Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/6 nk. 21-23
  • Ba diplômés ya Galaad bandimi likabo ya mosala ya misionere

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ba diplômés ya Galaad bandimi likabo ya mosala ya misionere
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Bandeko oyo bazwi mapolómi na bango na eteyelo ya galaad babandi bomoi moko ya malamu mpenza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Eteyelo ya Galaad: Eumeli mibu 50 mpe ezali kosala na nguya mingi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Bósepela kati na Yehova mpe bózala na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bana-kelasi ya Gileadi balendisami ‘bábanda kotimola’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/6 nk. 21-23

Ba diplômés ya Galaad bandimi likabo ya mosala ya misionere

Le 1er MARS 1992, basangani 22 ya kelasi ya mbala 92 ya Galaad, Eteyelo na Biblia ya la Société Watchtower, baoyo basengelaki kozwa mapolómi na bango, bandimaki likabo moko: likabo ya mosala ya misionere. Lloyd Barry, mosangani ya Collège central, alobaki na bayekoli na maloba oyo: “Tika ete boyamba na esengo monene likabo kitoko oyo, mpe tika ete bosalela yango mpo na komema esengo epai na basusu!”

Mwa babyangami 4 662 mpe basangani ya libota na Béthel bayanganaki kati na Salle d’assemblée ya mboka Jersey City, na eteni na mokili na New Jersey, mpo na kozala na ntango ya bopesi mapolómi, mpe bandeko basusu 970 bazalaki kolanda programme na nzela ya telefone kobanda na biro monene ya la Société Watchtower na Brooklyn, na Wallkill mpe na Patterson, na eteni na mokili to Etat ya New York. Bango nyonso bazalaki koyoka na likebi wana bandeko oyo bazwi mapolómi bazalaki kozwa batoli ya nsuka oyo ekosalisa bango na kosepela na motuya ya likabo oyo ezali bongo mosala ya misionere, mpe kosalaka yango na mayele.

Likita libandaki na loyembo 155 oyo elobi ete “Boyambana” mpe yango eyembamaki na mɔ́tɔ mpenza. Nsima na yango, prezidá ya Eteyelo ya Galaad, Frederick Franz, ye oyo akomi na mbula 98, apesaki epai na Nzambe, na motema na ye mobimba, libondeli oyo esepelisaki bayangani nyonso. Na nsima mokambi ya likita, Carey Barber, mosangani ya Collège central, atombelaki boyei malamu epai na bayangani nyonso mpo na libaku wana ya bopesi mapolómi mpe alobaki: “Mposa ya bamisionere basilisi na Galaad emonana naino boye te lokola ezali komonana lelo.” Nsima na koyebisa mwa makanisi, apesaki nzela na kolandana ya masolo mikuse ya ntina koleka.

Curtis Johnson, mosangani ya Comité ya Béthel, azalaki molobi ya liboso; alobelaki lisolo: “Bobatela elanga na bino.” Ndeko Johnson alimbolaki ete, ntango bamisionere ya sika bakokoma bipai oyo batindami, moko na moko na bango akozala na elanga ya elimo mpo na kolona. (1 Bakolinti 3:9) Basaleli na Jéhovah ya mokili mobimba bazali elanga na elimo kati na yango boyengebene mpe masanzoli ezali kobota liboso na mabota nyonso. (Yisaya 61:11) Molobi alobelaki mingi ete, ‘lolenge oyo bokobatela elanga na bino ya elimo na mikolo mizali koya, ekozala na bopusi monene kati na bolongi ya mosala na bino ya misionere.’ Nini ekosalisa bango mpo na kobatela malamu elanga na bango ya elimo? ‘Jéhovah akoki kozala lopango ya libateli zingazinga ya elanga na bino ya elimo. Soki bozali na ekateli ya kolona misala na sembo, botikala penepene na ye na nzela na libondeli mpe bosala na boyokani na mabondeli na bino.’

Na nsima Lloyd Barry alobelaki motó na likambo: “Bosepelaka kati na Nkolo.” (Bafilipi 4:4) Lokola alekisaki mibu koleka 25 kati na mosala ya misionere na Japon, azalaki na batoli kitoko ya kopesa na bandeko bazwi mapolómi mpo na kosalisa bango ete bolinga likabo wana, mosala ya misionere. Alobaki na maloba oyo: ‘Bokomona ete esengo oyo mosala na Nzambe ezali kopesa ekosalisa bino na kolonga ebele na mikakatano mbala mosusu mitungisi ya nzoto oyo bokokutana na yango.’ (Masese 17:22) Akundolaki epai na bandeko oyo bazwi mapolómi ete mbala mosusu basengeli komimona liboso na bizalela mpe na makambo oyo makeseni mpenza na oyo bameseni na yango. Ekoki kozala ete basengeli koyekola lokota ya sika. ‘Ekosengela na bino kosala makasi mpo na koyekola lokota yango. Kasi ntango bokokoka kosolola na esengo nyonso elongo na bato kati na lokota na bango, esengo na bino ekobakisama lisusu.’

Na nsima, Eldor Timm, mosangani ya Comité ya imprimerie, akamatamaki maloba mpo na kosala lisolo: “Botya miso na bino ntango nyonso likoló na lifuti.” Lifuti yango lizali nini? Bomoi na seko! Mpo na kozwa yango, tosengeli kotya miso na biso ntango nyonso likoló na yango. Molobi alobelaki bokokani mpe bokeseni oyo bozali kati na baklisto oyo bamikotisi kati na kurse mpo na bomoi mpe bapoti ya ekeke na liboso oyo bazalaki kokima mbango mpo na kozwa lifuti. Lokola bapoti, baklisto basengeli komimekisa makasi, kotosa mibeko mpe kobwaka kilo nyonso oyo ekoki kokanga bango nzela. Kasi, na kokesena na bapoti ya lisano, baklisto bamikotisi kati na kurse moko ya bomoi mobimba mpe bazali koluka kozwa lifuti oyo ezali mpo na libela. Molongi akozala moko te; baoyo nyonso bakosilisa kurse mpo na bomoi bakozwa lifuti. Ndeko Timm asukisaki na maloba oyo: ‘Mpo na kozwa lifuti ya bomoi, tosengeli kozala na kimya elongo na Jéhovah, Ye oyo azali kopesa lifuti. Mpe mpo na kozala na kimya elongo na Jéhovah, tosengeli kozala na kimya elongo na bandeko na biso.’

Milton Henschel, mosangani ya Collège central, alobaki na nsima likoló na motó na likambo oyo: “Tozali na elikya na nzela na kobondisama oyo ezali kouta na Makomami.” (Baloma 15:4) Abandaki lisolo na ye boye ete, ‘na boumeli ya sanza mitano oyo eleki, bozalaki na mosala mingi mpo na koyekola Biblia. Bosili komesena na yango mpenza. Elikya na bino ekomi makasi. Lokola bolingi kokende na mikili oyo batindi bino, bomikundola mpo na nini elikya na bino ezali makasi. Ezali mpo ete bozalaki ntango nyonso pene na Makomami.’ Molobi apesaki ndakisa moko ya lisolo na Biblia oyo ezali kopesa elikya; asalelaki Basambisi, mokapo 6 kino mokapo 8, oyo ezali koyebisa lolenge nini Gédéon azwaki mokumba ya kobikisa Yisraele na monyoko ya Bamadiane. Nsima na kolobela lisolo mpe ndimbola na yango mpo na ntango na biso, amonisaki likambo oyo: ‘Wana libaku ezwami mpo na kobelema na Makomami mpe kokanisa likoló na makambo na yango, bozali kolendisama. Bozali kozwa makasi.’

Bato nyonso bazalaki motema likoló mpo na koyoka batoli ya nsuka oyo balakisi mibale ya eteyelo bakopesa epai na bayekoli. Jack Redford, ye moto ya liboso akamataki maloba, na motó na likambo: “Bosala oyo ezali sembo.” Akundolaki na bandeko oyo bazwi mapolómi likambo oyo: ‘Na Galaad, bosili kobongisama malamu mpo na oyo ezali sembo engebene Makomami. Sikawa, bozali kokende kati na bateritware misionere epai kuna bokozala na ntembe ya kolonga. Mpe toyebi ete na boumeli ya mosala na bino bokokutana mbala mosusu na mikakatano makasi mpo na kosilisa. Toyebi ete, atako ezali bongo mpe atako mayoki na bino, bokoki kosala oyo ezali sembo.’ Nini ekosalisa bamisionere? Ya liboso, kozala na likanisi malamu likoló na basusu. Molobi alobaki ete, ‘bozela makambo ya kokoka te epai na oyo ezangi kokoka.’ Kozala na likanisi malamu likoló na mikakatano ekoki mpe kozala lisalisi monene. Molobi amonisaki ete, ‘biso nyonso kati na bomoi tozalaka na bantango ya malamu mpe bantango ya mpasi. Bato nyonso basepelaka na ntango malamu. Ezali lolenge oyo bokondendela na ntango na mpasi nde ekokata soki bokoumela to te kati na mosala ya misionere.’​—Yakobo 1:2-4.

Sekretere ya eteyelo, Ulysses Glass, aponaki motó na likambo: “Elikya nini mpo na mikolo mizali koya?” Na elobeli ya tata, alendisaki bandeko bazwi mapolómi na kobatela elikya na bango ntango nyonso. (Masese 13:12) Alimbolaki ete, ‘soki tobandi kobungisa elikya, ekoki kozala ete tokomona yango nokinoki. Makambo makoki komema biso na komibanzabanza koleka mpo na biso moko kasi mpo na boyokani na biso te elongo na Nzambe. Tokoki kozwa maladi to kozala na likanisi ete basusu bazali kosalela biso malamu te. Basusu bakoki kozala na biloko mingi ya mosuni koleka biso to kozwa matomba malamu kati na mosala ya kosakola, mpe tokoki kokoma na mwa zúwa. Soki tozali kotika makambo motindo wana kozwa moke moke esika kati na makanisi na biso, bosolo ya elikya na Bokonzi ekoumela te na kolemba kati na motema na biso mpe elimo na biso, mpe tokoki ata kino kotika kurse na biso mpo na bomoi.’ Esengeli kosala nini? ‘Soki ekosengela kopelisa elikya na biso, esengeli na biso kokamata bamoko ya sikisiki. Tosengeli kotondisa elimo na biso mpe motema na biso na bilikya ya solo oyo Nzambe apesaki biso mpe kotya likebi na biso nyonso likoló na bosolo ya Bokonzi na Nzambe. Lisusu, esengeli na biso kozongisa boyokani na biso elongo na Jéhovah, mpamba te ezali na motindo wana nde tokozwa esengo.’

Karl Klein, mosangani ya Collège central, asalaki diskur ya bopesi mapolómi. Motó ya likambo na ye elobaki ete: “Mpo na nini kozala moto na komikitisa?” Eyano na motuna wana ezali nini? Mpamba te ezali yango nde ebongi mpe oyo ezali sembo mpo na kosala, ezali ezalela ya mayele mpe etondi na bolingo oyo esengeli kozala na yango, ndenge alimbolaki kati na maloba na ye ya ebandeli. Mposa ya bayangani mpo na koyeba makambo elamwisamaki wana azalaki kotanga ndakisa minei ya bato na komikitisa, oyo ekobonga ete tomekola yango: (1) Jéhovah Nzambe, oyo amonisaki mpenza komikitisa ntango eyokanaki na Abalayama mpe Moize (Genese 18:22-33; Mituya 14:11-21; Baefese 5:1); (2) Yesu Klisto, oyo ‘amisokisaki mpe atosaki kino kufa likoló na nzeté ya mpasi’ (Bafilipi 2:5-8; 1 Petelo 2:21); (3) ntóma Paulo, oyo ‘asalelaki Nkolo lokola moombo na kosokema nyonso na elimo’ (Misala 20:18, 19; 1 Bakolinti 11:1); mpe (4) baoyo nyonso bazali kokamba biso,’ lokola prezidá ya liboso ya la Société, ndeko Russell, ye oyo akomaki mokolo moko ete: “Mosala oyo kati na yango Nkolo asepeli kosalela makoki moke na biso ezali mosala ya kozalisa te kasi ya botongi lisusu, ya kotya likambo na likambo na esika na yango, ya kobongisa.” (Baebele 13:7) Ndeko Klein alobelaki lisusu bantina mosusu minene oyo ezali kopusa biso na kozala basokemi. Na ntembe te, soki balandi toli oyo bapesaki bango mpo na kozala basokemi, bandeko bazwi mapolómi bakokoka kosalela na mayele likabo oyo ezali bongo mosala ya misionere!

Na nsima na diskur yango, ndeko oyo azalaki kokamba molulu ya bopesi mapolómi apesaki bambote eutaki na bisika bikeseni ya mokili mobimba. Ntango ekokaki bongo mpo na bana kelasi ete bazwa mapolómi na bango. Bautaki na mikili nsambo: Canada, Etats-Unis, Finlande, France, île Maurice, Pays-Bas mpe Suède. Kasi sikawa bazali kokende na mikili 11: Bolivie, Estonie, Grenade, Guatemala, Honduras, Hongrie, île Maurice, Pérou, Togo, Turquie mpe Venezuela.

Wana bopemi esilaki, nsima na midi ebandaki na boyekoli mokuse ya Mosenzeli oyo etambwisamaki na Joel Adams, mosangani ya Comité ya Bureau du service. Nsima na yango, bandeko bazwi mapolómi balakisaki mwa makambo oyo bakutanaki na yango kati na mosala ya kosakola na boumeli ya basanza oyo eteyelo eumelaki. Mpo na kosukisa, drame Mpo na nini kotosa ebongiseli ya teokratike? elakisamaki mpo na kolendisama ya bayangani nyonso, bakisa bandeko bazwi mapolómi.

Ya solo, bandeko baye bazwi mapolómi bakei na mikili oyo batindi bango kotondaka na batoli mpe na bilendiseli oyo ekosalisa bango na kosalela likabo oyo, mosala ya misionere, bobele mpo na kozwa esengo te, kasi lisusu mpo na kopesa yango epai na basusu.

[Etanda na lokasa 22]

Makambo matali bana ya kelasi

Motuya ya bikolo epai bauti: 7

Motuya ya bikolo epai batindami: 11

Motuya ya bayekoli: 22

Mwayene ya mbula ya kobotama 33,4 Mwayene ya mibu balekisi kati na solo: 16,7 Mwayene ya mibu balekisi kati na mosala ya pionnier 11,8

[Elilingi na lokasa 23]

Kelasi ya mbala 92 ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower

Na liste oyo ezali awa na nse, milongo mitangami kobanda na liboso kino na nsima mpe bankombo etangami kobanda loboko ya mwasi kino loboko ya mobali:

(1) M. Chan Chin Wah; N. Bouancheaux; B. Chapman; A. Östberg; L. Cole; K. Jackson; A. Meerwijk. (2) J. Smith; K. Wollin; R. Chapman; N. Gabour; J. Chan Chin Wah; C. Smith; L. Edvik. (3) E. Bouancheaux; S. Östberg; K. Cole; R. Jackson; S. Gabour; V. Edvik; R. Meerwijk; G. Wollin.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto