Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/12 nk. 14-19
  • Totambola na motema moko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Totambola na motema moko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobanga oyo ebongi
  • Motema malamu ya Jéhovah
  • “Elembo na malamu”
  • Jéhovah, ye oyo akosalaka makambo na kokamwa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Yehova azali ndakisa eleki monene ya kozala motema malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tótika te komonisa motema malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • “Pesá ngai motema moko mpo nabanga nkombo na yo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/12 nk. 14-19

Totambola na motema moko

“Ɛ Jéhovah, teya ngai . . . Pesa ngai motema mɔkɔ ete nabanga nkombo na yo.”​—NZEMBO 86:11

1. Lolenge nini Jéhovah azali kopambola basaleli na ye ya sembo?

“Ɛ JÉHOVAH, yo ozali Nzambe, bobele yo.” (Nzembo 86:8, 10, MN) David akumisaki Nzambe na motema na botondi mpenza. Jéhovah asikolaki Davidi na maboko ya Saulo mpe na Bafilistia liboso nkutu ete akoma mokonzi likoló na Yisraele mobimba. Yango wana Davidi akokaki koyemba ete: “Jéhovah azali libanga na ngai mpe esika makasi na ngai mpe Mobikisi na ngai. Epai na moto na sembo, okomimonisa sembo.” (2 Samwele 22:2, 26) Jéhovah abatelaki mosaleli na ye ya sembo kati na bampasi mingi. Davidi akokaki kotya motema na ye epai na Nzambe na ye ya sembo, kasi azalaki ntango nyonso na mposa ya kotambwisama Davidi abondelaki Nzambe ete: “Ɛ Jéhovah, teya ngai nzela na yo.”​—Nzembo 86:11.

2. Biloko nini Jéhovah asili kopesa biso mpo tokoka kozala bato balakisami na ye?

2 Davidi apengolaki makanisi ya mokili mpe bafilozofi na yango. Asepelaki ‘kolakisama na Jéhovah,’ lokola mosakoli moko na Nzambe alobaki yango na nsima. (Yisaya 54:13) Davidi akokaki kokanisa na bozindo bobele likoló ya mikanda libwa ya Biblia oyo mizalaki na ntango yango. Nzokande, mateya wana azalaki kozwa epai na Jéhovah mazalaki na motuya mingi epai na ye! Awa ezali biso koteyama lelo, tokoki kosepela ete tozali na mikanda nyonso 66 ya Biblia mpe ebele na mikanda mikolimbolaka yango oyo mipesameli biso na nsima na “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45) Tosenga na Jéhovah ete elimo na ye esalisa biso na koyeba ‘makambo Nzambe asili kobongisa yango mpo na bango bakolingaka ye, . . . ata makambo na bozindo na Nzambe.’​—1 Bakolinti 2:9, 10

3. Bolamu nini mateya ya Biblia ekoki komemela biso?

3 Biblia ezali kopesa eyano na motuna nyonso mpe na likambo nyonso oyo tokoki kokutana na yango na bomoi na biso. “Mpo ete nyonso oyo ekomamaki kalakala ekomamaki mpo na kolakisa biso mpo ete tozala na elikya na nzela na koyika mpiko mpe na kobondisama na Makomami.” (Baloma 15:4, MN) Soki tokotónga na mateya ya Jéhovah, yango ekosunga biso mpo na koyika mpiko kati na mikakatano ekolendisa biso soki tolembi na motema mpe ekosalisa biso ete elikya na biso ya Bokonzi ezala makasi kati na motema na biso. Tika ete esengo na biso ezala na kotangaka Liloba na Nzambe mpe na kokanisaka mozindo likoló na yango “butu mpe moi,” mpamba te mayele oyo etongami likoló na Biblia ezali lokola “nzete na bomoi mpo na bango nyonso bakosimbaka yango, mpe baoyo bakobatelaka ango bakobengama ete bato na esɛngo.”​—Nzembo 1:1-3; Masese 3:13-18, MN; tala lisusu Yoane 17:3.

4. Ndakisa nini ya Yesu esengeli kozala na bopusi likoló ya misala na biso?

4 Yesu Mwana na Nzambe, abengami lisusu “Mwana na Davidi,” azalaki ntango nyonso kotalela Jéhovah mpo na kolakisama. (Matai 9:27)a Alobaki ete: “Mwana akoki kosala likambo moko te kasi bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala. Mpo ete nyonso ekosalaka ye, Mwana akosalaka yango lokola.” “Nazali kosala likambo moko na motó na ngai te, kasi pelamoko Tata asili kolakisa ngai, nakosololaka makambo oyo.” (Yoane 5:19, MN; 8:28) Yesu atikelaki biso ndakisa ete ‘tolanda matambe na ye.’ (1 Petelo 2:21) Kanisa naino! Soki tokoyekola lokola Yesu azalaki koyekola tokosala likambo nyonso lokola Jéhovah alingi ete tosala yango. Nzela ya Jéhovah ezali ntango nyonso nzela ya sembo.

5. “Sɔlɔ” ezali nini?

5 Na nsima, Davidi alobaki: “Nakotambola kati na sɔlɔ na yo.” (Nzembo 86:11) Mbula nkoto na nsima, wana azalaki koloba na Yesu, Mwana na Davidi, Pilato atunaki ye ete: “Sɔlɔ ezali elɔkɔ nini?” Yesu autaki kobenda likebi likoló ya Bokonzi na Ye oyo “ezali ya mokili oyo te.” Mpe abakisaki ete: “Yo moko olobi ete nazali mokonzi. Nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili mpo na ntina oyo: ete napesa litatoli mpo na sɔlɔ.” (Yoane 18:33-38) Na maloba wana, Yesu amonisaki ete sɔlɔ etalelaki Bokonzi ya Masiya. Ya solo, motó ya likambo ya Biblia ezali ete nkombo ya Jéhovah ekobulisama na nzela na Bokonzi yango.​—Ezekiele 38:23; Matai 6:9, 10; Emoniseli 11:15.

6. Wana ezali biso kotumbela kati na sɔlɔ, tosengeli kokeba na eloko nini?

6 Kotambola kati na sɔlɔ elimboli nini? Yango elimboli kotya elikya ya Bokonzi na esika ya liboso kati na mabanzo na biso. Bomoi na biso esengeli kotongama likoló na solo ya Bokonzi. Tosengeli te kozala na mitema mibale mpo na oyo etali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Tozala na molende na mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli na ntina na sɔlɔ ya Bokonzi, kolandáká ndakisa ya Yesu. (Matai 6:33; Yoane 18:37) Tokoki te kotambola kati na nzela ya solo na mitema mibale, kosakolaka se bongo na bongo, nzokande tozali kokamata banzela mosusu mpo na kominanola kino kolekisa ndelo, komipesa mingi na mosala moko ya mosuni to “kosalela . . . Bozwi lokola baombo.” (Matai 6:24) Tokoki bongo kobunga kati na banzela ya motindo wana kozanga koyeba lolenge ya kozonga na ‘nzela moke oyo ekomema na bomoi.’ Tokeba ete topengwa te na nzela yango! (Matai 7:13, 14) Jéhovah, oyo azali Molakisi na biso monene, azali kongengisa nzela na kosalelaka Liloba na ye mpe lisangá na ye; alobi ete: “Oyo ezali nzela; tambola na yango, wana ekobongwana yo na epai na loboko ya mobali to na epai na loboko ya mwasi.”​—Yisaya 30:21.

Kobanga oyo ebongi

7. Ndenge nini tokoki ‘kozala na motema moko’?

7 Davidi alandi kobondela na verset 11 ete: “Pesa ngai motema moko ete nabanga nkombo na yo.” Lokola Davidi, mposa na biso esengeli kozala boye ete tozála na motema moko, motema mokabwani te, mpo na kosala mokano ya Nzambe. Yango ezali na boyokani na toli Moize apesaki ete: “Sasaipi, Ɛ Yisraele, Jéhovah Nzambe na yo aluki nini epai na yo soko ezali oyo te ete obanga Jéhovah Nzambe na yo mpe otambola na banzela na ye nyonso mpe olinga ye mpe osalela Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba, mpe otosa malako mpe mibeko na Jéhovah oyo elakeli ngai yo lelo mpo na malamu na yo?” (Deteronome 10:12, 13) Soki tokopesa motema na biso mobimba mpe molimo na biso mobimba kati na mosala ya Jéhovah, ezali mpo na bolamu na biso. Na yango, tosengeli kobanga nkombo na ye ya lokumu na lolenge oyo ebongi. Nkombo ya Jéhovah elimboli “Ye oyo akoyeisa,” mingimingi mpo na oyo etali lolenge azali komema mikano na ye ya kitoko kino kokokisama na yango. Ezali lisusu kolobela bokonzi na ye likoló ya molongó mobimba. Soki tokosalela Nzambe na kobangaka nkembo na ye, tokopengwa te mpo na kobanga bato. Mitema na biso ekokabwana te. Nzokande, tokobanga kosala likambo oyo Jéhovah akosepela na yango te, mpamba te ye azali Mosambisi oyo aleki monene mpe Nkolo Moyangeli oyo asimbi bomoi na biso na maboko na ye.​—Yisaya 12:2; 33:22.

8, 9. (a) ‘Kozala moto na mokili te’ elimboli nini? (b) Lokola tozali “etaliseli liboso na bato,” meko nini esengeli na biso kozwa?

8 Ata kati na nsoni mpe minyoko, tokolanda ndakisa na Yesu oyo abangaki te mpe tokoboya kozala bato ya mokili oyo mabe. (Yoane 15:17-21) Yango elingi koloba te ete bayekoli na Yesu basengeli koboya kozala elongo na bato mosusu to kobombana na monastere moko. Kati na libondeli na ye, Yesu alobaki na Tata na ye ete: “Nalombi te ete olongola bango na mokili, kasi ete obatela bango na ye mabe. Bazali bato na mokili te pelamoko ngai nazali moto na mokili te. Bulisa bango kati na solo na yo. Liloba na yo ezali sɔlɔ. Pelamoko esili yo kotinda ngai kati na mokili, ngai mpe natindi bango kati na mokili.” (Yoane 17:15-18) Lokola Yesu, totindami ete tosakola sɔlɔ ya Bokonzi. Yesu azalaki koyamba bato nyonso. Bato balendisamaki na lolenge na ye ya koteya. (Tala Matai 7:28, 29; 11:28, 29; Yoane 7:46.) Esengeli kozala motindo moko mpo na biso.

9 Boninga na biso, elateli na biso malamu mpe bomoto na biso, masolo na biso ya kitoko mpe ya peto, nyonso wana ekosala ete bato oyo bazali na motema ya sembo bayamba biso mpe bayoka nsango na biso. Tosengeli kobwaka makambo lokola kozanga bopeto, molato mabe mpe boninga oyo ekoki kokotisa biso na makambo ya mokili mpe lolenge na bomoi ya mokili oyo ezangi kotongama likoló na mitinda ya Biblia. Lokola ‘tozali etaliseli mpo na mokili mpe mpo na baanzelu mpe mpo na bato,’ tosengeli kopesa ndakisa malamu butu mpe moi lokola baklisto ya solo. (1 Bakolinti 4:9; Baefese 5:1-4; Bafilipi 4:8, 9; Bakolose 4:5, 6) Tosengeli kozala na motema moko na likambo yango.

10. Lolenge nini Jéhovah azali kokanisela baoyo babongisi motema na bango ete ezala moko kati na mosala ya bulee?

10 Jéhovah akobosana biso te lokola bozali na motema moko mpo na kobanga nkombo na ye, mpamba te tozali kokanisa na bozindo likoló na mikano na ye kitoko mpe komipesa na mosala na ye. “Miso na Jéhovah, makotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na baoyo mitema na bango ezali mobimba epai na ye.” (2 Ntango 16:9) Kolobelaka ntango na biso, esakweli ya Malaki 3:16 elobi ete: “Na ntango yango, baoyo bakobangaka Jéhovah balobanaki kati na bango, moto na moninga na ye, mpe Jéhovah atyaki litoi mpe ayokaki. Mpe buku na kokanisa ekomamaki liboso na ye mpo na baoyo bakobangaka Jéhovah mpe bakokanisaka nkombo na ye.” Tika ete tozala na motema moko mpo na kobanga Jéhovah!

Motema malamu ya Jéhovah

11. Lolenge nini motema malamu ya Jéhovah ekomonisama epai na basembwi?

11 Oyo nde libondeli ebimi na motema mpenza David asali epai na Nzambe! Alandi na kolobaka ete: “Ɛ Jéhovah Nzambe, nakotonda yo na motema na ngai mobimba, mpe nakokumisa nkombo na yo seko na seko, mpo ete malamu na motema na yo ezali monene epai na ngai, mpe obikisi molimo na ngai na esika mozindo na baoyo bakufi.” (Nzembo 86:12, 13) Mpo na mbala ya mibale kati na Nzembo oyo Davidi azali kokumisa Jéhovah mpo na motema malamu (Biblia haut-fleuve esaleli “boboto”), mpo na bolingo na Ye ya sembo. Bolingo yango ezali mpenza monene ete ekoki kobikisa kati na makambo oyo mamonani ete makoki kosalema te. Ntango Saulo azalaki kobengana ye kati na esobe, David akokaki kooka lokola ete azalaki kobendana na mabelé kino akosuka na kokufa na esika moko boye. Ezalaki lokola ete azwami liboso na esika eleki mozindo ya sheol, bozindo ya liyita. Kasi Jéhovah abikisaki ye! Bobele bongo, mbala mingi Jéhovah asili kobikisa basaleli na ye na mikolo na biso na motindo ya kokamwa, asalisaki mpe baoyo babatelaki bosembo na bango na koyikaka mpiko na mikakatano, mbala mosusu kino liwa. Basembwi nyonso bakozwa mbano na bango, ata soki basengeli kozwa yango na nzela ya lisekwa.​—Tala Yobo 1:6-12; 2:1-6, 9, 10; 27:5; 42:10; Masese 27:11; Matai 24:9, 13; Emoniseli 2:10.b

12. Lolenge nini bakonzi ya mangomba bamimonisaki bato na lolendo mpe banyokoli, mpe nini ekozala lifuti na bango?

12 Na ntina na banyokoli na ye, Davidi angangaki: “Ɛ Nzambe, bato na lolendo batemeli ngai, ebele na bato na kongala bazali koluka bomoi na ngai; bakokanisaka yo te.” (Nzembo 86:14) Lelo oyo bakonzi ya mangomba ya boklisto ya mokili bazali kati na banyokoli. Bazali koloba ete bazali kosambela Nzambe kasi bazali kotya liloba “Nkolo” na esika ya nkombo na ye mosantu mpe bazali komonisa ye lokola libombami ya Bosato, nzokande elobelami ata esika moko te kati na Biblia. Oyo nde lolendo! Likoló na yango, bazali kopusa bakonzi ya politike na kopekisa mpe kokanga ba Témoins de Jéhovah, mpe bazali kolonga kosala bongo na bikolo mingi kati na mokili mobimba. Bato yango oyo bakolataka sutáni, oyo bazali kotuka nkombo na Nzambe, bakozwa lifuti na bango, elongo na biteni mosusu nyonso ya Babilone Monene oyo ekokani na mwasi ya pite.​—Emoniseli 17:1, 2, 15-18; 19:1-3.

13. Bizaleli nini Jéhovah amonisaka ntango azali kolakisa polele malamu na ye?

13 Kati na mbongwana moko ya esengo, libondeli na Davidi elandani boye: “Kasi yo, ɛ Jéhovah, ozali Nzambe na mawa, mpe ozali na ngolu; oyokaka nkele nokinoki te mpe ozali na malamu na motema mpe solo mingi.” (Nzembo 86:15) Ya solo bizaleli wana ya Nzambe na biso bizali mpenza likoló mingi. Maloba oyo mazali kokundola biso ntango Moize asengaki ete amona nkembo na Jéhovah na ngomba ya Sinai. Jéhovah ayanolaki ete: “Nakolekisa malamu na ngai liboso na yo, mpe nakosakola liboso na yo nkombo na ngai Jéhovah.” Nzokande akebisaki Moize ete: “Okoki kotala elongi na ngai te, mpo ete moto akotala ngai mpe kobika te.” Nsima na yango, Jéhovah akitaki likoló na lipata mpe asakolaki ete: “Jéhovah, Jéhovah, azali Nzambe na mawa mpe na ngolu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na malamu na motema mpe na solo.” (Exode 33:18-20; 34:5, 6) Davidi atangaki maloba wana kati na libondeli na ye. Mpo na biso, bizaleli motindo yango bizali na ntina mingi koleka komonana ya mosuni. Na kotalela lolenge oyo esili komonana epai na biso, tozali kosepela te na malamu na Jéhovah na motindo emonisami kati na bizaleli oyo ya kitoko?

“Elembo na malamu”

14, 15. Lolenge nini Jéhovah azali komonisa epai na basaleli na ye “elembo na malamu”?

14 Davidi alelaki lisusu mpo na mapamboli ya Jéhovah, na kolobaka ete: “Bongwa epai na ngai mpe yokela ngai mawa. Pesa moombo na yo nguya mpe bikisa mwana na moombo mwasi na yo. Monisa ngai elembo na malamu na yo ete bayini na ngai bamona yango mpe bayoka nsoni. Mpo ete yo moko ɛ Jéhovah, ekosungaka ngai mpe okobondisaka ngai.” (Nzembo 86:16, 17) David andimaki ete lokola azali ‘mwana ya moombo mwasi ya Jéhovah,’ ye mpe azali moto na Jéhovah. Ezali lolenge moko mpo na biso oyo lelo tosili kopesa bomoi na biso epai na Jéhovah mpe tozali kosala lokola baombo kati na mosala na ye. Tozali na mposa na nguya ya kobikisa ya Jéhovah na nzela ya elimo santu na ye. Yango wana tozali kosenga na Jéhovah ete amonisa epai na biso “elembo na malamu.” Malamu na Jéhovah esangisi bizaleli kitoko oyo touti kolobela. Mpo na yango, elembo nini, to ndanga nini tokoki kozela ete Jéhovah apesa biso?

15 Jéhovah azali Mopesi ya “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi” mpe azali komimonisa mokabi na kopesaka “elimo santu na baoyo bakosengaka ye yango,” lokola Yesu andimisaki biso likambo yango. (Yakobo 1:17; Luka 11:13) Elimo santu​—oyo nde likabo ya motuya mingi liuti na Jéhovah! Na nzela ya elimo santu, Jéhovah azali kopesa esengo ya motema, ata kati na monyokoli. Yango wana, na ntango ya kosamba, wana bomoi na bango ezalaki na likama, bantóma na Yesu bakokaki koloba na esengo nyonso ete Nzambe akopesaka elimo santu na baoyo nyonso bakotosaka ye lokola mokonzi. (Misala 5:27-32) Esengo ya elimo santu ezalaki ntango nyonso elongo na bango lokola “elembo na malamu.”​—Baloma 14:17, 18.

16, 17. (a) Elembo nini ya malamu na ye Jéhovah amonisaki epai na Paulo mpe Balanaba? (b) Elembo nini epesamaki na Batesaloniki oyo banyokwamaki?

16 Na boumeli ya mobembo na bango ya misionere na Asie Mineure, Paulo na Balanaba bakutanaki na mikakatano, mpe ata minyoko ya makasi. Ntango basakolaki na Antiokya ya Pisidi, Bayuda baboyaki koyoka nsango na bongo. Yango wana bamibalolaki epai na bapakano. Bazwaki litomba nini? “Eyoki bapakano bongo basepeli mpe bakumisi liloba na Jéhovah. Baoyo nyonso bazalaki na motema mobongisami mpo na bomoi na seko bakomaki bandimi.” Kasi Bayuda babimisaki yikiyiki, kino babenganaki bamisionere na enika yango. Bango mpe bayekoli ya sika balembaki? Soki moke te! Nkutu, “bayekoli batondaki na esengo mpe na elimo santu.” (Misala 13:48, 52) Jéhovah apesaki bango elembo wana ya malamu na ye.

17 Na nsima, lisangá ya sika ya Tesalonike ekutanaki na minyoko. Likambo yango etindaki ntóma Paulo na kokomela bango mokanda ya kobondisa, oyo ezali kokumisa mpiko na bango kati na minyoko. “Bandimaki liloba kati na mikakatano mingi elongo na esengo na elimo santu.” (1 Batesaloniki 1:6) “Esengo na elimo santu” oyo elandaki kolendisa bango ezalaki elembo ya polele euti na Nzambe oyo azali na mawa mpe ngolu, asilikaka noki te, mpe atondi na malamu na motema mpe na solo.

18. Lolenge nini bandeko na biso ya Europe de l’Est bamonisaki botɔndi na bango mpo na malamu ya Jéhovah?

18 Na mikolo na biso, Jéhovah amonisaki malamu na ye epai na bandeko na biso ya sembo na Europe de l’Est, na koyokisaka nsoni epai na baoyo bazalaki koyina bango​—banyokoli na bango ya kala. Ya solo, bandeko wana baoyo bauti kosikolama na minyoko ya mibu mingi, basengeli ntango nyonso koyika mpiko, mpo ete mingi kati na bango bazali na nkaka ya makambo na nkita. Kasi, “esengo na elimo santu” ebondisaki bango. Esengo nini ya koleka bakoki kozwa soki bobele te ya kosalela bonsomi na bango oyo bazwi kala mingi te mpo na kokolisa mosala ya kotatola? Bato mingi bazali koyoka bango, lokola emonisami na ba rapports ya ba assemblées mpe ya batisimo.​—Tala Misala 9:31.

19. Lolenge nini tokoki kosala ete maloba ya Nzembo 86:11 mazala maloba na biso mpenza?

19 Makambo nyonso oyo touti koyekola kati na lisolo oyo mpe oyo ya liboso ezali koyokisa biso libondeli ya motema mobimba oyo Davidi apesaki epai na Jéhovah ete: “Ɛ Jéhovah teya ngai, . . . Pesa ngai motema moko ete nabanga nkombo na yo.” (Nzembo 86:11) Tika ete maloba oyo ya texte ya mobu 1993 mazala lokola maloba ma biso mpenza, wana ezali biso kosimba na motema moko matomba ya Bakonzi mpe komonisa bosepeli na biso mpo na malamu mazangi nsuka ya Nzambe bobele moko, Moyangeli Aleki-monene, Jéhovah.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Yesu, oyo azalaki “libota” lisakolamaki, azalaki motuki na libulu ya bokonzi ya Davidi. Yango wana abengamaki “Mwana na Davidi” na mosuni mpe na elimo.​—Genese 3:15; Nzembo 89:29, 34-37.

b Mpo na bandakisa ya mikolo na biso, tala Annuaire des Témoins de Jéhovah, ya 1974, nkasa 113 kino 211; ya 1985, nkasa 194 kino 197; ya 1986, nkasa 237 kino 238; ya 1988, nkasa 182 kino 185; ya 1990, nkasa 171 kino 172; ya 1992, nkasa 174 kino 181.

Bozongeli

◻ Tozali komonisa nini ntango tozali kobondela ete: “Ɛ Jéhovah, teya ngai”?

◻ Na ndimbola nini motema na biso mozali kokoma moko mpo na kobanga nkombo na Jéhovah?

◻ Lolenge nini Jéhovah okomonisa motema malamu na ye epai na basembwi na ye nyonso?

◻ Lolenge nini Jéhovah azali komonisa epai na biso “elembo na malamu”?

[Etanda na lokasa 16]

Texte ya mobu 1993: “Ɛ Jéhovah, teya ngai . . . Pesa ngai motema moko ete nabanga nkombo na yo.”​—Nzembo 86:11.

[Elilingi na lokasa 15]

Jéhovah azali libunga mpe ndako molai mpo na baoyo bozali kotombola na bosembo kati na solo

[Elilingi na lokasa 18]

Na assemblée internationale “Bamemi ya pole” oyo ba Témoins de Jéhovah basalaki na sanza ya juin na engumba Saint-Pétersbourg (Russie) batangaki bayangani 46 214, baoyo kati na bongo 3 256 bazwaki batisimo. Bango nyonso bozali kozwa litomba na malamu ya Jéhovah, elongo na “esengo na elimo santu”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto