Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/5 lok. 29
  • Mituna ya Batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya Batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya Batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Ntango ya Kosɛnzɛla
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Kozala ya Klisto—Elimboli nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mituna ya Batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/5 lok. 29

Mituna ya Batángi

Ekoki nde kolobama ete bososoli ya sika ya liloba “libota” na Matai 24:34 epesi likanisi ete nsuka ya ebongiseli ya biloko ezali naino mosika?

Soko moko te. Kútu, ndimbola ya sika oyo esemboli likambo yango esengeli kosalisa biso na komizela mpenza ete nsuka ezali koya. Mpo na nini tolobi bongo?

Ya solo, lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1995 elimbolaki, Yesu asalelaki liloba “libota oyo” mpo na bato mabe ya eleko wana. (Matai 11:7, 16-19; 12:39, 45; 17:14-17; Misala 2:5, 6, 14, 40) Na ndenge yango, ezalaki te maloba ya komonisa eleko moko etyami mpe oyo ebandi na dati moko ya sikisiki.

Kútu, “Mituna ya batángi” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli sé moko wana ebéndaki likebi likoló na makambo mibale ya ntina: “Libota ya bato ekoki te kotalelama lokola eleko oyo motángo ya bambula na yango eyebani sikisiki” mpe, “bato ya libota moko babikaka na boumeli ya eleko ya mwa mokuse.”

Mbala mingi tosalelaka “libota” na ndimbola wana. Na ndakisa, tokoki koloba, ‘Basoda ya libota ya Napoléon bayebaki mpɛpɔ te mpe bayebaki eloko moko te likoló na bɔ́mbi atomiki.’ Yango elakisi nde ete tozali kolobela basodá oyo babotamaki mbula moko na Napoléon? Tozali nde kolobela bobele basodá ya ekólo ya France oyo bakufaki liboso ya Napoléon? Soko moke te. Bobele bongo, na kosalelama wana ya liloba “libota” tokoki te komeka kotya motuya moko ya bambula. Nzokande, tokoki nde kolobela eleko ya mwa ntango mokuse, kasi bankámá mingi ya bambula te uta eleko ya Napoléon kino na mikolo misengelaki koya.

Ezali mpe bongo mpo na bososoli na biso ya makambo Yesu alobaki kati na esakweli oyo apesaki likoló na Ngomba ya Olive. Kokokisama ya makambo ndenge na ndenge ya esakweli wana emonisi ete nsuka ya ebongiseli oyo ekómi pene. (Matai 24:32, 33) Omikundola ete engebene Emoniseli 12:9, 10, oyo elobeli kotyama ya Bokonzi ya Nzambe kati na makoló na 1914, Satana abwakamaki zingazinga ya mabelé. Emoniseli ebakisi ete sikawa azali na nkanda makasi. Mpo na nini? Mpamba te ayebi ete “azali na elaka mokuse.”​—Emoniseli 12:12.

Boye ezalaki mpenza likambo libongi ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ ezala na motó na likambo moke oyo elobaki ete “Bósɛnzɛlaka!” Paragrafe elandi elobaki na lolenge lobongi ete: “Tozali na mposa te ya koyeba ntango ya sikisiki oyo makambo yango makosalema. Nzokande, likebi na biso esengeli kozala mingi likoló na ezaleli ya kosɛnzɛla, kokólisa kondima makasi, mpe kozala ntango nyonso na makambo mingi ya kosala kati na mosala ya Yehova​—kasi esengeli kozala te likoló na kotánga badati.” Bongo etángaki maloba ya Yesu ete: “Bókeba mpe bósɛnzɛlaka, mpo ete boyebi te soko elaka yango ekokoka ntango nini. Oyo nazali koloba na bino, nazali koloba na bato nyonso ete, Bókɛngɛlaka.”​—Malako 13:33, 37.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto