Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/8 lok. 31
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Yobo akumisaki nkombo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Yobo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mokanda ya Biblia nimero 18—Yobo
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Ndakisa ya moto oyo andimaki básembola ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/8 lok. 31

Mituna na batangi

Maloba na Yobo 1:8 malimboli ete, na eleko na Yobo, bobele ye moko nde azalaki moto na sembo liboso na Jéhovah?

Te. Yobo 1:8 epesi nzela na bosukisi motindo yango te. Tozali kotanga:

“Jéhovah Nzambe alobaki na Satana ete: ‘Okanisi na motema na yo likambo na moombo na ngai Yobo, ete mosusu azali lokola ye te kati na mokili, moto na ekweli te mpe na bosembo, moto na kobanga Nzambe mpe na koboya mabe?’” Nzambe amonisaki likanisi motindo moko na ntina na Yobo kati na Yobo 2:3, wana atunaki Satana ete: “Okanisi na motema na yo likambo na moombo na ngai Yobo, ete mosusu azali lokola ye te kati na mokili, moto na ekweli te mpe na bosembo, moto na kobanga Nzambe mpe na koboya mabe?”

Mokanda na Yobo yango moko ezali komonisa ete Yobo azalaki moto bobele moko te na bomoi oyo andimamaki lokola sembo na miso na Nzambe. Kobanda mokapo ya 32, tozali kokuta makambo matali Elihu. Atako azalaki mpenza elenge, Elihu asembolaki likanisi na Yobo mpe akumisaki Nzambe na solo.​—Yobo 32:6-33:6, 31-33; 35:1-36:2.

Na yango, wana alobaki ete, ‘mosusu azali lokola Yobo te kati na mokili,’ Nzambe alingaki komonisa ete Yobo azalaki mpenza moto moko ya sembo, moto oyo azalaki solo kobenda likebi. Ekoki mpenza kozala ete Yobo azalaki na bomoi na boumeli na eleko katikati na liwa na Yozefe mpe ebandeli na mokumba na Moize lokola mosakoli na Nzambe. Na eleko yango, ebele na Bayisraele bazalaki na Ezipito. Ntina moko ezali te ya kokanisa ete bango nyonso bazangaki sembo epai na Nzambe mpe baboyamaki na ye; ekoki kozala ete baoyo batyelaki Jéhovah motema bazalaki mingi. (Exode 2:1-10; Baebele 11:23) Kasi, moko te kati na bango akokisaki mokumba monene, lokola Yozefe; mpe kati na losambo na solo, moko te kati na bango ayebanaki mingi lokola Moize ntango abimisaki libota na Yisraele na Ezipito.

Nzokande, epai mosusu kati na mokili moto moko azalaki oyo bosembo na ye ebongaki na kokumisama. “Na mokili ya Uza, ezalaki na mobali moko nkombo na ye Yobo; mobali yango azalaki na efundeli te, ye moto na sembo, moto oyo akobangaka Nzambe mpe akabwani na mabe.”​—Yobo 1:1, MN.

Jéhovah akokaki bongo kotanga Yobo lokola ndakisa ya polele to oyo eyebani mingi mpo na kondima mpe ezaleli ya kobanga Nzambe. Bobele bongo, mibu mingi na nsima, bakomi na Biblia Ezekiele mpe Yakobo balobelaki ndakisa ya boyengebene mpe mpiko oyo Yobo atikaki.​—Ezekiele 14:14; Yakobo 5:11.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto