Masoló ya basakoli na bokonzi
Bazali kongengisa pole na bango na mokili ya Inde
NA MOKILI ya Inde nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama na Batemwe ya esengo 11 524. (Matai 24:14) Bato 1 066 oyo babatisamaki na boumeli ya mbula ya mosala 1991 bazali basakoli na Bokonzi, oyo bazali kongengisa pole na bango epai na bato mosusu. Ezalaki mpo na bango esengo na komona bato 28 866 koyangana na Ekaniseli ya liwa na Klisto!
◻ Mingi bayokaki mpo na mbala ya liboso elikya ya Bakonzi na nzela na litatoli ya libaku malamu. Na ndakisa, Temwe moko, mosali na mabaya, alobelaki baninga na ye ya mosala nsango ya Bokonzi. Moko na bango andimaki mpe abandaki kongengisa pole na ye kati na libota na ye mpe epai na baninga na ye. Na esengo nyonso, bango mpe bayebisaki nsango na Bokonzi epai na bato mosusu. Engebene rapport, nsima na mwa bambula, ‘bato koleka 30 bandimaki solo.’ Jéhovah apambolaki ye mpe bandeko na ye ya sika ya elimo mpo ete bazalaki kongengisa pole na bango.
◻ Na lisanga mosusu, ndeko moko elenge mobali asalelaki litatoli ya libaku malamu mpo na kongengisa pole na ye epai na baninga na ye ya kelasi. Basusu basepelaki na elikya ya Bakonzi, mpe mbala mingi azalaki kolimbolela bango Biblia kino nsima ya minuti. Moko na bango, oyo azalaki Mokatolike, azwaki ekateli makasi mpo na kolanda solo atako sángo akebisaki ye na ntina na mikakatano oyo akozwa soki elandi kosangana elongo na Batemwe. Lokola moyekoli yango andimisamaki makasi ete Batemwe bazalaki koteya ye solo ya Biblia, alandaki bobele kozwa boyebi yango. Na nsima, abatisamaki mpe azali sikawa kosala lokola mosaleli na misala kati na lisanga. Azali kosepela na elikya oyo ezali kouta na pole kitoko ya solo!—Baloma 12:12.
◻ Kati na baoyo bayokaki elenge wana ya Temwe, ezalaki na moyekoli moko oyo ayebanaki mingi, azalaki kondima te ete Nzambe azali, mpe azalaki na momeseno ya kotyola baoyo bazalaki kondima ete Nzambe azali; kasi mokolo mosusu asanganaki na lisolo mpe atunaki mituna mingi. Akamwaki na kozwa biyano ya mayele na mituna na ye nyonso mpe akomaki na bosukisi ete Biblia ezali Liloba na Nzambe. Amonisaki bokoli na boyebi ya Biblia mpe na nsima azwaki batisimo. Tata na ye, oyo azali na lingomba ya Hindou, atelemelaki ye kino kobengana ye na ndako. Atako bongo, etelemelo makasi ya elenge wana mpo na solo ezwaki mbano ntango bandeko na ye ya mibali mibale mpe baninga na ye mibale bandimaki solo mpe babatisamaki. Moko kati na bandeko na ye azali kosala sikawa na filiale ya Inde.
◻ Moyekoli mosusu oyo azalaki kokamba misala ndenge na ndenge kati na eteyelo, asanganaki mpe na lisolo elongo na elenge Temwe. Azalaki momeli monene ya makaya mpe ya masanga. Na libaku moko, alingaki konyokola bayekoli mibale oyo bazalaki koyekola solo elongo na Temwe wana. Na ntina na etelemelo na bango mpo na solo, baboyaki kosangana na botomboki ya boyekoli mpe ebongiseli ya kopesa makila, oyo ekambamaki na moyekoli yango. Lelo oyo, elenge mobali wana azali Témoin de Jéhovah oyo azali komema pole.
◻ Na nzela na litatoli ya libaku malamu, moyekoli oyo angengisaki pole na ye na ebandeli, asalelamaki mpo na kosalisa baninga na ye 15 na komipesa mpe nakozwa batisimo.
Ezali esengo na komona ete, kati na mokili wana monene ebele na bato bazali kondima elikya ya Biblia etali mokili ya sika ya Nzambe, mpe bazali kosangana na libota ya mokili mobimba oyo Jéhovah azali koyanganisa mpo na bomoi ya seko na nsé na Bokonzi na ye.