Biblia ezali mpenza likabo liuti na Nzambe?
“Nakanisi ete Biblia ezali mpenza likabo lileki oyo Nzambe apesaki epai na bato.” Ezali Abraham Lincoln, prezidá wa zomi na motoba na États-Unis, nde abimisaki maloba oyo.a Ezali bobele ye moko te oyo amonisaki ete mokanda oyo moumeli mingi mozali na motuya.
William Gladstone, moto monene na Leta ya Grande-Bretagne, na ekeke ya zomi na libwa, ayebisaki maloba mosusu oyo ete: “Oyo ekesenisi Biblia ezali bongo litatoli na yango ya ebandeli, mpe eleko molai oyo ekaboli yango na mikanda misusu.” Bobele bongo, Patrick Henry, moto monene na Leta ya Amerika, alobaki ete: “Biblia ezali na motuya mingi koleka mikanda nyonso mosusu.” Na lolenge emonani, Mokonzi Napoléon Bonaparte akamwisamaki na Makomami, mpe alobaki ete: “Biblia ezali bobele mokanda te, kasi ezali lisusu ekelamu na bomoi, ezali na nguya oyo ekobundisaka eloko nyonso oyo ekotɛmɛlaka bokóli na yango.”
Mpo na bato mosusu, Biblia ezali liziba ya lisalisi mpe na elendiseli Général Robert Lee, Conféderé américain, alobaki ete: “Kati na mikakatano na ngai mpe na mpasi na ngai nyonso, Biblia ezalaki ntango nyonso kopesa ngai pole mpe nguya.” Mpe lokola alingaki mokanda yango, John Adams, prezidá ya États-Unis, alobaki ete: “Eleki ntango mingi mpenza uta nazwaki momeseno ya kotanga Biblia na mobimba na yango, mbala moko na mbula.”
Soki Oyo-Aleki-Likoló apesaki Biblia epai na bato, esengeli kozala na bilembeteli bimonisi ete epemami na Nzambe. Ezali koleka mikanda nyonso mosusu. Mpe mpo na kozala liziba ya solo ya makasi mpe ya malako, Biblia na mobimba na yango, esengeli kozala na makambo mabongi na kondima. Bongo, motuna motunami ete: Biblia ezali mpenza likabo ya Nzambe? Tomeka sikawa kozwa eyano na motuna oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ya solo mpenza, Nzambe asili kopesa likabo lileki na motuya: Yesu Klisto.—Yoane 3:16.
[Bililingi na lokasa 3]
William Gladstone
[Eutelo ya bafɔtɔ]
U.S. National Archives photo
Abraham Lincoln
[Eutelo ya bafɔtɔ]
U.S. National Archives photo
Patrick Henry
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Harper’s U.S. History
Napoléon Bonaparte
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Drawn by E. Ronjat
John Quincy Adams
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Harper’s U.S. History
Robert Lee
[Eutelo ya bafɔtɔ]
U.S. National Archives photo