Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/9 nk. 5-9
  • Mbuma oyo boklisto ya lokutá esili kobuka na Afrika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mbuma oyo boklisto ya lokutá esili kobuka na Afrika
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Balonaki mbuma ya bokabwani
  • Baklisto ya solo to Mindele oyo bakoponaka mposo?
  • Bayangelaki lokola mikonzi na Afrika
  • Bitumba ya mokili mobimba
  • Bindimeli ya bonkoko ya bato ya Afrika
  • Bazali lelo oyo kozalisa bayekoli ya solo
    Lamuká!—1995
  • Oyo boklisto ya lokutá elonaki na Afrika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Bamisionɛrɛ “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele”
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Sida na Afrika—Ngambo nini boklisto ya nkombo mpamba ezali na yango?
    Lamuká!—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/9 nk. 5-9

Mbuma oyo boklisto ya lokutá esili kobuka na Afrika

NDOTO ya Charles Lavigerie mpo na kobóngola Algérie ete ekóma “libota ya boklisto” eyaki komonana ete ezalaki bobele ndoto mpamba. Lelo oyo, 99 % na bato ya Algérie bazali bamizilmá, mpe boklisto ya lokutá ezali na nguya te na bisika mingi ya Afrique du nord. Kasi ezali boni na bisika mosusu na etando ya Afrika?

Na mokanda na ye Histoire concise de la mission chrétienne dans le monde (angl.), J. H. Kane akomaki, ete: “Boklisto [ya lokutá] esili kobongola bato mingi na Afrika epai Baindo bazali mingi koleka bisika mosusu na mikili ya bobólá.” Kasi bato oyo babongwanaki, bazali mpenza baklisto? Dr. Kane alobi ete: “Likámá moko monene lizwami na Lingomba na boklisto ya Afrika, ezali christopaganisme [kosangisama ya mateya mpe misala ya boklisto na oyo ya bopakano].” Lisusu, liloba “Lingomba ya boklisto ya Afrika” lilongobani te. Ya solo, Mangomba ya Afrika mazali bankɔto mingi, moko na moko na lolenge na yango ya kosambela. Mpo na bantina nini?

Balonaki mbuma ya bokabwani

Mbuma ya bokabwani esilaki kolonama liboso nkutu ete bamisionere bamata masuwa mpo na kokende na Afrika. Société missionnaire ya Londres ebendaki basangani na yango na mangomba makeseni mpe na boumeli ya mobembo na bango mpo na kokende kokokisa mokumba mopesamelaki bango, kowelana makasi ebimaki kati na bamisionere na ntina na bindimeli na bango. Kowelana wana ekómaki makasi nsima wana bamisionere bakómaki na bamisiɔ na bango.

Na mokanda na ye Les missionnaires chrétiens et la création de la Rhodésie du Nord 1880-1924 (angl.), molakisi Robert Rotberg akomaki ete: “Bamisionere baswanaki mingi kati na bango mpe kati na bakonzi na bango oyo bazalaki na Mpótó; likambo oyo lizalaki mpenza kobebisa mikano na bango ya kopalanganisa nsango malamu. . . . Emonani lokola ete bamisionere bazalaki kolekisa ntango mingi mpo na kokoma makambo matali kowelana na bango, na esika ya kobongola bazalani na bango.”

Mbala mosusu, kowelana ya bamisionere ezalaki kosuka na kosala bamisiɔ mosusu oyo ezalaki na boyokani te. Bamisionere ya katolike mpe bamisionere ya protestá bazalaki kowelana mpo na kozwa bandimi. Kozanga bomoko wana eyaki mpe komonana kati na bandimi na bango. Na boumeli ya ntango, bamilió ya bato ya Afrika batikaki mangomba ya bamisionere mpe basalaki oyo ya bango moko.

Dr. Kane akomaki ete: “Mangomba oyo babéngi ete Églises Africaines Indépendantes ezwami na Afrika mobimba. . . . Motindo na bituluku wana ezali soko nkɔto nsambo.” Nyonso wana eutaki bobele te na kowelana kati na bamisionere na ntina na bindimeli na bango ya bongolabongola. Na mokanda na ye Les missionnaires (angl.), Geoffrey Moorhouse alimboli ete, ntina mosusu ya ‘bokabwani ya Baindo mpe bamisionere’ ezalaki ‘mpasi oyo Baindo bazalaki kooka na motema mpo ete Mindele bamimonisaki lokola ete baleki bango.’

Baklisto ya solo to Mindele oyo bakoponaka mposo?

Dr. Kane andimi ete: “Bamisionere bazalaki komimona lokola ete bango baleki.” Na mokanda na ye Le christianisme africain (angl.), Adrian Hastings alobi ete: “Bazalaki kokanisa ete lingomba ya boklisto esengeli kolanda lolenge na bomoi ya Mindele mpe litambwisi na bango.”

Charles Lavigerie, moto ya mboka France mpe misionere-mokambi, ozalaki na likanisi wana. Moto mosusu oyo akanisaki lolenge yango ezalaki John Philip, oyo azalaki mokambi ya bamisio ya Société missionnaire ya Londres na ngele ya Afrika. Na 1828, alobaki na lolendo nyonso ete: “Bamisionere na biso bazali . . . kokólisa matomba ya Grande-Bretagne, bopusi na yango mpe bokonzi na yango. Epai nyonso oyo misionere azali kozalisa bandimi kati na etuká ya bato oyo bazalaki kofanda na zámba, bazalaki lisusu kokoka te kopesa mpasi epai na boyangeli ya colonie; komitya na bango na nsé na colonie ezali kokola ntango tozali kotinda bango na makasi ete balanda mimeseno mpe lolenge na bomoi oyo bayebaki yango liboso te; . . . bakompanyi, mombongo mpe mosala ya bilanga ezali kokola noki; mondimi nyonso ya solo kati na bango . . . azali kokoma moninga na boyangeli ya colonie.”

Ezali likambo ya kokamwa te soki biyangeli ya Mpótó bimonaki ete bamisionere bazali bisaleli ya ntina mpo na kokolisa boyangeli na bango na Afrika. Bamisionere mpe basepelaki ete Afrika etyama na nsé na boyangeli ya mikili ya Mpótó. Na Conférence missionnaire mondiale oyo esalemaki na 1910 na Edinburgh, balobaki ete: “Likoki likozala te mpo na kotya ndelo ya sikisiki, oyo ekokesenisa mikano ya bamisionere mpe mikano ya Boyangeli [ya politike].”

Bayangelaki lokola mikonzi na Afrika

Mpo na koyeisa bokonzi na bango makasi, bamisionere mosusu bazalaki kosalela mampinga ya basodá. Mbala mosusu bingumba oyo bizalaki pembeni na mai monene bizalaki kobomama na mindoki minene mizalaki na masuwa ya bitumba ya Grande-Bretagne, mpamba te bato ya bamboka yango baboyaki komitya na nsé na bokonzi ya bamisionere. Na 1898, Dennis Kemp, misionere na Afrika ya ouest, alobaki ete: “Nandimisami mpenza ete Nzambe azali lelo kosalela mampinga ya Grande-Bretagne mpe masuwa na yango ya bitumba mpo na kokokisa mokano na Ye.”

Nsima na kofanda na mboka moko, bamisionere bazalaki mbala mosusu kokóma mikonzi na esika ya mokonzi ya mboka. Molakisi Rotberg akomi ete: “Bamisionere ya Londres bazalaki mbala mingi kosalela makasi mpo ete bato batosa mibeko na bango ya bonzambe. Soki moto moko abuki mobeko, bazalaki kobeta ye na cikoti oyo ezalaki lingenda lisalemi na mposo ya ngubú. Bato ya Afrika babetamaki mingi na lingenda yango ata mpo na likambo nini.” David Lamb akomi na mokanda na ye Les Africains (angl.) ete: “Mondimi moko ya Afrika amikundoli lolenge misionere moko na Lingomba Anglican, oyo ayebanaki na Uganda na nkombo ya Bwana Botri, azalaki mbala mingi kotika esika azalaki kokamba misa mpo na koya na nzeté mpo na kobeta bato ya Afrika oyo bazalaki kokóma na ntango malamu te na ndakonzambe.”

James Mackay, oyo azalaki misionere, ayokaki mpasi mingi na motema mpo na misala ya lolenge wana, mpe atindaki mokanda epai na bakonzi ya Société missionnaire de Londres mpo na komonisa mpasi na ye. Amonisaki bango ete: “Na esika ete bato batalela biso lokola mindele oyo bamemeli bango bikanganeli kitoko ya bolingo na Nzambe, bazali nde kobanga biso.”

Bitumba ya mokili mobimba

Mokanda Les missionnaires (angl.) elobi ete: “Koleka ekeke moko, bato ya Afrika bateyamaki ntango nyonso mpe na makasi ete bitumba mpe bopusi nyonso ya mobulu ekopesaka litomba te mpe ezali mabe mpenza.” Na nsima, na 1914, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba eyaki kobima kati na mikili ya Mpótó oyo mizali komibenga ete mikili ya boklisto.

Moorhouse alimboli ete: “Pene na bamisionere ya mikili nyonso ya Mpótó bamikotisaki na makambo ya Etumba monene.” Likambo ya nsoni, bamisionere balendisaki bandimi na bango na Afrika ete bakota na bitumba. Nkutu bamisionere mosusu bakambaki mampinga ya bato ya Afrika oyo bazalaki basodá na bitumba yango. Na mokanda na ye Histoire des missions chrétiennes (angl.), molakisi Stephen Neill alobaki na ntina na makambo oyo bitumba ebimisaki ete: “Mikili ya Mpótó oyo bazalaki koloba mingi ete bobele bango nde bayebi ndimbola ya boklisto mpe bobele bango nde bazali na lolenge ya bomoi malamu, bamikotisaki lokola bato bakufi miso, baoyo makanisi na bango ebulungani kati na etumba oyo eyaki kokómisa bango babola na ntina na nkita mpe oyo etikaki bango ata na ezaleli moko te ya malamu.” Neill alandi koloba ete: “Etumba ya Mibale ya mokili mobimba eyaki nde kosilisa oyo Etumba ya Liboso esilaki kobanda. Etamboli ya mindele emonisaki ete ezalaki mpenza bokosi. ‘Boklisto ya lokutá’ emonanaki ete ezali na ntina te. Likoki ezalaki lisusu te mpo na koloba ete ‘boklisto ezali na mikili ya Mpótó.’”

Soki Baindo bakómaki kosala mangomba mingi nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, ezali na ntina. Kasi tokoki koloba nini mpo na bato ya Afrika oyo batikalaki kokangama na mangomba ya boklisto ya lokutá? Na nsima, bateyamaki solo oyo euti na Biblia?

Bindimeli ya bonkoko ya bato ya Afrika

Bamisionere ya boklisto ya lokutá bakweisaki misala na losambo ya bato ya Afrika, na ndakisa kokende epai ya nganga mpo na kosenga ye ete abondela milimu ya bankoko. Epai mosusu, bamisionere bazalaki koteya ete bato nyonso bazali na molimo oyo ekufaka te. Batombolaki mpe losambo ya Maria mpe ya basantu. Mateya wana malendisaki ya bato ya Afrika oyo ete, bankoko na bango oyo bakufa bazali na bomoi. Lisusu, na kokumisáká bikeko, lokola kuluse, bamisionere balendisaki lolenge oyo bato ya Afrika bazalaki kosalela nkisi oyo bazalaki kotalela ete ezali kobatela bango longwa na bilimu mabe.

Na mokanda na ye Le christianisme en Afrique tropicale (angl.), molakisi G. G. Baëta alimboli ete: “Moto moko ya Afrika akoki koyemba na esengo nyonso kati na ndakonzambe ete, ‘Nazali na ebombamelo mosusu te, bobele Nzambe,’ nzokande azali komema na nzoto na ye eloko moko oyo ye akanisi ete ezali kobatela ye, to ntango auti kosambela na ndakonzambe, akoki kokende mbala moko epai na nganga na ye, mpe akomiyoka te ete abuki mobeko moko.”​—Tala Deteronome 18:10-12 mpe 1 Yoane 5:21.

Bamisionere mingi bateyaki bato ya Afrika ete bankoko na bango oyo bazalaki bapakano bazali konyokwama kati na lifelo na mɔ́tɔ, mpe ete yango ekokómela bango soki baboyi kondima mateya ya bamisionere. Nzokande, liteya ya minyoko na seko eyokani soko moke te na oyo elobami polele kati na Biblia oyo bamisionere bango moko bamipesaki mpasi ya kobongola na nkotá ya Afrika.​—Genese 3:19; Yilimia 19:5; Baloma 6:23.

Biblia ezali mpenza koteya ete milimo ya bato na masumu ekufaka mpe ete ‘bakufi bayebi likambo te.’ (Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4) Mpo na bato ya Afrika oyo bazwaki libaku ya koyoka solo ya Biblia te, bazali na elikya ya kozala kati na baoyo bakozwa “lisekwa ya bato na sembo mpe ya bato na sembo te.” (Misala 24:15) Baoyo bakozwa lisekwa yango bakoteyama na ntina na bibongiseli oyo Nzambe asili kozwa mpo na lobiko. Na nsima, soki bayanoli malamu na bolingo ya Nzambe, bakozwa mbano ya bomoi ya seko na paradis awa na mabelé.​—Nzembo 37:29; Luka 23:43; Yoane 3:16.

Na esika ya koteya solo kitoko ya Biblia, boklisto ya lokutá esili kozimbisa bato ya Afrika na mateya ya lokutá mpe na bokosi na yango. Mosala oyo bamisionere ya boklisto ya lokutá basalaki mpo na kosalisa bikonzi ya politike na mikili ya Mpótó ete biyangela Afrika, endimami epai moko te kati na Biblia. Na kokesena, Yesu alobaki ete bokonzi na ye “euti na mokili oyo te” mpe ete bayekoli na ye ya solo bazali “bato ya mokili te.” (Yoane 15:19; 18:36) Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki batindami na Yesu Klisto, kasi bazalaki batindami na biyangeli ya mokili te.​—2 Bakolinti 5:20.

Na bongo, mbuma oyo boklisto ya lokutá esili kobuka na Afrika ezali malamu te: emonani na kozanga bomoko, kozanga kotyelana motema mpe na “kosangisama ya mateya mpe misala ya boklisto na oyo ya bopakano.” Mobulu oyo ezali komonana na biteni mingi ya “boklisto” na Afrika, ezali mpenza na boyokani te na mateya ya “Mokonzi na kimya.” (Yisaya 9:6) Mbuma oyo euti na mosala ya boklisto ya lokuta na Afrika, ekeseni mpenza na oyo Yesu alobaki na ntina na bayekoli na ye ya solo. Kati na libondeli na ye epai na Tata na ye ya likoló, Yesu asengaki ete “[bayekoli na ye] bakoma na ezaleli ya kokoka kati na bomoko, mpo ete mokili bayeba ete yo otindaki ngai.”​—Yoane 17:20, 23, MN; 1 Bakolinti 1:10.

Yango elingi koloba ete mosala ya bamisionere nyonso na Afrika ebotaki mbuma malamu te? Ezali boye te. Na masolo malandi, kobanda lokasa 10, tokolobela mpenza mbuma kitoko oyo mosala na bamisionere ya boklisto ya solo esili kobota na Afrika mpe bipai nyonso na mokili.

[Elilingi na lokasa 6]

Bamisionere-bakambi ya ekeke ya 19, lokola John Philip, bakanisaki ete motindo na bomoi na Mpótó mpe lingomba na boklisto ezalaki lolenge moko

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Cape Archives M450

[Elilingi na lokasa 7]

Bamisionere ya boklisto ya lokutá balendisaki bindimeli ya bonkoko ya bato ya Afrika na nzela na mateya mazwi moboko na Biblia te, lokola liteya ya molimo ekufaka te

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Courtesy Africana Museum, Johannesburg

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto