“Nzokande, ezali kobaluka!”
GALILÉE, na ekeke ya 16, alobaki ete: Biblia ezali koteya ndenge nini tokoki kokenda na likoló, kasi ezali kolimbola te makambo mazali koleka kuna. Ezali mpo na makanisi lokola oyo nde moyekoli oyo ya bitando ya likoló (astronome) mpe ya fizike, moto ya mboka ltalie azwanaki matata elongo na lingomba ya katolike, oyo ekanelaki ye monyokoli mpe boloko. Mbula soki 350 na nsima, lingomba etalelaki lisusu ezalela oyo bamonisaki epai na Galilée. Likambo lisalemaki na ntango wana libyangamaki “Botutani kati na sianse etongami likoló na ba eksperiansi mpe mateya mazangi moboko.”
Lelo, likambo likomelaki Galilée lizali na ntina mingi mpo na baoyo nyonso bazali koluka solo. Mpo na nini botutani oyo? Mpo na kozwa eyano totalela makanisi ya sianse lokola endimamaki mingi na ntango wana.
Na katikati na ekeke ya 16, bazalaki kokanisa ete mabelé ezalaki na katikati ya molóngó, mpe ete bitando nyonso misusu (planetes) bizalaki kobaluka zongazonga na yango. Atako yango endimisamaki te na bilembeteli ya sianse, mateya wana mamonanaki lokola solo na makambo mayebani. Na ntango wana sianse. na “makanisi na yango ya mobombano,” ekangamaki makasi na lingomba.
Ezali na eleko oyo nde Galilée abotamaki na Pise na mobu 1564 kati na libota moko ya lokumu. Tata na ye alingaki ete ayekola mosala ya monganga, kasi ye moto na mposa makasi ya koyeba makambo na mokili, abendamaki na boyekoli ya matematike. Na nsima, wana azalaki molakisi ya sianse, ayaki kososola mibeko mitali ezalela ya biloko (ya bopemi to ya mbango) wana ayebaki ndimbola na telescope wa yambo ya ba hollandais, abongisaki mpenzampenza lolenge na yango ya kosala mpe asalaki oyo ya ye moko, ezalaki na makoki mingi koleka oyo ya liboso. Atalisaki yango epai na likoló mpe akomaki makambo mamonaki ye kati na mokanda na ye ya liboso, na nkombo Sidereus Nuncius (Nsango ewuti na likoló), komonisáká bongo na bato ya ntango na ye basanza minei ya etando Jupiter. Na mobu 1611, abyangamaki na Loma, mpe kuna alimbolaki mbuma ya bolukiluki na ye epai na ba Jésuites ya Collegio Romano (Collège ya Loma). Ba Jésuites bakumisaki ye na kobongisaka likita oyo na kati na yango bandimaki motuya ya makambo oyo abimisaki.
Mateya makeseni na oyo ya Lingomba
Liboso ete atika Loma, likambo moko lilekaki oyo elingaki kobimisa makambo ya mawa: kardinale Bellarmin, jésuite ya lokumu, atindaki ete basala ankɛtɛ mpo na mateya na ye.
Galilée azalaki kondima ete ezali na mibeko mizali koyangela molongó mpe bato bakososola yango na koyekoláká biloko bizalisami. Nzokande Lingomba ya katolike ezalaki kotɛmɛla likanisi yango.
Ba astronomes mosusu; bandimaki te makanisi na ye, Bakanisaki ete masini ya kotala minzoto ekokaki te komonisa makambo ndenge yango ezali mpe ete eloko wana asalaki ezalaki bobele eloko ya lisano. Sango moko abimisaki likanisi ete minzoto oyo ezalaki komonana kati na masini, bayemaki yango likoló na talatala ya esaleli ebéngami lentille! Ntango Galilée amonaki bangomba likoló na sanza, elembeteli ete bitando na likoló bizali liselise te, sango calvius azongisaki na kolobáká ete sanza ezingami na mangengenga na motindo boye ata bakokaki kotala ngomba na kati, ezalaki libungutulu! Mpo na yango Galilée ayanolaki ete “oyo ezali solo ndoto ya kokamwa.”
Likebi mingi oyo Galilée amonisaki mpo na “Mokanda ya biloko bizalisamaki,” ezali bongo nde abyangaki biloko bizalisamiememaki ye na kotanga misala ya astronome moko ya Polonye Nicolas copernic. Ye oyo abimisaki na mobu 1548, mokanda oyo kati na yango alimbolaki ete mabelé ezali kozolongama zingazinga na moi. Galilée endimisaki likambo yango, eloko ememelaki ye mikakatano makasi ya bato ya sianse, ya politike mpe ya lingomba ya ntango na ye.
Atako lingomba ya katolike ezalaki kosalela mateya ya copernic mpo na kolimbola ba dates, lokola ya pasika, nzokande endimaki te polele makanisi ya copernic. Lingomba ezalaki kolanda liteya ya Aristote oyo ezalaki koteya ete mabelé ezalaki na katikati ya molongo. Makanisi ya sika ya Galilée mazalaki bongo kokitisa lokumu mpe bokasi ya bakonzi ya Lingomba.
Na mikili ya Mpoto, bato ya sianse bazalaki kosala makasi mpo na kokɔtela mateya ya copernic, kasi bazalaki bobele kolobana bango na bango. Lingomba ya katolike etikaki bango nye. Kasi, Galilée abimisaki na mokanda misala na ye epai na bato ebele, akomaki yango na monoko ya ltalie kasi ya latin te. Bakonzi ya Lingomba bamonaki ete azalaki kobebisa bobele lokumu na bango te kasi lisusu mpe liloba ya Nzambe.
Ezali mokanda ya sianse te
Solo, makambo mamonisami na ntina na molongo makoki te koyeisa mpamba Liloba ya Nzambe. Baoyo bazali koyekola Biblia bazali koyeba ete yango ezali mokanda ya sianse te ata soki yango ekomonana solo ntango ezali kolobela makambo ya sianse. Ekomamaki mpo na kopesa liteya ya elimo na bandimi, kasi te mpo na koteya fizike to sianse misusu. (2 Timoté 3:16, 17) Galilée ayebaki solo oyo. Abimisaki makanisi ete maloba basaleli kati na Biblia mazali na lolenge mibale: Ezali na maloba ekolimbola makambo ya sianse mpenzampenza, mpe lisusu bakomi bapemami basalelaki maloba misusu oyo bato balobaka mokolo na mokolo. Akomaki ete: “Ezali ntina ete na kati na makomami . . . koyokanisa yango na boyebi ya bato nyonso, koloba makambo ebele oyo ekomonana lokola ekeseni (etali ndimbola ya maloba) na solo oyo ekoki kotyama ntembe te.”
Biteni bikeseni ya Biblia bikomonisa solo ya maloba oyo. Na ndakisa, Yobo 38:6, kuna Makomami malobi mpo na mabelé ete yango ezali na “miboko” mpe na “libanga ya nsuka.” Bamosusu basalelaki mabe eteni oyo ya Biblia mpo na komonisa ete mabelé ezali koningana te. Nzokande, maloba oyo mazali na mokano te ya kolimbola na nzela ya sianse ndenge mabelé ezali, kasi ekosalisa mpo na boulani kati na kozalisama ya mabelé mpe botongi ya ndako, komonisa bongo Jéhovah lokola Nkolo Motongi.
Lokola emonisamaki na mokomi ya makambo ya bomoi ya bato (biographe) L. Geymonat na kati na mokanda na ye Galileo Galilei: “Ba téologiens ya makanisi mokuse oyo balingaki kosukisa sianse na makanisi ya Biblia bazalaki kosala eloko mosusu te bobele kobebisa lokumu ya Biblia.” Bato na moto makasi basalaki bongo mpo na bamposa ya moimi. Mokanda moko motindamaki na Saint-Office (Lisangá ya Loma oyo ezali na mokumba ya kobatela mateya ya moboko ya Lingomba ya katolike) mpo na kosɛnga asala bolukiluki na ntina na Galilée.
Le 19 février 1916, Galilée alakisaki na ba théologiens ya lingomba ya katolike makambo mibale: (1) “Moi ezali na katikati na molongo” mpe (2) “Mabelé ezali na katikati na molɔngɔ te.” Le 24 février, ba théologiens batalaki makanisi yango lokola ya bozoba mpe ya lipengwi, mpe babimisaki mobeko ete Galilée alobela mpe alakisa mateya na ye te.
Galilée akokaki koloba lisusu te. Bobele te ete lingomba nde ebwakaki ye, kasi ata baninga na ye baboyaki kopesa ye lisalisi. Alandaki komipesa mobimba mpo na bolukiluki. Soki papa mosusu ayaka te na mobu 1623, mbɛlɛ tokokaki ntango mosusu koyoka lisoló na ye te. Kasi pape ya sika Urbain VIII azalaki moto ya mayele mpe akɔtelaki Galilée. Bayebisaki ye ete pape akoboya te ete abimisa mokanda ya sika. Azwaki nkutu ndingisa ya kosolola na pape. Nsima na oyo emonanaki lokola elembo ya kofungwama ya makanisi ya pape, Galilée amipesaki na mosala.
Mokanda na ye Dialogue sur les deux plus grands système du monde ebimaki na ndingisa ya Lingomba ya katolike na 1632, kasi esengo ya pape esilaki nokinoki. Na mibu 70, Galilée abyangamaki lisusu kosamba liboso na esambiseli ya lingomba ya katolike Lifundi ya lipengwi oyo ezalaki likoló na ye esɛngaki ete balimbola ye liboso mpo na nini Lingomba epesaki ye nzela ya kobimisa mokanda wana; balobaki ete asalelaki lokuta na kobombaka lipekiseli oyo azalaki na yango liboso mpo na koteya mateya ya Copernic. Mpamba te mokanda na ye Dialogue ezalaki kokokanisa mitindo mikeseni ya koyekola bitando bizali na likoló, bakisa oyo ya copernic, bandimaki ete mokanda yango ezalaki kobuka mobeko.
Galilée ayanolaki ete mokanda na ye ezalaki kotɛmɛla liteya ya copernic. Eyano oyo ekokaki te, mpamba te mokanda na ye ezalaki na makambo oyo mazalaki kokɔtela mateya ya copernic. Epai mosusu, liloba ya pape etyamaki na monoko ya moto moko oyo azalaki lokola zoba, Simplicio, likambo oyo liyokisaki Urbain VIII nkanda.
Galilée atalelami lokola mopengwi mpenza
Galilée atangamaki mopengwi. Azalaki na mpasi mpe balobaki na ye ete bakonyokola ye soki awangani likanisi na ye te, andimaki Wana afukamaki na mabolóngó, abimisaki maloba oyo: “Nayei kowangana . . . mabunga oyo nalobaki mpe lipengwi . . . Na koloba lisusu te mpe na kondima lisusu te . . . makambo oyo makokaki kokomisa ngai moto oyo bakokanisa la makambo.” Lisapo elobi ete na kotelema, abetaki makolo na ye na mabelé mpe alobaki: “Eppur si muove!” (Nzokande, ekobalukaka!)
Akangamaki na boloko mpe asengelaki kofuta masumu na ye bomoi na ye mobimba oyo etikalaki; ayaki kokufa na nsima ya mbula libwa. Kati na mokanda moko akomaki na 1634, alobaki: ’’Eloko ememeli ngai mawa ezali te ete nateyaki likanisi oyo to oyo kuna, kasi mpo nazwanaki na nkanda ya ba Jésuites.”
Na 1822, bipekiseli oyo bizalaki likoló na mikanda na ye bilongolamaki. Bobele na mobu 1979 nde pape Jean-paul II azongelaki lisusu likambo wana mpe andimaki ete Galilée“ anyokwamaki mingi . . . na ntina na bato mpe Lingomba.” Na kati ya zulunalo ya Vatican, L’Osservatore Romano, Mario d’Addio, ye mosangani ya lokumu na lisangani oyo Jean-paul II asalaki mpo na kotalela lisusu lifundi oyo lizalaki likoló na Galilée na 1633, alobaki ete: “Emonani lokola ete lifundi ebengamaki lipengwi ya Galilée ezalaki na elembeteli moko te, ezala na mateya na likambo etali teologi to na oyo etali droit canon.” Engebene d’Addio, lisambiseli ya bakotalike elekisaki ndelo ya bokonzi na ye; mateya ya Galilée mazali kobuka eteni moko te ya kondima Zulunalo ya Vatican endimaki ete lifundi ya Galilée ete azali mopengwi ezali na moboko moko te.
Liteya nini tokoki kozwa na likambo likomelaki Galilée? Baklisto basengeli koyeba ete Biblia ezali mokanda ya sianse te. Ntango mikanda yango mibale mizali na bokeseni basengeli te koluka koyokanisa bokeseni nyonso. Toyebi ete kondima ya boklisto esimbami na “liloba na Klisto,” kasi likoló na sianse te. (Baloma 10:17) Epai mosusu, boyebi ya sianse ezali kobongwana ntango nyonso. Liteya oyo ezali komeka kotya ntembe na Biblia mpe oyo endimami na bato mingi lelo, lobi ekoki komonana lokuta mpe ekoki koboyama.
Kasi, soki bato ya sianse balingi kosalela likambo ya Galilée mpo na komonisa ete lingomba ezali kopekisa bokoli ya sianse, basengeli komikundola ete misala oyo Galilée asalaki endimamaki mpe te na bato ya sianse ya ntango na ye. Na bokeseni na bindimeli ya ntango wana Biblia ezalaki kowangana solo yango te. Liloba na Nzambe ezali na mposa te ete batalela yango lisusu. Ezali bolimboli mabe oyo lingomba ya katolike esalaki na ntina na Biblia nde ezalaki ebandeli na matatá oyo.
Bato nyonso basengeli kosepela na boyokani oyo ezali kati na molongo mpe mibeko oyo ekotambwisa yango, mpamba te yango epesi nzela na koyeba malamu koleka Mozalisi, Jéhovah Nzambe. Galilée atunaki: “Misala mizali na lokumu moke na liboso na Liloba?” Ntoma Paulo ayanoli ete: “Makambo (ya Nzambe) mazangi komonana asili koyebisa yango polele epai na makanisi ya bato kati na misala na ye.”—Baloma 1:20.