Likabo ya koloba minoko miyebani te, ezali eteni ya boklisto ya solo?
“NAOKAKI lokola lotiliki kati na mopepe wana nazalaki koyoka ye koloba minoko miyebani te,” elobaki Bill, nsima wana ye mpe bato mosusu motoba bayanganaki liboso na moteyi ya lingomba penepene na etumbelo ya ndakonzambe. Makambo motindo yango mazali nde kozongelama na misala ya elimo santu lokola na ekeke ya liboso? Ezali yango bilembo ya lingomba na Biblia? Tokozwa biyano ya sikisiki na kotalela Makomami.
Engebene lisolo ya Biblia, mbala nyonso oyo likabo ya bikamwiseli na elimo ezalaki kopesama, moko na bantóma 12 to ntóma Paulo azalaki wana. Kati na bikamwiseli misato ya koloba minoko ya bapaya oyo Biblia ezali koyebisa, oyo ya liboso esalemaki kati na bayekoli na Yesu 120 oyo bayanganaki na Yelusaleme na Pentekote ya mobu 33. (Misala 2:1-4) Nsima na mbula misato na ndambo, Baitalia bakatami ngenga te, oyo bazalaki koyoka Petelo kosakola, bazwaki elimo mpe babandaki “koloba na minoko misusu mpe kokumisa Nzambe.” (Misala 10:44-48) Mpe mibu 19 nsima na Pentekote, penepene na mobu 52, Paulo asololaki na etuluku moko ya Baefese mpe atyelaki bayekoli 12 maboko. Bango mpe “babandaki koloba na minoko misusu mpe kosakola.”—Misala 19:6.
Likabo ya koloba minoko miyebani te ezalaki na mokano nini?
Mwa moke liboso na kobuta na likoló, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bokozwa nguya wana elimo santu ekokitela bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yelusaleme, . . . mpe kino nsuka na mokili.” (Misala 1:8) Tozali komona ete Yesu alakisaki lolenge nini mosala wana monene mosengelaki kokokisama: na lisungi ya elimo santu.
Na eleko wana, miango ya sika ya kopesa nsango oyo ezali kosunga biso na kotinda nsango na mokili mobimba na minoko ebele mizalaki te. Nsango malamu esengelaki kopalanganisama na maloba, mpe ezali na mokano yango nde bikamwiseli ya koloba minoko ya bapaya misengelaki kozala na ntina monene. Yango nde esalemaki ntango baklisto ya ekeke ya liboso basakolaki nsango malamu na Bayuda mpe bandimi na losambo na Bayuda, baoyo bazalaki na Yelusaleme na Pantekote ya mobu 33. Bapalatia, Bamadia, Baelama, Bakelete, Baalaba, bafandi na Mésopotamia, na Yudea, na Kapadokia, na Ponto, na Asia mpe bato na Loma oyo bazalaki na Yelusaleme bayokaki “misala kitoko na Nzambe” na nkota na bango mpe bakangaki ntina na oyo elobamaki. Nokinoki bato nkoto misato bakomaki bandimi.—Misala 2:5-11, 41.
Mbala mingi bato babosanaka likambo oyo: koloba minoko na bapaya ezalaki bobele moko na mitindo libwa oyo elimo santu ezalaki kosala, lokola Paulo atandi yango kati na mokanda na ye epai na baklisto ya Kolinti. Atako likabo yango emonanaki na ntina moke epai na Paulo, nzokande ezalaki lisungi mpo na lisanga ya ebandeli kati na kosakolama ya nsango ya Bokonzi ya Nzambe ya likoló. Ezali moko na “misala” oyo mikolisaki mpe mitongaki lisangá ya boklisto na ebandeli na yango.—1 Kolinti 12:7-11; 14:24-26.
Misala ndenge na ndenge ya elimo santu na ekeke ya liboso, bakisa koloba minoko na bapaya, ezalaki lisusu bilembeteli ya polele ete nsima na boumeli ya mibu 1 500, lisangá ya Yisraele ezalaki lisusu libota na Nzambe liponami te. Kozanga ntembe, uta ntango yango ngolu na Nzambe ezalaki likoló na lisangá ya sika ya boklisto oyo ebandisamaki na Mwana bobele moko na ye.—Tala Baebele 2:2-4.
Misala wana ya elimo mizalaki makambo na moboko oyo mazalaki na ntina mingi mpo na ebandeli na lisangá ya sika ya boklisto mpe mpo na bokoli na yango kino kokomela. Paulo alimbolaki ete ntango mokano wana ekokoka, makabo ya bikamwiseli esengelaki kosila: “Soko bisakweli bizali, bikolimwa; soko maloba na ndenge na ndenge mazali, makosuka.”—1 Bakolinti 13:8.
Na ntembe te, Biblia elobaki polele ete likabo ya koloba minoko na bapaya elingaki kosuka. Misala 8:18 emonisi ete makabo na elimo santu mazalaki kozwama “na kotyama maboko na bantóma.” Ezali bongo polele ete nsima na liwa ya ntoma na nsuka, makabo na elimo, bakisa oyo ya koloba minoko na bapaya, malingaki kopesama lisusu te. Na yango, ntango baoyo bazwaki yango bakufaki bango nyonso, makabo ya bikamwiseli malimwaki. Na eleko yango, lisangá ya boklisto esilaki kozwa ntango mingi mpo na kolendisama mpe kokola kino mikili mingi.
“Minoko miyebani te” mpe kolimbolama na yango
Likambo oyo ete bato mingi bakomi lelo koloba minoko miyebani te “etalelami na bato mosusu lokola kolekisa ndelo oyo ezali motindo na bato na kotengatenga balingi komimonisa mpe bazali komitika na mayoki na bango, nzokande basusu bazali kotalela yango ete ezali motindo moko na likabo na koloba minoko na bapaya lokola na ntango na bantóma.” Lelo oyo, kati na bituluku ya mangomba epai bato bakolobaka “minoko miyebani te,” bamonaka bato oyo bazali kotuntuka bazali kolobaloba makambo mazali koyokama te. Na boyokani na likambo oyo, moto moko andimaki ete: “Ezalaka mbala mingi ntango nazali ngai moko nde nalobaka minoko miyebani te, mpo na kokanisa. , . . Nazalaka na mwa kokakatana liboso na bato mosusu.” Mosusu alobaki ete: “Nazali koyoka maloba na ngai moko, nazali kokanga ntina na yango te, kasi nazali koyoka nguya moko ezali kopusa lolemo na ngai na koloba.”
Minoko wana miyebani te mikoyebisaka nsango moko ya ntina? Ndimbola na yango ezali nini? Baoyo bakolobaka ete bazali kolimbola motindo na maloba yango bakopesaka bandimbola ekeseni mpo na maloba mazangi kososolama ya lolenge moko. Mpo na nini ezali kokesene? Bazali kolimbola kozanga koyokana na bango na kolobaka ete “Nzambe apesi ndimbola boye epai na molimboli moko mpe ndimbola oyo kuna na molimboli mosusu.” Moto moko andimaki ete: “Na mabaku mosusu, namonaki ete ndimbola ezalaki mpenza te oyo tokoki koloba ete ya solo.” Kati na mokanda na ye Likabo ya koloba minoko (angl.), D. Hayes ayebisi likambo na mobali moko oyo aboyaki kolimbola maloba na mwasi moko mpo “maloba na ye mazalaki mpenza bosoto.” Oyo nde bokesene monene na likabo ya koloba minoko lolenge ezalaki na ekeke ya liboso, oyo ezalaki na mokano ya kolendisa lisangá!—1 Bakolinti 14:4-6, 12, 18.
Lelo oyo, bato mosusu bazali koloba ete basili koyoka kolimbolama ya kokamwa, mpe bazali ntango mosusu kokanisa ete Nzambe azali kosalela likabo yango soko “alingi kopesa nsango moko epai na bato.” Kasi nsango nini ya Nzambe oyo Yesu Klisto mpe bantóma bapesaki te? Paulo ye moko, oyo azwaki elimo santu, alobaki: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe makoki kopesa litomba na mateya, mpo na kopamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobokola kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mobongi, oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.”—2 Timoté 3:16, 17.
Ezali polele ete lisangá ya boklisto ezali lisusu na bomwana te; mpo na yango, ezali na ntina te ete bimoniseli ya Nzambe mpe makabo ya bikamwiseli ya elimo mandimisa mokumba na yango. Biblia ezali kopesa likebisi oyo: “Nde soko biso, soko mwanze na likoló akosakwela bino nsango ekeseni na oyo esakwelaki biso bino, tika ete alakelama mabe!”—Bagalatia 1:8.
Likabo ya koloba minoko misusu na ekamwiseli ezali lisusu na ntina te mpe kati na Biblia eloko moko te ezali kopesa nzela na kokanisa ete ezali lelo eteni ya losambo ya boklisto ya solo. Lokola sikawa Biblia ezali mobimba mpe epalangani mingi, tozali na nyonso oyo esengeli kati na Liloba na Nzambe. Ezali kopesa biso likoki ya kozwa, na ntina na Jéhovah mpe na Mwana na ye, boyebi ya solo oyo ekomema na bomoi ya seko.—Yoane 17:3; Emoniseli 22:18, 19.
Ata na ekeke ya liboso, ntóma Paulo asengelaki kokomela lisangá na Bakolinti mokanda mpo na kosembola likanisi na bango likolo na bantina oyo likabo ya koloba minoko misusu epesamaki na baklisto ya liboso. Emonani ete, basusu bazalaki kobendama mingi na likabo ya koloba minoko misusu mpe bakomaki kosala lokola bana mike, oyo bateli te na elimo. Bazalaki kopesa ntina mingi na “minoko.” (1 Bakolinti 14:1-39) Paulo alimbolaki ete na ekeke ya liboso baklisto nyonso te bazalaki na likabo ya koloba minoko misusu. Ezalaki na ntina te mpo na lobiko na bango. Ata na eleko oyo yango ezalaki naino kosalelama, likabo ya koloba minoko misusu ezalaki na ntina moke kokokisa yango na likabo ya kosakola. Mpo na baklisto ezalaki lisengami te mpo na kozwa bomoi ya seko, mpe bobele bongo lelo ezali mpe lisengami te mpo na bomoi ya seko.—1 Bakolinti 12:29, 30; 14:4, 5.
Nguya nini ezali kobombama lelo nsima na minoko miyebani te?
Bato mosusu bazali kokanisa ete bakonzi ya mangomba oyo mabyangami ete Églises charismatiques nde bazali nguya ekosalaka lelo kati na baoyo bakolobaka minoko miyebani te, mpo bango nde bazali kopusa bato na bango na koluka kozwa likoki yango. Na makambo mosusu, ezali mayoki makasi mpe kozanga bokatikati nde akobimisaka yango. Kati na mokanda Minoko ya elimo (angl.), Cyril Williams alimboli ete likoki yango esili kokoma “mbala mingi elembo ya bakambi kati na etuluku” mpe ezali kopesa ye oyo azali na yango “ntina mpe bokonzi kati na etuluku, mpe na miso na ye moko.” Mpo na yango, ntango mosusu eloko ezali kopusa bato na kozwa likoki yango ezali nde mposa makasi ya kozala kati na etuluku ya bakambi oyo bakolobaka minoko miyebani te.
Na eleko oyo azalaki président ya Université Loyola, Donald Merrified alobaki ete “koloba minoko miyebani te ekoki kozala likambo ya maladi ya motó to engebene bato mosusu, euti na Satana.” Pasteur Todd Fast alobaki: “Likambo na koloba minoko ezali kobimisa ntembe mingi. Satana azangi bisaleli te mpo nakokosa biso.” Biblia yango moko ezali kokebisa biso ete Satana mpe bilimu na ye mabe bazali na makoki ya kosala bopusi likoló na bato mpe likoló na maloba na bango. (Misala 16:17, 18) Yesu abimisaki elimu mabe moko oyo azalaki kopusa mobali moko na koganga mpe azalaki kokweisa ye. (Luka 4:33-35) Paulo akebisi biso ete ‘Satana ye mpenza akobongwanaka na motindo na anzelu ya pole.’ (2 Bakolinti 11:14) Lelo oyo, baoyo bazali koluka likabo ya koloba minoko misusu, likabo oyo Nzambe azali kopesa yango lisusu te na libota na ye, bazali na likama na kozimbisama na Satana; tosili kokebisama ete Satana azali kosalela ‘misala na nguya nyonso, mpe na bilembo mpe na bikamwiseli na lokuta.’—2 Batesaloniki 2:9, 10
Minoko mpe boklisto ya solo
Na ekeke ya liboso, baklisto oyo bazwaki likabo ya koloba minoko na bapaya basalelaki yango mpo na kolimbola makambo kitoko na Nzambe. Ezalaki likambo na ntina monene kolimbola polele nsango epesami na minoko mosusu mpo ete bato nyonso basosola yango mpe balendisama. (1 Bakolinti 14:26-33) Paulo apesaki likebisi oyo: “Soko bokobimisa maloba mayebani ntina te, nani akososola yango elobami? Boye bokolobaloba na mopepe.—1 Bakolinti 14:9.
Soko elimo na Nzambe epesaki na baklisto ya liboso likabo ya koloba minoko na bapaya, nzokande etindaki bango te na koloba makambo mazangi ntina mpe oyo makoki kolimbolama te. Na boyokani na toli ya Paulo, maloba mapesami na elimo santu mapesaki nzela na nsango malamu ete “esakolama epai na bato nyonso na nse na moi.”—Bakolose 1:23.
Na ntina na mikolo ya nsuka ya biloko mabe ya ntango oyo, Klisto apesaki etinda oyo: “Esengeli liboso ete nsango malamu [ya Bokonzi bosili kosalema] esakolama kati na mabota nyonso.” (Malako 13:10) Lokola na ekeke ya liboso, bikelamu nyonso bisengeli koyoka nsango ya Bokonzi. Ekoki kosalema mpo ete Biblia esili kobongolama, na mobimba to na ndambo, na minoko koleka 2 000. Elimo bobele moko oyo epesaki molende mpe mpiko na baklisto ezali lelo kosimba mosala monene ya kosakola oyo lisangá ya ba Témoins de Jéhovah ezali kokokisa yango. Bazali koloba “monoko na peto,” ezala na maloba to na kosalelaka myango ya sika oyo mizali kopesa nzela ete solo ya Biblia epalangana. Nsango yango ezali kosakolama kati na mikili mpe bisanga koleka 200. Ba Témoins de Jéhovah bazali libota bobele moko oyo elimo santu ezali kopusa bango na koyebisa na bato nyonso makambo kitoko na Nzambe.—Sofoni 3:9; 2 Timoté 1:13.
[Bililingi na lokasa 7]
Litatoli ya ndako na Japon
Litatoli ya masuwa na masuwa na Colombie
Na nse: boyekoli ya Biblia na Guatemala
Na nse lisusu: mosala ya kosakola na bilanga na mokili ya Hollande