Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Janvier nk. 21-24
  • Bazali lelo oyo kozalisa bayekoli ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali lelo oyo kozalisa bayekoli ya solo
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eteyelo moko ya ntina
  • Bamisionere ya ndenge na ndenge
  • Matomba nini mamonani?
  • Bamisionɛrɛ “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele”
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Mbuma oyo boklisto ya lokutá esili kobuka na Afrika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Bayekoli ya Liloba ya Nzambe bazwi mapɔlɔ́mi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Baoyo bazwi mapɔlɔ́mi na Galadi bazali “bamisionɛrɛ ya solo!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Lamuká!—1995
g95 Janvier nk. 21-24

Bamisionere bamemi ya pole to ya molili?​—Eteni 6

Bazali lelo oyo kozalisa bayekoli ya solo

YESU KLISTO apesaki etindá oyo: “Boye, bokɛnde kojalisa bayekoli na mabota yɔnsɔ, kobatisa bango.” (Matai 28:19) Búku Everyman’s Encyclopedia elobi ete “baklisto basili kokokisa uta kala etindá yango,” nzokande, ebakisi ete, “ntango mosusu na milende moke.” Búku The Missionary Myth etuni: “Ntango ya bamisionere esilá nde koleka?”

Na Yanuáli 1994, zulunalo Newsweek eyebisaki ete: “Pápa Jean Paul II azali kotinda bakatolike ya Loma na balabála.” Zulunalo yango elimbolaki ete: “Azali kotinda bapalanganisi ya nsango malamu balaiki 350 ete bákende kobongola bato kati na bisika ya kominanola na butu, kati na bazando mpe na bisika bingbunduka etɛlɛmaka. Mosala yango ebandaka na Mwamisato ya Eyenga ya Mputulu (16 Febwáli). Soki elóngi, pápa akopanza yango na mokili mobimba​—ekateli oyo ekomema bamisionere ya Katolike na kokende ndako na ndako kobanda na Buenos Aires kino na Tokyo.”

Nzokande, Batatoli ya Yehova bayebi uta kala ete basengeli kozala bapalanganisi ya nsango malamu. (2 Timoté 4:5) Ya solo, bango banso bazali bamisionere na mikili ya bapaya te. Kasi bakoki kosakola mpe basalaka yango bipai nyonso oyo bango bazwami. Na ndimbola oyo, bango nyonso bazali bamisionere.

Eteyelo moko ya ntina

Na ebandeli ya bambula 1940, la Société Watch Tower efungolaki eteyelo moko mpo na kobongisa basakoli ya makoki mpo na kosala lokola bamisionere na mikili ya bapaya epai kuna mposa ezalaki makasi. Na boumeli ya bambula, manáka mabongwanaki, kasi epɛngwaki soko moke te na mokano na yango ya liboso oyo ezali ya kolobela mingi motuya ya boyekoli ya Biblia mpe kokokisa mosala ya lobiko ya kopalanganisa nsango malamu.

Nkombo oyo eponamaki mpo na eteyelo yango ya sika ezalaki Galadi, oyo na Liebele elimboli “Libondo ya litatoli.” Na kopesáká nzela na koyikana ya libondo ya litatoli mpo na lokumu ya Yehova, Galadi ekokisaki mokumba monene kati na kokokisama ya mosala ya kosakola na mokili mobimba oyo Yesu alobaki ete ekokokisama na mikolo na biso.​—Matai 24:14.

Wana ezalaki ye koloba na kelasi ya liboso ya Eteyelo ya Galadi, na 1943, Nathan H. Knorr, prezidá ya la société Watch Tower na ntango wana, alobaki: “Bokozwa kobongisama ya sikisiki mpo na kokokisa mosala lolenge moko na oyo ya ntoma Paulo, ya Malako, ya Timote mpe ya basusu oyo batambolaki bipai binso na Boyangeli ya Loma mpo na kosakola nsango ya Bokonzi. . . . Mosala na bino ya liboso ezali ya kosakola evanzile ya Bokonzi ndako na ndako lokola Yesu mpe bantoma basalaki yango.”

Ntango bayekoli ya kelasi ya liboso bakómaki na nsuka ya kobongisama na bango, baoyo bazwaki mapɔlɔ́mi batindamaki na mikili libwa ya Amérique latine. Lelo, bayekoli koleka 6 500 bauti na mikili koleka 110, basili kobongisama na Eteyelo ya Galadi mpe batindami lokola bamisionere na mikili koleka 200 mpe na bisanga.

Bamisionere ya ndenge na ndenge

Masoló ya liboso kati na molɔngɔ́ oyo malobelaki mosala ya bamisionere ya boklisto ya nkombo mpamba. Mingi, lokola baoyo batindamaki na Groenland, babongolaki Biblia to biteni na yango na lokóta ya mboka wana. Nzokande, bamisionere wana ya liboso, bazalaki mingimingi komipesa na makambo mosusu na esika ete báteya bato Biblia.

Na ndakisa, bamisionere ya boklisto ya nkombo mpamba na Japon, bamipesaki na “makambo matali kolakisama mpe biteyelo,” lokola emonisi yango búku Kodansha Encyclopedia of Japan. Elobi ete: “Bamisionere mosusu bayebanaki bobele mpo na mayele na bango.” Bakómaki bato oyo bakoyekolaka nkótá to balakisi, koteyáká mateya lokola literature, nkótá, lisoló ya bato, filozofi, mateya ya losambo ya Azia ya Ɛ́sti mpe mimeseno ya bonkɔ́kɔ ya Japon. Búku yango ebakisi ete: “Bibongiseli mpo na mateya ya lolenge ya kofanda elongo na bato ezalaki mpe eteni monene ya mosala ya bamisionere.”

Kosakola evanzile etyamaki mpenza te na esika ya liboso mpo na bamisionere. Mbala mingi bazalaki kolobela kokokisama ya bamposa ya mosuni na esika ya bamposa ya elimo. Bazalaki komipesa mingi na koluka matomba na bango moko. Na yango, misionere moko ya lingomba ya Protestá oyo atindamaki na Japon na 1889 ayebani lelo oyo lokola “mobandisi ya lisano ya kobuta bangomba na Japon.”

Bamisionere ya Eteyelo ya Galadi bakeseni na makambo mingi na bamisionere ya boklisto ya nkombo mpamba. Búku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, mokapo 23, elobi: “Bamisionere oyo bazwi mapɔlɔ́mi na Eteyelo ya Galadi bazali koteya bato Biblia. Na esika ete bátonga bandakonzambe mpo na komizela ete bato báya epai na bango, bango bakendaka kotala bato ndako na ndako . . . , mpo ete bato yango básalela bango te, kasi ete bango básalela nde bato.”

Matomba nini mamonani?

Nsima ya kolekisa bikeke mingi mpo na kozalisa bayekoli na Mpótó, matomba nini bamisionere ya boklisto ya nkombo mpamba basili kozwa? Búku A Global View of Christian Missions eyanoli: “Ekanisami ete bato soko milió 160 na Mpótó bamilobaka ete bazali na lingomba te. Kati na baoyo balobaka ete bazali baklisto, bobele bato moke nde bamipesaka mpenza na lingomba na bango. . . .Esengeli te ete Mpótó ebéngama mokili ya boklisto.”

Ezali boni mpo na Azia? Búku Kodansha Encyclopedia of Japan eyanoli ete: “Engebene makanisi ya bato, boklisto etalelami lokola endimeli ya ‘bapaya’ . . . oyo ebongi te mpo na bato ya mboka Japon. . . . Makambo matali boklisto mazali mpenza te na Japon.” Ya solo, na Japon, bato na nsé ya 4 % balobaka ete bazali baklisto, na Inde bato na nsé ya 3 %, na Pakistan bato na nsé ya 2 % mpe na Chine bato na nse ya 0.5 %.

Nsima ya bikeke mingi ya mosala ya bamisionere ya boklisto ya nkombo mpamba na Afrika, makambo mazali ndenge nini kuna? Kati na lapólo moko ya likita ya baepiskɔ́pɔ ya Afrika oyo lisalemaki na eleko ya molungé ya mobu mouti koleka na Loma, zulunalo Focus na lokótá Allemand, eyebisaki ete: “Mangomba ya Afrika masengeli te kotalelama lokola losambo ya bikeko ya bapakano. Mokanda ya Leta, oyo ebimisami naino te, ezali kotya ‘mangomba ya bonkɔ́kɔ ya Afrika’ na molɔngɔ́ ya mangomba ya lokumu mpe ya ntina. Basangani ya mangomba yango babongi na kopesamela lokumu. Liyangani ya baepiskɔ́pɔ emonisi ete mangomba oyo makweisamaki kala mpo na bankisi na yango ‘mazalaka na bopusi ata likoló na lolenge ya bomoi ya mokatolike ya solosolo.’”a

Nsima ya bikeke mingi ya mosala ya kozalisa bayekoli baklisto na Amerika, matomba nini bamisionere ya boklisto ya nkombo mpamba basili kozwa? Búku Mission to the World eyanoli ete: “Atako milende misalemi kati na mosala ya bamisionere na boumeli ya bambula oyo, Amerika ya latine ebongi kino lelo kobéngama ete ‘mokili motalelami na bopɔtu.’” Mpo na Etats-Unis, zulunalo Newsweek emonisi ete bolukiluki oyo euti kosalema kala mingi te “emonisi ete wana lingomba ezali kosala bopusi likoló na mimeseno ya Amerika, bobele bato moke nde bazali mpenza komipesa na yango. . . . Ndambo ya bato kati na baoyo batunamaki oyo bandimaka ete bakendeke na ndakonzambe mwalomingo balobaka solo te. . . . Pene na moto moko kati na baamerikɛ́ misato ya mbula 18 mpe koleka, basepelaka ata moke te na lingomba. . . Bobele bato 19 % . . . nde basalelaka mpenza makambo ya lingomba na bango.”

Na mokuse, kati na milende na bango mpo na kobundisa bobólá, mitungisi ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe boïnga, bamisionere nyonso ya boklisto ya nkombo mpamba balóngisaki bibongiseli ya bato oyo bimemaki bobele lisungi moke mpe ya ntango mokuse. Nzokande, bamisionere baklisto ya solosolo, bazali kobenda likebi ya bato epai na Bokonzi ya Nzambe oyo esili kotyama, oyo ekomema kobɔndisama ya koumela mpe ya seko. Ekosuka te bobele na kobundisa mikakatano, kasi ekosilisa nde mikakatano yango. Ya solo, Bokonzi ya Nzambe ekomemela bato kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ya kokoka, libateli ya solo mpo na makambo matali nkita, mabaku malamu oyo makosila te mpo na kokokisa mosala oyo ekobota mbuma mpe bomoi ya seko!​—Nzembo 37:9-11, 29; Yisaya 33:24; 35:5, 6; 65:21-23; Emoniseli 21:3, 4.

Mbala mosusu, bamisionere ya boklisto ya nkombo mpamba bamonisaka baklisto ya nkombo mpamba oyo bakendeke na bantango mosusu na bandakonzambe lokola bilembeteli ete bazalisi “bayekoli na mabota nyonso mpe babatisi bango.” Nzokande, makambo mamonisi ete balóngi te na koteya bango ete ‘bátosa nyonso oyo Yesu asilaki kolaka.’​—Matai 28:19, 20.

Kasi, mosala ya koteya ya baklisto ya solo ekokóba kino na mokili ya sika ya Nzambe. Ekopesama epai na bamilió ya basekwi oyo bakozala na mposa ya koteyama na banzela ya Nzambe. Na bongo, lokola bopusi nyonso ya Satana ekolongolama, baklisto bakozwa libaku kitoko ya kokóba kozalisa bayekoli, lokola bazali kosala yango uta bambula mingi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisoló “Lingomba ya Katolike na Afrika,” na lokasa 18.

[Etanda na lokasa 24]

Lolenge basalisaka bato

Makambo oyo malandi mauti epai na bato oyo basalisamaki na bamisionere oyo babongisamaki na Galadi.

“Nasepelaki mingi na bompikiliki na bango, bazali koyika mpiko na makambo mingi oyo makeseni na oyo ya mboka na bango: mbongwana ya bileko, lokótá, mimeseno, bilei mpe mangomba. Kasi bakangamaki na mosala na bango, basusu ata kino liwa. Mimeseno na bango ya malamu mpo na koyekola mpe molende na bango kati na mosala ya kosakola esungaki ngai ete nalóna bizaleli wana.”​—J. A., Inde.

“Kotosa ngonga oyo misionere azalaki komonisa mpo na koyekola elongo na ngai ekamwisaki ngai mingi. Amonisaki mpenza komipekisa na koyikáká mpiko liboso na makanisi mabe oyo nazalaki na yango mpe liboso na makambo oyo nazalaki koyeba te.”​—P. T., Thailande.

“Ngai mpe mwasi na ngai tosepelaki mingi na bopɛto oyo emonisamaki na bamisionere Batatoli. Mosala na bango epusaki biso na kokómisa mosala ya ntango nyonso mokano na biso, mpe lelo oyo tozali na esengo ya kozala biso moko mpe bamisionere.”​—A. C., Mozambique.

“Nazalaki na bomoi ya moimi. Bokutani na ngai elongo na bamisionere epesaki bopusi oyo nazalaki na yango mposa mpo na kobongola bomoi na ngai. Epai na bango, namonaki esengo ya solo, kasi ya likolólikoló te.”​—J. K., Japon.

“Bamisionere ya boklisto ya nkombo mpamba bazalaki na bomoi ya malamu. Basáli nde bazalaki kokɔmba ndako, kolamba, kosukola bilamba, kokɛngɛla elanga mpe kotambwisa motuka. Nakamwaki mingi na komona ete bamisionere ya Galadi bazali kosala na molende nyonso misala na bango moko ya ndako, na kosungáká mpe bato ya mboka ete báyeba Bokonzi ya Nzambe.”​—S. D., Thaïlande.

“Bamisionere ya basi bazalaki koya na vélo kotala bato ata soki molungé ezalaki makasi koleka 46°C. Ezaleli na bango ya koyamba bapaya, ya kozanga koponapona mpe ya koyika mpiko, esalisaki ngai na kondima solo.”​—V. H., Inde.

“Bamisionere bazalaki te na mayoki ya komitombola liboso ya basusu. Na komikitisa nyonso, bamimesenisaki na bato ya mboka mpe na bobólá. Bayaki mpo na kosala, na yango bazalaki komilelalela soko moke te, kasi bazalaki ntango nyonso na nsáí mpe na esengo.”​—C. P., Thaïlande.

“Bazalaki te kolɛmbisa solo ya Biblia. Nzokande, bazalaki te kosala ete bato ya mboka bámona ete mimeseno nyonso ya bonkɔ́kɔ na bango ezalaki mabe to ete basengelaki komekola mimeseno ya Mpótó. Bazalaki soko moke te kosala ete basusu bámiyoka ete bazali na nsé to bazali mpamba.”​—A. D., Papouasie-Nouvelle-Guinée.

“Na bokeseni na bamisionere ya boklisto ya nkombo mpamba, misionere ya mwasi oyo azalaki koyekola elongo na ngai azalaki kolinga kofanda ye moko na nsé na kozingáká makolo, na kolanda momeseno ya mboka Corée na ntango tozalaki koyekola Biblia. Azalaki kolya bilei na biso, oyo bilambami na lolenge ya Corée. Bolingo ya motema oyo nazalaki na yango mpo na ye, esungaki ngai ete nakóla.”​—S. K., Corée.

“Nazalaki na mbula zomi mpe nazalaki kobima na eteyelo na midi. Misionere moko abyangaki ngai kokende kosakola elongo na ye nsima ya nzangá. Ateyaki ngai mitindá mingi ya Biblia mpe akɔtisaki kati na ngai botɔ́ndi ya solo mpo na lisangá ya Yehova.”​—R. G., Colombie.

“Na kokokisáká mosala oyo epesami kozanga komilelalela, bateyaki ngai na kokokisa na bosembo nyonso mikumba na ngai. Nazali kotɔ́nda mingi Yehova mpe Yesu Klisto mpo ete batindelaki biso bamisionere.”​—K. S., Japon.

[Elilingi na lokasa 23]

Bamisionere oyo babongisami na Galadi mpe oyo bazali kosala na mikili 16 bazali kolobela baeksperianse na bango na liyangani moko euti kosalema kala mingi te

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto