Okoki koyanola?
Omonaki ete banimero ya Mosenzeli oyo euti kobima kala mingi te ezali na ntina mingi mpo na yo? Soki ezali bongo, yanola na mituna oyo milandi.
▫ Moko na mikano minene mpo na yango Yesu azalaki kobikisa bato, ezalaki nini? Ezalaki mpo na kolendisa ebele monene ya bato oyo bakokani lelo na bampate na komonisáká bango ete nsima na Armagedon babiki bakobikisama nokinoki na bampasi na bango. (Yisaya 33:24; 35:5, 6)—15/12, lokasa 12.
▫ Mpo na nini tozali na mposa ete bakundola biso ntango nyonso na ‘kolendendela kati na mabondeli?’ (Baloma 12:12) Mpo ete mikakatano ya bomoi mpe mikumba na biso mikoki kozala na kilo mingi kino tokoki kobosana kobondela. To mpe tokoki kozwa mitungisi mingi kino ekosala ete tosepela lisusu te kati na elikya ya Bokonzi mpe kotika ata kobondela. Na yango, tozali na mposa na batoli mpo ete tolendisama na kobondela mpe na kobɛlɛma mingi epai na Jéhovah.—15/12, lokasa 14.
▫ Bilembeteli nini tozali na yango bimonisi ete mpela na ntango ya Noa etikálá libela kati na makanisi ya bato? Ekanisami ete ezali na masapo koleka 500 oyo ezali kolobela mpela, mpe bikolo mpe mabota oyo bazali na masoló motindo yango ezali koleka 250. Tozali kokuta bokokani monene kati na masoló yango.—15/1, lokasa 5.
▫ Na ndimbola nini basakoli ya lokutá ya lelo bakokani na baoyo bazalaki na ntango na Yilimia? Basakoli ya lokutá ya lelo bazali komikumisa ete bazali bamonisi na Nzambe, kasi bazali nde koyiba maloba na Nzambe na kopalanganisáká mateya maye mazali kobungisa bato na oyo Biblia ezali mpenza koloba. Yango emonani mingimingi na mateya na ntina na Bokonzi. (Yilimia 23:30)—1/2, lokasa 4.
▫ Kozwa batisimo na nkombo ya elimo santu elimboli nini mpo na moto? Elimboli ete moto yango andimi kosalana elongo na elimo, na koboya kosala likambo likoki kopekisa mosala na yango kati na libota na Jéhovah. Na bongo, asengeli kosalana elongo na moombo na sembo mpe na mayele mpe elongo na bankulutu batyami kati na lisangá. (Baebele 13:7, 17; 1 Petelo 5:1-4)—1/2, lokasa 18.
▫ Mpo na nini losambo ya bikeko ezali likámá mpo na moto oyo azali kosalela yango? Biblia emonisi ete bikeko ezali mbindo na miso ya Jéhovah mpe yango ezali na likoki te ya kosalisa basambeli na yango ete babɛlɛma epai na Nzambe. (Deteronome 7:25; Nzembo 115:4-8) Satan le Diable “azimbisi elimo” na bato mpo ete solo “engɛngisa bango” te. (2 Bakolinti 4:4) Na bongo, moto oyo azali kosambela ekeko azali nde kosalela matomba ya bilimu mabe. (1 Bakolinti 10:19, 20)—15/2, nkasa 6-7.
▫ Mpo na nini bampate batalelamaki lokola biloko na motuya na ntango Biblia ekomamaki? Nkungé ya bampate ezalaki bozwi ya ntango nyonso mpe ekokaki kosalema mpo na kotonga bilamba mpo na libota to mpo na kotɔka. Maseke ya mpate mobali esalelamaki mpo na kosakola Yubile to ekokaki kosalelama mpo na kokebisa bato to mpo na kotambwisa misala ya bitumba. Lokola mpate ezalaki moko na banyama ya pɛto oyo bato na Yisraele bakokaki kolya, etonga ya bampate ezalaki esika ya kozwa bilei, ya biloko mpe liziba ya kozwa mabɛlɛ ntango nyonso, mpo na komela to mpo na kosala fromage.—1/3, nkasa 24-25.
▫ Baoyo balingi Nzambe basɛngaka nde nini wana babondelaka ete Bokonzi na ye eya? (Matai 6:10) Basengaka ete Bokonzi ya likolo emonisa nguya na yango na kobomáká biyangeli na bato, oyo bikokisi bilaká na yango te mpo na kopesa kimya mpe bolamu ya solo. (Danyele 2:44)—15/3, lokasa 6.
▫ Bakɔtɛli ya boklisto ya solo bazalaki banani, mpe bango bateyaki nde Bosato? Bakɔtɛli ya boklisto ya solo bazalaki bakonzi ya mangomba baoyo bazalaki na bomoi na ndambo ya mibale ya ekeke ya mibale. Bakomaki mikanda mpo na kokɔtela boklisto ya solo na lolenge oyo bango bayebaki yango mpo na kotɛmɛla filozofi mabe oyo epalanganaki epai na Baloma. Moko te kati na bango ateyaki Bosato.—1/4, nkasa 24-29.
▫ Zakaria, tata na Yoane mobatisi, akomaki na mbala moko emimi mpe ebúbú, lokola Luka 1:62 ezali komonisa yango? Gabriele alobaki ete Zakaria akokaki koloba lisusu te, kasi alobaki te ete akoyoka lisusu te. (Luka 1:18-20) Luka 1:64 (MN) elobi ete: “Bobele na ntango wana, monoko na ye mozipwamaki mpe lolemu na ye lokangwaki, mpe abandaki koloba, mpe akumisaki Nzambe.” Tala ete mokapo oyo elobelami te ete matoi na Zakaria makangamaki na motindo moko to mosusu. “Bilembo” oyo balobeli na Luka 1:62 bikokaki kozala bilembo bisalemaki mpo na kopusa Zakaria na komonisa ekateli na ye.—1/4, lokasa 31.