Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/7 nk. 5-7
  • Lifelo ezali mpenza nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lifelo ezali mpenza nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoi mosusu ezalaka nsima ya liwa?
  • Minyoko ya seko to malita ya bato nyonso?
  • Lifelo ezikisaka?
  • Lifelo etikali mpamba!
  • Banani bakendaka na lifelo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lifelo ezalaka mpenza? Na kotalela Biblia, lifelo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lifelo ya mɔ́tɔ ebongwani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Lifelo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/7 nk. 5-7

Lifelo ezali mpenza nini?

ATA soki okanisaka ete lifelo ezali nini, bato mingi bandimaka ete ezali esika moto azwaka etumbu mpo na masumu na ye. Mpo na lisumu mpe mbuma mabe na yango, Biblia elobi boye: “Yango wana, kaka ndenge lisumu ekɔtaki na mokili na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpamba te bango nyonso basalaki lisumu.” (Baloma 5:​12, NW) Makomami elobi lisusu ete: “Lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” (Baloma 6:​23, NW) Lokola liwa ezali etumbu mpo na lisumu, mpo tóyeba soki lifelo ezali mpenza nini, ezali na ntina mingi tóluka eyano na motuna oyo: Nini ekómelaka biso ntango tokufaka?

Moto azalaka na bomoi ya ndenge mosusu nsima ya liwa na ye? Lifelo ezali nini, mpe bato ya ndenge nini bakendaka kuna? Elikya ezali mpo na bato oyo bazali na lifelo? Biblia epesi biyano ya solosolo mpe ya malamu na mituna oyo.

Bomoi mosusu ezalaka nsima ya liwa?

Tozalaka nde na eloko moko kati na biso, molimo to elimo, oyo etikalaka na bomoi soki nzoto ekufi? Tótalela ndenge oyo mobali ya liboso, Adama, akómaki na bomoi. Biblia elobi boye: “[Yehova] Nzambe asalaki moto na mputulu ya mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema ya bomoi.” (Genese 2:⁠7) Atako kopema nde ezalaki kobatela bomoi na ye, ntango Nzambe atyaki “mpema ya bomoi” na kati ya zolo, akɔtisaki ye te mopɛpɛ mpamba na kati ya mimpululu na ye. Nzambe atyaki nde mɔ́tɔ ya bomoi to “nguya ya bomoi” na kati ya nzoto ya Adama oyo ezangaki bomoi; nguya yango etambwisaka bikelamu nyonso ya bomoi awa na mabele. (Genese 6:17; 7:22) Biblia ebengaka nguya yango oyo etambwisaka bikelamu ete “elimo.” (Yakobo 2:​26, NW) Tokoki kokokanisa elimo yango na kura oyo etambwisaka masini moko mpe esalaka ete esala mosala moko boye. Kura ezwaka te motindo ya masini oyo yango ezali kotambwisa, ndenge moko mpe, nguya ya bomoi ezwaka te motindo ya bikelamu oyo yango ezali kobatela bomoi na yango. Ezali na bomoto te mpe ekanisaka te.

Elimo ekómaka nini ntango moto akufi? Nzembo 146:4 (NW) elobi boye: “Elimo na ye ebimi, azongi na mputulu; na mokolo wana, makanisi na ye esili.” Ntango moto akufaka, elimo na ye etikalaka na bomoi te lokola ekelamu ya elimo na mokili mosusu. “Ekozonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.” (Mosakoli 12:⁠7) Yango elimboli ete Nzambe kaka nde akoki kozongisa moto yango na bomoi.

Socrate na Platon, bato ya filozofi na Grèce na ntango ya kala, bazalaki kondima ete molimo oyo ezalaka na kati ya moto ekufaka te nsima ya liwa. Biblia eteyaka nini mpo na molimo? Genese 2:7 elobi ete Adama “akómaki molimo na bomoi.” Azwaki molimo te; azalaki nde molimo​—⁠moto mobimba. Makomami ezali koloba ete molimo esalaka mosala, ezalaka na mposa ya kolya, ememami na makasi, ezangi mpɔngi, mpe bongo na bongo. (Levitike 23:​30, NW; Deteronome 12:20; 24:​7, NW; Nzembo 119:​28, NW) Ya solo, moto ye moko azali molimo. Ntango moto akufi, molimo yango ekufi.​—⁠Ezekiele 18:⁠4.

Kasi nini ekómelaka biso soki tokufi? Ntango akatelaki Adama etumbu, Yehova alobaki boye: “Ozali mputulu, mpe okozonga na mputulu.” (Genese 3:19) Adama azalaki wapi liboso Nzambe akela ye na mputulu mpe apesa ye bomoi? Epai moko te! Azalaki te. Ntango akufaki, Adama azalaki lisusu te, se ndenge azalaki te liboso bákela ye. Mosakoli 9:​5, 10 elimboli polele ndenge oyo bato bakómaka soki bakufi; vɛrsɛ yango elobi boye: “Bakufi bayebi eloko moko te . . . Na nkunda, esika ozali kokende, ezali na mosala te mwango te boyebi te mpe bwanya te.” (New International Version) Makomami emonisi ete soki moto akufi, azalaka lisusu te. Bakufi bayebaka eloko moko te, bayokaka eloko te, bakanisaka eloko te.

Minyoko ya seko to malita ya bato nyonso?

Lokola bakufi bayebaka lisusu eloko moko te, lifelo ekoki te kozala esika ya minyoko epai bato mabe banyokwamaka nsima ya liwa na bango. Kasi, lifelo ezali nini? Soki totaleli makambo oyo ekómelaki Yesu nsima ya liwa na ye, yango ekosalisa biso tózwa eyano na motuna oyo. Luka, mokomi ya Biblia, alobi boye: “[Yesu] asundolamaki te na kati ya Hadesi [“lifelo,” King James Version] mpe mosuni na ye epɔlaki te.”a (Misala 2:​31, NW) Lifelo yango, esika oyo ata Yesu mpe akendeki, ezalaki wapi? Ntoma Paulo akomaki ete: “Mpo moko ya makambo oyo napesaki bino ezalaki oyo ngai moko mpe nazwaki ete Kilsto akufaki mpo na masumu na biso engebene Makomami; mpe ete akundamaki, ɛɛ, ete alamukaki na mokolo ya misato engebene Makomami.” (1 Bakolinti 15:​3, 4, NW) Yesu azalaki na lifelo, to lilita, kasi asundolamaki kuna te, mpamba te asekwisamaki.

Tótalela mpe likambo ya Yobo, moto moko ya sembo oyo anyokwamaki mingi. Ntango Yobo alingaki kokima mikakatano oyo azalaki na yango, asɛngaki ete: “Nani akondima kosalela ngai likambo oyo, ete okoka kobatela ngai na kati ya lifelo, mpe obomba ngai tii nkanda na yo ekoleka?”b (Yobo 14:​13, Douay) Tokoki mpenza kokanisa te ete Yobo alingaki kokende na esika ya mɔ́tɔ makasi mpo abatelama! Yobo azalaki kotalela “lifelo” ete ezali kaka lilita, esika oyo minyoko na ye elingaki kosila. Na yango, lifelo oyo Biblia eteyi, ezali malita esika oyo bato ya malamu na bato ya mabe bakendeke bango nyonso.

Lifelo ezikisaka?

Mɔ́tɔ ya lifelo ekoki ntango mosusu kozala elilingi ya kobomama nyɛɛ? Makomami ekesenisi mɔ́tɔ mpe Hades to lifelo ntango elobi ete: “Babwáki Liwa na Ades o etíma ya móto: etíma ya móto, ndé liwá lya mábalé.” “Etíma” oyo balobeli awa ezali na ndimbola ya elilingi, mpamba te liwa na lifelo (Ades) oyo ebwakami na kati ekoki kozikisama te. “Etíma ya móto, yangó ndé liwá lya mábalé”​—⁠to liwa oyo ezangi elikya ya kozonga na bomoi.​—⁠Boyebisi [Emoniseli] 20:​14, Liloba lya Nzambe.

Etíma ya móto ezali na ndimbola moko na “Gehena ya mɔ́tɔ [lifelo ya mɔ́tɔ, King James Version]” oyo Yesu alobelaki. (Matai 5:​22, NW; Malako 9:​47, 48, NW) Liloba Gehena ezali mbala zomi na mibale na Makomami ya Grɛki ya boklisto, mpe emonisaka Lobwaku ya Hinomo, na libándá ya lopango ya Yelusaleme. Na ntango Yesu azalaki awa na mabele, Gehena ezalaki ekunde, “esika bazalaki kobwaka bibembe ya bato mabe, mpe bibembe ya banyama, mpe bosɔtɔ ndenge na ndenge.” (Smith’s Dictionary of the Bible) Bazalaki kobwaka sufulu mpo mɔ́tɔ ekufa te. Yesu asalelaki Gehena lokola elilingi ya kobomama ya seko.

Ndenge moko na Gehena, libeke ya mɔ́tɔ elimboli kobomama ya seko. “Babwaki” liwa na Hades na kati na yango na boye ete ekolimwa libela ntango bato bakosikolama na lisumu mpe na etumbu ya liwa. Baoyo bazali kosala masumu na nko mpe baboyi kobongola mitema bakozala na “likabo” na bango na kati ya libeke yango. (Emoniseli 21:​8, NW) Bango mpe bakobomama mpo na libela. Nzokande, baoyo Nzambe abombá na makanisi na ye mpe bazali na lifelo​—⁠to malita ya bato nyonso​—⁠bakozala na bomoi ya malamu na mikolo oyo ezali koya.

Lifelo etikali mpamba!

Mokanda ya Boyebisi [Emoniseli] 20:13 (Liloba lya Nzambe), elobi ete: “Baye babómbámí o Liwá mpé o Ades babimí mpé o esíká ya bangó.” Ya solo, lifelo oyo Biblia ezali kolobela ekotikala mpamba. Lokola Yesu alakaki yango, “ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na [Yesu] mpe bakobima.” (Yoane 5:​28, 29, NW) Atako bazalaka lisusu na bomoi te ata ya lolenge nini, bamilio ya bato oyo bakufá oyo bazali na makanisi ya Yehova Nzambe bakosekwisama, to bakozongisama na bomoi na mabele ntango ekozonga paladiso.​—⁠Luka 23:​43, NW; Misala 24:​15, NW.

Na mokili ya sika oyo Nzambe akosala, bato oyo bakosekwa mpe bakotosa mibeko na ye ya sembo, bakokufa lisusu te. (Yisaya 25:⁠8) Yehova “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, na mawa na koganga na mpasi ekozala lisusu mpe te.” Kutu “makambo ya kala esili koleka.” (Emoniseli 21:​4, NW) Oyo nde mapamboli bato oyo bazali na lifelo, “malita ya bato nyonso,” bakozwa! Lipamboli yango ezali mpenza likambo oyo ezali kotinda biso tóluka kozwa boyebi mingi ya Yehova Nzambe mpe ya Mwana na ye, Yesu Klisto.​—⁠Yoane 17:​3, NW.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na King James Version, liloba ya Grɛki Hades babongoli yango na “lifelo” na bisika nyonso zomi oyo ezali na kati ya Makomami ya Grɛki ya boklisto. Na Luka 16:​19-31 ebongolami na minyoko, kasi lisolo yango mobimba ezali na ndimbola ya elilingi. Talá mokapo 88 ya buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Liloba ya Liebele Sheol ezali mbala 65 na Makomami ya Liebele mpe ebongolami na “lifelo,” “malita,” mpe “libulu” na King James Version.

[Elilingi na lokasa 5]

Yobo asɛngaki na libondeli ete akende na lifelo mpo na kozwa libateli

[Elilingi na lokasa 6]

Gehena ya mɔ́tɔ​—⁠elilingi ya kobomama ya seko

[Elilingi na lokasa 7]

‘Baoyo nyonso bazali na malita ya kokanisama bakobima’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto