Bilenge—Bótika baboti na bino básalisa bino na kobatela mitema na bino!
LIKAMBO nini okanisaka eleki mpasi mpo na kapitɛni ya masuwa? Ezali nde kokatisa mbu monene? Mbala mingi ezalaka mpenza yango te. Mingimingi, masuwa ezindaka kaka na libongo, kasi na katikati ya ebale te. Kosɛmisa masuwa ekoki kozala mpasi koleka kokitisa mpɛpɔ na mabelé. Mpo na nini?
Mpo kapitɛni asɛmisa masuwa na ye malamu, asengeli kokima makama nyonso oyo ekoki kozala na libongo oyo alingi kosɛma. Asengeli kokima kotutana na masuwa mosusu mpe na mbala moko koyeba soki mai ezali makasi to te na bisika oyo alingi koleka. Asengeli mpe kokima zɛlɔ, mabanga, to masuwa oyo ezindá. Yango ezalaka mpasi koleka soki ezali mbala na ye ya liboso asɛma na libongo wana.
Mpo na kolonga mikakatano wana, kapitɛni ya malamu azwaka pilote moko oyo ayebi malamu mpenza libongo yango. Pilote wana akozala na ye na kati ya kabine mpo na kolakisa ye nzela ya malamu. Bango mibale bakotalela makama mpe bakolekisa masuwa na nzela oyo ebongi tii na libongo.
Toli ya ntina mingi ya pilote ekokani na lisalisi ya motuya mpenza oyo elenge moklisto azali na yango na bomoi oyo ezali lokola mai oyo etondi na makama. Lisalisi yango ezali nini? Mpo na nini bilenge bazali na mposa ya lisalisi yango?
Tókoba kolobela ndakisa ya masuwa. Soki ozali elenge, ozali lokola kapitɛni ya masuwa mpamba te, nsukansuka yo moko nde okotambwisa bomoi na yo. Mpe baboti na yo bazali lokola bapilote mpo bazali kopesa yo toli mpo olonga mikakatano oyo okokutana na yango na bomoi. Nzokande, ntango ozali elenge, okoki kokakatana mpo na kondima toli ya baboti na yo. Mpo na nini ezalaka bongo?
Likambo yango eutaka mingimingi na motema. Motema na yo ya elilingi ekoki kotinda yo olinga makambo oyo epekisami to oboya kotosa likambo nyonso oyo ozali komona lokola nde ezali kopekisa yo ozala na bonsomi. Biblia elobi ete: “Makanisi ya motema ya moto ezali mabe longwa na bolenge na ye.” (Genese 8:21) Yehova amonisi polele ete ozali na etumba monene liboso na yo. Azali kokebisa ete: “Makanisi oyo ezali na motema ya moto ekosaka, yango ezali mabe penza.” (Yilimia 17:9, Bible na lingala ya lelo oyo) Longola kozala na bamposa ya mabe, motema ekoki kotinda elenge akanisa ete ayebi makambo mingi koleka baboti na ye, atako baboti na ye bamoná moi liboso na ye. Nzokande, ezali na bantina ya malamu oyo esengeli kotinda yo oluka lisalisi ya baboti na yo na bolenge na yo, eleko oyo ezalaka na mikakatano.
Mpo na nini bosengeli kotosa baboti na bino?
Libosoliboso, Yehova Mobandisi ya libota, alobi na bino ete bosengeli kolanda toli ya baboti na bino. (Baefese 3:15) Lokola Yehova nde apesaki baboti mokumba ya kobɔkɔla bino, apesi toli oyo: “Bana, likambo malamu oyo bosengeli kosala, ezali kotosa baboti na bino lokola bato oyo Nzambe atye likoló na bino.” (Baefese 6:1-3, Phillips; Nzembo 78:5) Atako okómi elenge, baboti na yo bazali kaka na mokumba ya kotambwisa yo, mpe osengeli kolanda oyo bazali koyebisa yo. Ntango ntoma Paulo akómaki ete bana basengeli kotosa baboti na bango, asalelaki liloba ya Grɛki oyo bakoki kosalela yango mpo na bana ya mbula nyonso. Na ndakisa, na Matai 23:37, Yesu abengaki bato ya Yelusaleme “bana” na yango, atako mingi kati na bango bazalaki mikóló.
Bato mingi ya sembo na ntango ya kala bakobaki kotosa baboti na bango ata ntango bakómaki mikóló. Atako Yakobo azalaki mokóló, ayebaki ete asengeli kotosa mobeko ya tata na ye ete abala te mwasi oyo azali mosambeli ya Yehova te. (Genese 28:1, 2) Na ntembe te, Yakobo amonaki ete ekateli oyo ndeko na ye azwaki ya kobala basi ya Kanana epesaki baboti na bango mpasi mingi.—Genese 27:46.
Longola mokumba oyo Nzambe apesaki bango ya kotambwisa bino, baboti na bino babongi mpenza mpo na kozala bapesi-toli na bino. Ntina ya libosoliboso ezali mpo bayebi bino malamu mpenza mpe na ntembe te balingaka bino banda ntango bozalaki mike tii lelo. Ndenge moko na pilote, baboti na bino balobaka na bino makambo oyo bayebi malamu. Bango moko bazalaki bilenge, mpe bazalaki na “bamposa oyo ekangani na bolenge.” Mpe lokola bazali baklisto ya solo, bayebi matomba oyo moto azwaka soki alandi batoli ya Biblia.—2 Timote 2:22.
Lokola bozali na lisalisi ya ndenge wana, yango ekosalisa bino bólonga ata mikakatano ya ndenge nini. Tózwa ndakisa ya etamboli na bino liboso ya baninga na bino bilenge ya basi to ya mibali. Ndenge nini baboti oyo bazali baklisto bakoki kosalisa bino na likambo oyo ezalaka mpasi mpo na bato mingi?
Kolula basi to mibali
Bapilote bakebisaka bakapitɛni bákima bisika ya zɛlɔ. Zɛlɔ ezalaka pɛtɛpɛtɛ kasi ekoki kokosa moto mpo mbala mingi etikalaka esika moko te. Baboti na yo mpe bakokebisa yo na makambo oyo ekoki kokosa motema na yo. Na ndakisa, baboti bayebi ete mposa ya kozala esika moko na mibali to na basi ezalaka makasi mpe ezali mpasi mpo na kolimbola yango. Kasi, soki mposa wana ekoli, ekoki komema bino mosika.
Lisolo ya Dina ezali komonisa mabe ya kosakana na mɔtɔ. Ntango mosusu koluka koyeba makambo mpe mposa ya kosepelisa nzoto nde etindaki Dina aluka kokóma moninga ya bana basi ya Kanana oyo, na ntembe te, bazalaki na etamboli mabe. Likambo oyo emonanaki lokola lisano mpamba na ebandeli ememaki likambo moko ya mawa—elenge oyo “alekaki bato nyonso ya etúká ya tata na ye na lokumu” asangisaki na ye nzoto na makasi.—Genese 34:1, 2, 19.
Makama ya ndenge wana ekómi mingi na mokili oyo makanisi ya bato mingi ezali kaka na kosangisa nzoto. (Hosea 5:4) Bilenge mingi bazali komonisa baninga na bango ete kosakana na mwana mobali to na mwana mwasi ezali likambo eleki malamu oyo moto akoki kosala. Motema na yo ekoki kokóma na mposa ya kozala yo moko ná moto oyo ozali komona ete azali kitoko. Kasi, lokola baboti na yo balingi yo, bakopekisa yo boninga na bilenge oyo babangaka Nzambe te.
Laura alobaki ete koluka koyeba makambo ekoki kopekisa bilenge bámona likama oyo ezali liboso na bango. “Na kelasi, soki bilenge basi bazali koyebisa ngai ete babinaki na butu na bilenge mibali ya kitoko, balobelaka yango lokola likambo moko ya malamu mpenza oyo bakobosana te. Nayebi sikoyo ete mbala mingi balekisaka ndelo, kasi nazalaka kaka na mposa ya koyeba makambo yango soki ezalaka ndenge nini mpe nakanisaka ntango mosusu ete nazali kozanga bisengo. Atako nayebi ete baboti na ngai basalaka malamu ndenge bapekisaka ngai kokende bisika ya ndenge wana, nayokaka kaka mposa ya kokende na bisika yango.”
Masuwa ezalaka na frein te, yango wana etɛlɛmaka mbala moko te. Baboti bayebi ete motema oyo ezali kolula mwasi to mobali ezalaka mpe bongo. Mokanda ya Masese ekokanisi mobali moko oyo akokaki te kokanga mposa na ye ya nzoto na ngɔmbɛ oyo bazali kokende koboma. (Masese 7:21-23) Ezali na ntina te otika likambo ya ndenge wana ekómela yo, mpamba te ekobebisa makanisi mpe elimo na yo. Baboti na yo bakoki komona ete motema na yo ebandi kokosama na likambo yango mpe na bongo bakoki kopesa yo toli. Okozala na bwanya ya koyoka bango mpe na bongo kokima mpasi?—Masese 1:8; 27:12.
Ozali mpe na mposa ya lisalisi ya baboti na yo ntango baninga na yo bakoluka komema yo na kosala mabe. Bakosalisa yo ndenge nini?
Mposa ya kolanda baninga
Mbonge makasi ekoki komema masuwa epai mosusu. Mpo mbonge yango emema masuwa te, esengeli kokimisa yango epai mosusu. Ndenge moko mpe, mposa ya kolanda bilenge mosusu ekoki kopɛngwisa yo na elimo soki ozwi meko te mpo na kokima yango.
Likambo ekómelaki Dina ezali komonisa ete “oyo akotambolaka na bazoba, ekosukela ye mabe.” (Masese 13:20, Liloba lya Nzambe) Kobosana te ete Biblia ebengaka “zoba” moto oyo ayebi Yehova te to oyo aboyaka kotambola na banzela na ye.
Nzokande, ekoki kozala mpasi mpo oboya makanisi to bizaleli ya baninga na yo ya kelasi. María José alobi boye: “Mposa na ngai ezalaki ete bilenge mosusu bándima ngai. Lokola nalingaki te bákanisa ete nakeseni na bango, namekolaki bango na makambo nyonso.” Kozanga ete oyeba yango, okoki kolanda makambo ya baninga na yo—na kopona miziki, na molato mpe na elobeli. Ntango mosusu omiyokaka malamu soki ozali na kati ya bilenge ya mbula na yo. Bilenge nyonso balingaka bongo; kasi kosala bongo ekotinda yo olanda makambo na bango mpe yango ekoki kobebisa yo.—Masese 1:10-16.
Caroline abosani te mokakatano oyo akutanaki na yango eleki sikoyo mwa bambula: “Ntango nazalaki na mbula 13, bilenge mingi ya basi oyo namesanaki na bango bazalaki na basheri mpe na boumeli ya bambula ebele motema ezalaki kotinda ngai nalanda ndakisa na bango. Nzokande, mama na ngai asalisaki ngai na ntango wana ya mpasi. Alekisaki bangonga ebele mpo na koyoka ngai, kosolola na ngai mpe kosalisa ngai namona ntina ya kozela tii ntango nakokola.”
Na ndakisa ya mama ya Caroline, baboti na yo mpe bakoki komona ete basengeli kokebisa yo olanda te baninga na yo mpe kopekisa yo makambo mosusu to baninga mosusu. Nathan abosanaka te ndenge ye ná baboti na ye bazalaki koyokana te mbala ebele mpo na makambo ya ndenge wana. Alobi boye: “Baninga na ngai bazalaki kobenga ngai mbala na mbala mpo tóbima, kasi baboti na ngai bazalaki kosepela te nalekisaka ntango na baninga ebele to nakendeke na biyenga ya biso na biso. Na ntango wana nazalaki koyeba te mpo na nini baboti mosusu bazalaki kotika bana na bango básala makambo oyo motema na bango esepeli, kasi oyo ya ngai bazalaki koboya.”
Nzokande, na nsima, Nathan ayebaki ntina ya likambo. Alobi boye: “Nayebi sikoyo ete ‘bozoba ekangamaki na motema’ na ngai. Bozoba yango emonanaka polele ntango bilenge bafandi esika moko mpo na kobɛta masolo mpe kolekisa ntango mpamba. Soki moko na bango asali likambo moko ya mabe, mosusu akolanda mpe ya misato akosala lisusu mabe koleka. Mosika te bango nyonso bakolanda ndakisa ya baninga na bango. Ata bilenge oyo basalelaka Yehova bakoki kokwea na motambo yango.”—Masese 22:15, NW.
Nathan ná María José bazalaki kotungisama makasi ntango baboti na bango bazalaki kopekisa bango makambo oyo baninga na bango bazalaki kosɛnga bango básala. Atako bongo, batosaki mpe na nsima bazalaki na esengo mingi. Masese elobi boye: “Kitisá litoi na yo mpe yokamelá maloba ya bato ya [bwanya, NW], tyá motema na yo na boyebi na ngai.”—Masese 22:17.
Babongi na lokumu
Ezalaka mpasi kotambwisa masuwa oyo etɛngami, mpe soki etɛngami makasi, ekoki kozinda. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso totɛngamá mpo tolingaka kolanda bamposa na biso moko mpe makambo oyo epekisami. Atako bamposa wana ya mabe ezali, na maloba ya elilingi, bilenge bakoki kokóma na libongo soki balandi na likebi mpenza litambwisi ya baboti na bango.
Na ndakisa, baboti na yo bakoki kosalisa yo omikosa te ete longola nzela ya moke oyo ememaka na bomoi mpe nzela ya monene oyo ememaka na libebi, ezali na nzela mosusu ya misato. (Matai 7:13, 14) Osengeli te kokanisa ete okoki kosakana na mabe kozanga ete obuka mpenza mobeko, na maloba mosusu okoki “komeka” lisumu kasi omɛli yango te. Baoyo bazali kosala makambo ya ndenge wana bazali “kotambolatambola na nzela mibale ekeseni”—kosalela Yehova mwa moke kasi mpe kolinga mokili ná biloko oyo ezali na kati na yango—mpe bakoki kozinda na elimo. (1 Mikonzi 18:21; 1 Yoane 2:15) Mpo na nini ezali mpenza mpasi te tózinda na elimo? Mpo na bamposa na biso ya masumu.
Bamposa na biso ya mabe ekómaka makasi soki tomipesi na yango. ‘Motema na biso oyo ezali na bokosi’ ekosepela te tómeka kaka lisumu. Ekolinga tókende lisusu mosika. (Yilimia 17:9) Soki tobandi kozinda na elimo, mokili ekobenda biso makasi. (Baebele 2:1) Ntango mosusu okomona te ete ozali kotɛngama na elimo, kasi baboti na yo oyo bazali baklisto bakoki komona yango. Ya solo, okoki koyeba kosalela ordinatɛrɛ koleka baboti na yo, kasi bango bayebi makambo ebele ya motema ya botosi. Mposa na bango ezali ete básalisa yo ‘[otambwisa NW] motema na yo na nzela’ oyo ekomema na bomoi.—Masese 23:19.
Kokanisa te ete baboti na yo bakoyeba kotalela makambo nyonso na ndenge ya malamu koleka ntango bazali kopesa yo toli na makambo oyo ezalaka mindɔndɔ lokola miziki, masano, mpe molato. Ntango mosusu baboti na yo bakozala na bwanya lokola ya Salomo te to mpe na motema molai ya Yobo te. Lokola pilote, baboti na yo bakoki ntango mosusu kosala mabunga. Kasi, litambwisi na bango ekozala na ntina mingi soki oyoki “mateya ya tata na yo mpe otiki mibeko ya mama na yo te.”—Masese 1:8, 9.
Bilenge mosusu bakoki koloba mabe mpo na baboti na bango. Nzokande, soki baboti na yo bazali kosala makasi mpo na kotosa Biblia, bakozala pembeni na yo ntango nyonso mpe liboso ya mikakatano ya ndenge nyonso. Lokola kapitɛni ya masuwa oyo pilote azali kolakisa nzela, ozali na mposa ya toli ya baboti na yo, bátambwisa yo na nzela ya bwanya. Mapamboli ekozala beboo.
“Ntango bwanya ekɔti na motema na yo mpe boyebi ekómi kosepelisa molimo na yo, likoki ya kokanisa ekokɛngɛla yo, bososoli ekobatela yo, mpo na kolongola yo na nzela mabe, na moto oyo alobaka makambo ya bosɔtɔ, na bato oyo batiki banzela ya sembo mpo na kotambola na banzela ya molili . . . Mpamba te bato ya sembo nde bakofanda na mokili, mpe bato malamu nde bakotikala na yango.”—Masese 2:10-13, 21, NW.
[Elilingi na lokasa 22]
Bilenge mosusu bakoki koluka kopengwisa yo na elimo
[Elilingi na lokasa 23]
Kobosana te likambo ekómelaki Dina
[Elilingi na lokasa 24]
Lokola kapitɛnɛ ya masuwa oyo pilote alakisaka nzela, bilenge basengeli koluka toli ya baboti na bango
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Fɔtɔ: www.comstock.com