Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/1 nk. 24-25
  • Gelizimi: ‘Tosambelaki likoló na ngomba oyo’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Gelizimi: ‘Tosambelaki likoló na ngomba oyo’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Sɛkɛmɛ—Engumba oyo etongamaki kati na lobwaku
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Yesu ateyi mwasi Mosamaria
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu ateyi mwasi Mosamaria
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Losambo ya nani Nzambe andimaka?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/1 nk. 24-25

Bililingi ya mokili na ndaká

Gelizimi: ‘Tosambelaki likoló na ngomba oyo’

MWASI Mosamaria na libulu ya mai. Maloba oyo mazali te kokundola na elimo na yo lisolo ya kosimba motema etali litatoli ya libaku malamu oyo Yesu apesaki na mwasi moko na “libulu ya Yakobo” na Sikare, engumba moko ya Samaria? Olingi kobakisa boyebi na yo likolo na likambo wana ya ntina mingi?​—Yoane 4:5-14.

Kati na foto oyo ezwami awa na likolo, tozali komona bangomba mibale, oyo ezali na ntaka ya bakilometele 50 na nord ya Yelusaleme.a Na loboko ya mwasi (na sud) ezali ngomba Gelizimi oyo ezipami na banzete; maziba na yango mingi mazali kopesa nzela na kobota mbuma mingi mpe na bonzenga na yango. Na loboko ya mobali (na nord) ezali ngomba Ebali, mwa moke molai kasi ezali na mabanga mpe ezangi banzete.

Katikati wana ezalaki na lobwako ya Sikeme oyo ezali mabele ya kobota mbuma mingi. Omikundola ete ntango Abalama (oyo na nsima abengamaki Abalayama), moninga na Nzambe, afandaki mwa moko na Sikeme wana ezalaki ye kokatisa Mokili na ndaka. Wana, atongaki etumbelo moko mpo na Jéhovah, oyo autaki kobimela ye mpe alakaki ye kopesa mokili yango na bakitani na ye. (Genese 12:5-7) Ezalaki mpenza esika ebongi na kopesa ndaka motindo yango, na katikati na mokili yango! Longwa na songɛ ya Gelizimi to ya Ebali, tata wana ya mabota akokoki komona eteni monene ya Mokili na ndaka. Mboka Sikeme (oyo ekomi lelo Naplouse) eyebanaki mingi, mpo ete etongamaki esika nzela eleki longwa na nord kino na sud penepene ya bokutani elongo na nzela mosusu oyo euti na libongo ya Mai Monene kino na lobwako ya Yordani longwa na est kino ouest.

Etumbelo oyo Abalayama atongaki ezalaki bobele moko na makambo na ntina mingi na lisolo ya losambo oyo esalemaki awa. Nsima ya mibu mingi, Yakobo asombaki mabele na esika oyo mpe alandaki kosalela losambo ya peto na esika wana. Lisusu atimolaki to apesaki mosolo mpo batimwela ye libulu ya mai, penepene na nse ya ngomba Gelizimi. Nsima ya bikeke mingi mwasi Mosamaria alobaki na Yesu ete: “Nkoko na biso Yakobo, oyo apesaki biso etima oyo mpe ye moko amelaki mai na yango.” Mai ya etima wana mazalaki mbala mosusu kouta na liziba moko ya mai, oyo ekoki kolimbola ntina oyo ntoma Yoane abengaki yango ete “liziba na Yakobo.”

Lisolo ya losambo ya solo na boyokani na ngomba Gelizimi mpe Ebali ekoki lisusu kokundwela yo ete Yosua amemaki Yisraele wana, lokola Moize aiakaki ye. Yosua atongaki etumbelo moko na Ebali. Kanisa ete ndambo moko ya bato bazali liboso ya ngomba Gelizimi mpe ndambo mosusu liboso na Ebali wana Yosua azali kotanga “mibeko, mapamboli mpe kolakelama mabe.” (Yosua 8:30-35; Deteronome 11:29) Nsima ya bambula mingi, Yosua azongaki lisusu na esika wana mpe alobaki kati na maloba na ye ya nsuka mpo na kokebisa, ete: “Mpo na ngai mpe ndako na ngai, tokosalela Jehovah.” Libota mobimba lisalaki kondimana motindo moko. (Yosua 24:1, 15-18, 25) Kasi batosaki yango solo?

Eyano na motuna oyo ekoki kosalisa yo mpo na kokanga ntina ya lisolo oyo lilekaki kati na Yesu mpe mwasi Mosamaria. Lokola tomoni yango, losambo ya solo oyo Abalayama, Yakobo mpe Yosua basalelaki, eumelaki libela te awa na Samaria.

Nsima bokabwani ya mabota zomi oyo mazalaki na Nord, babongwanaki na losambo ya mwana na ngombe. Yango wana Jéhovah atikaki ete Basulia balonga mokili yango na mobu 740 L.T.B. Bamemaki ndambo monene na bato, mpe bakitanyaki bango na bato ya bikolo mosusu, basambeli ya banzembe ya bapaya baoyo bautaki na bisika mosusu na Bokonzi ya Asulia. Na ntembe te, basusu kati na bapakano yango babalanaki elongo na Bayisraele mpe bayekolaki mwa makambo matali losambo ya solo, lokola mobeko motali kokatama ngenga. Kasi lolenge ya losambo oyo losalemaki na Samaria, esepelisaki mpenza Nzambe te.​—2 Mikonzi 17:7-33.

Kati na losambo na bango oyo esangisi makambo mingi, Basamaria bazalaki kondima kati na Makomami bobele mikanda ya Moize mitano ya liboso, oyo babengi Pentateuque. Pene na ekeke ya minei L.T.B., batongaki tempelo moko na ngomba Gelizimi, mpo na kowelana ya tempelo ya Nzambe na Yelusaleme. Na nsima tempelo ya Gelizimi ekomaki ya Zeus (to Jupiter) mpe na nsima ebomamaki. Atako bongo, losambo ya Basamaria elandaki se kosalema na ngomba Gelizimi.

Kino lelo, mbula na mbula, Basamaria bakumisaka Pasika na Gelizimi. Babomaka ebele na bana na mpate. Mpe bazali kozindisa yango na mai ya mɔtɔ mpo na kolongola nkunge na yango. Na nsima, misuni mikolambama kati na mabulu na boumeli ya bangonga mingi. Na katikati na butu, ebele na Basamaria, oyo mingi na bango bautaka na Yelusaleme, bakolya elambo na bango ya Pasika. Awa na nse na ngambo mosusu, okoki komona nganga monene ya Basamaria, oyo amizipi moto, azali kokamba elambo ya Pasika na ngomba Gelizimi.

Omikundola ete mwasi Mosamaria alobaki na Yesu ete: “Bankoko na biso basambelaki na ngomba oyo.” Yesu apesaki ye eyano oyo etali biso lokola ete: “Ntango ekoya oyo bakosambela Tata na ngomba oyo te soko na Yelusaleme te. . . . Kasi, ntango ekoya, ee esili koya, oyo basambeli ya solo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo ete Tata akolukaka motindo na basambeli oyo. Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bakosambelaka ye basengeli kosambela ye na elimo mpe na solo.”​—Yoane 4:20-24, MN.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Okoki kokuta fɔtó oyo na monene na yango kati na Calendrier des Témoins de Jéhovah 1993.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]

Garo Nalbandian

Garo Nalbandian

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto