Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/8 lok. 3
  • “Emonani ete tokoki kosolola te!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Emonani ete tokoki kosolola te!”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Liboso mpe nsima​—Biblia ebongolaki bomoi na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Nani azali Mikaele anzelu-mokonzi?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mikaele anzelu-mokonzi nde nani?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Yesu azali Mikaele, anzelu-mokonzi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/8 lok. 3

“Emonani ete tokoki kosolola te!”

MICHEL, oyo azalaki avocat, azalaki mosololi malamu. Mosala na ye esɛngaki bongo. Kasi nsima ya mbula 16 ya libala, Michel andimaki ete ntango azalaki kokóma na ndako epai na mwasi na ye, Andrienne, emonanaki lokola ete makoki na ye ya kosolola malamu ezalaki kobunga. Michel amikundoli ete: “Na kozangáká boboto, na kobundáká, na kobimisáká makambo mikemike, Adrienne mpe ngai, tozalaki ntango nyonso kati na ezalela ya koswana, mpe nakanisaki ete yango elingaki kolɛmbisa biso. Nazalaki komituna soki yango ezalaki mpenza libala, kozanga esengo mpe koswana makasi ezalaki sé kolandana. Soki yango eumelaki mpo na bomoi na biso mobimba, mbɛlɛ naboyaki libala​—lisɛki te. Nakokaki te kolónga mbula 20, 30, 40 ya lolenge ya koswana wana mpe na matáta oyo makosilaka te.”

Lolenge ya mayoki oyo ezwami te bobele epai na Michel mpe Adrienne. Ezali solo komonana epai na babalani mingi oyo boyokani na bango ezali lelo babundi, lobi bafandi mwa kimya, lobi kuna babundi lisusu, mpe bongo na bongo. Masoló mike ezali kokóma koswana makasi. Bazali “koyoka” makambo oyo malobami te. Bazali koloba makambo oyo mabongi mpo na koloba te. Bazali koswana mpe kofundana, mpe bazali kokangana nkanda. Bazali kokabwana te, kasi bazali mpenza “mosuni moko” te. (Genese 2:24) Boyokani na bango esili kobeba. Kozonga nsima elimboli kokabwana; kokende liboso elimboli kokutana na mikakatano makasi. Mpo na kopɛngola mpasi oyo euti mpo na ezaleli yango, babalani wana bazali komitangola moko longwa na mosusu mpo na komibatela ete bazwana te.

Babalani motindo oyo bazali na mposa ya ‘kozwa litambwisi malamu’ kati na libala na bango. (Masese 1:5) Litambwisi yango lizwami kati na Liloba ya Nzambe, Biblia. Mokanda ya mibale ya Paulo epai na Timoté eyebisi ete Biblia ezali “na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kosembola makambo.” (2 Timoté 3:16) Yango endimisi ete, ezali na mwango mpo na kopɛngola ezaleli ya koboya kosolola kati na libala, lokola tokomona yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto