Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/5 nk. 24-25
  • Aleisaki Yisraele na Sinai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Aleisaki Yisraele na Sinai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Sinai: Ngomba na Moize mpe ngomba na mawa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Esobe na yuda ekaoka mpe kitoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Osengeli kobosana Yehova te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/5 nk. 24-25

Bililingi ya Mokili na ndaká

Aleisaki Yisraele na Sinai

KANISA ete bamilió na mibali, basi mpe bana oyo bazali kokenda epai na “mokili monene mokaoki mpe na nsɔmɔ, esika ezali na nyoka na ngɛngɛ mingi mpe na nkotó, mpe mabelé makaoki oyo mazangi mai!”

Maloba oyo na Nzambe mazwami na Deteronome 8:15 (MN), mamonisi ete mobémbo molai oyo Bayisraele basengelaki kosala mpo na kokenda na mokili mokaoki na Sinai, na ntango babimaki na Ezipito. Motuna monene mozalaki oyo ete: Nani akopesa bango bilei mpe mai oyo ekoki?

Bayisraele bazalaki baombo na esika ebale Nil ekabwani na biteni mingi, kasi bazangaki eloko te. Bililingi bityami na efélo oyo ekundolamaki na mayita na kala, emonisi mbuma na miwiti, mbuma ya mbika mpe milóna mosusu; emonisi mbisi mpe bandeke oyo bato babɔkɔlaka. Yango ezalaki mpenza bilei na ndenge na ndenge. Ezalaki likambo na kolekisa ndelo te mpo na milóna oyo Bayisraele bakanisaki yango mingi na mokili mokaoki, ete: “Nani akopesa biso mosuni mpo na kolya? Tozali mpenza kokanisa mbisi oyo tozalaki kolya na Ezipito na lifuti te, mpe mbika, mpe pastɛke, mpe pwalo, mpe matungulu, mpe ayi!”​—Mituya 11:4, 5; 20:5.

Nokinoki nsima na kokatisa la mer Rouge, Bayisraele bayebaki mpenza lolenge oyo Sinai ezalaki. Balekaki te na nzela ya nord, epai bato mingi balekaka, kasi babalukaki epai na nsuka ya mabelé ya esanga moke. Wana basalaki soko bakilometele 80 kati na mokili mokaoki, mposa na bango ya mai ekómaki makasi. Bakokaki te komela mai oyo bazalaki kokuta, mpamba te yango ezalaki bololo mpe ezalaki mbala mosusu komema bamaladi. Bamitungisaki ete: “Tokomela nini?” Nzambe asungaki bango na koyeisáká mai yango kitoko.​—Exode 15:22-25.

Tala fɔtɔ́ oyo ezali awa likoló: ozali komona etonga na Kamela. Ozali bongo na likanisi malamu mpo na motindo oyo Bayisraele batambolaki kati na mokili mokaoki, kino na ngomba Sinai. Lolenge nini bakokaki kolanda kozwa mai mpe bilei ekoki mpo bango, mpo na bibwele na bango mike mpe bibwele minene oyo basengelaki kobatela?​—Exode 12:38.

Batambolaki epai na sud mpe mosika te, na Elimi, bakutaki mai mpe bilei oyo epesaki bango lisusu makasi. (Exode 15:27) Kasi bango basengelaki kokenda na Elimi te. Bazalaki kokenda nde na Sinai, “ngomba na Nzambe ya solo.” (Exode 3:1; 18:5; 19:2; 24:12-18) Ngomba oyo ezalaki na ntaká ya bakilometele 120; bakilometele 120 ya mabelé makaoki mpe na mabulumabulu.

Ezalaki bango kokenda na ngomba Sinai, etuluku monene wana ya bato balekaki pene na maziba na mai mazwami kati na mokili mokaoki oyo ebéngami nkombo Feiran, mpe bapemaki wana. Fɔtɔ́ ezali na lokasa lotalani na oyo, ezali komonisa eteni na yango moke.a Mai wana makatisi mokili mokaoki, mpe ezali kokenda epai na la mer Rouge (golfe de Suez). Ezalaki esika malamu na kopema mpo na Bayisraele!

Atako mokili mokaoki ya Sinai mokokani mpenza na motindo oyo molakisamaki ete “mokili monene mokaoki mpe na nsɔmɔ,” Bayisraele bafandaki na malili ya nsé na nzeté na mbila mpe banzete mosusu ezalaki na Feiran. Bazwaki mbila na elɛngi mingi; balyaki yango wana mpe babómbaki mosusu.

Mai na Feiran mazalaki kouta na nsé na mabelé. Kanisa mayoki oyo okokaki kozala na yango soki, na pwasa, okuti mai malamu mpo na komela, wana ezali yo kotambola kati na mokili mokaoki! Tala ndakisa oyo emonisi ete na Sinai, ezali na bisika epai mai makoki kozwama. Mbala mosusu, esengeli kotimola bitima mozindo. Na ntango na kala, kolubola bakatini to bambeki oyo etondi na mai ezalaki mosala monene, mingi mpenza soki esengelaki komelisa etonga monene mpe etonga moke na bibwele. Lelo lisusu, ba Bédouins (bato ya Arabie bakendá kofanda na mokili mokaoki) ya Sinai babéndami na bitóma oyo bakoki kotóka mai mpo na bango mpe mpo na Bakamela na bango.​—Tala Genese 24:11-20; 26:18-22.

Na yango, atako baimaimaki na mabaku mosusu na ntina na bozangá oyo bazalaki na yango, Bayisraele bazwaki bilei mpe mai. Mbala mosusu, Nzambe apesaki bango na likamwisi. (Exode 16:11-18, 31; 17:2-6) Epai mosusu, emonani lokoka ete amemaki bango na ‘bisika na kopema,’ epai bamposa na bango ekokokisama na biloko bizalisami. (Mituya 10:33-36) Na boumeli na ntango yango, alakaki bango bozwi mingi oyo bozalaki kozela basembwi na Mokili na ndaká.​—Deteronome 11:10-15.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Fɔtɔ́ oyo etyami na monene na yango kati na Calendrier des Témoins de Jéhovah 1992.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24, 25]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto