Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/5 lok. 9
  • Lisekwa: Ntembe kati na Paulo mpe Platon

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisekwa: Ntembe kati na Paulo mpe Platon
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Platon
    Lamuká!—2013
  • Kondima na yo kati na lisekwa ezali mpenza makasi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • ‘Liwa ekozala lisusu te’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Elikya ya lisekwa ezali na nguya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/5 lok. 9

Lisekwa: Ntembe kati na Paulo mpe Platon

NTÓMA Paulo alobaki na ntina na lisekwa na 1 Bakolinti 15:35-58 mpe na 2 Bakolinti 5:1-10. Kati na oyo ye akomaki, alandaki nde makanisi ya Platon mpe bafilozofe Bagreke, baoyo bazalaki kolakisa ete molimo ekufaka te, to azalaki nde na boyokani na mateya na Yesu mpe na Makomami mosusu?

Brochure Immortalité de l’âme ou résurrection de l’individu: le point de vue de saint Paul avec référence spéciale à Platon (angl.), oyo ekomamaki na 1974 mpe endimamaki na episkopo wana lokumu wa lingomba orthodoxe ya Bagreke na Amérique du Nord mpe na Amérique du Sud, epesi eyano ekoki na motuna oyo. Nsima na kotalela lolenge oyo lisekwa liyebisami kati na mikapo oyo mizali awa na likoló, mpe nsima na kotalela bopusi na mateya ya Bagreke na eleko wana, mokomi ya mokanda wana asukisi ete:

“Platon ateyi ete molimo mokabwani na nzoto mpe mozali kobika seko kozanga nsuka. Mpo na Platon, molimo ezali eloko ya ntina mingi mpe yango moko ekoki kokufa te . . . Santu Paulo ateyi likanisi motindo wana te mpe akanisi kosala yango te . . .

“Ntóma Paulo alakisi te liteya oyo ete psychè to elimo ekufaka te na lolenge na biteni bikabwani mpe bikeseni, kasi alobi ete nzoto-molimo-elimo ya moto ekosekwa esika moko, lokola lisekwa na Klisto. Likanisi oyo Paulo azali na yango mpo na nzoto oyo esekwi, elimboli te kosekwisama na bibembe bizali na nkunda.

“Tokolimbola malamu likanisi na ye mpo na nzoto esekwisami na kolobeláká mbongwana, kozalisama lisusu na nguya na Nzambe, mpe kozongisama lisusu ya moto, kozongisama ya moto yango, ya bomoto, ya makanisi mpe mayoki, kozongisama ya moto elongo na makanisi na ye mpenza mpe na mayoki na ye. Lisekwa na biso na mikolo mizali koya likosalema te mpo na nguya oyo tozalisami na yango, kasi mpo ete ezali likabo monene ya Nzambe.”

Kozanga kokufa ezali kati na moto te. Kasi, ezali nde likabo kitoko oyo Jéhovah azali kopesa epai na baoyo basali lisangá ya baklisto bapakolami, na ntina na mawa na ye, na nzela na Yesu Klisto, Nkolo na biso.​—1 Bakolinti 15:20, 57; Bafilipi 3:14.

[Elilingi na lokasa 9]

Platon, filozofe Mogreke

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Vatican Museum photograph

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto