Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/7 lok. 31
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Tópumbwa likoló na mapapu lokola mpongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mokanda ya Biblia nimero 20—Masese
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Bilenge​—Bótika baboti na bino básalisa bino na kobatela mitema na bino!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/7 lok. 31

Mituna na batangi

Mokomi ya Masese 30:19 akanisaki mpenza ete, ezali “likambo na kokamwa mingi” soki mobali alengola elenge mwasi na nzela na mayele mabe?

Wana ezali ndimbola oyo ekoki kopesama na Masese 30:19, verset oyo tokomona ete ezali pɛtɛɛ te mpo na kokanga ntina na yango.

Mpo na koyeba ndimbola ya verset wana, esengeli kotalela ba versets ya zingazinga. Mwa liboso, mokomi oyo apemamaki na Nzambe atangaki biloko minei oyo, na lolenge mosusu, ekotondaka te. (Masese 30:15, 16) Mpe atangi yango ete: “Makambo misato mazali mpenza kokamwisa ngai, mpe nayebi makambo minei te: nzela na mpongó kati na makoló, nzela na nyoka likoló na libangá, nzela na masuwa kati na mai monene mpe nzela na mobali elongo na elenge mwasi.”​—Masese 30:18, 19, MN.

Nini esali ete makambo wana minei mazala ya ‘kokamwisa mingi?’

Kokanisáká mbala mosusu ete liloba “kokamwisa” etaleli mpenza eloko oyo ebongi to oyo ezali malamu, balimboli mosusu ya Biblia balimbolaki ete, mokomoko na makambo wana elakisi mayele ya kozalisama na Nzambe: ezali likambo ya kokamwa na komona wana ndeke monene ezali kopumbwa, na komona nyoka komata na libangá monene atako ezangi makolo, na komona wana masuwa na bozito mingi mazali kotepatepa likoló na mai monene oyo na mbonge makasi, mpe na komona mbinga ya elenge mobali komipesa na bolingo mingi epai na elenge mwasi moke kino kobala ye, likambo likopesa nzela ete mwana abotama. Molakisi moko ya université amonaki likambo mosusu likokani na moko na makambo oyo minei, ete mbala nyonso, mokomoko na biloko wana bikolandaka bobele nzela na yango mpenza: kotambola ya mpongó, ya nyoka mpe oyo ya masuwa ekeseni na nzela nyonso mosusu, mpe lolenge ya bolingo oyo bozali koli na bato mibale.

Atako bongo, makambo wana minei mazali mpenza “kokamwisa” te na ndimbola ya malamu, lokola nde yango nyonso elakisi bobele likambo moko ya malamu. Masese 6:16-19 etangi “makambo oyo Jéhovah ayini.” Mpe lokola tolobaki yango, mwa liboso ya ba versets oyo tozali kotalela, Masese 30:15, 16 etangi [Nkunda, libumu likobotaka bana te, mabelé makauki mpe mɔ́tɔ ekozikisaka] biloko oyo bikolobaka te ete: “Ekoki!” Solo mpenza, wana ezali na likambo malamu te oyo lizali kokamwisa.

Na Masese 30:18, liloba ya Liebele libongolami na “na kokamwa,” elimboli “kokabola, kokesenisa; koyeisa monene, monene mingi, oyo ezali kokamwisa.” Eloko moko ekoki kozala monene, monene mingi to kotalelama lokola eloko oyo ezali kokamwisa ata soki ezali malamu te. Danyele 8:23, 24 esakolaki na ntina na mokonzi mabe oyo esengelaki kozala “monene” mpe asengelaki ‘kobuka bato na makasi’ mpe bato na bulee.​—Tala Deteronome 17:8; 28:59; Zakaria 8:6.

Verset oyo elandi Masese 30:18, 19 epesi ntango mosusu elembo ya koyeba mpenza likambo oyo mokomi azalaki komona ete ezalaki mpasi mpo na kokanga ntina. Verset 20 (MN) elobeli mwasi na ekoba oyo “alyaki mpe apangwisaki monoko na ye, mpe alobaki ete: ‘Nasali mabe moko te.’” Mbala mosusu asalaki lisumu na nkuku mpe na mayele mabe, kasi lokola elembo moko ezali te mpo na mabe na ye, akokaki komiloba ete ayebi likambo te.

Ndakisa oyo ekokani na makambo oyo matangami liboso. Wana mpongó ekopumbwa na likoló, wana nyoka ekotambola likoló na libangá monene, wana masuwa makopasolaka mbongé​—moko te akotikala elembo na nzela, mpe ekozala mpasi mpo na koyeba nzela oyo moko na biloko yango misato elekaki. Soki likambo wana lilobeli biloko yango misato, kasi ezali boni mpo na likambo ya minei, “nzela na mobali elongo na elenge mwasi.”

Nzela wana ekoki mpe kozala mpasi mpo na koyeba yango lisusu. Elenge mobali akoki kosalela mayele mabe, maloba kitoko mpe kosalela mayele mpo na kondimama na moseka. Lokola azali na mayele mingi te, mbala mosusu akoyeba mayele mabe na ye te. Ekoki kokóma ete, nsima na kondima ye, moseka akoyeba kolimbola te lolenge oyo alóngaki kolengola ye; ata bato oyo bamonaki likambo yango bakozala na mpasi mpo na kolimbola yango. Mbala mingi, bilenge basi basili kotika bizaleli na bango malamu mpo na kolanda balengoli na mayele mabe. Ezali mpasi na koyeba lisusu nzela ya mibali na mayele mabe baoyo bazali lokola mpongó ekopumbwaka, lokola nyoka oyo ekolandaka to masuwa makotepatepa, nzokande bazali mpenza na mokano na bango. Mokano ya balengoli ezali ete bakokisa bamposa na bango ya nzoto mpo na kobebisa bato oyo bango bazali kolengola.

Na bongo, Masese 30:18, 19 eyokani te na mateya ya sianse to ya mekanike na ntina na kozalisama. Mokapo wana mozali na makebisi mingi na ntina na bizaleli malamu, lokola Masese 7:1-27 ezali kokebisa biso na mwasi na pité, oyo azali na maloba ya kolengola. Baklisto basi bakoki kosimba likebisi ya Masese 30:18, 19, wana mibali bazali komonisa mposa ya koyekola Biblia. Na ndakisa soki moninga na ye ya mosala, oyo azali mobali moko na boboto, amonisi ete azali kosepela na solo, moklisto mwasi akopesa ye na mosangani ya lisangá oyo azali mobali. Temwe [ya mobali] wana akokokisa mposa na ye ya sembo, mpe akomitya te liboso na makámá ya ‘mobali elongo na elenge mwasi.’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto