Bandeko oyo bazwi mapolómi na bango na eteyelo ya galaad babandi bomoi moko ya malamu mpenza
“Bopesi mapolómi na kelasi ya mbala 90 ya Galaad. Likambo ya esengo mpenza!” Ezali na maloba oyo nde Karl Klein, mosangani ya college central, abandaki programme ya bopesi mapolómi, likita oyo asengelaki kokamba yango. Kokanisáká ebandeli ya eteyelo ya Galaad, eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, abakisaki ete: “Nani akokaki kokanisa, na 1943, wana Galaad ezalaki kopesa mapolómí epai na bayekoli na kelasi ya yambo ete tokokutana lisusu nsima ya mibu 48 mpo ya kopesa lisusu ya mapolómi, na kelasi ya mbala 90?
Nzokande na le 3 mars 1991, mokolo moko kitoko ya eleko, babyangami mpe basangani ya Béthel koleka 4 000 bayanganaki na salle ya assemblée ya Jersey city, oyo etalani na New York, na ngambo mosusu ya ebale, mpo na kotala bopesi mapolómi epai na bamisionere ya sika. Na mokolo yango ya ntina mingi, bandeko oyo bazwi mapolómi basengelaki kozwa mwa batoli ya nsuka liboso ete babanda bomoi na bango ya misionere.
Likita libandaki na loyembo moko. Bayangani basepelaki mingi na ntango libondeli ya liboso lisalamaki na prezidá ya eteyelo ya Galaad, Frederick Franz, oyo azali sikawa na mibu 97. Nsima na maloba ya bobandi ya Karl Klein, bazwi mapolómi mpe bayangani banso, balandaki molongó ya badiskur mikuse oyo epesaki batoli malamu.
Max Larson, mosangani na comité ya imprimerie, azalaki moto ya yambo abandaki lisoló, na motó na likambo “Basalani elongo na Jéhovah.” Nsima na kolobela masuwa ya lobiko oyo etongamaki na Noa mpe libota na ye, alobaki ete: “Na mikolo na biso, Jéhovah azali koyanganisa libota ya mokili mobimba lizali na motango ya bamilió na bato, mpe azali kokana kokatisa yango bolozi monene. Ndenge nini? Na nzela ya masuwa ya ntango na biso: paradis ya elimo!” Alobaki epai bazwi mapolómi ete: “Bokokende na bisika bikeseni ya mokili, epai kuna bokosalana elongo na Jéhovah mpo na botongi masuwa ya ntango na biso.” Kobongisáká bango na makambo oyo mazali kozela bango, abakisaki ete: “Yango ekosenga na bino milende. Ekosenga na bino ete bozala na motema petee. Bokokutana na mikakatano. Na ntango wana nde makoki oyo bosili kozwa na eteyelo ekomonana na motuya.”
Mwa ntango liboso Daniel Sydlik, mosangani ya college central, akutanaki na bamisionere baoyo basali bambula mingi na Japon mpe na costa Rica. Na motó na likambo “Bomoi moko malamu bopesameli bino,” apesaki mwa makanisi ya ntina mingi oyo azwaki na bamisionere wana ya molende. Alimbolaki ete ndeko mwasi moko ayebisaki ye mwa batoli oyo mama na ye apesaki ye: “Sala makasi ete olinga mosala ya kosakola. Sala boninga elongo na bato. Tya bomoi na yo mpo na kosalela basusu mpe yango ekopesa yo esengo.” Ndeko mwasi mosusu alobaki ete: “Na boumeli ya bambula, tososolaki ete mpo na kolemba nokinoki te, esengeli kozela te ete basusu basalela biso koleka. Mpe na bongo, tozali kosepela ata na likambo moke oyo bamoniseli biso boboto mpe bolingo.” Na ntembe te, kosalelama ya batoli oyo malamu ekosalisa bandeko oyo bazwi mapolómi na eteyelo ya Galaad ete na ngala na bango, bakóma bamisionere ya molende.
Na 1 Batesaloniki 5:14, tozali kotanga ete: “Bozala na motema molai epai na bato banso.” Leon Weaver. mosangani na comite ya biro na mosala ya kosakola, alobelaki mokapo yango na diskur na ye “Bozala na motema molai na misala na bino nyonso.” Nani atangami kati na liloba “nyonso,” tosengeli kozala na motema molai epai na banani? Molobi ayanolaki ete: “Bato oyo bokokutana na bango na mosala ya kosakola; bandeko mibali mpe bandeko basi ya lisangá na bino ya sika; baninga na bino bamisionere; basangani ya filiale; mobalani na yo; mpe yo moko.” Mpo na nini tosengeli kozala na motema petee na misala na biso nyonso? Molobi abakisaki ete, “Bandeko mibali mpe bandeko basi, motema petee ekokitisaka nkanda mpe mitungisi. Motema petee mokopesaka kimya. Motema petee mokobatelaka elikya na biso. Motema petee mozali kosalisa biso na kobatela esengo na biso kati na mosala.”
Na nsima ezalaki ngala ya Albert Schroeder, mosangani ya collège central oyo azalaki sekretere ya liboso na eteyelo ya Galaad, mpo na koloba na bayoki. Diskur na ye “Bokóba kolanda Yesu Klisto, ndakisa na bino” elobelaki mingi mokapo ya mibale ya mokanda na Bafilipi. Tala oyo tozali kotanga na Flp 2 verset 5: “Bokanisa kati na bino yango ekanisaki Klisto Yesu.” Mpe molobi alimbolaki ete “mokapo yango mozali komonisa ntina ya kozala na makanisi ya bokatikati, lokola Yesu.” Kolandaka na Flp verset 6, alimbolaki polele mpenza epai oyo emonisami ete Paulo alakisaki liboso ete motindo na kokanisa na Yesu ezalaki na bokatikati (Flp 2 versets 6-8), na nsima alakisaki lolenge oyo Jéhovah apesaki ye mbano mpo na bosembo na ye (Flp 2 versets 9-11). Molobi asukisaki boye: “Bozali na libaku malamu, kati na yango, kosakola Nkolo Yesu Klisto mpe kosalisa bato mosusu ete bakolisa elimo lolenge moko na ye.”
Oyo nde mitinda kitoko koleka balakisi ya eteyelo bakokaki kopesa epai na bayekoli na bango! Lisoló ya Jack Redford ezalaki na titre “Bososoli bokobatela yo.” (Masese 2:10, 11.) “Ntango bokokende, bolamu na bino bokozwama te na bomoto na bino, to na oyo bozali na yango, to mpo ete bozali bazwi mapolómi na Galaad. Bolamu na bino ekozwama na motindo na bino ya kokanisa Bokozala na esengo soki bokosalela bososoli na bino mpe soki bokosalela boyebi na bino.” Mpo na komonisa ntina na bososoli, alimbolaki ete: “Kokesena oyo ezali kati na likambo malamu mpe likambo mabe ezali na makanisi Makanisi na bino nde ekomonisa misala na bino.” Jack Redford asukisaki na maloba ya kolendisa oyo epesamaki na bayekoli, ete: “Bato na mayele mingi ya mokili oyo bazali na makanisi na mpamba, nzokande bato mingi oyo bazali na mwa mayele moke nde bakolisi bososoli malamu. Bozali nde kosala milende mpo na kozwa likoki yango; bozwa ekateli ya kosalela elimo na bino; bosalela boyebi na bino; bolonga mikakatano; bozala na boyokani malamu na bato; botosa bokonzi; boboto mbuma; bolendendela kati na esika oyo batindi bino.”
Ulysses Glass, sekretere ya eteyelo, aponaki motó ya likambo “jéhovah akosimba biso na loboko,” etongami na Nzembo 37:23, 24. Alendisaki ete, “Nakopesa longonya na bayekoli ya eteyelo oyo mpo na molende na bango na boyekoli.” Akundwelaki bango lisusu bamoko ya maziba ya lisalisi oyo epesameli bango na Jéhovah: Liloba na ye, moombo na sembo mpe na mayele oyo, na litambusi ya Yesu, azali kolimbola mpe kopesa mayele ya Makomami, bakisa mpe mikanda ndenge na ndenge, makita mpe ba assemblées. “Maziba yango ya lisalisi oyo bosalelaki na boumeli ya formation na bino mazali lokola lingenda ya elimo. Ezali mpo na biso lokola lisungi na elimo mpe ezali kosalisa biso lisusu na koloba na molende ntango tozali koyebisa Liloba ya Nzambe na bato mosusu.” Mpo na kosukisa, apesaki batoli oyo epai na bayekoli oyo ete: “Soki mitema na bino mitondi na bolingo mpo na bato, bato ya mitema sembo malamu bakoyoka bino. Misala na bino mikozwa elónga, mpe bokoyeba ete Jéhovah asimbi loboko na bino.”
Molobi ya nsuka na ntongo wana ezalaki carey Barber, mosangani ya collège central. Mpo na diskur na ye aponaki titre “Bokóta ne ekuke na nkaká.” Kolobeláká Luka 13:23, 24 amonisaki ete: “Bato mingi bazali nde kolikya na bisengo ya bomoi, kasi bato moke bazali kosala makasi mpo na kozwa yango.” Ezali boni mpo na biso? “Ezali malamu na komituna ete: ‘Lisese ya ekuke na nkaká elimboli nini mpo na ngai?’ ” Baoyo bazali kokoka te na koleka na ekuke ya nkaká bazali kolónga te, ezali te ete nzela mpo na bokóti ezangi, kasi ezali mpo ete baboyi kosala makasi. Molobi alimbolaki ete: “Jehovah azali kosenga biso makambo mingi koleka te. Na lisungi na ye, toyika mpiko na esengo, na komonisaka nguya nyonso oyo tozwi, mpo ete toleka na ekuke ya nkaka mpe kokóta kati na mokili ya sika epai kuna tokozwa bomoi ya seko mpe kimya ekozala mingi, esengo mpe bolamu, na nkembo ezangi nsuka ya Jéhovah ekozala kuna!”
Na nsima prezidá atangaki bambote oyo eutaki na bisika bikeseni ya mokili. Ngonga ya bopesi mapolómi ekokaki. Bayekoli bautaki na bikólo motoba: canada, Finlande, Allemagne, Grande-Bretagne, Suisse mpe Etats—Unis. Mosala na bango mokomema bango kati na bamboka lokola Argentine, Bénin, Bolivie, République Dominicaine, Papouasie—Nouvelle—Guinée, Pérou, Sainte-Lucie mpe Taiwan. Mayoki nini ezalaki na bandeko oyo bazwaki mapolómí na mokolo yango? Na nzela na mokanda moko ya maloba na kosimba motema oyo bakomelaki collège central mpe libota ya Béthel, na ndakisa balobaki ete: “Tolendisami na lisungi ya collège central mpe ya libota ya Béthel, mpe ya lisangá mobimba ya Jéhovah. Tokosepela na lisungi yango na ntango tokokutana na mimekamo. Totondi bino mpo na bibongiseli oyo nyonso.
Na nsima ya bopemi, programme ya après-midi ebandaki na boyekoli mokuse ya Mosenzeli, oyo etambwisamaki na Karl Adams. Na nsima bayekoli bayaki kolakisa makambo oyo bakutanaki na yango mpo na komonisa lolenge ya kosimba motema na ntango tozali koteya Liloba ya Nzambe. Na nsuka, na esengo mpenza, bayangani nyonso elongo bazwi mapolómi na kelasi ya mbala 90, balandaki drame moko malamu, ete Tomibatela na mitungisi ya bomoi, esalamaki na lisangá moko ya penepene.
Kozongeláká masoló nyonso masalemaki wana, Karl Klein ayebisaki kati na maloba na ye ya nsuka ete: “Tosepeli mingi lokola tokutana awa na mokolo ya misato oyo na sanza ya mars 1991!” Mokolo yango kitoko esukaki na loyembo moko oyo nsima na yango Harold Dies asalaki libondeli.
[Etanda na lokasa 27]
Mitango ya kelasi
Motuya ya bikólo epai bauti: 6
Motuya ya bikólo epai batindami: 10
Motuya na bayekoli: 24
Moyene ya mbula ya kobotama:31.2
Moyene ya mibu balekisi kati na solo: 15
Moyene ya mibu balekisi kati na mosala ya pionnier: 11
[Elilingi na lokasa 26]
Kelasi ya mbala 90 ya galaad, eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower
Na liste oyo ezali awa na nse, milongó mitangami kobanda na liboso kino na nsima mpe bankombo etangamo kobanda na loboko na mwasi kino na loboko na mobali: 1) Miller, M.; Helenius, S.; Marsh, L.; Kleeman, A.; Loosli, Y.; Nizan, H. 2) Skogen, R.; Nutter, D.; Noack, E.; Diehl, L.; Hair, J. 3) Marsh, C.; Helenius, H.; Loosli, M.; Danio, A.; Danio, A.; Nizan, D. 4) Miller, L.; Noack, J.; Hair, L.; Kleeman, W.; Skogen, D.; Diehl, S.; Nutter, W.