Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/4 nk. 6-9
  • Lifelo​—Monyoko ya seko to bobele nkunda?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lifelo​—Monyoko ya seko to bobele nkunda?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo lokota ezali koteya biso
  • Tolimbola bililingi ya Lifelo
  • Mateya mibale makangami makasi
  • Lifelo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Laki ya mɔto ezali nini? Ezali ndenge moko na lifelo to na Gehena?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lifelo ezali mpenza nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Lifelo ezalaka mpenza? Na kotalela Biblia, lifelo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/4 nk. 6-9

Lifelo​—Monyoko ya seko to bobele nkunda?

BAYEBISAKI yo ete Bakonzi na Mangomba ya liboso, batéolojié ya Moyen Age mpe babandisi ya lingomba ya protesta bandimaki ete monyoko ya lifelo ezali ya seko? Soki ezali bongo, okoki kokamwa na koyeba ete bato mosusu ya mayele oyo batalelaka Biblia bazali sikawa kotya ntembe na likanisi wana. Na Grande-Bretagne, moko na bango, John R. W. Stott akomaki ete: “Makomami mazali na ngambo ya kobebisama, mpe ete ˈmonyoko ya seko na moto oyo azali kososolaˈ ezali liteya ya kalakala oyo esengeli kotika esika na nguya eleki monene ya Makomami.”​—Essentials​—A Liberal-Evangelical Dialogue.

Nini etindaki ye na kosukisa ete monyoko ya seko ezali kati na Biblia te?

Oyo lokota ezali koteya biso

Elembeteli na ye ya liboso etali lokota. Alimboli ete wana Biblia ezali kolobela etumbu ya nsuka (“Gehenna”; tala encadré, na lokasa 8), mbala mingi esalelaka maloba ya “kobomama,” na Greke “liloba apolluni (to koboma) mpe nkombo apolei (kobomama).” Maloba wana mazali na likanisi ya monyoko? Stott azali komonisa ete ntango verbe elobelami mpo na komonisa mosala likoló na eloko moko, “apolluni” elimboli “koboma.” (Matai 2:13; 12:14; 21:41) Na yango, na Matai 10:28, epai King James Version elobeli Nzambe ete azali kobebisa “molimo mpe nzoto kati na lifelo,” likanisi na yango ezali ya kobebisa kati na kufa, kati mpasi ya seko te. Na matai 7:13, 14 Yesu akesenisi “nzela ... moke oyo ezali komema na bomoi” mpe “nzela ... monene oyo ezali komema na libebi.” Stott alimboli ete: “Ekozala bongo likambo ya kokamwa, soki bato oyo balobi na ntina na bango ete bakozwa libebi babebisami te.” Akomaki na bosukisi oyo na elonga: “Soki koboma elingi koloba kolongola bomoi kati na nzoto, lifelo esengeli kozala kolongolama ya bomoi na mosuni mpe na elimo, oyo elimboli nsuka ya ekelamu.”​—Essentials, lokasa 315 kino lokasa 316.

Tolimbola bililingi ya Lifelo

Nzokande, bato mingi ya mangomba bakondima makanisi ya mokambi Morris H. Chapman, mokambi ya lingomba Convention Baptiste du Sud, oyo alobaki ete: “Nazali kosakola lifelo ya solosolo.” Abakisaki ete: “Biblia ebyangi yango ˈlibeke na moto,ˈ mpe nakanisi te ete ndimbola oyo esengi kobongisama.”

Ya solo, bililingi ya mɔ́tɔ oyo esalelami kati na Biblia ekoki kopesa likanisi ya monyoko. Nzokande, mokanda Essentials emonisi ete: “Ntembe ezali te ete mpo biso nyonso tosili kooka mpasi makasi ya kozikisama, kati na makanisi na biso mɔ́tɔ ekangisami na ˈmpasi oyo moto akoki kookaˈ. Nzokande ntina ya liboso ya mɔ́tɔ ezali te ya kookisa mpasi, kasi ya koboma, lokola bizikiseli nyonso kati na mokili ezali kotatola yango.” (Lokasa 316) Kosimba bokesene monene wana na makanisi ekobatela yo na kosalela Makomami mpo na koloba likambo oyo elingi yango koloba te. Totalela mwa bandakisa:

Na ntina na baoyo babwakami kati na Gehenna, Yesu alobaki ete “nkiso na bango ekokufa te mpe mɔ́tɔ ekozimama te.” (Malako 9:47, 48) Na bopusi ya maloba na mokanda mopemami te ya Judith (“Akotinda mɔ́tɔ mpe nkiso kati na misuni na bango mpe bakolela na mpasi mpo na libela.”​—Judith 16:17, La Bible de Jerusalem), bandimbola mosusu ya Biblia ezali koloba ete maloba na Yesu malimboli minyoko ya seko. Nzokande, mokanda ya Judith, oyo epemamaki na Nzambe te, ezali mpenza moboko te mpo na kokata na ntina na oyo Makomi na Malako malingi koloba. Yisaya 66:24, mokapo oyo Yesu azali kotanga elobi ete mɔ́tɔ mpe nkiso ezali kobebisa nzoto ya bakufi (Yisaya alobeli “bibembe”) ya bayini na Nzambe. Likanisi ya monyoko ya seko ezali te kati na maloba ya Yisaya to na oyo ya Yesu. Elilingi ya moto elimboli kobebisama nyee.

Emoniseli 14:9-11 elobeli basusu oyo bazali “koyokisama mpasi na mɔ́tɔ na sufulu ... Molinga na mpasi na bango ekobuta libela na libela.”a Oyo elimboli monyoko ya seko kati na mɔ́tɔ ya lifelo? Ya solo, eteni oyo elingi bobele koloba ete bato mabe banyokwami, kasi banyokwami libela te. Mokapo elobi ete molinga​—elembetele ete mɔ́tɔ esali mosala na yango ya kobebisa​—nde ezali kobuta mpo na libela, kasi mpasi ya mɔ́tɔ te.

Emoniseli 20:1-15 elobi ete kati “na libeke na moto na sufulu, ... bakoyokisama mpasi butu na moi libela na libela.” Na botangi ya nokinoki ezali komonana lokola elembeteli ya monyoko ya seko na mɔ́tɔ, kasi ezali mpenza yango te. Mpo na nini? Kati na bantina mosusu, “nyama na yauli mpe mosakoli ya lokuta” mpe “kufa na Hades” ekosuka kati na oyo ebengami awa ete “libeke na mɔ́tɔ.” Lokola okoki kososola yango, nyama na yauli, mosakoli na lokuta, kufa mpe Hades ezali bato ya solo te; mpo na yango ekoki te kooka mpasi. Na esika na yango, kati na mokanda Ndimbola likoló na Emoniseli ya Santu Yoane moto na Nzambe, G. B. Caird akomi ete “libeke ya mɔ́tɔ” elimboli “libebi mpe kozanga kokanisama.” Kokokisama oyo esengeli kosalema, mpamba te Biblia yango moko elobi na ntina ya libeke ya mɔ́tɔ ete: “Libeke na mɔ́tɔ oyo ezali kufa na mibale.”​—Emoniseli 20:14.

Mateya mibale makangami makasi

Ata bilembetele wana nyonso, bandimi mingi bazali kokangama na koloba ete “libebi” wana elimboli te oyo liloba ezali komonisa kasi elimboli mpasi ya seko. Mpo na nini? Makanisi na bango ebulungani na liteya mosusu oyo ekangami makasi na mɔ́tɔ ya lifelo: liteya ya kozanga kokufa ya molimo na moto. Mpo ete lingomba na bango eteyi mateya wana na boumeli ya bikeke mingi, bakoki kooka ete mikapo wana oyo elobeli koboma ezali kolimbola nde monyoko ya seko. Bongo, molimo na moto ezangi kokufa te? Wana lolenge bato mingi bazali kokanisa.

Kasi, tala likanisi oyo mokonzi na lingomba ya Anglika Philip E. Hughes abimisi ete: “Kondima likanisi oyo ete bobele molimo na moto nde ekoki kokufa te elimboli kozwa etelemelo oyo endimami epai moko te kati na Makomami, mpamba te kati na Biblia moto azali ntango nyonso komonana lokola eloko mobimba esangisi elimo mpe nzoto.... Likebisi oyo Nzambe apesaki na ebandeli, na ntina na nzete epekisami, ˈMokolo oyo okolya yango, okokufa,ˈ eyebisamaki na moto lokola ekelamu ya mosuni mpe ya elimo​—soki akolya yango, esengelaki kozala lokola asili kokefa. Ezali na likanisi moko te ete eteni moko na ye ezangaki kokufa mpe ete mbele asengelaki kokufa bobele eteni.”​—Elilingi ya solo​—Ebandeli mpe nzela ya moto kati na Klisto (na Lingelesi).

Bobele bongo téolojié Clark Pinnock amonisi ete: “Likanisi wana [ete molimo na moto ezangi kokufa] esili kosala bopusi likoló na téoloji na boumeli ya ntango molai, molai mpenza kasi ezali na Biblia te. Biblia eteyi kozanga kokofa ya molimo te.” Ezekiele 18:4, 20 mpe Matai 10:28 ezali kondimisa likambo yango. Lisusu, Yesu ye moko alobaki na ntina na moninga na ye Lazare oyo akufaki lokola ete “azali kopema” to kolala mpongi. Makambo oyo masalemaka mazali kondimisa yango. Yesu alobaki ete akokende “kolamusa ye na mpongi.” (Yoane 11:11-14) Na yango, moto to molimo na moto, Lazare akufaki, kasi ata nsima na kolekisa mwa ntango akokaki kosekwisama, kozonga lisusu na bomoi. Yesu asekwisaki Lazare kati na bakufi​—Yoane 11:17-44.

Makambo oyo mazali na bopusi nini likoló na liteya ya monyoko ya seko? Kala na ekeke ya 17, mokomi William Temple amonisaki ete: “Ezali na [mikapo] oyo ezali kolobela kobwakama ya bato na mɔ́tɔ mokozimisama te. Kasi soki tososoli yango te na likanisi ete oyo ebwakami ezangi kobebisama, tokomona ete, ekozika libela na libela te, kasi ete ekolimwa.” Botaleli wana ya sembo ezali naino solo kino lelo oyo, mpo ezali yango nde Biblia ezali mpenza koteya.

Na ntembe te, ozali na bantina malamu ya kotya ntembe mpo na liteya ya monyoko kati na lifelo. To mbala mosusu olingi te kosuka bobele na kotya ntembe mpamba mpe olingi kolanda toli ya Pinnock molakisi ya téoloji oyo alobaki ete: “Molongo mobimba ya bindimeli etali lifelo, ezala oyo ya monyoko ya seko, ... esengeli kobwakama likoló na bosolo ya mateya.” Ee, bizaleli malamu, boyengebene mpe​—oyo eleki ntina​—Liloba na Nzambe, Biblia, ezali kolendisa yo na kosala bongo.

Soki osali bongo, okomona ete lolenge ya solo ya lifelo ekoki mpenza kondimama. Okoki kozwa lisalisi likoló na lisoló oyo kati na mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis.b Okoki kosenga yango ntango okokutana na ba Témoins de Jéhovah. Tanga mikapo “Tokendaka wapi soki tokufi?” “Lifelo ezali nini?” mpe “Lisekwa​—mpo na nani, mpe epai wapi?” Okomona ete lolenge ya solo ya lifelo ebongi bobele kondimama te kasi ezali lisusu kopesa elikya.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kati na mokapo wana ya Biblia, “konyokwama na moto” ezali libosoliboso kotalela monyoko ya elimo mpe bongo na boumeli ya mwa ntango. Mpo na kozwa bandimbola mingi, tala mokanda Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! enyatami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Etanda na lokasa 8]

KOLIMBOLAMA YA MALOBA

Kati na lisoló oyo maloba “lifelo” mpe “mɔ́tɔ ya lifelo” na lolenge esalelami na Batéolojié ya boklisto ya lokuta ekangisami na liloba ya Greke geˈen.na, oyo ezali komonana mbala 12 kati na “Kondimana ya Sika.” (Matai 5:22, 29, 30; 10:28; 18:9; 23:15, 33, Malako 9:43, 45, 47; Luka 12:5; Yakobo 3:6) Atako mabongoli ndenge na ndenge ya Biblia mazali kobongola liloba wana ya Greke na “lifelo,” mabongoli mosusu mazali kokoma yango bobele “Gehenna.” Ekokani na “libeke ya mɔ́tɔ to kufa ya mibale,” elilingi ya kobomama ya seko oyo ezwami kati na mokanda ya nsuka ya Biblia.​—Emoniseli 20:14.

Na ntina ya maloba mosusu mibale oyo mbala mosusu ezali kobongolama “lifelo,” mokanda Maloba ya lokota ya Biblia (Lingelesi, 1914) oyo ebimisami na William Smith, elobi ete: “Lifelo ... ezali liloba oyo babongoli na biso bazali mbala mingi kosalela na mawa nyonso mpo na kobongola liloba ya Liebele sheol. Esengelaki kozala mbala mosusu malamu mingi kosalela liloba ya Liebele sheol, to kobongola yango ntango nyonso na ˈliyitaˈ to ˈlibuluˈ. ... Kati na K[ondimana] ya S[ika], liloba Hades lokola mpe sheol ezali mbala mosusu bobele ˈliyitaˈ ... Ezali na ndimbola wana nde Bindimeli bilobi na ntina na Nkolo na biso ete ˈakitaki na lifelo,ˈ mpo na kolimbola ezalela na bakufi nyonso.”

Na kokesena na Gehenna, oyo elimboli kobomama ya seko, Sheol mpe Hades ezali kosalelama mpo na bakufi oyo bazali kati na nkunda ya bato nyonso, na elikya ya kozonga lisusu na bomoi.​—Emoniseli 20:13.

[Elilingi na lokasa 9]

Yesu alamusaki Lazare na mpongi ya kufa

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto