Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/12 lok. 31
  • Kosikolama ya elimo na Colombie

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosikolama ya elimo na Colombie
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Batatoli ya Yehova kati na mokili​—Colombie
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bonsomi ya losambo elimboli nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/12 lok. 31

Masolo ya basakoli na bokonzi

Kosikolama ya elimo na Colombie

UTA eleko ya babundi bautaki na mboka Espagne, lingomba ya Katolike ezali lingomba lipalangani mingi na Amérique du Sud. Na mokili ya Colombie, ezali uta kala lingomba ya Leta. Ekokisi sikawa mbula 105, boyokani esalemaki kati na Vatican mpe boyangeli ya Colombie, oyo ebatelaki Lingomba ya katolike mpe epesaki yango ndingisa na makambo matali biteyelo mpe mabala.

Na sanza ya décembre 1990, etuluku ya bato eponamaki na Colombie mpo na kosala mibeko ya sika ya mboka, oyo ebimaki na katikati ya mbula 1991. Mibeko wana ya sika ya mboka mibongolaki ezalela ya mangomba na Colombie. Mangomba nyonso matalelami sikawa ndenge moko liboso ya mibeko, mpe likoki ezali te ya kosengisa bana na kolanda mateya ya lingomba ya Katolike kati na biteyelo ya Leta. Boyokani esalemaki elongo na Vatican ekotalelama lisusu na kotalela mibeko wana ya sika.

Bonsomi wana monene na makambo ya losambo ekokitisa bopusi ya Lingomba ya Katolike mpe ekosalisa bato ya motema sembo ete bazwa boyebi ya Biblia mpe bakóma na bonsomi ya elimo.

Kozelaka kosikolama wana ya elimo, ba Témoins de Jéhovah 51 000 ya mboka yango bazwaki bibongiseli mpo na kosalisa bato oyo bazali na mposa na makambo ya elimo. Filiale na bango ya sika na bandako mosusu oyo ekozala na presse offset moko oyo ebalukaka na lombango mpenza, oyo bazali kokanga ekómi pene na kosila. Ba pionniers spéciaux ya ntango mokuse batindamaki na bingumba ya mike mpo na koluka bampate ya Jéhovah oyo babungaki nzela mpe bakokisaki mosala moko ya malamu mpo na kopesa mateya ya Biblia. Na bingumba 63 oyo moko moko na yango ezali na bofandi pene na 10 000, masangá ya sika 47 mpe bituluku esalemaki.

Lokola elimo na Jéhovah elandi kozala na bopusi likoló na bato ya motema sembo, bilenge mingi bazali mpe kondima solo. Mokanda Les jeunes s’interrogent​—Réponses pratiques esalisi bilenge mpe baboti na bango mingi. Temwe moko oyo azalaki kosakola ndako na ndako akutanaki na mobali moko oyo akangaki biteni ya mokanda yango. Moninga na ye moko adefisaki ye yango. Moto yango akamwaki mingi na komona mayele oyo ezwami kati na mokanda yango wana ezali komonisa lolenge ya kosilisa mikakatano kati na libota. Mokapo 4 oyo ezali na moto ya likambo “Pourquoi papa et maman ont-ils divorcé?” (Mpo no nini tata na mama bakabwana?) esimbaki mpenza motema na ye, mpamba te ye na mwasi na ye bazalaki pene na kokabwana. Alobaki ete mokanda yango ebikisaki ye na likama moko monene. Sikawa mobali wana na libala na ye bazali koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah mpe kosangana na makita nyonso ya lisangá. Bazali na botondi mingi mpo na mayele Jéhovah azali kopesa na nzela ya Biblia mpe ya lisanga na ye.

Likamba oyo emonisi lolenge bato bazali kosikolama na elimo na mboka Colombie wana ba Témoins de Jéhovah bazali kosalisa baoyo bazali na nzala ya elimo na koyeba mikano kitoko ya Jéhovah mpe mokili na ye ya sika oyo esili kobelema.​—2 Petelo 3:13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto