Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/10 nk. 25-27
  • Mosala ya koluka mbisi na Mbu ya Galile

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosala ya koluka mbisi na Mbu ya Galile
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bampako elekaki
  • Baluki-mbisi oyo Baevanzile elobeli
  • Tózala balɔbi na bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Bomoi na ntango ya kala—Baluki-mbisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Bayekoli minei bakómi baluki-bato
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Tolɔba bato na mai nyonso ya mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/10 nk. 25-27

Mosala ya koluka mbisi na Mbu ya Galile

BOMOI ya baluki-mbisi na Mbu ya Galile na ekeke ya liboso ezalaki ndenge nini? Eyano na motuna wana ekosalisa biso tókanga ntina ya masolo mingi ya Baevanzile, lokola oyo tolobeli na lisolo oyo eleki.

“Mbu” yango ezalaki mpenza nde laki moko oyo ezalaki na bolai ya kilomɛtrɛ 21 mpe na bonene ya kilomɛtrɛ 12, oyo mai na yango ezalaki kitoko. Banda kala, baluki-mbisi bazalaki kokanga mbisi mingi na mbu yango. Na ntembe te, Porte ya Mbisi na Yerusaleme ezalaki nde zando ya mbisi. (Nehemia 3:3) Bambisi mosusu oyo ezalaki kotɛkama na zando yango ezalaki kouta na Mbu ya Galile.

Ntoma Petro autaki na engumba moko ya Mbu ya Galile na nkombo Betesaida, oyo ekoki kolimbola “Ndako ya Baluki-mbisi.” Engumba mosusu oyo ezalaki pene ya laki yango ebengamaki Magadala, to Magadane, epai Yesu akendaki na bayekoli na ye nsima ya kotambola likoló ya mai. (Matai 15:39) Mokomi moko alobi ete nkombo ya engumba yango na Grɛki ekoki kobongolama na “Engumba ya kobongisa mbisi.” Engumba yango eyebanaki mingi mpo na misala mineneminene oyo ezalaki kosalema kuna, na ndakisa, kokausa mbisi oyo bakangi, kotya yango mungwa to mpe vinɛgrɛ mpo na kosala supu moko boye, mpe bazalaki kobomba yango na mbɛki. Bazalaki kokanga yango malamu, kotya yango na masuwa mpe kotinda yango na bamboka nyonso ya Yisraele, ata mpe na mikili mosusu.

Kokanga mbisi, kobongisa yango mpe kotɛka yango ezalaki kokɔtisa mbongo mingi na Galile na ntango ya Yesu. Ntango mosusu tokoki kokanisa ete mosala yango ekómisaki bato mingi ya mokili wana bazwi. Kasi, ezalaki mpenza bongo te. Ndenge moto moko ya mayele alobi yango, kokanga mbisi “ezalaki te mosala oyo moto akokaki kosala ndenge alingi, ndenge batángi ya Testama ya Sika bakoki kokanisa lelo oyo.” Ezalaki “mosala oyo Leta nde azalaki kotambwisa, mpe kaka bazwi nde bazalaki kozwela yango litomba.”

Roma etyaki Erode Antipasi mokonzi ya etúká ya Galile. Azalaki na mokumba ya kolandela makambo ya babalabala, mabongo, bazamba, bilanga mpe mosala ya koluka mbisi. Mbongo mingi ya mpako oyo Erode azalaki kozwa ezalaki kouta na biloko wana. Toyebi mpenza te ndenge bazalaki kokɔngɔla mpako na Galile na ekeke ya liboso. Kasi, emonani ete ndenge oyo Erode azalaki kokɔngɔla mpako ekesanaki mpenza te na oyo ya bakonzi ya Grɛsi to mpe ndenge oyo Baroma bazalaki kosala na bitúká mosusu ya Azia. Na esika bato oyo bazalaki komona mpasi na mosala bázala na bomɛngo, mbongo mingi oyo ezalaki kouta na mimbongo, na bazamba, mai mpe biloko mosusu ya etúká yango ezalaki nde kokende na mabenga ya bato ya lokumu.

Bampako elekaki

Na ntango ya Yesu, ndambo monene ya mokili ya Galile ezalaki ya libota ya mokonzi mpe ekabwanaki na mapango ya mineneminene, oyo Erode Antipasi akabolelaki bankumu na ye mpe bato mosusu. Mbongo nyonso oyo Erode azalaki kosalela mpo na kosomba biloko, kotonga babuludingi, kofuta bato ya guvɛrnema na ye mpe mpo na kopesa baninga na ye makabo ya ndenge na ndenge, ezalaki kouta epai ya bato oyo azalaki koyangela. Balobaka ete bampako oyo bazalaki kofutisa bato elekaki ndelo.

Bibale nyonso ya mokili yango ezalaki mpe ya Erode. Yango wana, mosala ya koluka mbisi ezalaki kotambwisama na bato ya mokonzi to na bato mosusu oyo ye apesaki mabele. Na bisika oyo ezalaki ya mokonzi ye moko, baluki-mbisi basengelaki koyokana na bakonzi ya bakɔngɔli mpako mpo na kozwa ndingisa ya kosala mosala na bango. Bakonzi yango bazalaki bato ya bozwi mingi oyo bazalaki kofuta ebele ya mbongo mpo na kokóma na ebonga yango. Bato mosusu balobaka ete lokola Matai azalaki mokɔngɔli mpako na Kapernaume​—engumba moko monene ya mbu ya Galile na makambo etali kokanga mbisi—​ekoki kozala ete azalaki kosalela bakonzi yango, oyo basombaki “lotomo ya kokɔngɔla mpako ya mbisi epai ya mokonzi.”a

Makambo oyo bato ya mayele bamoni mpo na ekeke ya liboso mpe ya mibale liboso ya ntango na biso emonisi ete mbala mingi bato bazalaki kopesa “biloko” mpo na kofuta mpako kasi mbongo te. Na yango, baluki-mbisi mosusu bazalaki kopesa ndambo (kobanda na 25 % tii 40 %) ya mbisi oyo bazalaki kozwa, mpo na kozwa ndingisa ya kokoba kosala mosala na bango. Mikanda ya kala emonisi ete na bisika mosusu oyo ezalaki na nse ya boyangeli ya Roma, Leta azalaki kotya bato mpo na kolandela mosala ya baluki-mbisi na esika yango. Na Pisidia, ezalaki na bapolisi oyo bazalaki kokɛngɛla mpo moto oyo azali na ndingisa te akanga mbisi te mpe ete baluki-mbisi bátɛka mbisi kaka epai ya bato oyo Leta apesaki ndingisa ya kosomba mbisi ebele mpo na kotɛkela bato mosusu. Leta azalaki kolandela mosala ya batɛki yango mpe kofutisa bango mpako.

Moto moko ya mayele alobi ete lokola bazalaki kokɛngɛla mosala ya baluki-mbisi mpe kofutisa bango mpako, “Mokonzi to bankolo bisika nde bazalaki kozwa mbongo mingi na mosala yango, kasi baluki-mbisi te.” Ata mpe bato ya misala mosusu bazalaki konyokwama na bampako ebeleebele. Banda kala, bato mingi basepelaka te na likambo ya kofuta mpako. Atako bongo, emonani ete soki bazalaki koyina bakɔngɔli mpako ndenge Baevanzile emonisi yango, ezalaki mpo na mayele mabe mpe lokoso ya bato yango oyo bakómaki na bomɛngo mingi mpo bazalaki kofutisa bato bampako ebeleebele.​—Luka 3:13; 19:2, 8.

Baluki-mbisi oyo Baevanzile elobeli

Baevanzile emonisi ete Simo Petro azalaki na baninga oyo azalaki kosala na bango mosala ya koluka mbisi. Baoyo bayaki kosalisa Petro abenda ebele ya mbisi oyo akangaki na ndenge ya likamwisi, ezalaki “baninga na bango oyo bazalaki na masuwa mosusu.” (Luka 5:3-7) Bato ya mayele balobi ete “baluki-mbisi bazalaki kosala ‘bituluku’ . . . mpo na kosomba lotomo ya koluka mbisi.” Ekoki kozala ete bana ya Zebede, Petro, Andre mpe baninga na bango mosusu basalaki mpe bongo mpo na kozwa lotomo ya kosala mosala yango.

Makomami elobi te soki bamasuwa mpe minyama oyo baluki-mbisi yango ya Galile bazalaki kosalela ezalaki ya bango moko to te. Bato mosusu balobaka ete ezalaki ya bango moko. Kutu, Biblia elobi ete Yesu amataki na masuwa “oyo ya Simo.” (Luka 5:3) Nzokande, lisolo moko oyo elobeli likambo yango elobi ete, “ekoki kozala ete bamasuwa oyo bazalaki kosalela ezalaki nde ya basombi minene, oyo bituluku ya baluki-mbisi bazalaki kosalela.” Ezala bongo to te, Makomami elobi ete Yakobo ná Yoane bazalaki kobongisa minyama na bango. Ekoki kozala ete baluki-mbisi bazalaki mpe koyokana mpo na kotɛka mbisi na bango, mpe soki likoki ezali, bazalaki kozwa bato mosusu na mosala mokolo na mokolo.

Na yango, mosala ya baluki-mbisi ya Galile na ekeke ya liboso ezalaki na makambo mingi koleka ndenge tokoki kokanisa. Mosala na bango ezalaki na makambo kilikili na kati ya ebongiseli moko monene ya mombongo. Koyeba yango ekosalisa biso tóyeba lisusu malamumalamu masolo ya Baevanzile mpe ya makambo oyo Yesu alobaki mpo na baluku-mbisi mpe mosala na bango. Longola yango, makambo yango ekosalisa biso mpe tómona kondima oyo Petro, Andre, Yakobo mpe Yoane bazalaki na yango. Bango bazalaki kobikela kaka na mosala wana. Ata soki bazalaki na bozwi mingi to te ntango Yesu abengaki bango, batikaki mbala moko mosala oyo bayebaki mpe oyo bazalaki kobikela, mpo na kokóma “baluki-bato.”​—Matai 4:19.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Emonani ete ntoma Petro alongwaki na Betesaida mpe akómaki kofanda na Kapernaume, epai akómaki kosala mosala ya kokanga mbisi elongo na ndeko na ye Andre ná bana ya Zebede. Yesu mpe afandaki mwa ntango na Kapernaume.​—Matai 4:13-16.

[Karte na lokasa 25]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Laki Hula

Betesaida

Kapernaume

Magadane

Mbu ya Galile

Yerusaleme

Mbu ekufá

[Eutelo ya bafɔtɔ]]

Todd Bolen/​Bible Places.com

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]

Todd Bolen/​Bible Places.com

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto