Osengeli kozwa batisimo?
NA BOUMELI ya mibu misato oyo miuti koleka, ba Témoins de Jéhovah babatisaki bato penepene na milió moko. Yango epesi mwayene ya bato 824 na mokolo moko, to bato 4 nsima na minite 7. Oyo ezali bobele komekola molende ya losambo ya ekeke ya zomi na mitano mpe ya ekeke ya zomi na motoba?
Te, bato wana babatisamaki na makasi te, babongwanaki mpe bato mingi na mbala moko te, to bayanolaki mpe te na libyangami ya bateyi ya mangomba oyo bazali kosalela maoki. Bazwaki batisimo mpo ete Yesu Klisto, Nkolo mpe Motambwisi na baklisto, apesaki etinda ete esalema bongo. Balandaki matambe mpe mwango etyami na Yesu mpe esalelamaki na bantóma oyo ye moko aponaki mpe abongisaki.
Nsima na lisekwa na ye mpe liboso ete amata na likoló, Yesu apesaki na bayekoli na ye malako oyo ya nsuka: “Boye bokende kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu, kolakisa mpe bango ete batosa nyonso esili ngai kolaka bino. Mpe tala, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka ya ekeke.” (Matai 28:19, 20) Kobanda eleko wana, bobele batisimo na mai nde elingaki kosepelisa Nzambe.
Engebene lisoló ya Biblia, bayekoli ya liboso ya Klisto bakomaki “batatoli [na ye] kati na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samaria, mpe kino nsuka na mokili.” (Misala 1:8) Lokola Yesu asakolaki yango, mosala na bango ya kosakola mpe kolakisa elingaki komema na kopesa batisimo na bandimi oyo basengelaki mpe kozala bayekoli na ye.
Makomami malobeli mpo na mbala ya liboso batisimo lolenge yango na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. na Yelusaleme. Mokolo wana, ntóma Petelo “atelemi esika moko na bazomi na moko” mpe alobelaki bibele oyo bayanganaki wana makambo matali Yesu Masiya. Lisolo liyebisi biso ete diskur na ye ˈepesi bango kokatana na mitema,ˈ mpe batunaki soko basengeli kosala nini. Ntoma Petelo alobaki ete: “Bongola mitema mpe batisama moko moko na nkombo na Yesu Klisto mpo na kolimbisama na masumu na bino.” Mbano nini emonanaki? “Na bongo, bango bayambi mateya na ye babatisami, mpe na mokolo yango bato soko nkoto misato babakisami na bango.” (Misala 2:14-41) Masolo malandi mazali kondimisa ete bayekoli bayokaki nsango etali Yesu Klisto, bandimaki nsango malamu mpe babongolaki mitema liboso na kozwa batisimo.—Misala 8:12,13,34-38; 10:34-48; 16:30-34; 18:5,8; 19:1-5.
Na lolenge nini?
Bayekoli wana ya sika basengelaki kobatisama na mai, kasi lolenge nini? Ezalaki nde na komwangisela bango mai, na kosopela bango mai na moto, to na kozindisa bango mobimba kati na mai? Lisolo ya Biblia lizali koloba nini? Mpo ete Yesu atikelaki biso ndakisa “ete tolanda matambe na ye,” lolenge nini ye abatisamaki?—1 Petelo 2:21.
Biblia emonisi ete Yesu abatisamaki kati na ebale monene ya Yaladene. Nsima ya kobatisama, “abimi na mai.” (Malako 1:10; Matai 3:13, 16) Na bongo Yesu azindisamaki solo kati na ebale Yaladene. Abatisamaki na Yoane Mobatisi, oyo, ntango alukaki esika mpo na kobatisa bato, aponaki esika moko na lobwaku ya Yaladene, penepene na Salema epai “mai mingi mazalaki wana.” (Yoane 3:23) Maloba ya mokube Moetiopia mamonisi ete kozindisa moto mobimba kati na mai ezalaki lolenge bayekoli na Yesu bazalaki kopesa bato batisimo. Wana mateya na Filipo masimbaki motema na ye, angangaki ete: “Tala mai! Likambo nini ekopekisa ngai kobatisama?” Na nsima tomoni ete “bango mibale bakiti kati na mai mpe” na nsima “ebimi bango na mai.”—Misala 8:36-39.
Engebene lisolo ya kala baklisto bazalaki kopesa batisimo ya kozindisa bato mobimba kati na mai? Ee. Ezali likambo ya kosepelisa na komona ete kati na mwa mikili mingi ezali naino na mabulu minene oyo ebongi mpo na kobatisa bato. Tokoki kotanga kati na zulunalo Ministry ete: “Bilembeteli ya arkeoloji bizali kotatola na motindo ya kokamwa ete kozindisama mobimba na mai ezalaki mwango esalelami mpo na kobatisa bato na boumeli ya bikeke zomi kino zomi na minei ya liboso.” Ebakisi ete: “Lisolo ya batisimo na baklisto ekoki kolandana na lisalisi ya bitika ya bandako bizalaki uta eleko ya baklisto ya liboso, mpe lisusu na lisalisi ya bandakonzambe ya kala oyo ezali naino kosalelama kino lelo oyo. Bililingi biyemami na bitika ya mayita ya kala mpe bandakonzembe, bililingi ya langi mingi eyemami na mabele, na bifelo mpe na palafo, bililingi mpe badesé oyo tozali kokuta kati na bamaniskri ya kala ya Kondimana ya Sika ezali kopesa bandimbola mingi na lisolo wana ... Ezali kobakisama na litatoli lizwami na mikanda na Bakonzi na Mangomba, litatoli oyo emonisi ete kozindisa bato mobimba na mai ezalaki lolenge ya batisimo oyo esalelamaki mingi na Eklezia ya ebandeli.”
Mokanda La Nouvelle Encyclopédie catholique (na Lingelesi) endimi ete: “Ntembe ezali te ete kati na Eklezia ya ebandeli batisimo ezalaki kosalema na kozindisa moto mobimba na mai.” Yango wana ezali likambo na kokamwa te na kokuta kati na bazulunalo mito na makambo lokola: “Bakatolike bazali kozongela batisimo ya kozindisa bato na mai” (The Edmonton Journal, Canada, 24 Septembre 1983), “Mposa makasi na Bakatolike mpo na batisimo ya kozindisama na mai” (St. Louis Post-Dispatch, 7 Avril 1985), “Bakatolike mingi bandimi batisimo ya kozindisama na mai” (The New York Times, 25 Mars 1989), mpe “Batisimo ya kozindisama na mai ezongisami” (lhe Houston Chronicle, 24 Août 1991).
Mpo na mokano nini?
Mpo na nini Yesu asengaki na bayeloli na ye ete babatisama? Ezali bongo elembo ya komipesa na bomoto na bango mobimba mpo na Nzambe. “Nsango malamu” esengelaki kosakolama na mabelé mobimba, mpe bayekoli na ye basengelaki kobima na “bato na mabota nyonso.” (Matai 24:14; 28:19) Elingi koloba ete Nzambe asengelaki te kozala lisusu na boyokani bobele elongo na libota na Bayuda, oyo esangisaki bato bamipesi epai na ye uta kobotama na bango. Corneille mpe bato na ndako na ye bazalaki Bapakano ya liboso, to bato oyo bazalaki Bayuda te, baoyo bandimaki solo na ntina na Yesu mpe bazwaki batisimo.
Baoyo bazalaki kozwa batisimo bazalaki komonisa na kozindisama na bango na mai ete basili kokufa na lolenge ya bomoi na bango ya kala, oyo etalaki bobele bango moko. Kobima na mai ezalaki kolimbola ete basengeli sikawa kozala na bomoi mpo na kokokisa mokano na Nzambe mpe kotya yango na esika ya liboso kati na bomoi na bango, lokola Yesu asalaki yango. (Matai 16:24) Kobatisama “na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu” ezalaki komonisa ete basili koyekola mpe kondima solo likolo na makambo misato wana mpe bandimi oyo yango ezali. (Matai 28:19; tala Misala 13:48.) Batisimo ezalaki bobele litambe ya liboso ya kotosa Nzambe mpe ya komikitisa na mokano na ye.
Eloko moko te kati na Makomami ezali kondimisa likanisi ya mangomba oyo epalangani mingi ete batisimo ezali sakramentu, molulu ya lingomba oyo ezali kopesa motuya— grasya, bulee, to bolamu mosusu ya elimo— na ye oyo abatisami. Na ndakisa, kati na mokanda ya Papa Eugene IV, oyo totangaki maloba na yango na lisolo ya liboso, tozali kotanga boye na ntina na batisimo: “Sakramentu wana ezali na nguya ya kolimbisa masumu nyonso, lisumu lisango mpe masumu oyo moto asalaki, mpe ekolongola bitumbu nyonso ya lisumu. Na yango, bakoki kosenga kobongisama ya eloko moko te na masumu ya kala epai na baoyo bazali kobatisama; mpe soki bakokufa liboso ya kosala masumu, bazali kokoma nokinoki na bokonzi ya makoló mpe bakoki komona Nzambe.”
Nzokande, Yesu abatisamaki atako “asalaki lisumu moko te.” (1 Petelo 2:22) Lisusu, engebene Makomami, kolimbisama na masumu ekoki kozwama bobele na nzela ya mbeka ya lisiko na Yesu Klisto. Anania alendisaki Saulo ya Talasia ete: “Telema kobatisama, mpe kosukola masumu na yo, na kobyanga nkombo na ye [Yesu].” (Misala 22:1216) Ya solo, lobiko ezali bobele na makila na Yesu oyo masopamaki mpe soki “tokobelela nkombo na ye” na kondima.—Baebele 9:22; 1 Yoane 1:7.
Kasi, ezali boni mpo na maloba na Petelo mazwami kati na 1 Petelo 3:21? Tozali kotanga kati na yango ete: “Yango ezali elembo na libatisa likobikisa bino (mpo na kolongola mbindo na nzoto te kasi mpo na kotunaka epai na Nzambe lisosoli malamu,) na nzela na lisekwa na Yesu Klisto.” Ntoma Petelo azalaki kokokanisa batisimo na likambo na Noa oyo abikaki na mai ya mpela. (Verset 20) Mpo na komonisa kondima na ye epai na Nzambe, Noa atongaki masuwa mpo na kobikisa libota na ye. (Baebele 11:7) Bobele bongo, na nzela ya kondimela Jéhovah Nzambe mpe mwango ya lobiko na ye, Yesu Klisto, bato bakoki kobikisama na mokili mabe ya lelo. Basengeli lisusu kosala engebene kondima yango. Wana tobongoli mitema na masumu na biso, totiki banzela mabe na biso mpe tomipesi mobimba epai na Jéhovah kati na libondeli, tozali kosenga lisosoli malamu epai na Nzambe. Kasi masumu mazali kolimbisama mpe lobiko lozali kozwama na nzela ya mbeka na Yesu mpe na lisekwa na ye oyo na nzela na yango alakisaki motuya na mbeka na ye epai na Nzambe kati na makolo.—1 Petelo 3:22.
Okosala nini?
Ozali koyangana elongo na ba Témoins de Jéhovah uta mwa ntango? Mbala mosusu osili kosala mbongwana ya ntina kati na bomoi na yo engebene mitinda na Biblia, kasi naino ozwi ekateli te ya komipesa epai na Nzambe mpe ya kozwa batisimo. Mbala mosusu olingi kosala mokano na Nzambe, kasi ozali kobanga ete batisimo ezala bopusi mpo na yo. Yango wana, mpo na mwa ntango moke olingi komilongola na mokumba yango. Na mobu moleki, penepene na bato bamilio 11,5 bayanganaki na Elambo ya Nkolo. Nzokande, motuya monene na baoyo basanganaki na mosala ya kosakola nsango malamu na mobu mobimba ezalaki na nse ya bamilió 4,5. Elingi koloba ete penepene na bato bamilio nsambo bazali komonisa ete bazali kopesa mwa motuya na solo ya Nzambe, atako bazwi naino batisimo te lokola ba Témoins de Jéhovah. Ezali solo ete, kati na motuya yango ezali na bana mike mpe na bato bauti kosepela na solo kala mingi te. Kasi basusu bazali kosangana na mosala ya kosakola atako bazwi naino batisimo te. Ezali bongo na bato mingi oyo basili kozwa boyebi ya solo ya Biblia, nzokande bazwi naino mpenza litomba te na mwango ya lobiko oyo Nzambe atyeli bango na kozwaka batisimo.
Tomikundola likambo oyo ya ntina ete: boyebi na oyo Nzambe azali kosenga na biso nde ezali komemisa mikumba. Yakobo 4:17 elobi ete: “Na bongo, ye oyo ayebi kosala malamu nde akosalaka boye te, ezali na ye lisumu.” Ezekiele 33:7-9 emonisi ete ye oyo ayebi mibeko mpe malako na Nzambe azali na mokumba ya kosalela yango. Motuna ya ntina ezali bongo ya koyeba soki alingi solo Nzambe mpe soki alingi mpenza kosepelisa ye. Moto oyo azali solo na bolingo wana mpe alingi kozala na boyokani malamu elongo na Jéhovah Nzambe akoki komipekisa te na kopesa bomoi na ye mobimba epai na ye. Ye oyo azwi batisimo azali bobele komonisa ete asili komipesa epai na Jéhovah. Ezali litambe ya ntina mpo na kozwa lobiko. Bandimi ya solosolo bazali kozwa batisimo.—Misala 8:12.
Bilikya kitoko oyo Nzambe abombi, kati na mokili ya sika oyo ezali koya, mpo na bato na sembo oyo bazali komipesa epai na ye eleki mosika matomba ya ntango mokuse, ata ya lolenge nini, oyo biloko mabe ya ntango oyo bikoki kopesa. Kobanga bato ezali kolimwa wana tozali kotalela loboko ya nguya ya Nzambe. (1 Bakolinti 10:22; 1 Petelo 5:6, 7) Ya solo, ntango ekoki mpo tomituna, lokola mokube Moetiopia atunaki Filipo ete: “Likambo nini ekopekisa ngai kobatisama?”
[Elilingi na lokasa 7]
Lokola mokube Moetiopia, ozali komituna yo moko ete: “Likambo nini ekopekisa ngai kobatisama?”