1914—Mbula oyo ebulunganisaki mokili
“Etumba Monene esalemaki kobanda 1914 kino 1918, ezali lokola etando na mabelé masili kozika, oyo okaboli eleko wana na oyo na biso. Na kobomáká ebele na bato . . . , na kobebiséká bindimeli, na kobóngoláká makanisi mpe na kobimisáká makambo na mpasi mingi mpo na kozanga kolónga, etumba wana esili kotya bokabwani kati na bileko mibale, na nzoto mpo na makanisi.”—Mokanda La tour majestueuse: Portrait du monde avant la guerre, 1890-1914 (angl.), ya Barbara Tuchman.
“Ezali pene na kokɔta kati na Lisoló na bato—kasi naino mpenza te—mpamba te, ebele na bato oyo bazalaki bilenge na ebandeli ya ekeke ya ntuku mibale oyo ya mpasi, bazali naino na bomoi.”—Mokanda 1914 (angl.), ya Lyn MacDonald, ebimisami na 1987.
MPO na nini esengeli kotalela mobu 1914? Okoki koloba mbala mosusu ete: ‘Oyo ezali na ntina mpo na ngai ezali mikolo mizali koya, kasi ntango eleká te.’ Liboso na makambo lokola kobebisama ya mabelé, kobeba ya bomoi na libota, bokóli na mabe, maladi ya konyokwama na makanisi mpe kozanga mosala, moto akoki kozanga elikya mpo na ntango ezali koya. Atako bongo, ebele na bato oyo batalelaki mpenza ndimbola ya 1914, basili kozwa ntina ya kozala na elikya mpo na ntango malamu ezali koya.
Uta bambula mingi, Mosenzeli ezali kolimbola ete na 1914, bato bamonaki oyo babéngi yango ete “ebandeli na mpasi.” Maloba oyo mazwami kati na esakweli monene na Yesu Klisto na ntina na makambo oyo masengelaki kosalema liboso na nsuka na ebongiseli na biloko mabe esalemi na moto.—Matai 24:7, 8
Lelo, ndambo moke na bato bazali naino komikundola makambo na mpasi oyo mabimaki na mobu 1914. Libota ya bato wana basili konuna, likosila nyonso liboso ete Nzambe abikisa mabelé longwa na libebi? Bisakweli ya Biblia biyebisi bongo te. Yesu alakaki ete: “Ekomona bino makambo oyo nyonso, boyeba ete abɛlɛmi na bikuke. Nazali koloba na bino solo ete: Libota oyo likoleka te kino makambo oyo nyonso makobima.”—Matai 24:33, 34.
Mpo na koyeba ntina oyo mobu 1914 ezali na yango kati na Lisoló na bato, totalela ezalela na makambo ya mokili oyo ezalaki kino na katikati ya mobu wana. Liboso, bakonzi lokola Tsar Nicolas ya Russie, Kaiser Guillaume ya Allemagne, mpe mokonzi François-Joseph ya Autriche-Hongrie, bazalaki na bokonzi monene. Mokomoko na bato wana azalaki na likoki ya koyanganisa koleka bamilió minei na mibali mpe kotinda bango na etumba. Kasi bankoko na bango batyaki mabɔkɔ na mokanda oyo bazalaki kobénga ete Boyokani—Mosantu, kolobáká ete Nzambe atindaki bango ete bayangela bisika bikeseni ya “ekólo na boklisto,” ekólo bobele moko ya monene.
Engebene Encyclopedie britannique, mokanda yango “mozalaki na bopusi makasi na boyokani ya politike kati na mikili ya Mpótó na boumeli ya ekeke ya zomi na libwa.” Yango esalelamaki mpo na kotɛmɛla bibongiseli ya démocratie mpe mpo na kolóngisa oyo ebéngami ete bokonzi oyo bouti na Nzambe. Kaiser Guillaume akomelaki Tsar Nicolas ete: “Biso bakonzi baklisto, tozali na mokumba mosantu oyo mopesameli biso na Likoló, oyo ya kokɔtela etinda ya [bokonzi bouti na Nzambe].” Esengelaki kososola ete, na motindo moko to mosusu, bakonzi na mikili ya Mpótó bazalaki na boyokani na Bokonzi na Nzambe? (Tala 1 Bakolinti 4:8.) Mpe ezalaki boni mpo na Mangomba oyo mazalaki kosunga bakonzi wana? Ezalaki mpenza sembo wana emitangaki ete ezalaki ya boklisto? Eyano na mituna oyo emonani polele na bambula ya liboso mpenza oyo elandaki mobu 1914.
Pwasa, na août
Winston Churchill, moto monene na Leta ya mboka Grande-Bretagne, akomaki ete: “Kimya monene emonanaki na mikili ya Mpótó na eleko ya printemps mpe na été ya mobu 1914.” Bato nyonso bazalaki na bilikya mpo na mikolo mizali koya. Louis Snyder akomaki kati na mokanda na ye, Première Guerre mondiale (angl.), ete: “Na 1914 bato batondaki na bilikya mingi mpe na bilaká.”
Ezali solo ete, uta bambula mingi, kowelana makasi ezalaki kati Allemagne mpe Grande-Bretagne. Atako bongo, lokola G. Gooch alimboli yango kati na mokanda na ye, Sous six règnes (angl.), “ekanisamaki mpenza te ete matáta makokaki kobima na mikili ya Mpótó na 1914 lokola yango ezalaki na 1911, na 1912 to na 1913 . . . Boyokani kati na biyangeli wana mibale ezalaki mpenza malamu koleka na bambula na liboso.” Winston Churchill, mosangani na cabinet ya Grande-Bretagne na 1914, alobaki ete: “Emonanaki lokola ete Allemagne esalaki boyokani ya kimya elongo na biso.”
Kasi, kobomama ya mosangoli na Bokonzi ya Autriche-Hongrie na engumba Sarajevo, na mokolo ya 28 juin 1914, ebimisaki matáta. Sanza moko na nsima, mokonzi François-Joseph asɛngaki etumba na mboka Serbie mpe atindaki mapinga na ye ete mabundisa bokonzi yango. Na nsima, na butu ya 3 août 1914, na etinda ya Kaiser Guillaume, limpinga moko makasi ya Allemagne libundisaki bokonzi ya Belgique na pwasa mpe bakɔtaki na mboka wana ezalaki bango kokenda na France. Mokolo molandaki, Grande-Bretagne asɛngaki etumba na Allemagne. Tsar Nicolas apesaki etinda ya kobyanga limpinga makasi ya mboka Russie mpo na kobundisa Allemagne mpe Autriche-Hongrie. Boyokani-Mosantu epekisaki te ete bakonzi ya Mpótó babimisa etumba oyo esopaki makila mingi na mikili ya Mpótó. Kasi mbongwana monene esengelaki kosalema na nsima.
Ekosila kino na Noël?
Kobima ya etumba elɛmbisaki te elimo ya kolónga oyo bato bazalaki na yango. Mingi bakanisaki ete etumba ekosala mokili moko kitoko, mpe bibele mingi bayanganaki na Mpótó mpo na komonisa lisungi oyo bazali kopesa na etumba. A. Taylor akomaki kati na mokanda na ye, La lutte pour la domination en Europe: 1848-1918 (angl.), ete: “Na 1914, moto moko te atyaki likebi na makámá makouta na etumba, longola bobele basodá. . . . Moto moko te amizelaki na likámá monene epai na bato.” Kasi, bato mingi bazalaki nde koloba ete etumba ekoumela bobele mwa basanza.
Nzokande, liboso mpenza ete bato ya Mpótó bakumisa Noël na bango ya mobu 1914, nzela molai ya bakilometele 700, longwa na sud ya mboka Suisse kino na nord na ngambo ya Belgique, ezalaki likámá ya liwa. Babéngaki yango ete esika na etumba ya Ouest. Herbert Sulzbach, mokomi Moalema, akomaki yango kati na zulunalo na ye, na lisoló lilobelaki mokolo ya nsuka ya mobu 1914. Lisoló yango liyebisi ete: “Etumba wana makasi ezali kosila te. Na ebandeli ekanisamaki ete ekosila nsima na mwa baposo, kasi tala ete ezali kosila te kino lelo oyo.” Na boumeli ya ntango yango, na bisika mosusu ya Mpótó, bitumba bizalaki kosalema mingi kati na mampinga ya Russie, ya Allemagne, ya Autriche-Hongrie mpe ya Serbie. Matáta mapalanganaki kino koleka bandelo ya mikili ya Mpótó, mpe bitumba biyaki kosalema na ba océans mpe na Afrika, na Proche-Orient mpe kati na bisanga ya Pacifique.
Mbula minei na nsima, etumba ekómaki na Mpótó mobimba. Allemagne, Russie mpe Autriche-Hongrie babungasaki mokomoko soko milió moko to mibale ya basodá. Mboka Russie ebungisaki nkutu bokonzi na yango na botomboki ya bolchevik (balandi na Lenine) oyo esalemaki na 1917. Ezalaki likambo na mpasi mingi mpo na bakonzi ya Mpótó mpe mpo na bakonzi ya mangomba oyo bazalaki kosunga bango. Lelo oyo, bakomi na makambo na kala bazali sé kokamwa. Kati na mokanda na ye Déclin de la royauté (angl.), Gordon Brook-Shepherd atuni motuna oyo ete: “Ndenge nini bayangeli, baoyo mingi na bango bazalaki bandeko to mpe basangani ya mabota na bango babalanaki mpe baoyo bazalaki bango nyonso na mposa ya kobatela bokonzi, bandimaki kosopa makila ya bandeko na bango, oyo ebomaki bato mingi kati na bango mpe elɛmbisaki babiki nyonso?”
Ekólo France ebungisaki mpe koleka milió moko ya basodá, mpe Grande-Bretagne, oyo bokonzi na yango elɛmbaki liboso na etumba, ebungisaki koleka basodá 900 000. Nyonso, koleka bamilió 9 ya basodá bakufaki, mpe bamilió 21 bazokaki. Na ntina na basivile oyo bakufaki mokanda moko (The World Book Encyclopedia) elobaki ete: “Moto moko te ayebi motuya ya basivile oyo bakufaki mpo na maladi, na nzala mpe na makambo mosusu mauti na etumba. Bakomi na makambo na kala bakanisi ete motuya ya basivile oyo bakufaki ezalaki bobele bongo kati na basodá.” Maladi oyo babéngi ete grippe espagnole, oyo epalanganaki na 1918, ebomaki lisusu bato 21 000 000 na mokili mobimba.
Mbongwana monene
Nsima na Etumba Monene, lokola bazalaki kobénga yango, mokili esili mpenza kobongwana. Mpo ete Mangomba ya boklisto ya lokutá basanganaki na matáta yango na molende mpenza, babiki mingi balɛmbaki mpe baboyaki losambo mpe balandaki likanisi oyo ete Nzambe azali te. Basusu bamipesaki na kolukaluka biloko ya mosuni mpe bisengo. Lokola oyo molakisi Modris Eksteins akomaki kati na mokanda na ye Rites du printemps (angl.), bambula 1920 “ezalaki eleko monene oyo bato bamipesaki na bisengo mpe na moïmi.”
Molakisi Eksteins alimboli ete: “Etumba ekobebisaka bizaleli.” Bipai binso mibale, bakonzi ya mangomba, bakonzi ya basodá mpe bakonzi ya politike balakisaki na bato ete batalela likambo ya koboma bato mingi lokola likambo moko malamu. M. Eksteins alobi ete: “[Yango] ezali nde likámá monene mpo na bizaleli oyo bazalaki koloba ete elónamaki mpenza na lingomba na boklisto mpe ya Bayuda.” Abakisi ete: “Na liboso na molongó ya etumbu ya Occident, mobulu ekómi nokinoki ebundeli mosusu na etumba . . . Na nsima, bizaleli bizali mpe kobeba. Pite ezali kobakisama na motindo na kokamwa.”
Solo mpenza, mobu 1914 ebimisi mbongwana mingi. Ebimisi mokili ya kitoko te, mpe bitumba bisili te lokola bato bazalaki kokanisa yango. Bongo, Barbara Tuchman, mwasi mokomi na makambo na kala, alobaki ete: “Makanisi mpe milende oyo bato bazalaki na yango na 1914 ezindaki mokemoke kati na mai ya nsoni monene.”
Nzokande bato mosusu oyo bazalaki na 1914, bakamwaki te na ntina na makambo oyo mabimaki na mbula wana. Ya solo, liboso ete etumba ebima, bato yango bozalaki kozela “eleko ya mpasi monene.” Ezalaki banani? Mpe makambo nini bango bayebaki oyo bato mosusu bayebaki yango te?
[Etanda na lokasa 5]
Makanisi na kolónga oyo mboka Grande-Bretagne ezalaki na yango na 1914
“Uta pene na ekeke moko, monguna moko te asili kobima na mai monene zingazinga na esanga na biso. . . . Ezalaki mpasi na kokanisa ete likámá likoki kobima na bisika wana ya kimya. . . . Londres ekómaki mpenza kitoko mpe na bozwi mingi. Ezalaki na makambo mingi oyo masengelaki mpenza kosalema, komona mpe koyoka yango. Ezala mibangé soko mpe bilenge bazalaki na ntembe te ete, oyo bazalaki komona na mbula wana ekeseni na mosusu, ezalaki mpenza nsuka ya eleko mosusu.”— Mokanda Avant que les lampes ne s’étéignent (angl.), ya Geoffrey Marcus.