Tobatela etonga elongo na Mozalisi na biso Monene
“Jehovah azali Mobateli na ngai. Nakozanga eloko moko te. Akolendisaka molimo na ngai. Akotambolisaka ngai na nzcla na boyengebene mpo na nkombo naye.”—NZEMBO 23:1, 3, MN.
1. Libandisi nini ya bolingo oyo Jehovah azali kopesa?
“LOYEMBO na Davidi” oyo lozwami na eteni ya 23 na mokanda ya Nzembo, ezali kobandisa milimo ya bato mingi. Esili kolendisa bango na kotya elikya na oyo elobami na Nz 23 verset 6 ete: “Ya solo, malamu mpe boboto ekolanda ngai mikolo nyonso ya bomoi na ngai; mpe nakofanda na ndako na Jehovah kino bolai ya mikolo na ngai.” Mposa na yo ezali ete ofanda ntango nyonso kati na ndako na losambo ya Jehovah, na bomoko elongo na libota na ye oyo esangisi bato bauti na bikolo nyonso na mabele? Jehovah Nzambe, Mozalisi na biso Monene, “mobateli na mpate mpe mokengeli na milimo na bino,” akosalisa yo ete okokisa mokano wana.—1 Petelo 2:25.
2, 3. (a) Lolenge nini Jehovah azali kobatela libota na ye na bolingo nyonso? (b) Lolenge nini “etonga” ya Jehovah ezwi bokoli monene?
2 Mozalisi ya “makolo ya sika mpe mabele ya sika” azali lisusu Mobongisi mpe Mokengeli Monene na lisanga ya boklisto, “ndako ya Nzambe.” (2 Petelo 3:13; 1 Timote 3:15) Azali mpenza kosenzela ete abatela malamu libota na ye, lokola Yisaya 40:10, 11 (MN) eyebisi yango polele ete: “Tala! Jehovah ye moko, Nkolo Moyangeli, akoya lokola moto na nguya, mpe loboka na ye lokoyangela mpo na ye. Tala! Litomba na ye lizali na ye elongo, lifuti oyo akopesa ezali liboso na ye. Akobatela etonga na ye lokola mobateli na mpate. Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana na mpate; mpe akokumba bango na ntolo na ye, akokamba baoyo bazali konungisa na likebi nyonso.”
3 Na ndimbola na yango na bolai, “etonga” wana esangisi baoyo bazali kotambola uta kala kati na solo ya boklisto mpe “bana na mpate” baoyo bauti koyanganisama kala mingi te—lokola bibele oyo bauti kozwa batisimo na Afrika mpe na Europe de l’Est. Lobɔkɔ na nguya mpe na libateli ya Jehovah ezali koyanganisa bango na ntolo na ye. Atako bazalaki lokola bampate babunga nzela, bazali sikawa na boyokani malamu elongo na Nzambe na bango mpe Mobateli molingami na bango.
Mobateli na mpate mosalani elongo na Jehovah
4, 5. (a) Nani azali “mobateli na mpate aleki malamu,” mpe lolenge nini amonisami na esakweli? (b) Mosala nini ya kokabola oyo Yesu azali kokamba, mpe ebimisi matomba minene nini?
4 Kosalaka na loboko mobali ya Tata na ye na likolo, Yesu Klisto, “mobateli na mpate aleki malamu,” azali mpe kotalela “bampate” na likebi nyonso. Apesaki bomoi na ye liboso mpo na bolamu ya “etonga moke” ya bapakolami mpe, lelo oyo, ebele monene ya “bampate [na ye] mosusu.” (Luka 12:32; Yoane 10:14,16) Jehovah Nzambe, Mobateli Monene na mpate, alobi epai na bampate nyonso wana, ete: “Tala, ngai mpenza nakokata makambo ... kati na mpate na mpate. Mpe nakotya mobateli moko likolo na bango, mpe asengeli koleisa bango, ɛɛ bobele moombo na ngai Davidi. Ye akoleisa bango, mpe ye moko akozala mobateli na bango. Ngai Jehovah nakozala Nzambe na bango, mpe Davidi, moombo na ngai akozala mokonzi kati na bango. Ngai, Jehovah, nasili koloba.”—Ezekiele 34:20-24, MN.
5 Elobeli “Moombo na ngai Davidi” ezali esakweli etaleli Klisto Yesu, “mokitani” na kiti na bokonzi ya Davidi. (Nzembo 89:35, 36) Na mikolo oyo mabota mazali kosambisama, Mobateli na mpate mpe Mokonzi mosalani na Jehovah, Klisto Yesu, Mwana na Davidi, azali kokoba kokabola kati na bato “bampate” mpe baoyo bazali komitanga ete bazali “bampate” nzokande bazali mpenza “bantaba.” (Matai 25:31-33) “Mobateli bobele moko” wana atyami lisusu mpo na koleisa bampate. Lelo, tozali komona kokokana monene ya esakweli wana! Awa bakonzi ya politike bazali kolobela bomoko ya bato nyonso na nzela ya ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba, Mobateli na mpate azali solo koyanganisa bampate ya mabota nyonso na nzela mosala ya kopesa litatoli na minoko mingi lokola oyo ekoki kosalema bobele na lisanga moko, lisanga ya Nzambe awa na mabele.
6, 7. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kosala nini mpo ete bampate bazwa “bilei na ntango na yango”?
6 Lokola nsango ya Bokonzi ezali ntango nyonso kopalangana kati na bateritware ya sika, “moombo na sembo mpe na mayele,” elingi koloba baklisto bapakolami, asili kotyama na Mobateli na mpate mpo na kozwa bibongiseli ya kopesa ebele na “bilei na ntango na yango.” (Matai 24:45) Na mokili mobimba, mingi kati na ba filiales 33 ya la Societe Watch Tower oyo ezali na binyateli, ezali kobimisa mikanda mingi mpenza mpo na kokokisa bamposa oyo ezali ntango nyonso kobakisama na ntina na mikanda mikolimbolaka Biblia mpe bazulunalo.
7 Collège central ya ba Témoins de Jéhovah ezali kosala nyonso oyo ekoki mpo na kobongisa lisusu lolenge ya kobongola mikanda na minoko soko 200 mpe na kobanda kobongola mikanda na minoko mosusu oyo misengeli, mpo na kokokisa mosala na elanga ya mokili mobimba. Milende wana misalemi mpo na kokokisa etinda oyo Yesu apesaki epai na bayekoli na ye na Misala 1:8 (MN), ete: “Bino bokozwa nguya na ntango elimo santu ekoya likolo na bino, mpe bokozala batatoli na ngai . . . kino na eteni eleki mosika ya mokili.” Lisusu, Les Saintes Ecritures—Traduction du monde nouveau, esili kobimisama na mobimba to mpe na ndambo na yango na minoko 14, ezali sikawa kobongolama na minoko mosusu 16 ya Mpoto, ya Afrika, mpe na mikili ya Orient.
Tosepela “na kimya na Nzambe”
8. Lolenge nini bampate bazali kozwa mapamboli mingi na nzela na kondima ya kimya oyo Jehovah asalaki elongo na bango?
8 Na nzela na Klisto Yesu, Mobateli bobele moko ya mpate na ye, Jehovah asali “kondimana na kimya” elongo na etonga ya bampate na Ye oyo eleisami malamu. (Yisaya 54:10) Lokola bazali komonisa kondima na makila na Yesu oyo masopanaki, bampate bakoki kotambola kati na pole. (1 Yoane 1:7) Bazali kosepela ‘na kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso, ekobatela mitema na bango mpe makoki na bango ya kokanisa nzela na Klisto Yesu.’ (Bafilipi 4:7, MN) Lokola Ezekiele 34:25-28 emonisi yango, Jehovah azali kobatela bampate na ye kati na paradis ya elimo, ezalela kitoko ya libateli, na bokoli kitoko, mpe na kobota mbuma mingi. Mobateli wana na mpate na bolingo alobi epai na bampate na ye ete: “Bakoyeba ete ngai nazali Jehovah, wana ekobuka ngai mikɛsi na boombo na bango, mpe ekobimisa ngai bango na mabɔkɔ na baoyo bakangaki bango baombo. Bakopunzama lisusu na mabota te; . . . mpe bakofanda na kimya mpe moto akobangisa bango te.”
9. Libaku nini lipesami na libota ya Nzambe na ˈkobukama ya mikesiˈ?
9 Na bambula oyo euti koleka, ba Témoins de Jéhovah kati na mikili mingi basili komona kobukama ya “mikesi ya boombo na bango.” Bazali na bonsomi ya kosakola koleka oyo ezalaki liboso. Mpe tika ete biso nyonso, kati na mboka moko na moko, tosalela malamu libateli oyo Jehovah azali kopesa awa ezali biso kosala na molende mpo na kokokisa mosala na ye. Oyo nde elendiseli kitoko epesameli biso na Jehovah awa ezali biso kobelema na ntango ya bolozi monene mingi oyo ekoyela bato!—Danyele 12:1; Matai 24:21, 22.
10. Banani Jehovah asili kopona mpo na kosunga Yesu Klisto, Mobateli na mpate Aleki malamu, mpe lolenge nini ntomá Paulo alobaki na ntina na bango?
10 Mpo na mokolo yango akobukanisa mabe, Jehovah asili kopona babateli na mpate balandi ete basunga Yesu Klisto, Mobateli na mpate aleki malamu, mpo na kobatela etonga. Bango bamonisami na Emoniseli 1:16 lokola “minzoto nsambo” kati na lobaka mobali na Yesu, motuya nsambo ezali bongo elembo ya kokoka. Na ekeke ya liboso, ntoma Paulo alobaki mpenza epai na lisangani ya babateli na mpate balandi, ete: “Bokeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etonga mobimba oyo elimo santu esili kotya bino bakengeli na yango, mpo na kobatela lisanga na Nzambe, oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye mpenza.“ (Misala 20:28, MN) Lelo oyo, ezali na ebele ya babateli na mpate balandi baoyo bazali kosala kati na masanga 69.557 epai nyonso na mabele.
Babateli na mpate balandi, bokende liboso!
11. Lolenge nini babateli mosusu na mpate balongaki kozwa esika ya liboso kati na bateritware asalelami mingi?
11 Na bisika mingi babateli wana ya mpate basengeli komonisa ndakisa kati na bateritware etalelami mbala na mbala na boumeli ya mikolo oyo nsuka. Lolenge nini bakoki kosala ete etonga ezala ntango nyonso na molende? Babateli na mpate bazali kosala yango na motindo mobongi kokumisama, mpe moko na myango oyo balongaki kati na yango, ezali bongo kolendisa mosala ya pionnier auxiliaire mpe ya pionnier permanent. Mingi na babateli na mpate bazali komipesa bango moko kati na mosala yango, mpe ata basakoli oyo bazali na makoki ya kosala yango te, bazali komonisa elimo ya pionnier na kosakolaka na esengo oyo ezali kosalisa bango na kolonga kozanga bosepeli ya bato kati na teritware. (Nzembo 100:2; 104:33, 34; Bafilipi 4:4, 5) Na yango, lokola mabe mpe mobulu etondi na mokili, mingi na bato oyo bakokani na bampate bazali kosepela na elikya ya Bokonzi.—Matai 12:18, 21; Baloma 15:12.
12. Nkaka nini monene ezali komonana epai bokoli ya nokinoki ezali kosalema, mpe lolenge nini bazali mbala mosusu kolónga yango?
12 Likambo mosusu ezali oyo ete, mbala mingi babateli na mpate baoyo basɛlingwi bazali mingi te mpo na koleisa etonga. Epai bokoli ezali kosalema nokinoki, lokola na Europe de lˈEst, ezali na masanga mingi ya sika oyo bankulutu bazali te. Bampate ya bolingo malamu bazali komema mikumba, kasi bazali na makoki mingi te. Mposa ya lisalisi ezali mpenza monene mpo na kobongisa “bampate” oyo bazali koya kati na masanga. Na mikili lokola Brezile, Mexique mpe Zaire, epai bokoli ezali kosalema nokinoki esengeli kosalela bilenge Batemwe mpo na kobongisa mosala mpe bato ya sika. Ba pionniers bazali kopesa lisalisi kitoko, mpe ezali elanga kati na yango bandeko basi bakoki kosalisa bandeko basi ya sika. Na nzela ya elimo na ye Jehovah azali kopambola matomba mazwami. Bokoli ezali se kobakisama.—Yisaya 54:2, 3.
13. (a) Batemwe nyonso basengeli kobondela mpo na nini awa mosala ya kobuka mbuma ezali sé kobakisama? (b) Lolenge nini mabondeli ya libota ya Nzambe mazwaki eyano liboso ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe nsima na yango?
13 Na mikili epai mosala ya kosakola mozali na moboko malamu, na mikili epai bipekiseli biuti kolongolama, mpe na bateritware oyo efungolami sika, maloba na Yesu oyo mazwami na Matai 9:37, 38 mazali mpenza kokokana, ete: “Ee, elanga ezali monene, nde basali bazali mingi te. Na yango, bobondela Mokolo na elanga ete atinda basali kati na elanga na ye.” Tosengeli kobondela lisusu ete Jehovah abimisa babateli na mpate mingi. Asili komonisa ete akoki kosala yango. Liboso na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe na boumeli na yango, bayangeli mabe oyo bakokani na Basulia balingaki kosilisa ba Temoins de Jehovah. Kasi mpo na koyanola na mabondeli na bango, Jehovah apetolaki lisanga na bango, kotyaka ebongiseli malamu ya bonzambe, mpe apesaki “babateli na mpate”a oyo basengelaki. Yango ezali na boyokani na esakweli oyo ete: “Wana Moasulia akoingela na mokili na biso mpe akokota na ndako minene na biso. Tokotemisela bango babateli nsambo mpe mikolo mwambe kati na biso”—esengeli bankulutu mingi mpenza oyo bamipesi mpo na kokamba masanga.—Mika 5:5.
14. Mposa nini ya nokinoki emonani kati na lisanga, mpe elendiseli nini epesami epai na bandeko?
14 Batemwe nyonso ya mibali oyo basili kozwa batisimo basengeli kozala na mposa ya komema mikumba misusu. (1 Timote 3:1) Ezali likambo ya nokinoki. Nsuka ya ebongiseli oyo mabe esili kobɛlɛma. Habakuku 2:3 elobi ete: “Emonaneli ezali bobele mpo na ntango ebongisami, mpe ekomi noki epai na nsuka, ekozanga te; ... Ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.” Bandeko mibali, bokoki nde koluka komema mikumba mingi kati na mosala wana ya kobatela bampate—liboso ete nsuka eya?—Tito 1:6-9.
Ebongiseli ya teokratike mpo na kobatela bampate
15. Libota ya Jehovah litambwisami na ebongiseli ya teokratike kati na likambo nini?
15 Mpo na komipesa mpenza na bokoli ya lisanga ya Jehovah, libota na ye lisengeli kolanda ebongiseli ya teokratike. Lolenge nini bakoki kosala yango? Bongo, liloba “teokratike” elimboli nini? Mokanda Diksionere ya sika ya mokili mobimba (Lifalansé) ya M. Lachatre, elimboli liloba “teokrasi” lokola “boyangeli ya Nzambe.” Ezali na ndimbola oyo nde “libota mosantu” ya basaleli na Jehovah lizali ya teokratike. (1 Petelo 2:9; Yisaya 33:22) Lokola basangani to basalani elongo na libota wana ya teokratike, baklisto ya solo basengeli kotosa mpe kosalela Liloba na Nzambe mpe mitinda na Ye.
16. Lolenge nini biso moko tokoki mpenza komonisa ete tozali kolanda ebongiseli ya teokratike?
16 Ntoma Paulo alimbolaki polele lolenge baklisto basengeli kolanda ebongiseli ya teokratike. Liboso, alobaki ete “basengeli kolata bo-moto ya sika oyo bozalisami na mokano na Nzambe kati na boyengebene mpe na bosembo ya solo.” Bomoto ya sika ya moklisto esengeli koyokana na mitinda ya sembo ya Nzambe mizwami mpenza kati na Liloba na ye. Asengeli kozala sembo epai na Jehovah mpe na mibeko na Ye. Nsima na komonisa lolenge nini yango ekoki kosalema, Paulo apesi elendiseli oyo ete: “Bozala bamekoli na Nzambe, lokola bana balingami.” (Baefese 4:24 kino 5:1, MN) Lokola bana ya botosi, tosengeli komekola Nzambe. Na motindo yango teokrasi ya solo ekomonana na misala, mpamba te tokomonisa bongo ete tota-mbwisami solo na Nzambe!—Tala lisusu Bakolose 3:10, 12-14.
17, 18. (a) Baklisto oyo bakotosaka ebongiseli ya teokratike basengeli komekola ezaleli nini monene ya Nzambe? (b) Na maloba oyo ayebisaki epai na Moize, lolenge nini Jehovah alobelaki mingi ezaleli na Ye ya liboso, kasi abakisaki likɛbisi nini?
17 Wapi ezaleli ya liboso ya Nzambe oyo tosengeli komekola? Ntoma Yoane ayanoli na 1 Yoane 4:8 wana alobaki ete: “Nzambe azali bolingo.” Nsima na ba versets mwambe na nse, na verset 16, azongeli etinda wana ya ntina mingi ete: “Nzambe azali bolingo, mpe ye oyo aumeli kati na bolingo azali kati na Nzambe, mpe Nzambe azali kati na ye.” Jehovah, Mobateli Monene na mpate, azali mpenza bolingo. Babateli ya mpate oyo bazali kotosa ebongiseli ya teokratike, bazali komekola Jehovah na komonisaka bolingo mozindo mpo na bampate na ye.—Tala 1 Yoane 3:16, 18; 4:7-11.
18 Mokambi Monene na ebongiseli ya teokratike, amimonisaki epai na Moize lokola “Jéhovah, Jéhovah, Nzambe na motema mawa mpe na ngolu, akookaka nkanda noki te. Aleki na boboto mpe na solo. Akobatela malamu na ye mpo na nkoto na nkoto, mpe akolimbisaka mabe, kobuka mibeko mpe lisumu; nde akopesaka etumbu mpo na mabe; akoyeisaka etumbu mpo na mabe ya batata epai na bana na bango mpe epai na bana na bana na bango, epai na libota ya misato mpe epai na libota ya minei.” (Exode 34:6, 7, MN) Bongo Jehovah alobelaki mpenza mitindo ndenge na ndenge ya bolingo na ye, ezaleli oyo ebongi mpenza na ebongiseli ya teokratike, nzokande apesi likebisi makasi ete akopesa etumbu esengeli na mosali mabe.
19. Na kokesena na Bafalisai, lolenge nini baklisto babateli na mpate basengeli komitabwisa mpo na kolanda ebongiseli ya teokratike?
19 Kolanda ebongiseli ya teokratike elimboli nini mpo na baoyo bazali na mikumba kati na lisanga? Yesu alobaki epai na bakomeli mpe Bafalisai ya eleko na ye ete: “Bakokangaka mikumba na bozito mpe bazali kotya yango na mapeka na bato, nde bango mpenza balingi koningisa yango te na mosapi na bango.” (Matai 23:4, MN) Oyo nde monyoko mpe kozanga bolingo! Ebongiseli ya solo ya teokratike, to litambwisi ya Nzambe, ezali kosenga na babateli ya etonga ete basalela mitinda ya Biblia oyo mitondi na bolingo, kasi bakamba bampate te na ebele na mitinda mipesami na bato. (Tala Matai 15:1-9.) Babateli ya mpate oyo bazali kotosa ebongiseli ya teokratike, basengeli lisusu komekola Nzambe na kobakisaka, likolo na bolingo na bango, mposa makasi ya kobatela bopɛto ya lisanga.—Tala Baloma 2:11; 1 Petelo 1:17.
20. Bibongiseli nini ya lisanga bindimami na babateli na mpate oyo bazali kotosa ebongiseli ya teokratike?
20 Babateli malamu ya mpate bayebi ete na mikolo oyo ya nsuka, Yesu atyaki moombo na ye ya sembo mpe ya mayele likolo na bozwi na ye nyonso, mpe ete elimo santu ezali kotambwisa moombo wana mpo na kopona bankulutu mpo na mosala ya kobatela bampate. (Matai 24:3, 47; Misala 20:28) Na yango, kolanda ebongiseli ya teokratike esɛngi mpe kozala na botosi ya mozindo epai na moombo wana, na bitongiseli ya lisanga oyo bisalemi na moombo yango mpe na bibongiseli bisalemi na bankulutu kati na lisanga.—Baebele 13:7, 17.
21. Yesu atikaki ndakisa nini malamu mpo na babateli na mpate balandi?
21 Yesu ye moko atikaki ndakisa malamu, na kotalelaka ntango nyonso Jehovah mpe Liloba na Ye mpo na kozwa litambwisi. Alobaki ete: “Nakoki te kosala likambo na mwango na ngai; nazali kosambisa lokola eyoki ngai; mpe kosambisa na ngai ezali sembo, mpo ete nazali koluka kosala mokano na ngai te, kasi mokano ya ye oyo atindaki ngai.” (Yoane 5:30, MN) Babateli na mpate balandi na Nkolo Yesu Klisto, basengeli kolona ezaleli ya komikitisa. Soki nkulutu moko akosɛngaka ntango nyonso litambwisi ya Liloba na Nzambe, lokola Yesu asalaki yango, boye azali mpenza kolanda ebongiseli ya teokratike.—Matai 4:1-11; Yoane 6:38.
22. (a) Lolenge nini biso nyonso tosengeli kotya molende mpo na kotosa ebongiseli ya teokratike? (b) Yesu apesaki libyangami nini ya boboto epai na bampate?
22 Bino mibali oyo basili kozwa batisimo, boluka kozwa mikumba kati na lisanga mpe bokokisa masengami mpo na kozwa yango! Tika ete bino nyonso bampate na bolingo, bozwa ekateli ya kolanda ebongiseli ya teokratike, na komekolaka Nzambe mpe Klisto mpo na komonisa bolingo! Tika ete, babateli na mpate mpe etonga bakoka kosepela mpo ete basili koyanola na libyangi oyo na Yesu, ete: “Boya epai na ngai, bino nyonso bolɛmbi mpo na mosala mpe bokumbi bozito, mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino, mpe bozala bayekoli na ngai; mpamba te ngai nazali na bopolo mpe na motema mosakɛmi; mpe bokozwa bopemi mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ekookisa mpasi te, mpe mokumba na ngai mozali na bozito te.”—Matai 11:28-30, MN.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala masolo malobeli “Lisanga oyo mabimisamaki na Mosenzeli ya Lingelesi ya le 1er mpe ya le 15 juin 1938.
[Bozongeli]
◻ “Etongá” ya Jehovah ezali nini, mpe yango esangisi banani?
◻ Lolenge nini Yesu amimonisaki ete azali “mobateli na mpate aleki malamu” na ekoke ya liboso, mpe na mikolo na biso?
◻ Mokumba nini ya ntina minai mokokisami na babateli na mpate batandi mpo na koleisa etongá?
◻ Wapi ndimbola ya moboko ya liloba “teokrase”?
◻ Lolenge moklisto—mingi mpenza mobateli na mpate molandi—asengeli kosala mpo na kotosa ebongiseli ya teokratike?
[Elilingi na lokasa 20]
Lokola babateli na mpate oyo bamipesi, Jehovah azali kobatela etonga na ye
[Elilingi na lokasa 23]
Mosala ya teokrasi mozali komonana wana tozali komekola Jehovah na komonisaka bolingo