Koloba minoko miyebani te: ezali likambo likomi komonana mingi
“NGUYA moko esimbaki lolemo na ngai mpe ebele na maloba mabimaki, lokola mai. Naokaki mpenza esengo! Nazalaki na maoki ya kozala peto mingi. Kobanda wana naino naoki motindo yango te.” Wana ezali maloba na moto moko oyo azwaki likoki ya kokamwa ya koloba “minoko miyebani te.”
Oyo ezali motindo moto wana alimboli makambo ayokaki ntango, alobaki “minoko miyebani te,” mpo na mbala ya liboso. Bato mosusu bakoki mpenza kotuna, “Kasi ezali bongo nini?” Ezali motindo to endimeli na mangomba mosusu, oyo engebene bango, mibali mpe basi bakoki kopusama na nguya ya elimo santu ya Nzambe, na koloba na minoko oyo bayebi yango te.
Likambo wana ya mangomba ezali ntango nyonso kokola. Na kala, bato bazalaki kokanisa ete bobele ba pentecôtistes nde bazali koloba na minoko miyebani te; kasi lelo oyo likambo yango eleki bandelo ya mangomba mazalaki na momeseno yango mpe ekomi komonana epai na ba baptistes, ba épiscopaux, ba luthériens, ba méthodistes, ba presbitériens mpe Bakatolike. Bakokisaki ezalela na moto azali koloba na minoko miyebani te na ye oyo aoki esengo monene, azali kolengalenga, azali komiyeba te mpe na oyo alalisami mpongi. Ezali na baoyo bazali kokangisa yango na ezalela lokola ya moto azwi ligboma. Mpo na basusu, “koloba minoko miyebani te” ezali mobombamo to likabo ya elimo santu.
Mpo na nini bato mingi lelo bazali koluka likabo ya koloba minoko miyebani te?
Kati na mokanda na ye Minoko ya elimo (angl.), Cyril Williams abimisi likanisi ya “boyakani kati na mayoki ya kozanga kolonga mpe bobendami epai na ‘minoko.’” Alobi ete likambo yango ezali lolenge ya kosikolama oyo ezali “lokola nkisi ya kokitisa motema” mpe “ekosilisa mikakatano ya mayoki.” Kozanga elonga kati na makambo ya lingomba, kozanga elonga na mosala ya mosuni, matanga, nkaka ya libota te bokono na mosangani ya libota ezali kati na makambo makomema moto na kotetemoka mpe na koloba minoko.
Bobele bongo kati na mokanda Koloba minoko: boyekoli na bizaleli (angl.), John Kildahl alobi ete “kozala motema likoló ezali kokolisa epai na moto makoki ya koloba minoko miyebani te.” Bolukiluki oyo esalemaki epai na bato mpe mituna ya likebi monene elakisi ete “koleka 85 % na baoyo bazali koloba minoko balekisaki eleko moko ya motema likolo liboso na kozwa makoki yango ya koloba minoko.” Na ndakisa, mama moko alingaki koloba minoko miyebani te mpo akoka kobondela mpo na mwana na ye oyo azalaki na bokono ya cancer. Mobali moko abandaki koloba minoko wana azalaki kokakatana na ntina na promotion azwaki na mosala ya mosuni. Mwasi moko abandaki koloba minoko miyebani te na poso oyo elandaki kokota na mobali na ye na Lingomba ya Bameli masanga bayebani nkombo te.
Bazalaka na maoki nini?
Moto moko alobaki lolenge aokaki ntango alobaki na minoko miyebani te mpo na mbala ya liboso: “Nazalaki kooka lokola móto na kati; nazalaki kolenga mpe nazalaki kobimisa mitoki mingi; nazalaki kolenga mpe, nazalaki kooka kolemba kati na maboko mpe makolo.” Makoki ya koloba minoko matambolaka mbala mingi nzela moko elongo na bizaleli mosusu ya nsomo. Na ndakisa, “mwasi moko, oyo soyi etondaki na mongongo na ye, azalaki kobendana likoló na kiti na ye, kingo na ye likoló na etyelo mokongo na kiti, matindi na mabelé mpe makolo masembolami.” Na boumeli na likita moko “mobali moko azalaki kopumbwa na makama mingi longwa na ngambo moko kino na ngambo mosusu ya ndakonzambe.”
Professeur William Samarin akomaki ete, “mpo na bato mosusu, likoki ya koloba minoko miyebani te ezali lisengami oyo moto asengeli kokokisa yango mpo na batisimo kati na elimo santu.” Bazali “kotinda bango na kondima ete bakozala mpenza mobimba te soki bazangi yango.” Likoki yango ezali mpe kotalelama “lokola eyano na mabondeli, ndanga ya bolingo mpe ya kondimama na Nzambe.” Basusu balobaki ete likoki yango ezali kopesa bango liyoki ya boyokani ya kati, ya esengo, ya kimya, “liyoki moko ya nguya eleki monene” mpe “lisosoli malamu mingi ya bango moko.”
Koloba na nse na mayoki makasi ezali solo elembeteli ya mosala ya elimo santu? Ezali komonisa ete ye oyo azali koloba na minoko azali moklisto ya solo? Lelo oyo, losambo oyo londimami na Nzambe ezali kosenga koloba minoko miyebani te? Mituna wana mizali kosenga mingi koleka biyano ya likolólikoló. Mpo na ntina nini? Mpo tolingi ete losambo na biso endimama mpe epambwama na Nzambe.