Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/8 nk. 8-12
  • ‘Tika ete bokóli na yo emonana polele!’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Tika ete bokóli na yo emonana polele!’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo ezali ntango ya komitalela
  • “Makambo ya bomwana”
  • Lolenge nini bokóli emonanaka polele?
  • Ozali moklisto oyo “akɔmeli”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Monisá polele ete ozali kokende liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Monisá ete ozali kokola mpe kokende liboso
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Tika ete kokola na yo emonana polele
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/8 nk. 8-12

‘Tika ete bokóli na yo emonana polele!’

“Awa esili ngai kokóla, nasili kotika makambo nyonso ya bomwana.”​—1 BAKOLINTI 13:11, MN.

1. Lolenge nini bokóli ezali komonisa bonzengá ya biloko bizalisami?

KOBANDA na likei moke oyo likoki komonana bobele na mikroskope, mbisi monene baleine ekoki kokóla kino kokóma ekelamu monene na molai ya bametele 30 mpe na kilo ya batone 80. Bobele bongo, longwa na mboto mike mpenza, nzeté monene oyo babéngi sekoya ekoki kokóla kino koleka bametele 90. Ya solo, bokoli ezali moko na makambo kitoko na bomoi. Lokola ntóma Paulo alobaki yango, biso tokoki kolóna mpe komwangisa mai, kasi ‘Nzambe akokólisa.’​—1 Bakolinti 3:7.

2. Motindo na bokóli nini bosakolamaki kati na Biblia?

2 Nzokande, ezali na motindo mosusu ya bokóli na kokamwa mingi. Ezali yango esakolamaki na mosakoli Yisaya, ete: “Oyo moke akokóma nkɔto mpenza, oyo aleki moke akokóma libota na makasi. Ngai Jéhovah, nakoyeisa yango mbongo na ntango na yango.” (Yisaya 60:22) Esakweli oyo etali bokóli na libota ya Jéhovah, ezali kokokana na eleko na biso.

3. Lolenge nini rapport ya mbula ya mosala 1991 emonisi ete Jéhovah azali kotambwisa mosala ya libota na ye na lombango?

3 Rapport ya mosala ya ba Témoins de Jéhovah kati na mokili mpo na mbula ya mosala 1991, emonisi ete motuya ya basakoli ya Bokonzi ekómi na motango monene ya 4 278 820, mpe bato 300 945 bazwaki batisimo na mbula wana. Mpo na ebele na bato ya sika oyo bauti kobakisama masangá ya sika 3 191 masalemaki, mpe motindo moko, ba circonscription mpe badistrike ya sika esalemaki. Yango emonisi koleka masangá mwambe na mokolo moko, soko circonscription moko nsima na mikolo mibale. Oyo nde bokóli kitoko! Emonani polele ete Jéhovah azali koyeisa makambo mbango, mpe mapamboli na ye mazali likoló na milende ya libota na ye.​—Nzembo 127:1.

Oyo ezali ntango ya komitalela

4. Soki totaleli mikolo mizali koya, mituna nini malamu tosengeli komituna?

4 Na komona yango, ezali likambo ya esengo mingi, kasi mapamboli wana mazali mpe kopesaka mikumba. Ekozala mpenza na mibali batɛli mpe oyo bamipesi bango moko mpo na kotalela bamposa ya elimo ya bato wana ya sika? Soki totaleli mikolo mizali koya, tozali komona ete motuya ya ba pionniers, ya basaleli na misala, ya bankulutu mpe bakɛngɛli ya zongazonga esengeli kozala monene mpo na kotalela bokóli mpe kopalangana na mosala, mpe esengeli motuya monene ya basali na ba Béthels kati na mokili mobimba mpo na kosunga mosala yango. Motuya wana monene ya bato ekouta wapi? Na ntembe te, mbuma na elanga etɛli mingi mpenza. Kasi nani akoki lelo kosalisa basali nyonso ete babuka mbuma wana?​—Matai 9:37, 38.

5. Makambo nini mamonani na bisika mosusu na ntina na bokóli oyo bozali kosalema na lombango?

5 Na ndakisa, bayebisi ete na bisika mosusu ya mokili, ezali na masangá masalemi na basakoli monkámá, nde ezali bobele na nkulutu moko mpe mosaleli na misala moko to basaleli na misala mibale. Mbala mosusu nkulutu moko asengeli kosalisa masangá mibale. Na bisika mosusu, mposa ya baklisto basɛlingwi mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia ezali mpenza monene na boye ete, esengeli kokoma nkombo ya bato ya kotala bamoko nsima na basusu. Epai mosusu, masangá ya sika mazali kosalema nokinoki, kino masangá misato, minei, ata masangá mitano basengeli kosalela Salle du Royaume moko. Mbala mosusu ozali komona bokóli motindo wana kati na etúka oyo yo ofandi.

6. Mpo na nini oyo ezali ntango malamu ya komitalela biso moko?

6 Tokosukisa na maloba nini? Na kotalela eleko oyo tozali kobika na yango, biso nyonso tosengeli kotalela ezalela ya makambo na biso mpo na koyeba soki tozali kosalela ntango na biso mpe biloko na biso mpo na kokokisa mposa wana. (Baefese 5:15-17) Ntóma Paulo akomaki baklisto Baebele ya ekeke ya liboso ete: “Bosengelaki mpenza kozala balakisi uta kala, nzokande bozali naino na mposa ete moto moko alakisa bino makambo na ebandeli ya maloba na bulee na Nzambe. Bozali na mposa ya mabɛlɛ, nde bilei ya makasi te.” (Baebele 5:12, MN) Lokola emonisami na maloba yango, moklisto moko na moko asengeli kokóla. Mpe ezali mpenza na likámá kati na elimo: oyo ya kotikala mwana moke na esika na kokóla mpo na kokomela na nzela na boklisto. Bobele bongo, Paulo apesi biso toli oyo ete: “Bomimeka bino mpenza soko bozali kati na kondima; bomitala bino mpenza.” (2 Bakolinti 13:5) Osila komitala soki osili kokóla na elimo uta ntango oyo ozwaki batisimo na yo? To otɛlɛmi bobele esika moko? Kasi lolenge nini tokoki koyeba yango?

“Makambo ya bomwana”

7. Tosengeli kosala nini mpo ete bokóli na biso ya elimo emonana polele?

7 Ntóma Paulo alobaki ete: “Wana nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, nakanisaki lokola mwana moke, nasosolaki lokola mwana moke; kasi awa esili ngai kokóla, nasili kotika [makambo nyonso] ya bomwana.” (1 Bakolinti 13:11, MN) Na ntina etali bokóli ya elimo na ntango moko, biso nyonso tokokanaki na bana mike na makanisi mpe na misala na biso. Nzokande, mpo ete bokóli na biso emonana polele, tosengeli kotika “makambo ya bomwana,” lokola Paulo alobaki yango. Wapi mwa makambo yango?

8. Engebene maloba na Paulo oyo mazwami na Baebele 5:13, 14 (MN), wapi moko na makambo oyo mamonisi bana mike kati na elimo?

8 Totalela libosoliboso, maloba na Paulo oyo mazwami na Baebele 5:13, 14 (MN): “Mpo ete moto na moto oyo akomɛlaka mabɛlɛ ayebi liloba na boyengebene te, mpamba te azali mwana moke. Kasi bilei ya makasi bizali mpo na bato bakoméli, baoyo bayebi kososola malamu mpe mabe.” Osili mpenza koyeba liloba na boyengebene?’ Oyebi Biblia, Liloba na Nzambe mpo na kozala na makoki ya “kososola malamu mpe mabe” na lisalisi na yango? Paulo alobi ete bato bakomeli bazali na makoki mpo ete mbala na mbala na biso mpo na bilei ya elimo ya makasi emonisi malamu soki tozali kokóla to mpe tozali bobele bana mike kati na elimo.

9. Na likambo nini mposa na biso ya kolya bilei ya elimo ekamwisaka bokóli na biso kati na elimo?

9 Na yango mposa na yo ya kolya kati na elimo ezali lolenge nini? Lolenge nini ozali kotalela ebele na bilei ya elimo oyo Jéhovah azali kopesa biso mbala na mbala na nzela na mikanda mikolimbolaka Biblia, na makita mpe na ba assemblées ya boklisto? (Yisaya 65:13) Na ntembe te, ozalaka na esengo monene soki mikanda ya sika mibimisami na ba assemblées ya distrike ya mbula na mbula. Kasi osalaka nini na mikanda yango soki ozongi na ndako? Osalaka nini na ntango nimero ya sika ya Mosenzeli to mpe ya Réveillez vous! ekomi? Ozwaka ntango ya kotanga mikanda yango to ofungolaka bobele bankasa mpo na kotala na mitó ya makambo, mpe nsima otii yango na bibliotɛkɛ elongo na mikanda misusu? Mituna ya lolenge oyo mikoki kotunama na ntina na makita na boklisto. Oyanganaka mbala na mbala na makita nyonso? Omibongisaka malamu mpo na makita wana mpe mpo na kosangana na yango? Emonani lokola ete basusu basili kozwa mimeseno mabe mpo na oyo etali kolya kati na elimo; bakotangaka mikanda likolólikoló, mpe tokoki koloba ete, bakolyaka nokinoki. Ezalaki bongo te mpo na mokomi na nzembo oyo akomaki ete: “Nalingi mobeko na yo mingi! Nakobanzaka yango mokolo mobimba.” Lisusu, mokonzi Davidi alobaki ete: “Nakokumisa yo kati na koyangana monene mpe nakosanzola yo kati na bato mingi.” (Nzembo 35:18; 119:97) Emonani polele ete, mposa tozali na yango mpo na bibongiseli ya elimo ezali komonisa bokóli na biso.

10. Likambo nini limonisi mwana moke kati na elimo oyo elobelami na Baefese 4:14?

10 Paulo alobelaki likambo mosusu limonisi mwana moke kati na elimo wana apesaki toli oyo ete: “Tozala lisusu bana mike te oyo bamemami epai na epai lokola mbonge na mai epusami na mopepe ya mateya nyonso, na bokosi na bato, na mayele mabe [na bango] mpo na kosalela bokosi.” (Baefese 4:14, MN) Lokola baboti bayebi yango malamu, bana mike balingaka koyeba makambo nyonso. Ezali momeseno moko malamu oyo ezali kopesa bango nzela na koyeba makambo, na koyekola mpe kokóla kino kokóma bato oyo batɛli. Kasi likámá ezali mpo ete, makanisi na bango epɛngwaka noki na likambo moko nsima na mosusu. Oyo eleki mpenza mabe ezali ete, lokola bayebi makambo mingi te, mbala mingi bazali kozwa mpasi makasi mpo na mposa na bango ya koluka koyeba makambo mingi, mpe yango ekoki nkutu kozala na likámá mpo na bango mpe mpo na bato mosusu. Ezali bobele bongo mpo na bana mike kati na elimo.

11. (a) Paulo akanisaki likambo nini wana asalelaki liloba “na mopepe ya mateya nyonso?” (b) “Mopepe” nini tozali kokutana na yango lelo oyo?

11 Kasi, Paulo akanisaki na nini wana alobaki ete bana mike kati na elimo bamemami epai na epai “na mopepe ya mateya nyonso?” Awa, “mopepe” ebongolami na Greke na liloba aʹne·mos, engebene mokanda International Critical Commentary oyo eyebisi ete, emonani lokola ete liloba yango “liponamaki mpo ete epesi likanisi ya mbongwana.” Yango emonisami mpenza malamu na makambo oyo malandi maloba na Paulo ete “na bokosi na bato.” Na monoko ya ebandeli, liloba oyo libongolami na “bokosi,” elimboli mpenza “mbɛsɛ” to “kobɛta mbɛsɛ,” elingi koloba, lisano ya makila malamu. Mbala na mbala tozali kokutana na makanisi mpe mikano ya sika oyo ekoki komonana lokola ete ezali mabe te, ezali komema biso na komekama te, mpe ekoki ata komonana ete ekopesaka bolamu. Maloba na Paulo makokisami libosoliboso na makambo matali kondima na biso​—bosangani kati na mangomba, kobondela bato mpo na kobongisa ezaleli na bango, koluka mbongwana na makambo na politike mpe bongo na bongo. (Tala 1 Yoane 4:1.) Kasi etinda oyo ebongi mpe kosalelama mpo na mobulu mpe bizaleli ya mokili​—lolenge na kokata nsuki to bilamba, masano, bilei, kolongono na nzoto to kominanola, mpe makambo mosusu. Lokola ayebi makambo mingi te mpe azali na bososoli te, mwana moke kati na elimo akoki kopɛngwisama na makambo wana, oyo ekoki bongo kopekisa ye na kokóla mpe kokokisa mikumba na ye ya boklisto, nzokande yango nde eleki ntina.​—Matai 6:22-25.

12. Na ntina etali mikumba likambo nini likesenisi bana mike mpe mikóló?

12 Likambo mosusu limonisi bana mike lizali oyo ete, bazalaka ntango nyonso na mposa ya lisalisi liuti na bato mosusu mpe ete batyela bango likebi. Bayebi komema mikumba te mpe bazali komibanzabanza mpo na yango te; bomwana ezali eleko ya bomoi oyo makambo nyonso mazali bobele lisɛki mpe lisano mpamba. Lokola Paulo alobaki yango, ‘bazali koloba lokola bana mike, bazali kokanisa lokola bana mike, bazali kososola lokola bana mike.’ Bana mike bamizelaka ete moto moko asalisa bango. Ekoki mpe kolobama bongo mpo na ye oyo azali mwana moke kati na elimo. Na ntango moto moko ya sika asali lisoló na ye ya liboso lizwami na Biblia to abandi kobima na mosala ya kosakola, baboti na ye ya elimo bazali na esengo ya kosala nyonso ekoki na bango mpo na kosalisa ye. Nini ekokóma soki moto wana ya sika alandi bobele kotya motema na lisalisi na bango mpe amonisi ete azangi makoki ya komema mikumba ye moko? Wana emonisi mpenza ete ye moko asalelaka te makambo oyo ayebi.

13. Mpo na nini moto na moto asengeli koyekola komema mokumba na ye?

13 Na yango, tomikundoli maloba oyo na ntóma Paulo ete, atako tosengeli ‘kokumbanaka bozito,’ kasi, “moto na moto akomema mokumba na ye mpenza.” (Bagalatia 6:2, 5, MN) Ya solo, esengeli ntango mpe milende mpo na koyekola komema mikumba ya boklisto, mpe yango esɛngi mbala mosusu kosala makasi mingi na makambo mosusu. Nzokande ekozala libungá monene na komipesa na lisɛki mpe na masano na ntina na bomoi​—kominanola, mibémbo, masano to mpe koluka kosala mosala moko mozangi ntina, kino kozanga ntango, kozanga mposa ya kobakisa mosala na yo ya kozalisa bayekoli to mpe kokóla na elimo mpe koluka mikumba. Moyekoli Yakobo alobaki ete: “Bozala bato bakotósaka liloba, kasi bayoki mpamba te, komizimbisáká bino mpenza na makanisi na lokutá.”​—Yakobo 1:22, MN; 1 Bakolinti 16:13.

14. Mpo na nini na makambo ya elimo, tosengeli te kotikala lokola bana mike?

14 Ee, makambo makesenisi mwana moke na mokóló, mazali mingi mpe mazali mpasi te mpo na komona yango. Kasi, oyo eleki ntina mpenza tosengeli kolongola mokemoke makambo na bomwana mpe kokóla, lokola Paulo alobaki yango. (1 Bakolinti 13:11; 14:20) Soki bongo te, tokoki kozala bato batikali nsima kati elimo. Kasi lolenge nini tosengeli kokóla? Nini esengeli mpo na kolanda kokóla kino kokomela?

Lolenge nini bokóli emonanaka polele?

15. Wapi matambe ya moboko ya bokóli?

15 Lolenge nini bokóli esalemaka kati na bomoi? Mokanda The World Book Encyclopedia molimboli ete: “Bomoi ebandaka na cellule bobele moko mpo na moto nyonso. Cellule ekolyaka biloko mpe ebongolaka biloko yango lokola mwa biliki mike ya botongi oyo esengeli mpo na bokóli na yango. Na bongo nde cellule moko ekólaka na katikati na yango mpenza. Cellule wana ekoki koyikana mpe komikabola na ba cellules mosusu. Mwango wana ya botongi, ya koyikana, mpe ya kokabolama ezali bongo bokóli.” Likambo ya kokamwa ezali ete, bokóli yango bozali kosalema na katikati na yango mpenza. Soki olei bilei bibongi mpe soki bilei yango binikami na libumu, mpe nzoto esaleli yango, bokóli bokomonana. Likambo yango limonanaka mingi epai na bana oyo babotami sika. Lokola toyebi yango, mbala na mbala mwana oyo abotami sika akolyaka bilei bibongi mpenza, miliki, eloko oyo etondi na mafuta mpe na protéines, biloko oyo azali na yango mposa mpo na kokóla. Nini emonanaka? Lolenge na bokóli oyo, na monene mpe na kilo oyo mwana akólaka na yango na mobu ya liboso, emonanaka lisusu te na boumeli ya bomoi na ye etikali.

16. Bokóli nini kitoko bokomonanaka epai na bato ya sika oyo bazali koyekola Biblia, mpe lolenge nini bokóli yango ekosalemaka?

16 Oyo ezali biso koyekola na ntina na bokóli ya nzoto na moto tokoki mingi mpenza kokokisa yango na bokóli na biso ya elimo, uta matambe ya liboso oyo tosalaki kino kokomela. Libosoliboso, ebongiseli ya kolya ya mbala na mbala kati na elimo ezali na ntina mingi. Kanisa naino eleko oyo ebandaki koyekola Biblia. Lokola bato mingi mbala mosusu oyebaki eloko moko te kati na Liloba na Nzambe. Kasi poso na poso ozalaki kobongisa boyekoli na yo ya Biblia, mpe bobele na mwa ntango moke okómaki na bososoli ya mateya nyonso ya moboko ya Makomami. Na yango, osengeli mpenza kondima ete, wana ezalaki bokóli moko ya kokamwa euti na komileisa Liloba na Nzambe mbala na mbala!

17. Mpo na nini ebongiseli ya kolya bilei ya elimo mbala

17 Kasi, ezali boni lelo? Ozali ntango nyonso na ebongiseli ya komileisa mbala na mbala? Tosengeli kokanisa te ete, lokola tosila kozwa batisimo, tozali lisusu na mposa ya koyekola mbala na mbala te mpe na lolenge lobongi mpo na komileisa bilei ya elimo. Atako Timoté azalaki mokɛngɛli moklisto oyo eteli Paulo apesaki ye toli oyo, ete: “Kanisa likoló na makambo oyo; omipesa na yango, ete bokóli na yo emonana polele na bato nyonso.” (1 Timoté 4:15, MN) Mokomoko kati na biso asengeli mpenza kosala bongo! Soki olingi ete bokóli na yo ya elimo emonana polele, esengeli mpenza kosala milende oyo.

18. Lolenge nini bokóli ya moto emonanaka polele?

18 Kosala ete bokóli na biso emonana polele elimboli te komonisa milende makasi mpo na kotalisa bato mosusu makambo oyo biso toyebi, to mpe koluka kokamwisa bango. Yesu alobaki ete: “Bino bozali pole na mokili. Mboka oyo ezali likoló na ngomba ekobómbanaka te,” mpe, “monoko ekolobaka makambo matondi na motema.” (Matai 5:14; 12:34, MN) Na ntango motema na biso mpe elimo na biso etondi na makambo malamu mazwami na Liloba na Nzambe, tokomonisa yango mpenza kati na oyo ezali biso kosala mpe koloba.

19. Mpo na oyo etali bokóli na biso ya elimo, tosengeli kozwa ekateli nini mpe na elikya ya kozwa matomba nini?

19 Na yango, motuna motunami ete: Oyekolaka Biblia mpe okendaka makita na boklisto poso na poso, mpo na kolya bilei oyo bikoki kolendisa bokóli na katikati na elimo na yo? Mpo na kokóla na elimo, okoki te bobele koyangana mpamba na makita. Zwa bibongiseli malamu mpo na kosalela ebele na bilei ya elimo oyo bipesami na Jéhovah. Soki ‘esengo na yo ezali kati na mibeko na Jéhovah, mpe soki okotangaka mibeko na ye na mongongo na nse,’ butu mpe moi,’ boye ekoki kolobama na ntina na yo ete: “Azali lokola nzeté oyo ekonami penepene na bitima na mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekokaoka te. Nyonso ekosalaka ye ebongi.” (Nzembo 1:2, 3) Kasi, nini okoki kosala mpo na kolanda kokóla kati na elimo? Ezali yango nde tokomona na lisoló lilandi.

Bozongeli

◻ Mpo na nini oyo ezali ntango ya kotalela bokóli na biso kati na elimo?

◻ Boyokani nini ezali kati na bokóli na elimo mpe kozala na mposa ya kolya kati na elimo?

◻ Liloba “na mopepe ya mateya nyonso” elimboli nini?

◻ Mpo na nini moto na moto asengeli komema mokumba na ye mpenza?

◻ Bokóli ya elimo esalemaka lolenge nini?

[Elilingi na lokasa 10]

Ozwaka ntango ya kotanga mikanda mikolimbolaka Biblia?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto