Mpo na nini komeka bosolo ya Biblia?
Lolenge nini otalelaka Biblia? Bamoko bazali solo kokanisa ete ezali emoniseli ya Nzambe epai na bato. Basusu bakanisi ete ezali bobele mokanda lokola mikanda nyonso. Mpe basusu bazali kokakatana. Soki ozali na ntembe na ntina na eutelo ya Biblia, ezali na bantina minene oyo osengeli kotalela yango mpe kosilisa ntembe wana.
KINO na ekeke ya zomi na mwambe, Biblia etalelamaki na limemya nyonso lokola Liloba ya Nzambe kati na mikili mibengami ete ya boklisto. Kasi kobanda ekeke ya zomi na libwa, ntalo monene ya balakisi, bato ya sianse, ata bateolojié mpe bakonzi ya mangomba babandaki kobeta ntembe polele na ntina na bosolo na yango.
Na bongo, Biblia etangami mingi mpenza kino ebele na bato bazali koloba mabe na ntina na yango liboso nkutu ete bayeba makambo mazwami na kati na yango. Kati na boklisto ya lokuta, bato mingi basili kokitanya filozofi na esika ya Biblia. Atako bongo, mateya ya bato ya ntango na biso, ebimisi mokili ya malamu te to oyo ya esengo mingi. Wana ezali ntina malamu ya kotalela Biblia mpe kotala soki batoli na yango ezali komema na bolamu.
Ntina mosusu ya komeka bosolo ya Biblia ezali bongo elikya kitoko oyo yango ezali kopesa na bato. Na ndakisa, Nzembo 37:29 elobi ete: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Emoniseli 21:3-5) Bilaka wana bizali na bopusi nini likolo na yo? Ya solo, ezali kopesa bantina malamu mpo na kotalela Biblia mpe kotala soki ebongi na kotyela motema.
Zulunalo oyo ezali ntango nyonso kolongisa bosolo ya Biblia mpe ezali mbala mingi kopesa bilembeteli ya bosolo na yango. Ezali na makambo mingi kati na yango bosolo ya Biblia ekoki komekama. Banimero ndenge na ndenge ya Mosenzeli ekosalisa yo na koyanola na mituna oyo: Makambo na kala mayebani na lisoló na bato, mayokani na Biblia? Bisakweli na yango bizali solo? Batoli na yango ezali na ntina, to balakisi mpe bato ya filozofi ya ntango na biso basili komonisa ete Biblia esila ngala?
Zebi ya mikili to Géographie ezali mwango mosusu kati na yango tokoki komeka bosolo ya Biblia. Masapo ya Bapakano ezali mbala mingi kotemela makambo matali zebi ya mikili. Na ndakisa, bato mingi ya ntango na kala, bayebisaki masoló ya bato oyo basalaki mibembo na oyo bango babengi ete mboka ya bakufi. Na ntina na Bagreke ya kala, mokanda Mokambi oyo azali komema epai na banzambe (na Lingelesi) elimboli ete: “Bazalaki komona mabele lokola etando papálá oyo ezingami na mai mingi oyo babengi mai monene (océan). Na ngambo mosusu, ezali na esika monene epai bato bazalaka na bomoi nsima na kufa (au-delá), mabelé oyo masundolamaki mpe ya mpasi, epai banzeté na molili mpe ekobotaka mbuma te, ezalaki kobima na bisika mingi.” Ntango eyebanaki ete ezalaki lisapo, bafilozofe bapakano balukaki esika mosusu mpo na mboka ya bakufi. Richard Carlyon alimboli ete: “Na nse na mabelé, tosili kokuta esika malamu oyo etongani na mokili na biso na mabulu ndenge na ndenge.” Lelo, toyebi ete yango mpe ezali lisapo. Ezali na mokili moko te soko nzela moko te na nse na mabele.
Na kokesena na masapo ya ntango na kala, Biblia elobi te ete mabele mazali papálá. Kasi, eyebisi bosolo ya sianse oyo ete mabelé mazali libungutulú mpe etelemi likoló na eloko moko te. (Yobo 26:7; Yisaya 40:22) Ezali boni mpo na makambo mosusu matali zebi ya mikili oyo ekomami kati na Biblia? Ezali masapo, to ekoki komonisa makambo na sikisiki soki tokei kotala Ezipito ya lelo, mpe lisobe ya Sinai mpe mboka Yisraele ya lelo?
[Elilingi na lokasa 3]
“Ezali Ye oyo afandi likoló na zolongano ya mabele.”—Yisaya 40:22, MN
ˈAkakisi mabelé likolo na eloko te.ˈ—Yobo 26:7, MN