Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/7 nk. 8-13
  • Kondima na yo kati na lisekwa ezali mpenza makasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima na yo kati na lisekwa ezali mpenza makasi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntembe na ntina na bomoi na mikolo mikoya
  • Likanisi ya mangomba ya boklisto mpo na bomoi nsima ya liwa
  • Elikya ya solo mpo na bakufi
  • Nzoto mpe molimo
  • Tózala na kondima mpo na bomoi ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Molimo etikalaka na bomoi nsima na kufa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Makanisi na yo mpo na molimo mazali na bopusi likoló na bomoi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Elikya kitoko mpo na molimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/7 nk. 8-13

Kondima na yo kati na lisekwa ezali mpenza makasi?

“Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika.”​—YOANE 11:25.

1, 2. Mpo na nini mosambeli ya Yehova atyelaka elikya ya lisekwa motema?

ELIKYA na yo kati na lisekwa ezali mpenza makasi? Elendisaka yo ete obanga liwa te mpe ebɔndisaka yo ntango okufeli moto? (Matai 10:28; 1 Batesaloniki 4:13) Okokani na basaleli mingi ya Nzambe na ntango ya kala, oyo bayikaki mpiko liboso ya fimbo, kosɛka, minyoko, mpe bolɔkɔ mpamba te balendisamaki na kondima kati na lisekwa?—Baebele 11:35-38.

2 Ɛɛ, mosambeli ya Yehova oyo azali sembo asengeli kozala na ntembe soko moke te ete lisekwa ekozala, mpe kondima na ye na likambo yango esengeli kozala na bopusi na bomoi na ye. Ezali likambo ya kosepelisa mpenza na kokanisa ete na ntango oyo Nzambe ye moko asilá kokana, mai monene, liwa, mpe Hades ekozongisa bakufi oyo bazali kati na yango, mpe basekwi yango bakozala na elikya ya kofanda libela na paladiso awa na mabelé.​—Emoniseli 20:13; 21:4, 5.

Ntembe na ntina na bomoi na mikolo mikoya

3, 4. Bato mingi bazali naino na endimeli nini na ntina na bomoi nsima ya liwa?

3 Uta kalakala, mangomba ya boklisto mateyaka ete bomoi mosusu ezalaka nsima ya liwa. Lisolo moko ebimisamaki na zulunalo U.S. Catholic elobaki ete: “Na bileko nyonso, baklisto bamekaki koyika mpiko na mikakatano mpe bampasi ya bomoi oyo na kolikyáká ete bakozwa bomoi mosusu, bomoi ya kimya mpe ya esengo, etondi na makambo kitoko mpe na bolamu.” Atako na mikili mingi ya boklisto, bato bazali lisusu komipesa na makambo ya Nzambe te mpe ntango mosusu bazali kotyola mangomba, bato mingi bazali naino kokanisa ete likambo moko esengeli kozala nsima ya liwa. Kasi ezali na makambo mingi oyo bayebi te na ntina na yango.

4 Lisolo moko ebimisamaki na zulunalo Time emonisaki ete: “Bato bazali naino kondima ete [bomoi ezalaka nsima ya liwa]: kasi likanisi na bango na lolenge bomoi yango ezali mpenza ezali molili, mpe bapastere na bango bazali lisusu kolobela yango mingi te.” Mpo na nini baministre ya mangomba bazali lisusu kolobela mingi te likambo ya bomoi nsima ya liwa lokola bazalaki kosala yango kala? Jeffrey Burton Russell, nganga-mayele ya makambo ya mangomba alobi ete: “Nakanisi ete [bakonzi ya mangomba] balingi kolobela likambo yango te mpamba te bazali kobanga ete ekosɛnga bango ete bálonga ntembe oyo bato mingi bazali kotya.”

5. Lelo oyo, ndenge nini bato mingi batalelaka liteya ya lifelo ya mɔ́tɔ?

5 Mpo na mangomba mingi, bomoi nsima ya liwa ezalaka na bisika mibale: na likoló to na lifelo ya mɔ́tɔ. Mpe soki bakambi ya mangomba bazali kokakatana kolobela likoló, mokakatano ezali mingi lisusu mpo na kolobela lifelo. Lisolo moko ebimisamaki na zulunalo moko elobaki boye: “Na mikolo oyo, ata mangomba oyo endimaka etumbu ya seko na lifelo ya mɔ́tɔ . . . ezali lisusu kobɛta nsɛtɛ na liteya yango te.” Kutu, banganga-mayele mingi ya teoloji bandimaka lisusu te ete lifelo ezali esika ya minyoko, lolenge oyo ezalaki koteyama na eleko ya Moyen-Âge. Nzokande, bazali kosepela na likanisi oyo ete lifelo ezali esika oyo ezali na mwa “boboto.” Mpo na bato mingi kati na baoyo bazali kolendisa makanisi ya sika, basumuki oyo bazali na lifelo bazali konyokwama na nzoto te, kasi bazali nde konyokwama mpamba te “na elimo, batangolami na Nzambe.”

6. Ndenge nini bato mingi bamonaka ete kondima na bango ebongi te ntango bakutani na likama?

6 Kolɛmbisa mateya ya lingomba mpo na kozokisa te bato oyo bazali kolendisa makanisi ya sika ekoki kosala ete basusu báyina bango te, kasi ezali kotika bamilio ya bato ya sembo oyo bakendaka ndakonzambe ete bámituna soki basengeli kondima likanisi nini. Yango wana, ntango liwa ekómeli bango, mbala mingi bamiyokaka ete bazangi kondima. Makanisi na bango ezali lokola ya mwasi moko oyo akufelaki bandeko mingi na likama ya motuka. Ntango batunaki ye soki kondima na ye ebɔndisaki ye, ayanolaki na kokakatana nyonso ete, “Nakanisi ete ezali bongo.” Kasi, ata soki ayanolaki na kondimisama ete kondima na ye esungaki ye, litomba nini ya solosolo akoki kozwa soki bindimeli na ye bizali na moboko ya malamu te? Yango ezali motuna ya ntina mingi mpamba te, mpo na koloba solo, makambo oyo mangomba mingi eteyaka na ntina na bomoi na mikolo mikoya ekeseni mpenza na mateya ya Biblia.

Likanisi ya mangomba ya boklisto mpo na bomoi nsima ya liwa

7. (a) Mangomba mingi endimaka likambo nini? (b) Lolenge nini moto moko ya teoloji alobelaki liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te?

7 Atako ekabwani na makambo mingi, pene na mangomba nyonso ya boklisto endimaka ete bato bazali na molimo oyo ekobaka kozala na bomoi na ntango nzoto ekufi. Mingi bandimaka ete na ntango moto akufi, molimo na ye ekoki kokende na likoló. Bato mosusu babangaka ete molimo na bango ekoki kokende na lifelo to na epongelo. Kasi liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ezali liteya ya moboko na ndenge oyo bazali kotalela bomoi na mikolo mikoya. Oscar Cullman, nganga-mayele ya teoloji, alobelaki likambo yango kati na buku Immortality and Resurrection [Kozanga kokufa mpe lisekwa]. Akomaki boye: “Lelo oyo, soki totuni moklisto oyo ayekolá teoloji te . . . ayebisa soki Kondimana ya Sika eteyaka nini mpo na ndenge moto asukaka nsima ya liwa, longola bobele bato moke, tokozwa eyano ete: ‘Molimo ekufaka te.’” Nzokande, Cullman abakisaki ete: “Likanisi oyo epalangani mingi ezali moko na makambo oyo mazali kolimbolama mabe kati na mangomba ya boklisto.” Cullman amonisaki ete mbala ya liboso oyo alobaki yango, bato mingi babulunganaki. Kasi, alobaki solo.

8. Yehova apesaki elikya nini na mobali mpe mwasi ya liboso?

8 Yehova Nzambe azalisaki bato te mpo bákendaka na likoló nsima ya liwa na bango. Na ebandeli, mokano na ye ezalaki kutu te ete bákufaka. Adama na Eva bazalisamaki bato ya kokoka mpe bapesaki bango mokumba kitoko ya kotondisa mabelé na bana ya sembo. (Genese 1:28; Deteronome 32:4) Nzambe ayebisaki baboti na biso ya liboso ete bakokufa bobele soki batosi ye te. (Genese 2:17) Soki bakobaki kotosa Tata na bango ya likoló, balingaki kozala na bomoi libela na libela awa na mabelé.

9. (a) Na koloba solo, molimo ya moto ezali nini? (b) Nini ekómelaka molimo ntango ekufi?

9 Kasi, likambo ya mawa, Adama na Eva bazangaki botosi epai ya Nzambe. (Genese 3:6, 7) Paulo amonisaki mbuma mabe ya etamboli na bango na maloba oyo: “Mabe ekɔtaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basalaki mabe.” (Baloma 5:12) Na esika ete bázala na bomoi ya seko awa na mabelé, Adama na Eva bakufaki. Na nsima, nini esalemaki? Bazalaki nde na milimo oyo mikokaki kokufa te, oyo misengelaki kotindama na lifelo ya mɔ́tɔ mpo na lisumu oyo basalaki? Kutu, Biblia elobi ete na ebandeli, ntango azalisamaki, Adama “akómaki molimo na bomoi.” (Genese 2:7) Moto azwaki molimo te; kasi akómaki nde molimo, to moto ya bomoi. (1 Bakolinti 15:45) Bobele Adama te nde azalaki “molimo ya bomoi” kasi, lokola emonisami na lokota ya Liebele oyo Genese ekomamaki, banyama mpe bazalaki “milimo na bomoi”! (Genese 1:24) Ntango Adama na Eva bakufaki, bakómaki milimo oyo ekufi. Na nsuka, likambo oyo Yehova ayebisaki Adama, yango nde ekómelaki bango: “Na milunge na elongi na yo okolya kwanga, kino ntango ekozonga yo kati na mabelé, mpo ete okamatamaki na yango, zambi ozali mputulu, mpe okozonga kati na mputulu.”​—Genese 3:19.

10, 11. Buku New Catholic Encyclopedia endimi likambo nini na ntina na liteya ya Biblia mpo na molimo, mpe lolenge nini eyokani na likambo oyo Biblia elobi?

10 Buku New Catholic Encyclopedia endimi makanisi yango. Kati na lisolo “Molimo (kati na Biblia),” elobi boye: “Bokabwani ezali te kati na nzoto mpe molimo kati na [“Kondimana ya Kala,” to Makomami ya Liebele].” Ebakisi ete kati na Biblia, liloba “molimo” “elimbolaka soko moke te ete molimo ezali eloko oyo ekeseni na nzoto to ekeseni na moto.” Kutu, mbala mingi molimo “elimbolaka bikelamu ya bomoi yango moko ezala banyama to bato.” Bosembo motindo oyo ezali mpenza kolendisa, kasi moto mosusu akoki komituna mpo na nini bayebisaka ebele na bato oyo bakendaka na ndakonzambe makambo yango te.

11 Bailingomba bakokaki kozala na komibanzabanza mpe kobanga te soki bayebaki solo ezangi mindɔndɔ oyo eteyami na Biblia ete: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa,” kasi konyokwama na lifelo ya mɔ́tɔ te! (Ezekiele 18:4) Likanisi oyo ekeseni mpenza na oyo eteyamaka kati na mangomba ya boklisto, mpe eyokani mpenza na maloba oyo Salomo, moto ya mayele alobaki na kopemama ete: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te, bazali na libonza mpe te [kati na bomoi oyo]; kokanisa na bango esili kobungana. Oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na nguya na yo mpo ete ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na [Sheol, NW; to nkunda ya bato nyonso] esika ekokenda yo.”​—Mosakoli 9:5, 10.

12. Mangomba ya boklisto ezwaki liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te epai wapi?

12 Mpo na nini mangomba ya boklisto eteyaka likambo oyo ekeseni mpenza na oyo Biblia elobi? Buku New Catholic Encyclopedia, na lisolo oyo ezali na motó na likambo ete “Molimo, Moto, Kozanga kokufa ya,” elobi ete Batata ya Lingomba ya ebandeli bazwaki moboko ya liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te kati na Biblia te, kasi epai na “bakomi ya maloba ya ntɔki mpe bato ya filozofi mpe na bonkɔkɔ ya Bagreke . . . Na nsima, bato ya teoloji oyo ebéngami scholastique basepelaki kolanda makanisi ya Platon to mitinda ya Aristote.” Buku yango elobi ete, nsukansuka “bopusi ya makanisi ya Platon mpe balandi na ye”—bakisa endimeli oyo ete molimo ekufaka te—ekɔtisamaki “mpenza kati na teoloji ya boklisto.”

13, 14. Mpo na nini kolikya kongɛngisama na bato ya filozofi ya Bagreke oyo bazali bapakano elongobani te?

13 Ebongaki mpenza ete baoyo balobaki ete bazali baklisto báluka koyeba solo na likambo ya ntina mingi lokola elikya ya bomoi nsima ya liwa epai ya Bagreke, bato ya filozofi ya bapakano? Te. Ntango Paulo akomelaki baklisto oyo bazalaki na Kolinti, na ekólo Grèce, alobaki ete: “Mayele na ekeke oyo ezali bolema epai na Nzambe. Ekomami ete, Akokangaka bato na mayele kati na mayele na bango mpenza; mpe lisusu ete, Nkolo ayebi makanisi na bato na mayele ete mazali mpamba.” (1 Bakolinti 3:19, 20) Bagreke ya ntango ya kala bazalaki basambeli na bikeko. Boye, ndenge nini bakokaki kozala liziba ya bosolo? Paulo atunaki Bakolinti ete: “Esambelo na Nzambe ezali na kondimana nini na bikeko? Zambi bino bozali Esambelo na Nzambe na bomoi. Pelamoko Nzambe alobaki ete, Nakofanda mpe nakotambola kati na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai.”​—2 Bakolinti 6:16.

14 Solo ya bulɛɛ emonisamaki liboso na nzela ya libota ya Yisalaele. (Baloma 3:1, 2) Nsima ya mobu 33 T.B., epesamaki na nzela ya lisangá ya baklisto bapakolami na ekeke ya liboso. Wana azalaki koloba na ntina na baklisto ya ekeke ya liboso, Paulo alobaki ete: “Nzambe amonisi biso [biloko oyo bilɛngɛlami mpo na baoyo balingaka ye] na nzela na [elimo na ye, NW].” (1 Bakolinti 2:10; talá lisusu Emoniseli 1:1, 2.) Endimeli oyo elobaka ete molimo ekufaka te oyo eteyamaka kati na mangomba ya boklisto euti na filozofi ya Bagreke. Eyebisamaki na bimoniseli ya Nzambe epai na Yisalaele te to na lisangá ya baklisto na ekeke ya liboso te.

Elikya ya solo mpo na bakufi

15. Engebene Yesu, elikya nini ezali mpo na bakufi?

15 Soki molimo oyo ekufaka te ezali te, elikya ya solo mpo na bakufi ezali nini? Ezali bongo lisekwa; yango ezali liteya ya moboko na Biblia mpe ezali solo elaka kitoko oyo Nzambe apesi. Yesu amonisaki elikya ya lisekwa ntango alobaki na moninga na ye Malata ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika.” (Yoane 11:25) Kondimela Yesu elimboli mpe kondima lisekwa, kasi te molimo oyo ekufaka te.

16. Mpo na nini kondima lisekwa ezali likambo lilongobani?

16 Liboso ya likambo yango, Yesu alobelaki lisekwa ntango ayebisaki etuluku moko ya Bayuda ete: “Bókamwa na likambo oyo te, mpo ete ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Likambo oyo Yesu amonisi awa ekeseni mpenza na molimo oyo ekufaka te mpe oyo ekobaka kozala na bomoi soki nzoto ekufi mpe ekendaka na likoló. Ezali bato oyo bazali kati na nkunda, mingi na bango uta bikeke mingi to mpe bankóto ya bambula nde ‘bakobima’ na mikolo mizali koya. Ezali milimo oyo mikufá nde mikozonga na bomoi. Okanisi ete ekoki kosalema te? Nzambe “oyo mpe akopesaka bakufi bomoi mpe akobyanga biloko bimonani naino te ete bizali” akoki kosala yango. (Baloma 4:17) Babɛti-ntembe bakoki kosɛka likanisi oyo ete bato oyo bakufá bakozonga na bomoi, kasi ezali likanisi eyokani mpenza na likambo oyo ete “Nzambe azali bolingo” mpe ete “akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.”​—1 Yoane 4:16; Baebele 11:6.

17. Nzambe akokokisa makambo nini na nzela ya lisekwa?

17 Tókanisa naino, lolenge nini Nzambe akozongisa libonza epai na baoyo bamimonisaki “sembo kino kufa” soki azongisi bango na bomoi te? (Emoniseli 2:10) Lisekwa ekopesa Nzambe nzela ya kokokisa likambo oyo ntoma Yoane akomaki ete: “Yango wana, Mwana na Nzambe amonani ete abebisa misala na oyo na mabe.” (1 Yoane 3:8) Na elanga ya Edene, Satana akómaki mobomi ya libota mobimba ya bato ntango amemaki baboti na biso ya liboso na lisumu mpe na liwa. (Genese 3:1-6; Yoane 8:44) Yesu abandaki kobebisa misala ya Satana ntango apesaki bomoi na ye ya kokoka lokola mbeka, yango efungolaki nzela mpo ete bato básikwama na boombo oyo basangolaki, boombo ya kosala masumu oyo ekɔtaki na ntina na kozanga botosi oyo Adama amonisaki na nko. (Baloma 5:18) Lisekwa ya baoyo bakufaka mpo na lisumu ya Adama ekozala kobebisama mosusu ya misala ya Satana.

Nzoto mpe molimo

18. Bato mosusu ya filozofi ya Bagreke bayanolaki ndenge nini ntango Paulo alobaki ete Yesu asekwisamaki, mpe mpo na nini?

18 Ntango ntoma Paulo azalaki na engumba Atene, asakolaki nsango malamu na bato mingi oyo kati na bango ezalaki mpe na bato ya filozofi ya Bagreke. Bayokaki ye ndenge alobelaki Nzambe ya solo mpe libyangi na ye epai ya bato ete bábongola mitema. Kasi, nini esalemaki na nsima? Paulo asukisaki lisolo na maloba oyo: “[Nzambe] asili kopona mokolo wana ekosambisa ye mikili nyonso na sembo, mpe akosambisa bango na moto oyo asili kopona. Amonisi bato nyonso polele ete ezali solo, mpo ete asekwisi ye na bakufi.” Maloba yango mabimisaki nungunungu. “Eyoki bango mpo na lisekwa na bakufi, bamosusu basɛki.” (Misala 17:22-32) Oscar Cullmann, nganga-mayele ya teoloji alobi ete: “Mpo na Bagreke oyo bazalaki kondima ete molimo ekufaka te, ekokaki kozala mpasi mpo ete bándima mateya ya boklisto na ntina na lisekwa koleka bato mosusu. . . . Mateya ya bato minene ya filozofi lokola Socrate na Platon ekoki koyokana soko moke te na oyo ya Kondimana ya Sika.”

19. Lolenge nini bato ya teoloji ya mangomba ya boklisto bamekaki koyokanisa liteya ya lisekwa na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te?

19 Atako bongo, nsima ya lipɛngwi monene oyo ekɔtaki ntango bantoma basilaki kokufa, bato ya teoloji basalaki nyonso mpo na koyokanisa liteya ya boklisto na ntina na lisekwa na endimeli ete molimo ekufaka te oyo Platon ateyaki. Na nsima, bamoko bandimaki likanisi oyo ya sika: Na ntango moto akufi, molimo ekabwanaka (bato mosusu balobaka ete “esikwamaka”) na nzoto. Na yango, engebene buku Outlines of the Doctrine of the Resurrection (Miboko ya liteya ya lisekwa), ekomami na Richard Joseph Cooke, na Mokolo ya Kosambisama “nzoto mokomoko ekosangana lisusu na molimo na yango, mpe molimo na molimo na nzoto na yango.” Balobaka ete lisekwa ezali bongo kosangana lisusu ya nzoto na molimo na yango oyo ekufaka te, oyo ekosalema na ntango wana.

20, 21. Banani bateyaka ntango nyonso solo na ntina na lisekwa, mpe yango ememeli bango litomba nini?

20 Kino sikawa, likanisi wana ezali liteya oyo endimami na mangomba ya minene. Atako likanisi yango ekoki komonana ete elongobani na miso ya moto ya teoloji, bato mingi oyo bakendaka na ndakonzambe bayebi yango te. Bandimaka bobele ete nsima ya liwa na bango bakokende mbala moko na likoló. Yango wana, mokomi John Garvey amonisaki kati na zulunalo Commonweal ya 5 Máí 1995 ete: “Emonanaka ete endimeli ya baklisto mingi [na likambo ya bomoi nsima ya liwa] ezali mpenza pene na makanisi ya balandi ya Platon koleka likanisi mosusu oyo euti mpenza na boklisto, mpe ezali na moboko te kati na Biblia.” Ɛɛ, na koponáká Platon na esika ya Biblia, bakonzi ya mangomba ya boklisto balimwisaki epai ya bitonga na bango elikya ya lisekwa oyo eteyami na Biblia.

21 Na ngambo na bango, Batatoli ya Yehova baboyaka mateya ya filozofi ya bapakano mpe balandaka liteya ya Biblia na ntina na lisekwa. Bamonaka ete liteya ya Biblia etongaka, elendisaka, mpe ebɔndisaka. Na masolo oyo malandi, tokomona lolenge nini liteya ya Biblia na ntina na lisekwa ezali na moboko malamu mpe elongobani, ezala mpo na baoyo bazali na elikya ya kofanda libela na mabelé to baoyo bazali na elikya ya lisekwa mpo na bomoi na likoló. Wana ozali komibongisa mpo na boyekoli ya masolo yango, tolendisi yo ete otánga na likebi nyonso mokanda ya liboso ya Bakolinti mokapo 15.

Ozali komikundola?

◻ Mpo na nini tosengeli kolona elikya makasi ya lisekwa?

◻ Yehova apesaki Adama na Eva elikya nini?

◻ Mpo na nini koluka solo na filozofi ya Bagreke elongobani te?

◻ Mpo na nini lisekwa ezali elikya oyo elongobani?

[Elilingi na lokasa 10]

Ntango basalaki lisumu, baboti na biso ya liboso babungisaki elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé

[Elilingi na lokasa 12]

Banganga-mayele ya mangomba bapusamaki na endimeli ya Platon ete molimo ekufaka te

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Musei Capitolini, na engumba Rome

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto