Eklezia ya ebandeli eteyaki ete Nzambe azali bosato?
Eteni 2—Bakonzi ya mangomba balandi na bantóma, bateyaki Bosato?
Eteni ya liboso na molongó ya masoló oyo mabimaki na Mosenzeli ya 1er novembre 1991, etalelaki motuna oyo ete: Yesu mpe bayekoli na ye bateyaki Bosato, liteya oyo ete Tata, Mwana mpe elimo santu bazali bapersona misato bakokani, nde bazali bobele Nzambe moko? Na ntango tozali kotanga Biblia, mikanda ya bakomi na makambo na kala, mpe ata bateologié, emonanaki polele bateyaki yango te. Ezali boni mpo na bakonzi ya mangomba oyo babimaki nsima mwa moke: bateyaki Bosato?
NKOMBO “BAKONZI NA MANGOMBA BALANDI NA BANTÓMA” elakisi bakonzi ya mangomba oyo bakomaki mikanda na ntina na boklisto na ekeke ya liboso mpe na ebandeli ya ekeke ya mibale ya ntango na biso. Kati na bango, totangi Clément moto na Loma, Ignace, Polycarpe, Hermas mpe Papias.
Elobamaki na ntina na bango ete bazalaki na ntango oyo bantóma mosusu bazalaki naino na bomoi. Bongo, basengelaki koyeba mateya ya bantóma. Na ntina na mikanda oyo bakomaki, totangi kati na Nouvelle Encyclopédie britannique ete:
“Na kotalela yango nyonso, mikanda ya Bakonzi ya mangomba balandi na bantóma, elobeli makambo na kala na bosolo koleka mikanda nyonso mosusu na boklisto, longola bobele Kondimana na Sika.”1
Soki bantóma bateyaki Bosato, Bakonzi ya mangomba balandi na bantóma basengelaki mpe koteya yango. Mbɛlɛ ezalaki nde liteya na ntina mingi, mpamba te koloba na bato mpo na Nzambe, ezali likambo lileki ntina mingi. Kasi, balakisaki liteya ya Bosato?
Moko na mateya ya yambo mpo na kondima
Kati na mokanda moko mozali na mikapo 16 ya mikuse mpe ezali na titre oyo ete Didachè, to Mateya na Bantóma Zomi na mibale, tozali kokuta moko na mateya ya yambo mazali na Biblia te na ntina na kondima na boklisto. Bakomi mosusu na makambo na kala balobi ete mokanda yango ekomamaki soko na mobu 100, to nkutu liboso mpenza. Mokomi na yango ayebani te.2
Didachè elobeli makambo oyo bato basengeli kozala na yango mposa mpo na kokóma baklisto. Kati na mokapo 7, mokanda yango mozongeli maloba na Yesu mazali na Matai 28:19, mpe elobeli kobatisa “na nkombo na Tata, na Mwana mpe na Elimo Santu.”3 Kasi mokanda yango elobi soko moke te ete Tata, Mwana mpe elimo santu bakokani na seko, na nguya, na etelemelo mpe na mayele. Kati na mokapo 10, tozali kokuta liteya mpo na kondima oyo lilakisami lokola libondeli:
“Totɔndi yo, Tata mosantu, mpo na nkombo na Yo mosantu oyo osili kotya kati na mitema na biso mpe mpo na boyebi mpe mpo na kondima mpe mpo na ezalela ya kozanga kokufa oyo Osili kopesa biso kati na Yesu mwana na Yo. Nkembo ezala na Yo lobiko na lobiko. Ezali Yo, Nkolo mozwi-na-nguya-nyonso; Yo ozalisaki biloko nyonso mpo na nkombo na Yo . . . Osili kopesa biso bilei mpe mai na elimo mpe bomoi ya seko kati na mwana na Yo.”4
Bosato emonisaki wana te. Kati na mokanda L’influence des idées grecques sur le Christianisme (angl.), Edwin Hatch atangi mokapo oyo mozali liboso mpe alobi ete:
“Na ebandeli, epai boklisto ezalaki na bopusi, emonani ete ntina ezalaki te mpo na kopusa makanisi mosika koleka makanisi oyo mpamba. Liteya oyo bazalaki kolobela mingi, ezalaki ete Nzambe azali, azali bobele moko, azali mozwi-na–nguya-nyonso mpe na seko, azalisaki mokili; mpe motema mawa na Ye mozali likoló na misala na Ye nyonso. Mposa ya kotyana ntembe na bomoto na ye ezalaki te.”5
Clément moto na Loma
Clément moto na Loma, oyo akanisami ete azalaki “episkopo” ya engumba wana, ye mpe atangami kati na bato ya yambo oyo bakomaki mikanda na ntina na boklisto. Akufaki pene na mobu 100 ya ntango na biso. Kati na mikanda oyo balobi ete ye nde mokomi na yango, alobeli Bosato te, ezala na polele to mpe te. Totangi kati na mokanda Première Épître de Clément aux Corinthiens ete:
“Mpo ete ngolu mpe kimya na Nzambe, Mozwi–na–Nguya–Nyonso ekóla epai na bino kati na Yesu Klisto!”
“Bantóma basakolaki Evanzile eutaki na Nkolo Yesu Klisto; Yesu Klisto azwaki yango epai na Nzambe. Bongo, Klisto atindamaki na Nzambe, mpe bantoma batindamaki na Klisto.”
“Tika ete Nzambe oyo akomonaka nyonso, mpe oyo azali Mokonzi na bilimu nyonso mpe Nkolo na bato nyonso—oyo aponaki Nkolo na biso Yesu Klisto, mpe kati na Ye, aponi biso ete tozala libota na Ye mpenza—oyo apesi Nkombo na Ye na nkembo mpe mosantu, apesi kondima, bobangi, kimya, motema pɛtɛɛ, motema molai, epai na molimo nyonso mokobelelaka ye.”6
Clément alobaki te ete Yesu to elimo santu akokani na Nzambe. Alakisi Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso (bobele lokola “Tata” te) lokola ete akeseni na Mwana. Alobeli Nzambe lokola moto oyo aleki likoló, mpo ete Klisto “atindamaki” na Nzambe mpe ete Nzambe “aponaki” ye. Komonisáká ete Nzambe mpe Klisto bazali bato mibale bakeseni mpe bakokani te, Clément alobaki ete:
“Na nzela na mabondeli masalami na motema moko mpe na malɔmbɔ, tokosɛngaka Mozalisi ya molóngó ete abongola te motuya ya baponami na ye na mokili mobimba, kati na Yesu Klisto, mwana na ye molingami . . . Tomoni ete bobele yo [Nzambe] nde ‘oleki likoló na baoyo nyonso baleki likoló’ . . . Bobele yo nde ozali mobateli na bilimu mpe Nzambe na bato nyonso.”
“Tika ete mabota nyonso bayeba ete, bobele yo nde ozali Nzambe, mpe Yesu Klisto azali Mwana na yo.”7
Clément abéngi Nzambe (bobele “Tata” te) ete “oyo aleki likoló,” mpe Yesu ete “Mwana na Nzambe.” Amonisi lisusu na ntina na Yesu ete: “Lokola azali komonisa nkembo na Nzambe, aleki likoló na baanzelu na boye ete etelemelo na ye ezali monene mpenza na koleka oyo na bango.”8 Lokola sanza ekomonisaka pole na moi, bobele bongo, Yesu amonisaka nkembo na Nzambe, kasi bakokani te.
Soki Mwana na Nzambe akokanaki na Nzambe, oyo azali Tata na likoló, mbɛlɛ Clément akokaki koloba te ete Yesu alekaki baanzelu; mbɛlɛ yango emonanaki polele. Lisusu, lolenge oyo azali kolobela yango emonisi ete ayebi likambo oyo ete: atako Mwana aleki baanzelu, kasi azali na nsé na Nzambe Mozwi-na–Nguya-Nyonso.
Likanisi ya Clément lizali mpenza polele: Mwana azali na nsé na Tata mpe azali na lokumu mingi lokola ye te. Clément akanisaki soko moke te ete Yesu asalaki Nzambe moko elongo na Tata na ye. Amonisi ete Mwana azali na nsé na bokonzi ya Tata, Nzambe; alobi polele ete Tata azali ‘Nzambe bobele moko’ mpe akokabolaka etelemelo na Ye elongo na moto mosusu te. Clément alobaki na esika moko te ete elimo santu ekokani na Nzambe. Na bongo, mikanda ya Clément milobeli Bosato te.
Ignace
Ignace, episkopo ya Antiokia, azalaki na bomoi kobanda katikati ya ekeke ya liboso ya ntango na biso kino na ebandeli ya ekeke ya mibale. Soki totaleli mikanda oyo miyebisami ete ye nde akomaki yango, ete ezali solo, ata moko na yango elobeli te na ntina na kokokana kati na Tata, Mwana mpe elimo santu.
Ata soko Ignace alobaki ete Mwana akokani na Tata na ntina na seko, na nguya, na etelemelo mpe na mayele, mbɛlɛ yango emonisaki Bosato te, mpamba te esika moko te elobi ete elimo santu ekokani na Nzambe kati na makambo nyonso wana. Kasi Ignace alobaki te ete Mwana akokani na Nzambe Tata kati na makambo wana to kati na makambo mosusu. Nzokande, amonisaki ete Mwana azali na nsé na Ye oyo aleki likoló, Nzambe Mozwi–na-Nguya-Nyonso.
Ignace abéngi Nzambe Mozwi–na–Nguya-Nyonso ete “Nzambe bobele moko ya solo, oyo abotamaki te mpe azali mosika likoló na bato, Nkolo na nyonso, Tata mpe Moboti na Mwana bobele moko oyo abotamaki,” komonisáká bongo kokesena kati na Nzambe mpe Mwana na Ye.9 Alobeli “Nzambe Tata, mpe Nkolo Yesu Klisto.”10 Mpe alobi ete: “Nzambe azali bobele moko, Mozwi–na–Nguya-Nyonso, oyo amonisamaki na Yesu Klisto, Mwana na Ye.”11
Ignace amonisi ete Mwana azali seko te, kasi azalisamaki te, mpamba te amonisi maloba na ye ete: “Nkolo (Nzambe Mozwi–na-Nguya-Nyonso) azalisaki ngai, ebandeli na misala na Ye.”12 Ignace elobi lisusu ete: “Nzambe bobele moko azali na molóngó, Tata na Klisto, ‘oyo azalisi biloko nyonso’; mpe Nkolo azali bobele moko, Yesu Klisto, Nkolo na biso, ‘oyo biloko nyonso bizalisami kati na ye.’”13 Akomaki mpe ete:
“Elimo Santu ekolobaka makambo na Yango moko te, kasi ezali koloba bobele makambo mauti na Klisto, . . . bongo, Nkolo ayebisaki makambo oyo Ye azwaki epai na Tata. Mpo ete Ye [Mwana] alobaki ete: ‘liloba oyo boyokaki liuti na ngai te, kasi na Tata, oyo atindaki Ngai.’”14
“Ezali na Nzambe bobele moko, oyo amonisami kati na Yesu Klisto, Mwana na ye oyo azali bongo Liloba na ye, oyo azalaki liboso te mpe asepelisaki motindi [Nzambe] na ye kati na makambo nyonso. . . . Yesu Klisto atosaki Tata.”15
Ezali solo ete, mpo na Ignace, Mwana azali “Nzambe, Liloba.” Kasi, likambo oyo ya kobénga Mwana ete “Nzambe” elimboli mpenza te ete akokani na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Na Yisaya 9:6, Biblia mpe ebéngi Mwana ete “Nzambe.” Mpe engebene Yoane 1:18, Mwana azali bobele ye moko nzambe oyo abotamaki. Wana azwaki nguya epai na Tata, Jéhovah Nzambe, Mwana akoki mpenza kobéngama ete “oyo na nguya,” ezali bongo ndimbola ya yambo ya “nzambe.”—Matai 28:18; 1 Bakolinti 8:6; Baebele 1:2.
Atako bongo, mikanda 15 miyebisami ete Ignace nde mokomi na yango, mitalelami mpenza ete mizali solo? Kati na mokanda Les Pères anténicéens (angl.), volume l, oyo ekomamaki na Alexander Roberts mpe James Donaldson, totangi ete:
“Engebene bakɔtɔli na mokili mobimba, mikanda mwambe ya yambo kati na mikanda oyo balobi ete lgnace nde mokomi na yango, ezali libunga. Yango moko ezali na elembeteli monene emonisi ete ekomamaki na nsima mpenza . . . mpe, bango nyonso, bataleli yango ete ezali lokutá.”
“Na Mikanda nsambo mindimami na Eusèbe . . . , tozali na mikanda mibale na Greke, moko ya mokuse mpe mosusu ya molai. . . . Atako bato basepeli mingi na libongoli ya mokuse koleka na oyo ya molai . . . likanisi liyebani mingi epai na balimboli na Biblia lizali ete esengeli te kotalela libongoli yango ete lizangi mabunga soko ekoki kobɛtɛlama ntembe te.”16
Soki tondimi ete libongoli ya mokuse ya mikanda na ye ezali solo, longola bobele mwa milongó (mizali kati na libongoli ya molai) oyo mimonisi ete Klisto azali na nsé na bokonzi na Nzambe; atako bongo, oyo etikali na libongoli wana ya mokuse, emonisi mpe Bosato te. Ata soko ezali ya solo to lokutá, mikanda yango mizali komonisa mpenza ete lgnace azalaki kondima ete nzambe mpe mwana na ye bazali bato mibale bakeseni. Likambo yango lizali kokesena oyo ezali kati na bato oyo bakokani te, mpamba te Mwana amonisami ntango nyonso lokola mosali mpe ete azali na nsé na bokonzi na Nzambe. Bongo, ata nini mikanda ya Ignace mitalelami, tozali kokuta ata elembo moko te mpo na liteya ya Bosato.
Polycarpe
Polycarpe motó na Sumuluna, abotamaki na nsuka na ekeke ya liboso mpe akufaki na katikati na ekeke ya mibale. Emonani ete azalaki na boyokani elongo na ntóma Yoane. Balobi ete ye nde mokomi ya mokanda Épître de Polycarpe aux Philippiens.
Ezali nde na likambo moko kati na mokanda wana ya Polycarpe, emonisi ete Bosato ezali? Te, elobelami na esika moko te. Nzokande, oyo yango elobi ezali na boyokani na mateya na Yesu, mpe na bantóma mpe bayekoli na ye. Totangi kati na Épître na ye ete:
“Tika ete Nzambe, Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto, mpe ye moko, . . . Yesu Klisto, mwana na Nzambe, bakólisa bino kati na kondima mpe na solo.“17
Totala ete, lolenge moko na Clément, Polycarpe alobeli te boyokani na Bosato kati na “Tata” mpe “Mwana,” oyo bakokani kati na Nzambe moko. Nzokande, alobi na ntina na “Nzambe mpe Tata” na Yesu, kasi alobelaki bobele ‘Tata na Yesu’ te. Na yango, motindo moko bakomi na Biblia bazalaki kosala ntango nyonso, Polycarpe akesenisi Nzambe mpe Yesu. Na 2 Bakolinti 1:3 (MN), Paulo alobi ete: “Mapamboli na Nzambe mpe Tata na Nkolo na biso, Yesu Klisto.” Alobi bobele te ete: ‘Mapamboli na Tata na Yesu,’ kasi alobi ete “Mapamboli na Nzambe mpe Tata” na Yesu.
Polycarpe alobi lisusu ete: “Kimya na Nzambe Mozwi–na–Nguya–Nyonso, mpe na Nkolo Yesu Klisto, Mobikisi na biso.”18 Wana lisusu, Yesu akeseni na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso; azali te moko na bato oyo bakokani kati na Bosato na bonzambe.
Hermas mpe Papias
Hermas, ye Mokonzi ya lingomba molandi mosusu na bantóma, akomaki mokanda moko na katikati na ekeke ya mibale. Kati na mokanda na ye Le Berger, to Pasteur, ezali na maloba oyo mazali kopesa likanisi ete, mpo na ye, Nzambe azalaki Bosato? Totalela mwa bandakisa:
“Elimo Santu elobaka na ntango moto alingi koloba te, kasi na ntango Nzambe alingi ete yango eloba. . . . Nzambe alonaki vinyo, elingi koloba azalisaki bato na ye mpe apesaki bango epai na Mwana na ye. Mpe Mwana na ye atindaki baanzelu ete bakɛngela likoló na moko na moko na bango nyonso.”19
“Mwana na Nzambe abotamaki liboso na biloko nyonso bizalisami.”20
Hermas alobi awa ete na ntango Nzambe (mpe bobele Tata te) alingi ete elimo eloba, yango ekoloba; likambo oyo limonisi bokonzi oyo Nzambe azali na yango likoló na elimo. Alobi lisusu ete Mwana na Nzambe abotamaki liboso na bikelamu na ye, elingi koloba bikelamu na bomoi oyo Mwana azalisaki na lolenge na Mosaleli na mayele. Ya solo, “biloko nyonso mosusu bizalisamaki na nzela na ye kati na makoló mpe awa na mabelé.” (Bakolose 1:15, 16) Emonisi ete Mwana azali uta seko te. Azalisamaki ekelamu ya elimo oyo azali na etelemelo monene koleka oyo na baanzelu, baoyo bazalisamaki na kati na ye.
Tala oyo J. Kelly alobi kati na mokanda Doctrines des premiers chrétiens (angl.), likoló na likanisi oyo Hermas azalaki na yango na ntina na Mwana na Nzambe:
“Kati na mikapo mingi mosusu, balobeli anzelu oyo azali likoló na baanzelu motoba oyo bakosalaka lisangani moke elongo na Nzambe, mpe abéngami mbala mingi ete ‘amemyami mingi,’ ‘mosantu’ mpe ‘akembisami.’ Anzelu yango nkombo na ye Mikaele, mpe ezali mpasi na koboya kondima ete Hermas atalelaki ye lokola Mwana na Nzambe mpe ete azalaki Mikaele, mokóló na baanzelu.”
“Tozali mpe komona . . . mwa makanisi oyo malakisi ete Klisto azali motindo na anzelu oyo aleki likoló . . . Ya solo, tokuti ata elembo moko te ya mateya na Bosato na ndimbola ya polele.”21
Elobami ete Papias azali mpe moko na baoyo bayebanaki na ntóma Yoane. Emonani mpenza ete akomaki mikanda na ye na ebandeli na ekeke ya mibale, kasi tozali lelo bobele na ndambo na mikanda na ye. Tokuti kuna ata likambo moko te lizali na boyokani na liteya ya Bosato.
Bazali sembo na mateya na Yesu
Likoló na etelemelo na Nzambe mpe na boyokani na ye elongo na Yesu, tokoki koloba ete mateya na Bakonzi ya mangomba balandi na bantóma, ezali sembo na mateya na Yesu, na oyo ya bayekoli mpe bantóma, lokola yango ezwami kati na Biblia. Bango nyonso bazali koloba na ntina na Nzambe lokola Bosato te, kasi lokola Moto akeseni na bato mosusu, moto na seko, Mozwi-na-Nguya–Nyonso mpe ayebi makambo nyonso. Mpe, balobi na ntina na Mwana na Nzambe lokola ekelamu na elimo oyo akeseni na Nzambe, azali na nsé mpe azali mosali oyo Nzambe azalisaki mpo ete asalela ye kati na kokokisama ya mokano na Ye. Na ntina na elimo santu, elobami na esika moko te ete yango ekokani na Nzambe.
Na yango, kati na mikanda wana ya Bakonzi ya mangomba balandi na bantóma, oyo ekomamaki uta ekeke ya liboso mpe na ebandeli ya ekeke ya mibale, tokuti likambo moko te litóngisi Bosato oyo etayemi na boklisto ya lukutá. Mibali wana balobaki na ntina na Nzambe, na Yesu mpe na elimo santu lokola yango elobami na Biblia. Na ndakisa, totala Misala 7:55, 56:
“Kasi Etienne atóndi na Elimo Sántu, atómbóli mósi mpé amóni nkémbo ya Nzámbe, mpé Yézu atélémi o lobókó la mobáli na Nzambe. Alobi: ‘Ee namóni likoló lifungwami mpé Mwána wa moto atélemi o lobóko la mobali na Nzambe.’”—Liloba lya Nzambe (Biblia ya katolike).
Etienne azwaki emonaneli na Nzambe kati na likoló, elongo na Yesu pene na Ye. Mwana atɛlemeki pene na Ye oyo abengami bobele “Tata” te, kasi “Nzambe,” moto oyo akeseni na Yesu kati na makambo nyonso. Lisusu, Etienne alobaki te ete amonaki moto ya misato. Na likoló, amonaki elimo santu te elongo na Yesu mpe Tata na ye.
Yango eyokani na mokapo ya Emoniseli (Apocalypse) 1:1 epai tozali kotanga ete: “Yesu Kristu akolakisa mibómbamo: Nzámbe moto apesi yé likoki lya koyébósa” (Liloba lya Nzambe) Wana lisusu, tomoni Klisto asekwi kati likoló, nde akeseni na Nzambe mpe, elimo santu elobelami te. Soki Yesu azalaki moto ya mibale kati na Bosato mpe ete ayebi makambo nyonso, ndenge nini Nzambe akokaki ‘kopesa’ ye emoniseli?
Mikapo lokola oyo emonisi polele ete Bosato ezali te. Lisusu, mokapo na Biblia moko te mozali kolobela Nzambe lokola Bosato. Mikanda ya Bakonzi ya mangomba balandi na bantóma mizali sembo na Liloba na Nzambe. Emonani polele ete bateyaki te liteya ya Bosato oyo lilingami mingi na boklisto ya lokutá.
Ebele na mikanda milobeli boklisto mibimaki na nsima mpenza na boumeli na ekeke ya mibale. Ezali bongo misala ya bakonzi ya mangomba oyo babéngami ete ba apologistes to bakomi na mikanda bakɔtɛli likanisi boye to boye. Bango bateyaki Bosato? Kati na nimero ekolanda, eteni ya misato na molongó ya masoló oyo, ekolobela mateya na bango.
Mikanda:
1. The New Encyclopædia Bnitannica, ebimeli ya 15, 1985, Micropædia, volume 1, page 488.
2. A Dictionary of Christian Theology, Alan Richardson, 1969, page 95; The New Encyclopædia Britannica, ebimeli ya 15, 1985, Micropædia, volume 4, page 79.
3. La Didachè et l’Eglise primitive, Emile Besson, page 25.
4. Ibid., pages 30, 31.
5. The lnfluence of Greek ldeas on Christianity, Edwin Hatch, 1957, page 252.
6. The Ante-Nicene Fathers, ekomami na Alexander Roberts mpe James Donaldson, mpe ekomami mbala mosusu na Amerike engebene ebimeli ya Edimbourg, 1885, volume I, pages 5, 16, 21.
7. The Library of Christian Classics, volume 1, Bakonzi ya Lingomba ya yambo, ebimeli esalemi mpe ebongolami na Cyril Richardson, 1953, pages 70, 71.
8. Ibid., page 60.
9. The Ante-Nicene Fathers, volume I, page 52.
10. Ibid., page 58.
11. Ibid., page 62.
12. Ibid., page 108.
13. Ibid., page 116.
14. Ibid., page 53.
15. The Apostolic Fathers, volume 4, Robert Grant, 1966, page 63.
16. The Ante-Nicene Fathers, volume I, pages 46, 47; Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature, John McClintock mpe James Strong, enyatamaki lisusu na Baker Book House Co., 1981, volume IV, pages 490 kino 493; The Catholic Encyclopedia, 1910, volume VII, pages 644 kino 647.
17. Lettre de Polycarpe aux Philippiens, mokapo XII.
18. The Ante-Nicene Fathers, page 33.
19. Hermas, Le Pasteur, 43, 8; 59, 2.
20. Ibid., 89, 2
21. Early Christian Doctrines, J. Kelly, ebimeli ya mibale, 1960, pages 94, 95.