Mituna na batangi
Mpo na nini Noa atindaki yangánga longwa na masúwa, mpe atindaki ebengá na nsima?
Biblia epesi ndimbola ya sikisiki te. Atako bongo, emonani lokola ete lolenge oyo Noa asalaki ezali malamu.
Na boumeli na mikolo 40 mpe butu 40 mbula monene enokaki na mabelé, yango ebimisaki mpela oyo ezindisaki ngomba nyonso kino na nsongé na yango, mpe mpela wana eumelaki sanza mitano. Na nsima, “masuwa masɛmaki likoló na ngomba ya Ararata.” (Genese 7:6 kino 8:4) Nsima na basanza mingi, na ntango ‘nsongé na ngomba emonanaki,’ Noa “atindaki yangánga, mpe yango epombwaki kokendaka na libanda, mpe kozongaka na kati.”—Genese 8:5, 7, MN.
Mpo na nini atindaki yangánga? Ndɛkɛ wana, oyo ekopumbwaka mingi, ezali na makoki ya komileisa na biloko ndenge nyonso, kati na yango mpe bibembe [ya bato to ya nyama]. Ekoki kozala ete Noa atindaki yangánga mpo na kotala soki ekozonga to mpe ekotikala libanda ya masuwa, na pembeni, kolyáká mbala mosusu misuni oyo mitikalaki likoló na mikuwa ya bibembe mimonanaki lokola mai makaokaki mpe mabelé mamonanaki. Nzokande, yangánga etikalaki libanda te. Biblia elobi ete ezongaki, kasi elobi na sikisiki te ete ezongelaki Noa. Mbala mosusu ezalaki kopema likoló na masuwa na mbala nyonso oyo ezalaki kozonga nsima na koluka bilei bizalaki kotepa likoló na moi oyo mazalaki naino na mabelé.
Na nsima, Noa azwaki ekateli ya kotinda ebengá. Totangi ete: “Ebengá ezwaki esika ya kotya makolo te, mpe ezongaki epai na ye na masuwa.” (Genese 8:9) Likambo oyo limonisi ete, na motindo na yango, ebengá ekokaki kosalelama mpo na koyeba soki mai ya mpela makitaki. Ebenga akosepelaka esika moko na bato. Noa akokaki komizela komona lisusu ebengá, oyo ekozonga bobele likoló na masuwa te, kasi ekozongela ye mpenza.
Elobami na ntina na bibengá ete, bakotɛlɛmaka bobele na mabelé makaoki, mpe batambolaka mingi na lobwaku mpe bakolyaka matiti. (Ezekiele 7:16) Tala oyo tokoki kotala kati na Le monde animal (Bernhard Grzimek): “Motindo na bibengá nyonso oyo ekolyaka mbuma mpe mbila, bazali na mpasi mpo nakozwa bilei soki mbula mpɛmbɛ [to mai] maumeli koleka mokolo moko na eleko na mpiɔ, mpamba te bilei na bango bizalaka mingimingi na nsé.” Ebengá akokaki bongo komemela Noa bilembo oyo bisengelaki kolakisa ye ete akutaki mabelé makaoki to banzeté ebandaki kotoa. Mbala ya liboso oyo Noa atindaki ebengá, azongelaki ye na eloko moko te kati na masuwa. Mbala ya mibale, ebengá azongaki na lokasa ya nzeté na Olive. Mbala ya misato, ebengá azongaki te, likambo oyo limonisaki ete Noa akokaki sikawa kobima na masuwa na kimya nyonso.—Genese 8:8-12.
Bato mosusu bakoki mbala mosusu kotala yango lokola bandimbola ezangi ntina, kasi motindo oyo lisoló yango elobi na sikisiki, kozonga komonisa bandimbola ya milai, ezali mpenza komonisa bosolo ya Biblia. Yango ezali kopesa biso endimiseli mosusu ete lisoló yango lizali lisapo te, kasi ezali mpe sembo mpe na solo. Ndambo moke na makanisi mpe na bandimbola oyo epesami, etiki esika na ndimbola milai mpe kitoko oyo baklisto na sembo bakokoka kotuna yango na Noa, na ntango ye akosekwa mpe ye moko akopesa bandimbola ya sikisiki likoló na misala na ye.—Baebele 11:7, 39.