Eklezia ya ebandeli eteyaki ete nzambe azali bosato?
Eteni 3—Bakonzi ya mangomba bakɔtɛli na boklisto ya solo, bateyaki Bosato?
Kati na banimero na yango ya 1er novembre 1991 mpe ya 1er février 1992, Mosenzeli emonisaki ete ezala Yesu soko bayekoli na ye to mpe bakonzi ya mangomba balandi na bantóma na nsuka na ekeke ya liboso mpe na ebandeli ya ekeke ya mibale ya ntango na biso, bateyaki Bosato te. Ezali boni mpo na bakonzi ya mangomba na nsuka ya ekeke ya mibale?
PENE na katikati mpe kino nsuka ya ekeke ya mibale ya ntango na biso, bakonzi ya mangomba oyo babéngamaki ete bakɔteli na boklisto ya solo (apologistes) babimaki. Bakomaki mikanda mpo na kokɔtɛla boklisto na lolenge oyo bango bayebaki yango mpo na kotɛmɛla filozofi oyo epalanganaki mingi na eleko wana epai na Baloma. Mosala na bango mobandaki wana Bakonzi ya mangomba balandi na bantóma basukisaki kokoma. Mosala yango mokóbaki mpe na nsima na bango.
Kati na bakonzi ya mangomba bakɔteli na boklisto ya solo oyo bakomaki mikanda na monoko ya Greke, totangi Justin, Tatien, Athénagore, Théophile mpe Clément moto ya Alexandrie. Tertullien azalaki mokɔteli na boklisto oyo akomaki mikanda na monoko na Latin. Bato wana bateyaki Bosato bolakisami lelo na boklisto ya lokuta ete: bapersona misato (Tata, Mwana mpe Elimo-Santu), baoyo bakokani kati na Nzambe moko, moto na moto azali Nzambe ya solo, atako Banzambe bazali misato te, kasi bobele Nzambe moko?
“Mwana azali na nsé na Nzambe”
Kati na mokanda Une courte histoire de l’Eglise primitive (angl.), H. Boer amonisi likanisi ya moboko ya mateya ya bakonzi ya mangomba bakɔteli na boklisto, ete:
“Justin ateyaki ete liboso na kozalisama ya mokili, Nzambe azalaki bobele ye moko mpe Mwana azalaki te. . . . Wana Nzambe alingaki kozalisa mokili, . . . abotaki ekelamu mosusu na bonzambe ete azalisa mokili mpo na ye. Ekelamu wana na bonzambe abéngami . . . Mwana mpo ete abotamaki. Abéngamaki Logos mpo ete autaki na Bwanya to na Mayele na Nzambe. . . .
“Justin mpe bakɔteli mosusu ya boklisto ya solo bateyaki ete Mwana azali ekelamu. Azali ekelamu na lokumu mingi, ekelamu oyo azali na nguya ya kozalisa mokili, kasi atako bongo, azali bobele ekelamu. Bateolojié babéngi boyokani bozali kati na Tata mpe Mwana ete subordinationisme. Mwana azali na nsé, elingi koloba na esika ya mibale nsima na Tata. Esika yango euti na Tata mpe asalemaki na ye. Bakonzi ya mangomba bakɔteli na boklisto ya solo bazalaki balakisi ya liteya oyo ete Mwana azali na nsé na Nzambe.”1
Kati na mokanda La formation du dogme chrétien (all.), Martin Werner alimboli bososoli na kala likoló na boyokani ya Mwana mpe Nzambe, ete:
“Kozanga kokakatana, boyokani yango bolimbolamaki lokola ‘kozala na nsé na bokonzi,’ na ndimbola oyo ete Klisto azali na nsé na Nzambe. Ata esika nini ya Kondimana na Sika epai boyokani na Yesu mpe Nzambe elobelami, . . . etalelami lokola kozala na nsé na bokonzi mpe elakisi mpenza bongo. Mpe engebene masoló mazwami na Evanzile ya Matai, ya Malako mpe ya Luka, molakisi na ntina mingi na liteya oyo ete Mwana azali na nsé na Nzambe kati na Kondimana na Sika, ezali Yesu ye moko . . . Etelemelo wana ya kala oyo na makasi mpe, ya solo, eumelaki ntango mingi. ‘Bateolojié nyonso ya lokumu baoyo bazalaki na liboso na likita ya Nicée, bamonisaki ete Logos azali na nsé na Nzambe.’”2
Na boyokani na makambo oyo, R. Hanson akomaki kati na mokanda Recherche de la doctrine chrétienne de Dieu (angl.), ete:
“Liboso ete kowelana ebima [na ekeke ya minei] na ntina na etelemelo etombwami, teolojié moko te kati na Mangomba ya Orient to ya Occident, na lolenge moko to mosusu, azangaki kotalela Mwana ete azali na nsé na Tata.”3
Kati na mokanda L’Eglise des trois premiers siècles (angl.), Alvan Lamson abakisi litatoli na mateya ya bakonzi ya mangomba liboso na likita ya Nicée (mobu 325 ya ntango na biso), ete:
“Bakonzi ya mangomba nyonso oyo bazalaki liboso ya litika ya Nicée, bandimaki motindo moko ete Mwana azali na nsé na Tata . . . Batalelaki Mwana lokola moto oyo akeseni na Tata, likambo oyo limonisi polele ete bandimi ete Yesu azali na nsé na Nzambe. . . . Batalelaki ye lokola moto akeseni na Nzambe mpe azali na nsé na ye.”4
Bobele bongo, tala oyo Robert Grant alobi kati na mokanda Les dieux et le Dieu unique (angl.) na ntina na bakonzi ya mangomba bakɔteli na boklisto:
“Boyekoli bosalemaki na bakonzi ya mangomba bakɔteli na boklisto ya solo likoló na bomoto mpe mateya na Klisto, lokola oyo ezali na Kondimana na Sika, ezali mpenza komonisa ete Mwana azali na nsé na Nzambe. Mwana azali ntango nyonso na nsé na Tata, oyo azali Nzambe bobele moko ya Kondimana na Kala. . . . Epai na bakomi wana ya kala, tozali bongo kokuta liteya ya Bosato te. . . . Liboso na likita ya Nicée, pene na mateya nyonso ya boklisto mamonisaki bobele ete Mwana azali na nsé na Nzambe.”5
Bosato ya boklisto ya lokutá ezali koteya ete Mwana akokani na Nzambe Tata na seko, na nguya, na etelemelo mpe na mayele. Nzokande, bakonzi ya mangomba bakɔteli na boklisto ya solo balobaki ete, Mwana akokani na Nzambe Tata te. Batalelaki Mwana ete azalaki na nsé na Nzambe. Wana eteyi Bosato te.
Bamimonisi sembo na mateya ya ekeke ya liboso
Bakonzi ya mangomba bakɔteli na boklisto ya solo mpe Bakonzi mosusu ya Eklezia ya ebandeli bamimonisaki mpenza sembo na oyo baklisto ya ekeke ya liboso bateyaki na ntina na boyokani bozali kati na Tata mpe Mwana. Tala lolenge yango elobelami kati na mokanda La formation du dogme chrétien:
“Na eleko na boklisto ya ebandeli, ata elembo ya mokakatano moko te soko mpe motindo na kowelana moko te esalemaki likoló na Bosato, lokola oyo eyaki kobimisa matáta makasi kati na Eklezia. Na ntembe te, ntina yango ezali ete, mpo na boklisto ya ebandeli, Klisto azalaki . . . ekelamu oyo ezalaki elongo na baanzelu kuna na makoló; azalisamaki mpe aponamaki na Nzambe mpo na kokokisa mokumba oyo: kosala Bokonzi na Nzambe . . . na nsuka na ekeke.”6
Lisusu, na kotalela mateya ya Bakonzi ya Eklezia ya ebandeli, mokanda moko (The lnternational Standard Bible Encyclopedia) emonisi likambo oyo ete:
“Na ntango bazali koloba na ntina na Nzambe Tata kati na mateya ya ebandeli ya Eklezia, likanisi ya liboso ezali ete batalela Ye te lokola Tata na Yesu Klisto, kasi lokola liziba na bomoi ya bikelamu nyonso. Na yango, tokoki koloba ete Nzambe Tata azali Nzambe oyo eleki likoló. Ye abongi na bankombo lokola oyo azangi ebandeli, oyo akokufa te, oyo akoumela seko, oyo aleki monene, oyo akomonanaka te mpe abotami te. Ezali Ye nde asalaki biloko nyonso mosusu, kati na yango mpe bikelamu nyonso bizalisami, oyo liboso ezalaki te. . . .
“Wana emonisi ete bobele Tata nde abongi liboso kobéngama Nzambe, kasi Mwana mpe Elimo bazwi nkombo yango bobele nsima na ye. Emonani lokola ete maloba mingi ya eleko ya ebandeli mazali kolobela likanisi oyo.”7
Atako mokanda wana mozali koloba makasi te likoló na makambo yango mpe na koloba ete liteya ya Bosato lindimamaki na eleko ya ebandeli, makambo mamonisi ete likanisi yango lizali solo te. Totalela maloba ya cardinal John Newman, teolojié wa lokumu na lingomba ya katolike:
“Tosengeli kondima na bososoli nyonso mpe na likanisi moko ete, mateya nyonso malakisamaki na ntina na Nkolo-na-Biso, mayambolamaki na Eklezia ya ebandeli . . . Kasi ezali motindo moko te mpo na liteya ya Bosato ya katolike. Namoni te ntina oyo tokoki koloba ete yango endimamaki na boyokani ya bateolojié ya liboso . . .
“Bindimeli ya ebandeli bilobeli liteya oyo ya katolike soko moke te. Ya solo, elobeli Bosato, kasi likanisi oyo ete bapersona misato kati na moko, nyonso bakoumela seko, bakokani, nyonso bazalisami te, nyonso bazali bazwi-na-nguya-nyonso, moto akoki kososola bango te, ezali solo te mpe likanisi yango likokaki koyokana te na bindimeli wana ya ebandeli.”8
Oyo Justin ateyaki
Justin azali moko na bakonzi ya mangomba bakɔtɛli na boklisto ya solo na kala, oyo azalaki na bomoi pene na katikati na mobu 110 mpe 165 ya ntango na biso. Na mikanda na ye oyo tozali na yango, moko te elobeli bapersona misato oyo bakokani kati na Nzambe moko.
Na ndakisa, engebene Liloba lya Nzambe, oyo ezali mpe libongoli ya katolike, Masese 8:22-30 elobi boye na ntina na Yesu liboso ete akóma moto: “Nzambe akeli ngai, mosala mwa yambo ye asalaki; naino eloko yoko ekelami liboso te. . . . Naino mai na mbu mazalaki te, ngai nazali . . . Naino ngomba ike izalaki te, ngai nazali . . . Nazalaki wana pene [na Nzambe] lokola mokonzi wa mosala.” Kolimboláká ba versets oyo, Justin alobi kati na mokanda Dialogue avec Tryphon ete:
“Liloba amonisi ete Tata abotaki ye liboso na bikelamu nyonso, na yango, mobotami akeseni na moboti mpo ete atangami lokola moto mosusu; moto nyonso akondima likambo oyo.”9
Lokola Mwana abotami na Nzambe, Justin abéngi mpe Mwana ete “Nzambe.” Alobaki kati na mokanda Première apologie (mokanda wa yambo oyo akɔtɛlaki boklisto), ete: “Tata ya molóngó mobimba azali na Mwana, ye Liloba, mobotami na liboso na Nzambe, ye mpe azali Nzambe.”10 Biblia mpe esaleli nkombo “Nzambe” na ntina na Mwana na Nzambe. Na Yisaya 9:6, abéngami ete “Nzambe na nguya.” Kasi kati na Biblia, baanzelu, bato, banzambe ya lokutá mpe Satana babéngami mpe “banzambe.” (Baanzelu: Nzembo 8:5; tala Baebele 2:6, 7. Bato: Nzembo 82:6. Banzambe ya lokutá: Exode 12:12; 1 Bakolinti 8:5. Satana: 2 Bakolinti 4:4.) Kati na Makomami na Liebele, liloba libongolami na “Nzambe,” ’El, elimboli bobele “Makasi” to “Nguya.” Liloba likokani na yango kati na Makomami na Greke ezali the-os‘.
Oyo eleki mpenza, liloba na Liebele lisalelami na Yisaya 9:6 limonisi ete kokesena monene ezali kati na Mwana mpe Nzambe. Mwana abéngami ete “Nzambe na nguya,” ’El Gib.bohr’, kasi elobi te ete “Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” Na Liebele, liloba libongolami na Mozwi-na-Nguya-Nyonso ezali ’El Shad.dai’ mpe esalelami bobele mpo na Jéhovah Nzambe.
Totala malamu ete, atako Justin abéngi Mwana ete “Nzambe,” kasi alobi soko moke te ete Mwana azali kati na etuluku ya bapersona misato bakokani, oyo moko na moko azali Nzambe nzokande bango misato basali bobele Nzambe moko. Na esika na kosala bongo, elobaki na mokanda na ye Dialogue avec Tryphon, ete:
“Nzambe mpe Nkolo mosusu azali [Yesu liboso ete akóma moto] na nsé na Mozalisi ya biloko nyonso [Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso]; abéngami [Mwana] lisusu anzelu mpo ete azali [Mwana] koyebisa bato makambo nyonso oyo Mozalisi ya biloko nyonso alingi koyebisa bango, liboso na ye [Mozwi-na-Nguya-Nyonso], Nzambe mosusu azali te. . . .
“Na kotalela motuya kasi makanisi te, namoni ete [Mwana] akeseni na Nzambe oyo asalaki biloko nyonso.”11
Tozali kokuta kati na mokanda na ye Première apologie, na mokapo 6, maloba na ntina oyo akɔtɛli boklisto na kotɛmɛla efundeli oyo bapakano balobaki na baklisto ete bandimaka Nzambe te. Justin akomaki ete:
“Tozali kokumisa tozali kosambela [Nzambe mpe] . . . Mwana auti na ye, oyo alakisaki biso mateya yango, mpe limpinga ya baanzelu mosusu ya malamu baoyo bazali kotambola na ye elongo mpe bakokani na ye, mpe Elimo na bisakweli.”12
Bernhard Lohse, mobongoli ya maloba wana, alobaki ete: “Kati na maloba oyo, emonani lokola ete ekokaki te bobele koloba na ntina na baanzelu lokola mpo na bikelamu oyo bato bazali kokumisa mpe kosambela, kasi Justin akakatani te na kotanga baanzelu liboso na kotanga Elimo-Santu.”13—Tala lisusu mokanda Développement de la Doctrine chrétienne.14
Na bongo, atako Justin emonani lokola nde apɛngwi longwa na mateya na pɛto ya Biblia na ntina na likambo ya koyeba moto oyo baklisto basengeli kosambela, kasi emonani polele ete atalelaki Mwana lokola moto oyo akokani na Tata te, mpe atalelaki baanzelu lokola bato oyo bakokani na Ye te. Na ntina na Justin, totangi lisusu mokanda L’Eglise des trois premiers siècles ya Lamson, ete:
“Justin atalelaki Mwana lokola moto oyo akeseni na Nzambe mpe azalaki na nsé na ye: akeseni na ye na motindo oyo bazali kolimbola yango lelo te, ete [Mwana] azali moko na bato to bapersona misato oyo basali etuluku moko, . . . kasi akeseni [na Nzambe] kati na nzoto mpe na lolenge na bango; azali solo na bomoi, azali na lokumu, nde akeseni na Nzambe oyo apesaki ye nguya mpe bankombo na ye nyonso; azalaki na nsé na ye mpe atósaki makambo nyonso mpo na mokano na ye. Tata aleki likoló; Mwana azali na nsé na ye: Tata azali liziba ya nguya; Mwana azali nde kozwa nguya epai na ye. Tata azali eutelo na makambo; lokola azali mosali, Mwana azali bobele kokokisa yango. Bazali mibale, nde bazali na boyokani, to mpe bazali moko kati na makanisi; mpo na Mwana, ezali ntango nyonso mokano na Tata nde ezali kokokisama.”15
Lisusu, Justin alobi ata na esika moko te ete elimo santu ezali moto oyo akokani na Tata mpe na Mwana. Na yango, na bosembo nyonso, tokoki koloba te ete Justin ateyaki Bosato bolakisami lelo na boklisto ya lokutá.
Oyo Clément ateyaki
Clément moto ya Alexandrie (pene na mobu 150 kino 215 ya ntango na biso) abéngi mpe Mwana ete “Nzambe.” Azali nkutu kobénga ye ete “Mozalisi,” liloba oyo lisalemi kati na Biblia te mpo na kolobela Yesu. Alingaki koloba ete Mwana azalaki mpenza Mozalisi mozwi-na-nguya-nyonso kati na makambo nyonso? Te. Na lolenge emonani, Clément akanisaki likoló na Yoane 1:3, oyo elobi na ntina na Mwana ete: “Biloko nyonso bizalisami kati na ye.“16 Kati na misala na ye ya kozalisa, Nzambe akamataki Mwana lokola esaleli.—Bakolose 1:15-17.
Clément abéngi Nzambe oyo aleki likoló ete “Nzambe mpe Tata na Yesu, Nkolo na biso”17 mpe, alobi ete “Nkolo azali mwana na Mozalisi.”18 Alobi lisusu ete: “Nzambe ya molóngó mobimba azali bobele moko, oyo na malamu, na boyengebene, ye Mozalisi, mpe mwana [azali] kati na Tata.”19 Na bongo, akomaki ete Mwana azali na Nzambe oyo azali likoló na ye.
Clément alobi na ntina na Nzambe ete azali “mopesi bobele moko na liboso ya bomoi ya seko, mpe ete Mwana azwaki bomoi yango epai na Ye [Nzambe], mpe azali kopesa biso yango.”20 Emonani polele ete Ye oyo azali kopesa bomoi na eutelo na yango aleki ye oyo tokoki koloba ete, asalelami mpo na kopesa bomoi. Yango wana Clément alobi ete Nzambe “azali oyo azali liboso mpe aleki likoló.”21 Lisusu, alobaki ete Mwana “azali mpenza penepene na Ye oyo azali bobele ye moko Mozwi-na-Nguya-Nyonso” mpe ete Mwana “akosalaka makambo nyonso na boyokani na mokano na Tata.”22 Clément amonisi mbala mingi bonene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso likoló na Mwana.
Na ntina na Clément moto ya Alexandrie, totangi kati na mokanda L’Eglise des trois premiers siècles, ete:
“Tokoki kotanga ntalo monene ya makambo oyo Clément akomaki kati na yango, Mwana amonisamaki polele ete azali na nse na Nzambe.
“Tozali kokamwa na kotanga ete mikanda milobeli Clément na kozanga kotyela ye likebi, na kokanisáká ete ye atalelaki mpenza Mwana lokola nde azalaki lolenge moko na Tata, azali bobele moko elongo na Ye. Ata motindo nini tokoki kokanisa, bomoto na ye oyo etalelami [Nzambe] mpe esika na ye ezali na nsé na [Nzambe], emonani kati na makambo nyonso. Clément akanisaki ete Nzambe mpe Mwana bakeseni kati na makambo nyonso; na elobeli mosusu, bazali bato mibale: moko aleki likoló, mosusu azali na nsé.”23
Oyo eleki mpenza, tokoki mpe kozongela yango: ata soko emonani lokola ete Clément akei mosika koleka oyo Biblia elobi na ntina na Yesu, kasi esika moko te alobeli Bosato bosalemi na bato misato bakokani kati na Nzambe bobele moko. Bakonzi ya mangomba bakɔteli na boklisto ya solo lokola Tatien, Théophile mpe Athénagore, baoyo bazalaki na bomoi kati na eleko ya Justin mpe eleko ya Clément, bazalaki na makanisi motindo moko. Lamson alobi ete: “Bazalaki mpenza bandimi na Bosato te lolenge moko na Justin; elimboli ete bandimaki te ete ezalaki na [bato] Misato bakoki kokabwana te mpe nyonso bakokani: balakisaki mateya oyo makesenaki mpenza na endimeli yango.”24
Teoloji ya Tertullien
Tertullien (pene na mobu 160 kino 230 ya ntango na biso) azalaki moto na liboso oyo asalelaki liloba oyo ya Latin ete trinitas. Lokola Henry Chadwick amonisaki yango, Tertullien alobaki ete Nzambe ‘asalemi na bapersona misato.’25 Kasi, yango elimboli te ete alobelaki bapersona misato oyo bakokani mpe bazali uta seko na seko. Atako bongo, makanisi na ye masalelamaki lokola moboko mpo na bakomi na yango kino ekómaki liteya ya Bosato.
Likanisi oyo Tertullien azalaki na yango na ntina na Tata, na Mwana mpe elimo santu, ezalaki na boyokani te na Bosato ya boklisto ya lokutá, mpamba te ye alobaki ete Mwana azali na nsé na Nzambe. Azalaki kotalela Mwana lokola mosali na Tata. Kati na mokanda Contre Hermogène, akomaki ete:
“Ezali mpo ete bato bandimisama ete eloko moko te ezangi kozalisama to ezangi ebandeli, longola bobele Nzambe. . . . Ndenge nini ekoki kokanisama ete, longola bobele Tata, ezali na eloko moko oyo ezalaki na bomoi liboso na Mwana na Nzambe, Liloba na ye bobele moko; mobotami na liboso mpe ezali na eloko moko eleki ye na motuya? . . . [Nzambe] oyo azali na mposa na Mozalisi te azali na etelemelo monene koleka ye [Mwana] oyo azalisamaki te.”26
Lolenge moko, kati na mokanda Contre Praxéas, amonisi ete Mwana akeseni na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe azali na nsé na ye. Alobi ete:
“Tata azali moto mobimba. Mwana auti na ye, yango wana ye moko alobi ete: ‘Tata na ngai aleki ngai.’ . . . Na bongo, Tata akeseni na Mwana, mpo ete aleki Mwana; mpo ete moboti akeseni na ye oyo abotami; mpo ete motindi akeseni na ye oyo atindami; mpo ete mobimisi akeseni na ye oyo abimisami.”27
Kati na mokanda Contre Hermogène, Tertullien alobi lisusu ete na eleko moko, Mwana azalaki na bomoi te, likambo oyo limonisi ete atalelaki Mwana lokola moto na seko te to lokola Nzambe oyo azali uta seko na seko te.28 Cardinal Newman elobaki ete: “Tertullien asengeli kotalelama lokola moto oyo andimaki te liteya oyo ete Nkolo-na-Biso azalaki uta seko na seko.”29 Na ntina na Tertullien, Lamson alobi ete:
“Engebene likanisi ya Tertullien, bwanya wana, to Logos, lokola Bagreke bazalaki kobénga yango, eyaki kobongolama na nsima ete, Liloba, to Mwana elimboli ete akómaki moto mpenza; bobele ye nde azali na bomoi uta seko na seko lokola elilingi ya Tata. Nzokande, Tertullien atyaki ye na molongó ya nsé na kotalela oyo ya Tata . . .
“Soki totaleli bandimbola nyonso epesami lelo na Bosato, nzela ezali te mpo na kolóngisa Tertullien na ekweiseli [lokola moto oyo andimaki Bosato te] oyo. Akolónga soko na likambo moko te.”30
Bosato bozali te
Soki otangi mikanda nyonso mikomamaki na bakonzi ya mangomba bakɔtɛli na boklisto okomona ete, atako bapɛngwaki mwa moke na mateya ya Biblia, kasi moko te kati na bango ateyaki ete Tata, Mwana mpe elimo santu bakokani na seko, na nguya, na etelemelo mpe na mayele.
Yango emonani mpe epai na bakomi mosusu na ekeke ya mibale mpe na ekeke ya misato, lokola lrénée, Hippolyte, Origène, Cyprien mpe Novatien. Atako basusu bakómaki kino koloba ete Tata mpe Mwana bakokani kati na makambo mosusu, kasi na bisika mosusu, balobaki ete Mwana azali na nsé na Nzambe Tata. Mpe ata moto moko te kati na bango alobaki ete elimo santu ekokanaki na Tata mpe na Mwana. Na ndakisa, Origène (pene na mobu 185 kino 254 ya ntango na biso) alobaki ete Mwana na Nzambe azali “Mobotami na liboso kati na biloko nyonso bizalisami” mpe Makomami “malobeli Ye lokola ekelamu na kalakala kati na misala nyonso na kozalisama.”31
Botangi na likebi ya mikanda ya bakonzi wana ya Eklezia ya ebandeli, emonisi ete liteya ya Bosato lilakisami na boklisto ya lokutá, lizalaki te na eleko na bango. Tokoki kotanga kati na mokanda L’Eglise des trois premiers siècles, ete:
“Liteya ya Bosato lipalangani na eleko na biso . . . lilóngisami te na maloba na Justin: mpe yango ekoki te komonana epai na Bakonzi nyonso ya mangomba baoyo bazalaki liboso na likita ya Nicée; elingi koloba epai na bakomi nyonso na mikanda na boklisto na boumeli ya bikeke misato bilandaki kobotama na Yesu. Ya solo, balobeli Tata, Mwana mpe Elimo na bisakweli to Elimo santu, kasi balobi te ete bakokani, bazali bobele lolenge moko, bazali bato Misato kati Moko, lokola yango elimbolami lelo na bandimi ya Bosato. Maloba na bango makeseni mpenza na oyo. Liteya ya Bosato lilakisamaki na Bakonzi ya Eklezia ya kala, ekeseni na lolenge yango elimbolami lelo oyo. Makambo oyo tolobi makokani na oyo elobelami na mikanda nyonso misusu milobeli lisoló ya makanisi na bato.”32
Ya solo, liteya ya Bosato lilobelamaki te liboso na eleko ya Tertullien. Ndimbola oyo Tertullien apesaki likoló na Bosato, oyo emonisi ete “andimaki yango te,” ekeseni mpenza na endimeli ya lelo. Na yango, liteya ya Bosato oyo bolakisami lelo, libandaki lolenge nini? Ezalaki nde na likita ya Nicée, oyo lisalemaki na mobu 325 ya ntango na biso? Tokotalela mituna wana kati na nimero moko ya Mosenzeli oyo ekolanda; yango ekozala eteni ya minei na molongó ya masoló oyo.
Mikanda:
1. A Short History of the Early Church, Harry Boer, 1976, lokasa 110.
2. Die Entstehung des christlichen Dogmas, Martin Werner, 1957, lokasa 125.
3. The Search for the christian Doctrine of God, R. Hanson, 1988, lokasa 64,
4. The Church of the First Three Centuries, Alvan Lamson, 1869, lokasa 70 kino lokasa 71.
5. Gods and the One God, Robert Grant, 1986, lokasa 109 kino lokasa 156, 160.
6. Die Entstehung des christlichen Dogmas, lokasa 122 kino lokasa 125.
7. The International Standard Bible Encyclopedia, 1982, volume 2, lokasa 513.
8. An Essay on the Development of Christian Doctrine, cardinal John Newman, libongoli ya L. Boyeldieu d’Auvigny (Développement de la Doctrine chrétienne), lokasa 11 kino lokasa 13.
9. Dialogue avec Tryphon, mokapo 129 (Desclée de Brouwer, collection “Ichtus,” lokasa 333).
10. Première apologie, mokapo 63 (Desclée de Brouwer, collection “Ichtus,” lokasa 92).
11. Dialogue avec Tryphon, mokapo 56, lokasa 214 kino lokasa 215.
12. Première apologie, mokapo 6, lokasa 36,
13. Epochen der Dogmengeschichte, Bernard Lohse, engebene libongoli ya Ernest Stoeffler na Lingelisi, 1963, ebimeli ya mibale ya moke, 1980, lokasa 43.
14. An Essay on the Development of Christian Doctrine, lokasa 20.
15. The Church of the First Three Centuries, lokasa 73 kino lokasa 74, 76.
16. Le Pédagogue, livre l, mokapo 11, eteni 97, 3 (Ebimeli ya Cerf, maloba ya ebandeli mpe ba notes ya H.-I. Marrou, libongoli ya Marguerite Harl, lokasa 283).
17. Ibid., livre I, mokapo 8, eteni 72, 2 (lokasa 239).
18. Ibid., eteni 73, 1 (lokasa 241).
19. Ibid., eteni 74, 1 (lokasa 241).
20. Quel est le riche qui sera sauvé? mokapo 6.
21. Ibid., mokapo 7.
22. Les Stromates, mokapo 2.
23. The church of the First Three Centuries, Alvan Lamson, 1869, lokasa 124 kino lokasa 125.
24. Ibid., lokasa 95.
25. The Early Church, Henry Chadwick, ebimeli ya 1980, lokasa 89.
26. Contre Hermogène, mokapo 18.
27. Contre Praxéas, mokapo 9.
28. Contre Hermogène, mokapo 3.
29. An Essay on the Development of Christian Doctrine, lokasa 19 kino lokasa 20.
30. The church of the First Three Centuries, lokasa 108 kino lokasa 109.
31. Contre Celse.
32. The Church of the First Three Centuries, lokasa 75 kino lokasa 76.
[Elilingi na lokasa 27]
Clément
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Historical Pictures Service
[Elilingi na lokasa 28]
Tertullien
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Historical Pictures Service