Ebandeli ya kozanga boyokani kati na siansi ná makambo ya losambo
MOBANGE moko ya mbula 70 oyo akómaki pene na liwa alalaki na mbeto, azalaki kobundana na kotánga. Asimbaki bamaniskri ya buku oyo alingaki kobimisa. Ata soki ayebaki yango to te, buku na ye ekokaki kobongola ndenge bato bazalaki kotalela molɔ́ngɔ́. Buku yango ekokaki mpe kobimisa kowelana makasi na kati ya lingomba ya boklisto, kowelana oyo ezali komonana tii lelo oyo.
Moto yango ezali Nicolas Copernic, moto moko ya Pologne oyo azalaki mondimi ya Katolike mpe likambo yango esalemaki na mobu 1543. Buku yango ya Copernic, oyo motó ya likambo na yango ezalaki Mbongwana na ndenge ya kotalela molɔ́ngɔ́ (na Latin), emonisaki ete moi nde ezali na katikati ya baplanɛti nyonso oyo ebalukaka zingazinga na yango, kasi mabelé te ndenge bato bazalaki kokanisa. Kaka na buku moko wana, Copernic abongolaki likanisi oyo bato bazalaki na yango ete mabelé ezali na katikati ya baplanɛti nyonso.
Na ebandeli, eloko moko te ezalaki komonisa ete likambo yango ekobimisa kowelana makasi na nsima. Ya liboso, Copernic azalaki koyebisa likanisi na ye na bokɛngi mpenza. Ya mibale, emonani lokola Lingomba ya Katolike, oyo ezalaki koteya ete mabelé ezali na katikati ya baplanɛti nyonso, ezalaki kotika bato ya siansi bápesa makanisi na bango ndenge balingi. Kutu, pápa ye moko alobaki na Copernic abimisa buku na ye. Moto oyo Copernic apesaki mokumba ya kobimisa buku yango, lokola azalaki na mwa kobanga akomaki na maloba ya ebandeli ya buku yango ete, koloba ndenge Copernic alobi ete mabelé ezali na katikati ya baplanɛti nyonso ezali kaka likanisi ya mpamba oyo bato ya mayele na mituya bakoki kozala na yango, kasi ezali mpenza solo te.
Matata ekómi makasi
Nsima ya Copernic, Galilée (1564-1642), moto moko ya Italie, nganga-minzoto, moto ya mayele na mituya mpe na fizike oyo azalaki mpe mondimi ya Katolike, akɔtaki na likambo yango. Ye asalaki masini moko (télescope) oyo ezalaki na batalatala oyo ebimaki sika, mpe na lisalisi na yango, akokaki komona ata minzoto oyo ezali mosika mpenza na etando ya likoló. Makambo oyo amonaki endimisaki ye ete Copernic alobaki solo. Galilée amonaki mpe matɔnɔ na moi, oyo babengaka lelo oyo matɔnɔ ya moi; na yango akweisaki likanisi mosusu oyo bato ya filozofi mpe ya mangomba bazalaki na yango ete moi ekoki kobongwana to kobeba te.
Na bokeseni na Copernic, Galilée azalaki kolobela makanisi na ye na molende mpe na mpiko. Asalaki bongo na ntango oyo Lingomba ya Katolike ekómaki kotɛmɛla makasi likanisi ya Copernic. Yango wana lingomba emonaki ete Galilée apɛngwi mpo amonisaki ete likanisi ya Copernic ezali solo mpe eyokani na Makomami.a
Galilée akendeki kosamba na Rome, kasi bandimelaki ye te. Na 1616, Lingomba ya katolike epekisaki ye koteya likanisi ya Copernic. Galilée atikaki mpo na mwa ntango. Kasi, na 1632, abimisaki buku mosusu oyo ezalaki koteya likanisi ya Copernic. Na mbula oyo elandaki, tribinale ya Lingomba ya Katolike ekatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ bomoi na ye mobimba. Kasi lokola azalaki mobange, bakitisaki etumbu na ye mpe bazongisaki ye na ndako mpe bazalaki kokɛngɛla ye.
Bato mingi bamonaka kozanga koyokana ya Galilée ná lingomba ete siansi elongi lingomba, elingi koloba elongi mpe Biblia. Kasi, ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango, bato wana bazangi boyebi ya makambo mingi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lokola Galilée ayebaki koloba mpe azalaki na maloba ya lityo, ye moko nde amilukelaki banguna. Lisusu, ntango alobaki ete moi ezali na katikati ya baplanɛti nyonso mpe ete likanisi yango eyokani na Makomami, amibimisaki lokola mokonzi na lingomba, likambo wana epesaki bato ya lingomba nkanda makasi.
[Elilingi na lokasa 3]
Copernic
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na Giordano Bruno und Galileo Galilei
[Elilingi na lokasa 3]
Galilée azali kosamba na tribinale ya Lingomba ya katolike
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na buku The Historian’s History of the World, Vol. IX, 1904
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Na nsima ya bililingi: Karte oyo ezali komonisa lolenge ya Copernic ya kotalela moi ná baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na yango