“Bópusana penepene na Nzambe, mpe Ye akopusana penepene na bino”
Liboso mpe nsima—Biblia ebongolaki bomoi na ye
NTANGO Adrian azalaki elenge, azalaki nkandankanda, azalaki kokanela bato mingi. Lokola azalaki nkandankanda, azalaki kotomboka mingi. Azalaki kolangwa masanga, komɛla makaya mpe azalaki na mobulu ya basi. Adrian ayebanaki lokola elenge moko ya mobulu, mpe azalaki na nzoloko oyo ezalaki komonisa ete alingi bakonzi te. Mpo na bambula wana, alobi boye: “Nazalaki kokata nsuki na ngai na lolenge oyo bilenge ya mobulu bakataka, nazalaki kotya yango gel ya makasi mpo na kotɛlɛmisa yango, mpe ntango mosusu nazalaki kotya yango langi ya motane to langi mosusu.” Adrian atɔbɔlaki mpe zolo na ye.
Adrian akendeki kofanda ye na bilenge mosusu ya mobulu na ndako moko oyo basundolá. Kuna bamipesaki na komɛla masanga mpe na bangi. Adrian alobi ete: “Nazalaki komitɔbɔla bankisi babengi amphétamines mpe nazalaki kosangisa yango na valium ná bilangwiseli mosusu oyo nakokaki kozwa. Ntango nazangi bangi to colle, nazalaki kobenda esansi na mituka ya bato mpe nazalaki komilangwisa na yango.” Lokola Adrian azalaki kosala makambo ya mabe mpe mobulu na banzela, akómaki likama mpenza. Bato bazalaki kokima ye. Kasi bato ya mobulu bazalaki kosepela na ye mingi.
Mokemoke, Adrian ayaki komona ete “baninga” na ye bazalaki kolanda ye kaka mpo na matomba na bango moko. Longola yango, amonaki ete ‘nkanda mpe mobulu nyonso oyo azalaki kosala epesaki ye ata litomba moko te.’ Ntango amonaki ete bomoi yango ezangi ntina mpe akómaki komiyokela mawa, atikaki baninga mabe. Ntango alɔkɔtaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko na ndako moko oyo bazalaki kotonga, asepelaki mpenza na mateya ya Biblia oyo atángaki, mpe yango etindaki ye ayekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Adrian andimaki mpenza libyangi ya Biblia oyo elobi ete: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Na yango, Adrian amonaki ete asengeli kotosa mitinda ya Makomami Mosantu.
Boyebi ya Biblia ebongisaki lisosoli ya Adrian mpe ebongolaki bomoi na ye. Ayekolaki kozongisa nkanda na ye nsima mpe komipekisa. Nguya ya Liloba ya Nzambe epesaki Adrian bomoto ya sika.—Baebele 4:12.
Kasi, ndenge nini Biblia elongaki kobongola bomoi na ye? Boyebi ya Makomami esalisaka biso na “kolata bomoto ya sika.” (Baefese 4:24) Ya solo, bomoto na biso ekoki kobongwana mpenza soki tosaleli boyebi oyo tozwi na Biblia. Kasi ndenge nini boyebi yango ebongolaka bato?
Ya liboso, Biblia eyebisaka biso bizaleli ya mabe oyo tosengeli kotika. (Masese 6:16-19) Ya mibale, Makomami ezali kolendisa biso tómonisa bizaleli ya malamu oyo euti na elimo santu ya Nzambe. Bizaleli yango ezali “bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima, boboto, komipekisa.”—Bagalatia 5:22, 23.
Lokola Adrian ayebaki masɛngami ya Nzambe malamumalamu, yango esalisaki ye amitalela mpe amona bizaleli oyo asengelaki kolona mpe oyo asengelaki kotika. (Yakobo 1:22-25) Kasi, wana ezalaki kaka ebandeli. Longola boyebi, esengelaki likambo moko epesa Adrian mposa ya kobongwana.
Adrian ayebaki ete bomoto ya sika ezalaka “engebene elilingi ya Oyo azalisaki yango.” (Bakolose 3:10) Amonaki ete bomoto ya moklisto esengeli kokokana na oyo ya Nzambe. (Baefese 5:1) Na boyekoli ya Biblia, Adrian ayebaki ndenge Yehova asalelaka bato makambo mpe ayebaki bizaleli ya Nzambe lokola bolingo, boboto, bolamu, motema mawa, mpe boyengebene. Boyebi wana etindaki Adrian alinga Nzambe mpe asala makasi mpo na kozala na bomoto oyo Yehova asepelaka na yango.—Matai 22:37.
Na nsima, elimo santu ya Nzambe esalisaki Adrian ayeba kopekisa nkanda na ye. Lelo oyo, ye ná mwasi na ye bazali kosalisa bato mosusu bápɛtola bomoi na bango na lisalisi ya boyebi ya Biblia. Adrian alobi ete: “Baninga na ngai mingi ya kala basilá kokufa, kasi ngai nazali na bomoi mpe nazali na bomoi ya esengo elongo na libota na ngai.” Bomoi ya Adrian emonisi mpenza nguya oyo Biblia ezali na yango ya kobongisa bomoi ya bato.
Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 25]
‘Nkanda mpe mobulu nyonso oyo azalaki kosala epesaki ye ata litomba moko te’
[Etanda na lokasa 25]
Mitinda ya Biblia ezali kobongola bato
Talá mwa mitinda ya Biblia oyo esalisi bato mingi ya nkanda mpe ya mobulu mpo bákóma bato ya kimya:
“Bózala na kimya elongo na bato nyonso. Bózongisa bino moko te mabe na oyo asali bino mabe, balingami, kasi bótikela nde nkanda esika.” (Baloma 12:18, 19) Tótika Nzambe ye moko apona na nani mpe ntango nini ebongi kozongisa mabe na mabe. Azali na likoki ya kosala yango na boyebi mpenza, mpe soki azongiseli moto mabe, akosala yango na bosembo na ye ya kokoka.
“Bóyoka nkanda, mpe atako bongo bósala lisumu te; tiká ete moi elala te bino bozali kaka na nkanda, mpe bótikela Zabolo esika te.” (Baefese 4:26, 27) Moto akoki mbala mosusu kosilika na ntina mpenza. Soki likambo ya ndenge wana esalemi, esengeli te ete atikala “kaka na nkanda.” Mpo na nini? Mpo yango ekoki kotinda ye asala mabe, mpe bongo atikela “Zabolo esika,” mpe yango ekosala ete Yehova Nzambe aboya ye.
“Tiká nkanda mpe tiká kosilika; kopela na nkanda makasi te mpo okosala mabe.” (Nzembo 37:8, NW) Moto oyo amipekisaka te akanisaka te liboso ya kosala likambo. Soki moto atikeli nkanda nzela, mbala mingi yango etindaka ye aloba to asala makambo oyo ekoyokisa moto nyonso mpasi.