nini nakoki kozwa na losambo? Mpo na nini naboma nzoto na koteya bana na ngai makambo ya Nzambe?’ Bato oyo bazalaki kosala makasi bázala na etamboli ya malamu bakómaki koloba ete losambo ezali na litomba moko te. Batikaki mangomba mpe bazalaki komona lisusu ntina ya losambo te. Mpo na nini losambo, oyo ezali likambo ya malamu mpenza, bato bakómá kotala yango mpamba? Biblia epesi eyano moko ya malamu mpenza.

Basambelaka na mikano ya mabe

Ntoma Paulo akebisaki baklisto ya liboso ete bamosusu bakobanda kosalela nkombo ya Klisto na mikano ya mabe. Alobaki boye: “Bambwa mabe ya zamba bakokɔta na kati na bino mpe bakosalela etonga makambo na boboto te, mpe uta na kati na bino mpenza mibali bakobima mpe bakoloba makambo oyo etɛngamá mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Misala 20:29, 30) Augustin, moto moko ya teoloji na Lingomba ya Katolike, alobaki mpe “makambo oyo etɛngamá.” Yesu ateyaki bayekoli na ye ete básalelaka Makomami mpo na kosalisa bato bákóma bandimi. Lokola Yesu alobaki na Luka 14:23 ete: “Sɛngisá bango na makasi bákɔta,” Augustin abalolaki ndimbola ya maloba ya Yesu mpe alobaki ete Yesu asɛngaki ete bákómisaka bato bandimi na makasi. (Matai 28:19, 20; Misala 28:23, 24) Augustin asalelaki losambo mpo na kokonza bato.

Satana, anzelu oyo atombokelaki Nzambe, nde azali kotya mobulu wana na kati ya losambo. Atindaki baklisto mosusu na ekeke ya liboso bábebisa lisangá ya boklisto. Biblia elobi ete “bato wana bazali bantoma ya lokuta, basali ya mosala ya bokosi, oyo bazali komibimisa lokola bantoma ya Klisto. Mpe likambo ya kokamwa ezali te, mpo Satana ye moko azali kokoba komibimisa lokola anzelu moko ya pole. Bongo ezali likambo monene te soki baministre na ye mpe bazali kokoba komibimisa lokola baministre ya boyengebene.”​—2 Bakolinti 11:13-15.

Na nzela ya mangomba oyo bazali komibenga baklisto, oyo balobaka ete bazali na etamboli malamu mpe ete bateyaka mateya ya solo, Satana azali kotinda bato bálanda bizaleli na ye na esika bálanda oyo ya Nzambe. (Luka 4:5-7) Na ntembe te ozali komona ete lelo oyo bakonzi mingi ya mangomba bazali komipesa batitre mineneminene mpe kolyela bandimi na bango na nkombo ya losambo. Baguvɛrnema mpe ezali kosalela mangomba mpo na kotinda bana-mboka bándima kokufa na bitumba mpo na bolamu ya mboka.

Zabolo azali kosalela mangomba na ndenge oyo bato mingi bakoki kokanisa te. Okoki kokanisa ete kaka mwa bafana ya mangomba mosusu nde bazali kosalela Satana. Nzokande, Biblia elobi ete ye “oyo abengami Zabolo mpe Satana . . . azali kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela.” Biblia elobi lisusu ete “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (Emoniseli 12:9; 1 Yoane 5:19) Ndenge nini Nzambe atalelaka mangomba oyo bakonzi na yango bazali kosalela yango kaka mpo na kobenda bato epai na bango moko?

‘Nasala na yango nini?’

Soki osepelaka te na etamboli ya bato ya mangomba mosusu ya boklisto, yebá ete Nzambe mpe asepelaka na bango ata moke te. Mangomba ya boklisto elobaka ete bazali bato ya Nzambe; Bayisalaele mpe bazalaki koloba bongo. Bango nyonso bamonani sembo te. Na yango, ndenge kaka Yehova apesaki Yisalaele etumbu, akopesa mpe mangomba ya boklisto ya lelo oyo etumbu. Yehova alobaki boye: “Balingaki koyoka maloba na ngai té, baboyaki mibeko na ngai. Násala nini na malasi oyo bazali kokende kozwela ngai na mboka Saba? . . . Makabo oyo bazali kopesa ngai ezali kosepelisa ngai té.” (Yilimia 6:19, 20, Bible na lingala ya lelo oyo) Nzambe andimaki te losambo ya bato ya mitema mibale. Azalaki kosepela te na milulu mpe mabondeli na bango. Alobaki na Bayisalaele boye: “Bilambo na bino bibongisami, molimo na ngai eyini yango; esili kokóma bozito epai na ngai, nalɛmbi mpo na kokumba yango. Ekosembola bino mabɔkɔ na bino, nakobombela bino miso na ngai; ata bokobondela mabondeli mingi mpenza nakoyoka te.”​—Yisaya 1:14, 15.

Yehova asepelaka nde na biyenga ya banzambe ya lokuta oyo mangomba bakómisá ya boklisto? Ayokaka mabondeli ya bakonzi ya mangomba oyo bazali kobebisa mateya ya Klisto? Nzambe andimaka lingomba oyo eboyi kotosa mibeko na ye? Yebá malamu ete atalelaka milulu ya mangomba lelo oyo kaka ndenge azalaki kotalela makabo ya Bayisalaele, oyo alobaki mpo na yango ete: ‘Nasala na yango nini?’

Epai mosusu, Yehova asepelaka mingi soki bazali kosambela ye na solo mpe na motema moko. Nzambe asepelaka soki bato bazali kotɔnda ye mpo na nyonso oyo azali kosalela bango. (Malaki 3:16, 17) Boye, okoki nde kozala moto malamu ata soki ozali kosambela te? Soki moto azali kosalisa baboti na ye te, tokoki koloba ete azali moto malamu? Moto oyo azali kosala eloko te mpo na Nzambe, akoki kozala moto malamu? Emonani mpenza ete tosengeli koluka kosepelisa Nzambe ya solo, oyo akelá bomoi. Na lisolo oyo elandi, tokotalela ndenge oyo losambo ya solo ekumisaka Nzambe mpe epesaka biso litomba.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Buku moko (The Decline of Christendom in Western Europe, 1750-2000) elobi ete: “Kobanda na bambula ya 1960 . . . bato ya bikólo mingi balingaka lisusu kosambela te.”

[Elilingi na lokasa 4]

Mangomba balongi komonisa ete Nzambe nde akelá biloko nyonso?

[Elilingi na lokasa 4, 5]

Mosaleli ya Nzambe akoki kozala na esika ya boye?

[Elilingi na lokasa 5]

Ndenge nini Nzambe atalelaka biyenga ya ndenge oyo?

[Eutelo ya bafɔtɔ]

AP Photo/Georgy Abdaladze

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto